Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/10 nk. 24-29
  • Batikelá ngai libula ya ntina mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batikelá ngai libula ya ntina mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo ya kala oyo ebongisaki bomoi na ngai
  • Tata azwi lisalisi ya bolingo
  • Nkɔkɔ-mobali na tribinale mpe na bolɔkɔ
  • Likambo oyo yango esalaki epai ya Tata
  • Na mosala ya Bokonzi
  • Makambo ya bomwana
  • Nkɔkɔ-mobali mpe diplome na ngai
  • Nazali na esengo mpo na libula na ngai
  • Bosembo ya libota na ngai esalisaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Nzambe azali na nkombo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Baboti na biso bateyaki biso kolinga Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Libula ya boklisto oyo ekomonanaka mingi te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/10 nk. 24-29

Lisolo ya bomoi

Batikelá ngai libula ya ntina mingi

LISOLO YA CAROL ALLEN

Nazalaki ngai moko, nasimbaki buku na ngai ya sika mpe ya kitoko na mabɔkɔ. Kobanga ekangaki ngai, mpe mai ya miso ezalaki kokita ngai na elongi. Nazalaki naino elenge mwasi moke, nazalaki na mbula nsambo mpe nabungaki na engumba mopaya, na kati ya bato ebele!

NA MIKOLO oyo eleki, nsima ya mbula soki 60, likambo oyo esalemaki ntango nazalaki mwana ezongelaki ngai lisusu na makanisi, ntango ngai na mobali na ngai Paul tokendaki na Esika Monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, na etúká ya New York, esika yango ezali kitoko mpenza. Babengaki ye kuna na kelasi ya mbala ya mibale mpo na bakɛngɛli-batamboli ya Batatoli ya Yehova.

Ntango tofandaki na salɔ moko ya monene oyo engɛngaka lokola moi, natalaki mpe namonaki esika moko batyá bafɔtɔ ebele mpe bakomá “MAYANGANI.” Na katikati, ezalaki na fɔtɔ moko ya kala ya bana bazali na esengo mpe bazali kopɛpa babuku oyo ngai mpe nasimbaki ntango nazalaki mwana! Natángaki na nse ya fɔtɔ yango makambo oyo: “1941—Na Saint Louis, etúká ya Missouri, ntango programɛ ya ntɔngɔ ebandaki, bana 15 000, ya mbula 5 tii na mbula 18, batɛlɛmaki esika moko na ndako ya makita liboso ya ebaelo. . . . Ndeko Rutherford alobaki ete mokanda ya sika ebimi ezali na motó ya likambo ete Bana.”

Bapesaki mwana nyonso mokanda moko. Na nsima, bana nyonso bazongaki na bisika oyo baboti na bango bafandaki, longola se ngai. Nabungaki! Ndeko mobali moko azwaki ngai mpe atɛlɛmisaki ngai likoló ya kɛsi ya makabo moko ya molai mpe alobaki natalaka soki nakomona moto oyo nayebi. Na elongi ya mawa, nazalaki kotalatala ebele ya bato bazali kokita na basikalie. Mbala moko, namonaki moto oyo nayebi! “Noko Bob! Noko Bob!” Namonanaki! Bob Rainer amemaki ngai esika baboti na ngai bazalaki, bango mpe babandaki komitungisa ntango bazalaki kozela.

Makambo ya kala oyo ebongisaki bomoi na ngai

Ntango nazalaki kotala bafɔtɔ yango makambo mingi ezongelaki ngai na makanisi—makambo oyo ebongisaki bomoi na ngai mpe ememaki biso na esika kitoko na Patterson. Nakanisaki makambo oyo eleká esali lelo oyo mbula koleka mokama, nayokaki makambo yango epai ya bankɔkɔ na ngai mpe baboti na ngai.

Na Desɛmbɛ 1894, mosakoli moko ya ntango nyonso ya Bayekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango yango, ayaki epai ya Clayton Woodworth, nkɔkɔ na ngai oyo aboti tata, na ndako na ye na engumba Scranton, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis. Nkɔkɔ Clayton autaki kobala sika. Akomelaki Charles Taze Russell, prezida ya la Société Watch Tower, mokanda, mpe mokanda yango ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1895 (ebimeli ya Lingelesi). Alobaki boye:

“Tozali bilenge, tobalani sika. Tozalaki kosambela na Lingomba ya Protesta mbula soki zomi; kasi sikoyo, tokanisi ete tozali kolongwa na molili na yango mpo na koya na pole ya mokolo ya sika oyo ebandi mpo na bana oyo bamipesi na Oyo-Aleki-Likoló. . . . Liboso ngai na mwasi na ngai tókutana, mposa na biso ezalaki ya kosalela Nkolo, soki ezali mokano na ye, lokola bamisionɛrɛ na mboka mopaya.”

