Osalaka ndenge nini mpo na kosilisa matata?
MOKOLO na mokolo tokutanaka na bato ya ndenge na ndenge. Mbala mingi tosepelaka ntango tokutanaka na bato yango mpe tozwaka makanisi ya sika. Ntango mosusu kokutana na bato ndenge na ndenge ebimisaka mpe matata ya nsɔmɔ mpenza, kasi mbala mosusu ebimisaka kaka mwa mikakatano ya mikemike. Ata soki matata ya nsɔmɔ mpenza to ya mike ebimi, makanisi na biso, ndenge oyo tokoki komiyoka, mpe elimo na biso, etaleli ndenge oyo tosilisaka yango.
Soki tozali kosala oyo ekoki na biso mpo na kosilisa matata tokofanda na kimya na bato mosusu mpe tokozala malamu. Lisese moko ya kala elobaka boye: “Motema ya kimya ezali bomoi mpo na nzoto ya mosuni.”—Masese 14:30, NW.
Lisese oyo ekeseni na yango elobi ete: “Lokola mboka ebukami mpe ezangi mapango bongo moto oyo ayebi kozala na bokonzi likoló na [elimo, NW] na ye te.” (Masese 25:28) Nani na kati na biso akolinga kotika nzela na makanisi ya mabe oyo ekoki komema ye na kosala makambo ya mabe, oyo ekoki kopesa bato mosusu mpe ye moko mpasi? Kopesa biyano na nkanda kozanga kokanisa liboso ekoki kosala bongo. Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu ateyaki ete tótalelaka malamu makanisi na biso, mpamba te ndenge oyo tokoki kosilisa matata oyo tokoki kozala na yango na bato mosusu, ezali kotalela nde makanisi na biso. (Matai 7:3-5) Na esika ya koloba mabe mpo na bamosusu, tosengeli nde kokanisa ndenge nini tokoki kokóma baninga ya bato oyo bazali na makanisi mpe na mimeseno ndenge moko na biso te mpe kobatela boninga yango.
Makanisi na biso
Likambo ya liboso mpo na kosilisa matata, ezala ete likambo oyo ebimisi matata ezali likambo ya solo to tokanisi yango nde kokanisa, ezali ya koyeba ete biso mpe tokoki kozala na makanisi to na elimo ya mabe. Makomami ezali koyebisa biso ete biso nyonso tosalaka masumu ‘mpe tozangi nkembo ya Nzambe.’ (Baloma 3:23) Lisusu, soki tososoli malamu likambo yango, tokomona ete mokakatano euti nde epai na biso moko. Yango wana, tótalela naino likambo oyo ekómelaki Yona.
Yehova atindaki Yona na engumba ya Ninive mpo na kosakola ete etikali moke Nzambe apesa bato ya Ninive etumbu. Bato nyonso ya engumba yango babongolaki motema mpe bandimelaki Nzambe ya solo. (Yona 3:5-10) Yehova amonaki malamu alimbisa bango lokola babongolaki motema, mpe abomaki bango lisusu te. “Nde eyokisaki Yona mabe mingi mpe azalaki na nkanda.” (Yona 4:1) Likambo ya kokamwa, Yona asepelaki te na motema mawa ya Yehova. Mpo na nini Yona asilikelaki Yehova? Emonani ete, Yona akómaki komitungisa mingi mpo na oyo ye azalaki kokanisa, akanisaki ete lokumu na ye esilaki na miso ya bato ya Ninive. Amonaki malamu ya motema mawa ya Yehova te. Na boboto mpenza, Yehova asalaki likambo moko oyo esalisaki Yona abongola makanisi na ye mpe amona malamu ya motema mawa ya Yehova. (Yona 4:7-11) Emonani polele ete Yona nde asengelaki kobongola makanisi na ye, kasi Yehova te.
Ekoki mpe kokóma ete ntango mosusu biso nde tosengeli kobongola makanisi na biso na likambo moko? Ntoma Paulo alobi na biso boye: “Na oyo etali kokumisana, bózalaka bato ya liboso.” (Baloma 12:10, NW) Alingaki koloba nini? Ya liboso, azali kolendisa biso tózala na makambo makasi te mpe tópesaka baklisto mosusu limemya mpe lokumu mingi. Yango esɛngi koyeba ete moto na moto akoki kopona oyo amoni malamu. Paulo alobi na biso lisusu ete: “Moto na moto akomema bozito na ye moko.” (Bagalatia 6:5) Yango wana, liboso ete matata ekabola biso, ekozala malamu tótala soki biso nde tosengeli kobongola makanisi na biso! Tosengeli kosala makasi mpo tózala na makanisi ya Yehova mpe tólukaka ntango nyonso kozala na kimya na bato oyo balingaka mpenza Nzambe.—Yisaya 55:8, 9.