Na nsima, na 1903, Sebastien Kresge na mwasi na ye Catherine, baboti ya nkɔkɔ oyo abotá mama na ngai, bayokaki mateya ya Biblia epai ya bamonisi mibale ya Watch Tower na ferme moko ya monene epai bazalaki kofanda, oyo ezali esika ya bangomba kitoko ya Pocono, na etúká ya Pennsylvanie. Bana na bango ya basi, Cora na Mary, bazalaki mpe kofanda kuna na mibali na bango, Washington Howell na Edmund Howell. Bamonisi ya Watch Tower, Carl Hammerle na Ray Ratcliffe, bafandaki na bango pɔsɔ mobimba, bateyaki bango makambo mingi. Bato nyonso motoba ya libota yango, bayokaki, bayekolaki, mpe mosika te bakómaki Bayekoli ya Biblia ya molende.

Na mbula yango kaka, na 1903, Cora na Washington Howell babotaki mwana mwasi mpe bapesaki ye nkombo Catherine. Ndenge oyo Catherine abalanaki na tata na ngai, Clayton Woodworth Moke, ezali mpenza lisolo ya esengo mpe, nabanzi ete, ezali kopesa liteya. Ezali komonisa ete nkɔkɔ na ngai Clayton Woodworth azalaki na mayele, na bolingo, mpe ayebaki kokanisa.

Tata azwi lisalisi ya bolingo

Tata na ngai, Clayton Moke, abotamaki na Scranton na 1906, na ntaka ya kilomɛtrɛ 80 na ferme ya Howell. Na bambula yango, nkɔkɔ-mobali Woodworth amesanaki mingi na libota monene ya Howell, mbala mingi bazalaki koyamba ye malamu epai na bango. Azalaki kosunga lisangá ya Bayekoli ya Biblia na ntango yango mingi. Na nsima, babengaki nkɔkɔ-mobali asala lisukulu ya libala ntango bana mibali nyonso misato ya Howell bazalaki kobala, mpe lokola alingaki ete mwana na ye ya mobali azala mpe malamu, azalaki komema ye na mabala yango.

Na ntango yango Tata amipesaki naino mpenza te na mosala ya Bayekoli ya Biblia. Nzokande, azalaki komema nkɔkɔ-mobali na motuka soki akei koteya, kasi atako nkɔkɔ-mobali azalaki kolendisa ye ndenge nyonso, Tata akómaki mosakoli te. Na ntango yango, azalaki kolinga miziki koleka makambo nyonso, mpe etikalaki moke asala mosala ya miziki.

Catherine, mwana mwasi ya Cora na Washington Howell, akómaki mpe mobɛti miziki, azalaki kobɛta mpe kolakisa bato piano. Kasi, na ntango mpenza oyo miziki elingaki mpenza kokóma mosala mpo na bomoi na ye mobimba, atikaki yango mpe akómaki mosakoli ya ntango nyonso. Na makanisi na ngai, nkɔkɔ-mobali azalaki kokanisa ete Catherine nde mwasi oyo abongi na mwana na ye ya mobali! Tata azwaki batisimo, mpe nsima ya sanza motoba abalaki Mama, na Yuni 1931.

Nkɔkɔ-mobali azalaki kosepela mpenza na ndenge oyo mwana na ye ayebaki kobɛta miziki. Asepelaki mingi ntango basɛngaki Tata alakisa bandeko ya liboso kati na baoyo bayembaki na liyangani oyo esangisaki bato oyo bautaki na mikili mingi na 1946 na engumba Cleveland, na etúká ya Ohio. Na bambula oyo elandaki, Tata akendaki na bandeko yango koyemba na mayangani mosusu mingi ya Batatoli ya Yehova.

Nkɔkɔ-mobali na tribinale mpe na bolɔkɔ

Na salɔ monene na Patterson, ngai na Paul tomonaki fɔtɔ oyo ezali na lokasa oyo elandi. Mbala moko nayebaki fɔtɔ yango, mpo nkɔkɔ-mobali atindelaki ngai yango esili koleka mbula 50. Na fɔtɔ yango, atɛlɛmi na nsuka na lobɔkɔ ya mobali.

Ntango bato bazalaki mpenza kolendisa makanisi ya kolinga mingi ekólo na yo moko na bambula ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Bayekoli ya Biblia mwambe oyo, kati na bango Joseph Rutherford, prezida ya la Société Watch Tower, (afandi na katikati), bakangamaki mpo na bifundeli ya lokuta mpe bafutaki mbongo mpo bábimisa bango na bolɔkɔ kasi bazuzi baboyaki. Bafundaki bango mpo na makambo oyo ezali na volimi ya nsambo na buku Études des Écritures, na motó ya likambo Le mystère accompli. Bakangaki mpenza malamu te ntina ya makambo oyo ekomamaki na buku yango mpe bamonaki lokola ete buku yango ezali komona mabe lokola États-Unis ekɔtaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.

Na boumeli ya bambula mingi, Charles Taze Russell akomaki volimi motoba ya buku Études des Écritures, kasi akufaki liboso ya kokoma volimi ya nsambo. Bapesaki nkɔkɔ-mobali na Moyekoli ya Biblia mosusu makambo oyo alingaki kokoma, mpe bakomaki volimi ya nsambo. Mokanda yango ebimaki na 1917, liboso etumba esila. Na tribinale, bakatelaki nkɔkɔ-mobali na bamosusu mingi etumbu na makambo minei oyo bafundaki bango mpe bakweisaki bango na yango. Likambo mokomoko ezalaki na etumbu ya mbula 20 ya bolɔkɔ.

Makambo oyo bakomaki na fɔtɔ na salɔ monene na Patterson elobaki boye: “Sanza libwa nsima ya kokatela Rutherford na baninga na ye etumbu, mpe lokola etumba esilaki, na mokolo ya 21 Marsi 1919, tribinale monene esɛngaki ete bato yango mwambe oyo bakangamaki, báfuta mbongo mpo bábimisa bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango. Bafutaki dolare 10 000 mpo na moto mokomoko, mpe na mokolo ya 26 Marsi, babimisaki bango mpo na mwa ntango na Brooklyn. Na mokolo ya 5 Mai 1920, balobaki ete Rutherford na baninga na ye bakozonga lisusu na bolɔkɔ te mpo basalaki likambo ya mabe te.”

Nsima ya kokatela bango etumbu, mpe liboso ya kotinda bango na bolɔkɔ ya Atlanta, na etúká ya Georgie, bato yango mwambe balekisaki naino mwa mikolo na bolɔkɔ ya Raymond Street na Brooklyn, na engumba New York. Ntango azalaki kuna nkɔkɔ-mobali akomaki mokanda mpo na kolimbola ndenge bazalaki na mwa kasho moke “na kati ya bosɔtɔ ya koloba te.” Akomaki boye: “Ezali na liboke monene ya bazulunalo, soki na ebandeli otali yango lokola nkasa ezangi ntina, okoumela te koyeba ete bazulunalo yango nde okosalela lokola papye ya twaleti, mpe soki obakisi sabuni, na linyuka, yango nde biloko oyo okosalela mpo na komisukola mpe omimona ete ozali naino moto.”

Lisusu, mpo na kosɛkisa bato, nkɔkɔ-mobali azalaki kobenga bolɔkɔ yango “Hôtel de Raymondie,” mpe alobaki ete “Nakolongwa awa ntango bilei na ngai ekosila.” Alobelaki mpe ndenge oyo azalaki kotambola na kati ya lopango. Akomaki ete mokolo moko atɛlɛmaki mpo básanola ye nsuki, moyibi moko akɔtisaki lobɔkɔ na libenga na ye mpe abimisaki montre na ye, kasi “nsinga ya montre ekatanaki mpe montre etikalaki na libenga.” Ntango nakendaki na Betele ya Brooklyn na 1958, Grant Suiter, secrétaire-trésorier ya la Société Watch Tower na ntango wana, abengaki ngai na biro na ye mpe apesaki ngai montre yango. Nabatelaka yango malamu tii lelo oyo.

Likambo oyo yango esalaki epai ya Tata

Na 1918, ntango nkɔkɔ-mobali akɔtaki bolɔkɔ mpo na bifundeli ya lokuta, tata azalaki kaka na mbula 12. Nkɔkɔ-mwasi akangaki ndako na bango, amemaki ye mpe bakendaki kofanda epai ya mama na ye na baleki na ye misato ya basi. Nkombo ya nkɔkɔ-mwasi na bolenge ezalaki Arthur, mpe libota na bango bazalaki komikumisa mpo ete ndeko na bango moko, Chester Alan Arthur, azalaká prezida ya 21 ya États-Unis.