Ndenge oyo totalelaka likambo
Kanisá ete bana mibale bazali kowela eloko moko ya kosakana, mokomoko azali kobenda yango makasi epai na ye mpo azwa yango. Bakoki kobimiselana maloba mabe kino moko na bango akotika to mpe moto mosusu akokabola bango.
Lisolo ya Genese ezali koyebisa biso ete Abalayama ayokaki ete matata ebimaki na kati ya babateli ya bibwele na ye na babateli ya bibwele ya Lota, mwana ya ndeko na ye. Abalayama azwaki likanisi ya kokutana na Lota mpe alobaki na ye boye: “Tiká [matata] ezala kati na biso na yo te, soko kati na babateli na ngai mpe babateli na yo te, mpo ete biso tozali bandeko.” Abalayama alingaki te ete matata ebebisa boyokani na bango. Asalaki nini? Atako azalaki mokóló, aponaki te moto ya liboso; andimaki azanga eloko moko. Abalayama atikelaki Lota apona epai wapi ye alingaki komema libota na ye mpe bibwele na ye. Lota aponaki ngámbo ya Sodomo na Gomola, epai matiti mobesu ezalaki mingi. Abalayama na Lota bakabwanaki na kimya.—Genese 13:5-12.
Mpo na kobatela kimya na bato mosusu, tokoki kosala lokola Abalayama, boye te? Lisolo oyo ya Biblia epesi biso ndakisa malamu oyo tosengeli kolanda na ntango tolingi kosilisa matata. Abalayama alobaki boye: “Tiká [matata] ezala . . . te.” Abalayama azalaki mpenza na mposa ete básilisa likambo yango na kimya. Na ntembe te ndenge wana ya kosolola na moto mpo na kobatela kimya ekosalisa bino ete bóyokana mpe bósolola malamu. Na nsuka Abalayama alobaki ete “mpo ete biso tozali bandeko.” Mpo na nini tokobebisa bondeko na biso mpo na bamposa na biso moko to mpo na lolendo? Abalayama akangamaki na makambo oyo ezalaki na ntina. Asalaki yango na limemya mpe mpo na lokumu na ye, mpe lisusu apesaki mwana ya ndeko na ye lokumu.
Atako makambo mosusu esɛngaka ete bato mosusu básalisa biso mpo na kosilisa matata, kasi eleki malamu mingi nde kosilisa likambo yango bino mibale! Yesu alendisi biso tózala bato ya liboso mpo na koluka kimya na ndeko na biso, tósɛngaka bolimbisi soki esengeli.a (Matai 5:23, 24) Yango ekosɛnga komikitisa, to kosɔkɛma. Kasi ntoma Petelo akomaki ete: “Bómikangela kosɔkɛma lokola elamba, moko asunga mosusu, mpo ete Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolendo, nde akopesaka basɔkɛmi ngɔlu.” (1 Petelo 5:5) Ndenge oyo totalelaka bandeko na biso oyo basambelaka mpe Yehova ekoki kobongisa to kobebisa boyokani na biso na Nzambe.—1 Yoane 4:20.
Na kati ya lisangá ya boklisto, tokoki mbala mosusu kotika eloko oyo tozali na lotomo na yango kaka mpo na kobatela kimya. Bato ebele oyo bazali lelo oyo Batatoli ya Yehova bakɔti na libota ya basambeli ya solo ya Nzambe na bambula mitano oyo euti koleka. Yango epesi biso esengo mingi na motema! Tóyeba ete bato yango na bato mosusu na kati ya lisangá batalelaka ezalela na biso. Yango wana tosengeli kopona malamu makambo oyo tozali kosala ntango tozali kopema, kolekisa ntango, to kotala masano, to kosala misala na biso; tótalelaka ndenge oyo bamosusu bakoki komona biso. Ezali na misala to na maloba na biso mosusu oyo bato bakoki komona yango mabe to mpe ekoki kobɛtisa basusu libaku?