Ntango bakatelaki nkɔkɔ-mobali Woodworth etumbu ya bambula mingi mpo balobaki ete alobaki mabe mpo na États-Unis, bato ya libota ya Arthur bamonaki mpenza ete ayokisaki nkombo ya libota na bango nsɔni. Makanisi ya tata etungisamaki mingi na eleko yango. Mbala mosusu ezali mpo na makambo yango nde akómaki mosakoli noki te.

Ntango nkɔkɔ-mobali abimaki na bolɔkɔ, amemaki libota na ye na ndako moko ya monene oyo batongaki na sima na Quincy Street, na engumba Scranton. Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kokende na ndako ya bankɔkɔ na ngai mpe nayebaka ete nkɔkɔ-mwasi azalaki na basaani ya mbɛlɛ ya kitoko. Tozalaki kobenga yango basaani ya bulɛɛ mpo moto mosusu azalaki kosukola yango te kaka nkɔkɔ-mwasi ye moko. Ntango nkɔkɔ-mwasi akufaki na 1943, mama akómaki kosalela basaani yango ya kitoko mpe abatelaki yango.

Na mosala ya Bokonzi

Mokolo mosusu na esika monene ya mateya na Patterson, namonaki fɔtɔ ya Ndeko Rutherford azali kosala lisukulu na liyangani oyo esalemaki na 1919, na Cedar Point, na etúká ya Ohio. Alendisaki bato nyonso, na liyangani yango, ete básakolaka Bokonzi ya Nzambe na molende mpe básalelaka zulunalo L’Âge d’Or, oyo eutaki kobima sika. Batyaki nkombo ya nkɔkɔ-mobali lokola mokomi ya zulunalo yango, mpe azalaki kokoma masolo oyo ezalaki kobima na zulunalo yango banda ntango wana tii na bambula ya 1940, mwa moke liboso ya liwa na ye. Na 1937 nkombo ya zulunalo yango ebongwanaki mpe ekómaki Consolation mpe na 1946 ekómaki Lamuká!

Nkɔkɔ-mobali azalaki kokoma masolo oyo ezalaki kobima na zulunalo yango na ndako na Scranton mpe na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na ntaka ya kilomɛtrɛ 240 na Scranton. Azalaki kolekisa pɔsɔ mibale na ndako mpe pɔsɔ mibale na biro monene. Tata azalaki koloba ete mbala mingi azalaki koyoka makɛlɛlɛ ya masini ya kokoma mikanda ya nkɔkɔ-mobali na ngonga ya mitano ya ntɔngɔ. Nkɔkɔ-mobali azalaki mpe kokokisa malamu mokumba na ye ya kosakola. Kutu, asalaki kazaka ya mibali oyo ezalaki na mabenga ya minene na kati mpo na kotya mikanda oyo elimbolaka Biblia. Naomi Howell, mwasi ya noko na ngai azali na mbula 94 azali na kazaka moko tii lelo oyo. Nkɔkɔ-mobali asalaki lisusu sakosi moko ya mikanda mpo na basi.

Mokolo moko, nsima ya kosolola na moto moko na Biblia, moninga ya mosala ya nkɔkɔ-mobali alobaki boye: “C. J., obosani eloko moko.”

Nkɔkɔ-mobali atunaki: “Nabosani nini?” Alukaki na kazaka na ye. Mabenga nyonso ezalaki na eloko te.

“Obosanaki koyebisa moto yango asala abonema ya L’Âge d’Or.” Basɛkaki mingi mpo ye moko abosanaki kopesa moto zulunalo oyo ye azalaki mobimisi na yango.

Makambo ya bomwana

Nazali koyeba lisusu ntango nazalaki mwana nafandaki na makolo ya nkɔkɔ-mobali, nasimbaki ye na misapi mpe azalaki kobɛtɛla ngai “Lisolo ya Mosapi.” Abandaki na “Tommy mosapi ya monene” mpe alekaki na “Petelo Molakisi,” alobaki likambo moko mpo na mosapi mokomoko. Na nsima akangaki misapi nyonso mpe alobaki boye: “Misapi esalaka malamu soki esangani, mokomoko esalisaka mosusu.”

Ntango babalanaki, tata na mama bakendaki na Cleveland, na etúká ya Ohio, mpe bakómaki baninga mpenza ya Ed na Mary Hooper. Mabota na bango ezalaki mabota ya Bayekoli ya Biblia banda na nsuka ya ekeke ya 19. Baboti na ngai na noko Ed na tantine Mary, ndenge nazalaki kobenga bango, bazalaki baninga ya motema. Mwana se moko ya mwasi oyo noko Ed na tantine Mary babotaki akufaki na ntango azali naino moke. Yango wana, ntango nabotamaki na 1934, nakómaki mpenza “mwana” na bango. Lokola nabɔkwamaki na esika kitoko boye na elimo, namipesaki na Nzambe mpe nazwaki batisimo wana nakokisi naino mbula mwambe te.

Nabandá kotánga Biblia banda bomwana. Nazalaki kolinga mingi kotánga Yisaya 11:6-9 oyo elimboli bomoi na mokili ya sika ya Nzambe. Mbala ya liboso oyo nasalaki makasi mpo na kotánga Biblia mobimba ezalaki na 1944, ntango nazwaki libongoli babengi American Standard Version, oyo ebimaki na liyangani ya Buffalo, na etúká ya New York. Nasepelaki mingi kotánga Biblia yango, oyo ezongisi nkombo ya Nzambe, Yehova, na bisika na yango pene na mbala 7 000, na “Kondimana ya Kala”!

Tozalaki kosepela mingi na bawikende. Baboti na ngai na noko Ed na tantine Mary bazalaki komema ngai tókende kopesa litatoli na bamboka. Tozalaki komema bilei mpe tozalaki kozwa mopɛpɛ pembeni ya mai. Na nsima tozalaki kokende na ferme ya moto moko mpo na lisukulu ya Biblia, tozalaki mpe kobenga bato nyonso oyo bafandaka pene na ferme yango. Tozalaki na bomoi ya mindɔndɔ te. Tozalaki kolekisa bangonga ya esengo na mabota na biso. Baninga na biso mingi ya mabota wana ya kala bakómaki bakɛngɛli-batamboli, bakisa mpe Ed Hooper, Bob Rainer, mpe bana na ye mibale ya mibali. Richard Rainer azali tii lelo oyo na mosala yango, na mwasi na ye, Linda.

Tozalaki kosepela mingi na bileko ya konje. Nazalaki kofanda na ferme ya Howell na bana ya mama nkulutu na ngai ya basi. Na 1949, Malcolm Allen abalaki Grace, mwana ya mama nkulutu na ngai. Nazalaki kokanisa ata moke te ete nsima ya bambula tokobalana na leki ya Malcolm Allen. Leki na ngai ya mwasi, mwana ya mama nkulutu, Marion, azalaki misionɛrɛ na ekólo Uruguay. Ye na Howard Hilborn babalanaki na 1966. Bandeko na ngai Grace na Marion na mibali na bango basalaki bambula mingi na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn.

Nkɔkɔ-mobali mpe diplome na ngai

Ntango nazalaki na kelasi ya ntei, ngai na nkɔkɔ-mobali tozalaki kotindelana mikanda. Na mikanda na ye azalaki kotya ebele ya bafɔtɔ ya kala ya libota na biso mpe na nsima azalaki kokoma na masini mokanda oyo ezalaki kolimbola lisolo ya libota. Ezali na ndenge yango nde nazwaki fɔtɔ na ye na bato mosusu oyo batindamaki na bolɔkɔ.

Na nsuka ya 1951, nkɔkɔ-mobali abɛlaki kanser mpe mongongo na ye ezalaki lisusu koyokana te. Mayele na ye ezalaki kaka, kasi nde asengelaki kokomaka makambo nyonso oyo alingi koloba na mwa kaye oyo azalaki kotambola na yango. Tosengelaki kozwa diplome na eteyelo ya ntei liboso mbula esila, na sanza ya Yanuali 1952. Liboso mpenza, na sanza ya Desɛmbɛ, natindelaki nkɔkɔ-mobali plan ya lisuluku oyo nabongisaki mpo na kosala mokolo yango. Alakisaki mwa bisika oyo esengelaki kobongisa mpe na lokasa ya nsuka akomaki maloba misato oyo esimbaki motema na ngai: “Nkɔkɔ-mobali asepelaki.” Asukisaki bomoi na ye na mabele na mbula 81, na mokolo ya 18 Desɛmbɛ 1951.a Tii lelo oyo nabatelaka malamu plan wana ya kala ya lisukulu yango na maloba misato na lokasa ya nsuka.