Ntoma Paulo alobi na biso boye: “Topesameli lokumu kosalaka makambo nyonso; nde makambo nyonso makosungaka te. Ɛɛ, topesameli lokumu kosalaka makambo nyonso, nde makambo nyonso makolendisaka te, Tiká te ete moto aluka bobele malamu na ye moko kasi yango na mozalani na ye.” (1 Bakolinti 10:23, 24) Lokola tozali baklisto, biso nyonso tozali na mokumba ya kolendisa bolingo mpe bomoko kati na biso.—Nzembo 133:1; Yoane 13:34, 35.
Maloba ya kobikisa
Maloba ekoki mpenza kosala moto malamu. “Maloba kitoko ezali lokola mafuta na nzoi, na elengi epai na molimo mpe na kobika kati na mikwa.” (Masese 16:24) Lisolo ya Gideona oyo asalaki ete matata ebima te na bato ya libota ya Efelaima emonisi ete lisese yango elobi solo.
Lokola azalaki na etumba makasi na Bamidyani, Gideona abengaki bato ya libota ya Efelaima báya kosalisa ye. Kasi, ntango etumba esilaki, bato ya libota ya Efelaima babalukelaki Gideona mpe basilikaki mpo abengaki bango na ebandeli ya etumba te. Lisolo elobi ete “[basilikelaki ye mingi].” Gideona apesaki eyano oyo: “Ngai nasali nini [sikoyo] na koleka oyo bino bosali? Efelaima alɔkɔtaki mbuma ya vinyo na nsima ya babuki, mpe yango eleki kobuka ya Abiezele te? Nzambe apesaki mikonzi ya Midyani, Olebe mpe Zebe na mabɔkɔ na bino. Ngai nakokaki kosala nini na koleka oyo bino bosali?” (Basambisi 8:1-3) Lokola aponaki maloba ya malamu, oyo ekitisaka bato motema, Gideona apekisaki etumba oyo elingaki koboma bato mingi na kati ya mabota na bango mibale. Ekoki kozala ete bato ya Efelaima bazalaki komipesa lokumu mingi mpe bazalaki na lolendo. Kasi, yango epekisaki Gideona te na koluka ete makambo esuka na kimya. Biso mpe tokoki kosala bongo, boye te?
Ekoki kokóma ete bato mosusu basiliki mpe bayei kolukela biso mindɔndɔ. Tosengeli koluka koyeba mposa na bango mpe kosala makasi mpo na koyeba makanisi na bango. Ezala ata boni, ekoki kozala ete tosalaki bango likambo moko oyo epesi bango mpasi? Soki ezali bongo, tóndima mabe na biso mpe tómonisa ete tozalaki na makanisi mabe te. Mwa maloba moke oyo moto aponi malamu ekoki kozongisa boyokani oyo ebebaki. (Yakobo 3:4) Bato mosusu oyo bazali na nkanda, mbala mosusu bazalaka kaka na mposa tómonisa bango ete tozali na bango na likambo te. Biblia elobi na biso ete “Esika oyo nkoni ezali te, mɔ́tɔ ekufaka.” (Masese 26:20, NW) Ya solo, maloba oyo toponi yango malamu mpe tolobi na ndenge ya malamu ekoki ‘kosilisa nkanda’ mpe kobikisa.—Masese 15:1.
Ntoma Paulo alobi na biso boye: “Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bózala na bato nyonso [na] kimya.” (Baloma 12:18) Ezali solo ete biso tokoki te kotinda mitema ya bato ezala boye to boye, kasi tokoki kosala makasi mpo na kotya kimya. Na esika ya kolanda kozanga kokoka na biso to ya bamosusu, tokoki nde kosala makasi sikoyo mpo na kolanda mitinda ya Biblia. Soki tozali kosilisa matata na ndenge Yehova azali koteya biso, tokozwa esengo mpe bolamu ya seko.—Yisaya 48:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Limbisá na motema moko” mpe lisolo “Okoki kozongisa boyokani na ndeko na yo,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1999.
[Elilingi na lokasa 24]
Totingamaka ete makambo esalema kaka ndenge biso tolingi?
[Elilingi na lokasa 25]
Abalayama apesaki ndakisa malamu ya kondima kotika mpo na kosilisa matata.