Ntango kaka nazwaki diplome, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka mosala ya kosakola ntango nyonso. Na 1958, nazalaki na liyangani monene na New York, oyo bato 253 922 bautaki na mikili 123 batondisaki mabanda ya masano mibale Yankee Stadium mpe Polo Grounds. Na liyangani yango, nakutanaki na moto moko oyo autaki na Afrika mpe alataki makaro oyo bakomaki “Woodworth Mills.” Mbula soki 30 liboso, bapesaki ye nkombo ya nkɔkɔ-mobali!

Nazali na esengo mpo na libula na ngai

Ntango nazalaki na mbula 14, mama na ngai azongelaki mosala ya mobongisi-nzela. Akufaki nsima ya mbula 40, na 1988, azalaki kaka mobongisi-nzela! Tata azalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela ntango nyonso oyo akokaki. Akufaki sanza libwa liboso ya Mama. Bato oyo toyekolaki na bango Biblia bakómá baninga mpenza mpo na libela. Bana na bango mosusu bakendaki kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, mpe bamosusu bakómaki babongisi-nzela.

Mpo na ngai, 1959 ezalaki mpenza mbula ya ntina mingi. Ezalaki mbula oyo nakutanaki na Paul Allen. Batindaki ye mokɛngɛli-motamboli na 1946 ntango azwaki diplome na kelasi ya mbala ya nsambo ya Gileadi, eteyelo mpo na kobongisa bamisionɛrɛ ya Batatoli ya Yehova. Ntango tokutanaki, moko te kati na biso ayebaki ete mbala ya nsima bakotinda Paul mokɛngɛli-motamboli na engumba Cleveland, na etúká ya Ohio, esika nazalaki mobongisi-nzela. Tata na mama bazalaki kolinga ye mingi. Tobalanaki na sanza ya Yuli 1963 na ferme ya Howell. Bandeko na biso bazalaki mpe Ed Hooper asalaki lisukulu ya libala. Oyo ezalaki ndɔtɔ, ekómaki likambo ya solo.

Paul asombá motuka ata mbala moko te. Ntango tolongwaki na Cleveland mpo na kokende na teritware na ye ya sika, totyaki biloko na biso nyonso na motuka na ngai ya VW ya 1961. Mbala mingi baninga bazalaki koya kotala biso na mokolo ya yambo, mokolo oyo tozalaki kokende na lisangá mosusu, mpo na komona ndenge tozalaki kokɔtisa biloko na motuka. Ezalaki lokola lisano ya cirque mpo, bazalaki komona bavalizi, bafarde, kɛsi ya kobomba mikanda, masini ya kokoma, mpe bongo na bongo, nyonso ezalaki kokoka na mwa motuka wana.

Ngai na Paul totambolá mingi, tomoná bisengo mpe bampasi ya bomoi oyo, tosalaki makambo nyonso na makasi oyo Yehova ye moko nde azalaki kopesa biso. Bambula yango ezalaki mpenza ya esengo, mitema na biso etondaki na bolingo mpo na Yehova, biso mibale tolinganaki mingi, mpe tolingaki baninga na biso ya kala mpe ya sika. Sanza mibale oyo tolekisaki na Patterson ntango Paul azalaki kolanda mateya ezongiselaki biso bomoi ya kala na makanisi. Kotala penepene ebongiseli ya Yehova na mabele etindaki ngai na kondima makasi likambo oyo bayebisaki ngai, likambo yango ezali libula na ngai ya motuya na elimo ete: Oyo ezali solo ebongiseli ya Nzambe. Kozala na kati ya lisangá yango ezali esengo monene!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 15 Febwali 1952, lokasa 128 (ebimeli ya Lingelesi).

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai na Ed Hooper mwa moke liboso ya liyangani ya Saint Louis na 1941, epai nazwaki buku oyo ezalaki na motó ya likambo “Bana”

[Elilingi na lokasa 26]

Nkɔkɔ-mobali na mobu 1948

[Elilingi na lokasa 26]

Na ferme ya Howell ntango baboti na ngai (oyo bazingi) babalanaki

[Elilingi na lokasa 27]

Bayekoli ya Biblia mwambe oyo bakɔtaki bolɔkɔ na 1918 mpo na bifundeli ya lokuta (Nkɔkɔ-mobali atɛlɛmi na nsuka na lobɔkɔ ya mobali)

[Elilingi na lokasa 29]

Biloko na biso nyonso ya ndako ezalaki kokoka na VW na biso

[Elilingi na lokasa 29]

Ngai na mobali na ngai, Paul

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto