Bakei mosala na bisanga ya Pasifike!
MOKOLO yango, libándá ya mpɛpɔ ya engumba Brisbane na oyo ya Sydney, na ekólo Australie, ezalaki na loyenge ya ndenge mosusu. Bato 46 bazalaki kozela mpɛpɔ mpo na kokende na esanga Samoa, mboka ya moi makasi, mpo na kokutana na bato mosusu 39 oyo basengelaki kouta na Nouvelle-Zélande, na Hawaii mpe na États-Unis. Basakosi na bango ezalaki lokola ya bato mosusu te; oyo ya bango ezalaki mingimingi na biloko ya mosala lokola bamarto, basii, na bamasini ya kotɔbɔla mabaya. Ezali te biloko oyo bato mingi bamemaka na mobembo na esanga moko kitoko ya Pasifike. Kasi, bato yango bakendaki mobembo mpo na likambo ya ndenge mosusu.
Bango moko bafutaki tike na bango. Bakendaki kolekisa pɔsɔ mibale mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga bandako kozanga ete báfuta bango, mosala yango etambwisamaki na biro ya Batatoli ya Yehova na Australie. Mbongo oyo basalelaki na mosala nyonso wana eutaki na makabo ya bolingo malamu. Ezalaki mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani, bandako ya bamisionɛrɛ, babiro ya filiale mpe babiro mpo na kobongola mikanda mpo na masangá ya Batatoli ya Yehova oyo ezali kokola nokinoki na bisanga ya Pasifike. Tóyoka naino basali mosusu oyo, na bikólo na bango, bazalaki na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi.
Max azali mosali ya mabaya, ye autaki na Cowra, na etúká ya Nouvelle-Galles du Sud, na Australie. Azali na mwasi na bana mitano. Arnold autaki na Hawaii, azali na mwasi na bana mibale ya mibali, mpe lisusu azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Max na Arnold bazali bankulutu na masangá na bango. Nyonso oyo emonisi biso ete mibali yango, mpe mibali mosusu mingi oyo bazali lokola bango, soki bazali kosala mosala ya bolingo malamu, ezali te mpo bazangi makambo ya kosala. Kasi, elongo na mabota na bango bamonaki ete mposa moko ezali, mpe basepelaki kosala oyo bakoki mpo na kopesa mabɔkɔ.
Bauti na bikólo ndenge na ndenge mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya ntina mingi
Moko na bisika oyo bazalaki na mposa na bango mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala, ezalaki na Tuvalu, ekólo moko ya Pasifike oyo ezali na bato 10 500. Yango ezali na kati ya mwa bisanga libwa ya mabangamabanga na esika moi elekaka (équateur), na nɔrdi-wɛsti ya esanga Samoa. Bisanga yango ezali na kilomɛtrɛ-kare mibale na ndambo na monene. Na 1994, Batatoli 61 ya mboka yango bazalaki mpenza na mposa ya Ndako ya Bokonzi ya sika mpe biro ya monene mpo na kobongola mikanda.
Na bamboka wana ya Pasifike, ebongaka bandako ezala makasi mpo ekwea te na ntango oyo mipɛpɛ ya makasi elekaka kuna. Kasi biloko oyo ebongi mpenza mpo na kosalela na mosala ya kotonga ezali mingi te na bisanga yango. Basalaki nini? Bakɔntenɛrɛ eutaki na Australie, ezalaki na biloko nyonso, banda na manzanza ya likoló ya ndako na bibende, bakiti na bamesa, na barido, basaani ya w.c. na basaani ya kotya na esika basukolaka (baignoire), ata mpe bavisi na bansɛtɛ.
Liboso ete biloko ya mosala ekóma, mwa bandeko babongisaki esika mpe basalaki moboko ya ndako. Na nsima, bato ya misala oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge bakómaki mpo na kotonga bandako, kopakola langi, mpe kotya biloko nyonso na bandako yango.
Mosala nyonso wana engalisaki nkanda ya mokonzi ya lingomba moko na Tuvalu mpe alobaki na radio ete Batatoli bazali kotonga “Ndako Molai ya Babele”! Kasi, makambo nini elekaki? Graeme, moko na bandeko oyo bazalaki kosala mosala, alobaki boye: “Bato oyo bazalaki kotonga Ndako Molai ya Babele oyo Biblia elobeli, ntango bamonaki ete bazalaki lisusu koyokana te, mpamba te Nzambe abulunganisaki monɔkɔ na bango, batikaki kotonga ndako wana mpo na libela.” (Genese 11:1-9) “Mosala ya kotonga oyo ezali kosalema mpo na Yehova Nzambe ezalaka ndenge mosusu. Atako tolobaka monɔkɔ moko te mpe touti na bamboka ndenge na ndenge, misala ekendaka tii na nsuka na yango.” Mosala oyo basalaki kuna mpe esilaki nsima ya pɔsɔ mibale. Kutu, bato 163 bazalaki na likita ya bofungoli, mwasi ya ministre-mokonzi mpe azalaki.
Doug, motambwisi ya misala, akanisaki lisusu ndenge makambo elekaki mpe alobaki boye: “Ezalaki esengo na kosala na bandeko ya bolingo malamu oyo bauti na bikólo mosusu. Bato na bato bazali na ndenge na bango ya kosala mosala, bazali na ndenge na bango ya kobenga biloko, mpe biso nyonso tosalelaka bimekeli ndenge moko te, kasi likambo moko te ebimisaki mikakatano.” Lokola asalá mosala ya kotonga na bisika mwa mingi, abakisi boye: “Yango elendisi lisusu elikya na ngai ete na lisalisi ya Yehova, basaleli na ye bakoki kotonga ndako ata na esika nini awa na mabele, ata soki esika yango ezali mosika to mpasi ndenge nini. Ya solo, tozali na mibali mingi oyo bayebi mosala, kasi elimo ya Yehova nde ezali kosalisa biso tólonga.”
Elimo ya Nzambe etindaki mabota ya Batatoli na bisanga wana na kopesa bilei mpe bisika ya kolala, yango ezalaki likambo moke te mpo na bamosusu kati na bango. Mpe bapaya bazali na botɔndi mingi mpo na yango. Ken autaki na engumba Melbourne, na Australie, asalaki mpe misala ya kotonga liboso na Polynésie française. Ye alobaki boye: “Toyaki lokola basaleli, kasi basaleli biso makambo lokola bakonzi.” Na bisika oyo bakokaki kosala yango, Batatoli ya bisanga wana bazalaki mpe kopesa mabɔkɔ na misala ya kotonga. Na bisanga Salomon, basi mpe bazali kobalola bɛtɔ na mabɔkɔ. Bato mokama, mibali na basi, bamataki na bangomba milai mpe etondi na mai ya mbula mpe bamemaki tɔni 40 ya mabaya. Bilenge mpe batikalaki nsima te. Mosali moko oyo autaki na Nouvelle-Zélande alobi boye: “Nazali koyeba lisusu elenge mobali moko oyo azalaki komema saki mibale to misato ya sima na mbala moko. Azalaki mpe kosala mokolo mobimba na kolɔkɔta mabanga mike na pau, ezala na moi makasi to ntango mbula ezali konɔka.”
Ntango Batatoli oyo bazali bato ya mboka wana bazali kopesa mabɔkɔ, matomba mosusu mpe emonanaka. Lapolo moko ya biro ya la Société Watch Tower na Samoa elobi boye: “Bandeko ya esanga bayekoli misala ya mabɔkɔ oyo ekoki kosalisa bango na kotonga Bandako ya Bokonzi bango moko. Mpe soki mopɛpɛ makasi ebebisi Bandako ya Bokonzi, bakoki kobongisa yango to kotonga yango lisusu. Misala oyo bayekoli ekoki mpe kosalisa bango na kozwa mosala na mboka oyo bato mingi bazali na mokakatano mpo na kozwa misala.”
Mosala ya kotonga epesi litatoli ya malamu
Colin azalaki na Honiara mpe amonaki lolenge bazalaki kotonga Ndako ya Mayangani na bisanga Salomon. Akamwaki mingi mpe akomelaki biro ya la Société Watch Tower ya bisanga Salomon mokanda na Lingelesi ya mboka na bango, mokanda na ye elobaki boye: “Bango nyonso bazali na bomoko mpe moko te azali mawamawa, bango nyonso bazali libota moko.” Mwa moke na nsima, azongaki na mboka na bango na Aruligo, oyo ezali na ntaka ya koleka kilomɛtrɛ 40, mpe ye na libota na ye batongaki Ndako ya Bokonzi na bango. Na nsima batindaki mokanda mosusu na biro, yango elobaki boye: “Tosilisi kotonga Ndako ya Bokonzi, tobongisi mpe ebaelo, tokoki kobanda kosala makita awa?” Makambo ebongisamaki nokinoki, mpe bato koleka 60 bazali koyangana na Ndako ya Bokonzi yango pɔsɔ na pɔsɔ.
Mobali moko azali conseiller na Union européenne, ntango amonaki misala oyo ezalaki kosalema na Tuvalu, ayebisaki moko na basali boye: “Nakanisi bato nyonso bazali koloba na bino, mpo na ngai, oyo ezali mpenza likamwisi!” Mwasi moko asalaka na biro ya telefone atunaki mpe ndeko moko oyo akendaki mpo na mosala ete: “Ndenge nini bino nyonso bozali na esengo boye, atako awa molunge ezali makasi?” Bamoná naino baklisto bazali kosala mpe komipesa boye te.
Bazali koyoka mawa te mpo na nyonso oyo bandimaki kosala
Na 2 Bakolinti 9:6, Biblia elobi boye: “Ye oyo akokona mingi akobuka mingi.” Bandeko oyo bakendaki kosala mosala, mabota na bango, mpe bandeko ya masangá na bango, bafungolaki mpenza mabɔkɔ mpo na kolona, elingi koloba basalisaki bandeko na bango ya bisanga ya Pasifike. Ross, azali nkulutu na engumba Kincumber, penepene ya engumba Sydney, ye alobi boye: “Bandeko ya lisangá na ngai bafutelaki ngai pene ya katikati ya mbongo ya tike na ngai ya mpɛpɔ, mpe bokilo na ngai ya mobali, oyo toyaki na ye nzela moko, abakiselaki ngai lisusu dolare 500.” Ndeko mosusu oyo ayaki mosala atɛkisaki motuka na ye mpo na kofuta tike. Ndeko mosusu lisusu atɛkisaki ndambo ya mabele na ye mpo na kofuta tike. Kevin azalaki na mposa ya dolare 900, yango wana atɛkaki bibenga na ye 16 oyo ezalaki na mbula mibale. Moto moko oyo ayebani na ye amemelaki ye kiliya oyo asombaki bibenga yango na dolare 900, mbongo oyo azalaki na yango mpenza mposa!
Batunaki Danny na Cheryl ete: “Ezalaki mpenza na ntina ete bóbebisa soki dolare 6 000 mpo na tike ya mpɛpɔ mpe mbongo mosusu oyo bosaleli na makambo mosusu?” Balobaki ete: “Ɛɛ! Ata soki mbongo yango elekaki oyo tosaleli mbala mibale elingaki kaka kokokana te na matomba oyo tozwi.” Alan, ye autaki na Nelson, na Nouvelle-Zélande, abakisi ete: “Mbongo oyo nabimisaki mpo na kokende na Tuvalu, nakokaki kofutela yango tike mpo na kokende na Mpoto mpe ndambo mosusu elingaki kotikala. Kasi, soki nakendaki na Mpoto nalingaki kozwa mapamboli ya boye? To mbɛlɛ nalingaki kozwa ebele ya baninga oyo bauti na bamboka ndenge na ndenge boye, to nalingaki nde kosala mpo na ngai moko na esika ya kosala mpo na bamosusu? Te! Atako bongo, oyo bandeko na biso ya bisanga oyo bapesi ngai eleki mosika oyo nyonso ngai napesi bango.”
Likambo mosusu oyo esalaki ete ebongiseli ya kotonga elonga ezali ndenge oyo mabota esalisaki bandeko na bango oyo bakendaki kosala mosala. Basi mosusu bakendaki na mibali na bango mpe bapesaki mabɔkɔ na mosala, kasi bamosusu bazali na bana oyo bazali naino na kelasi mpe basengeli kobatela bango to bazali na mosala ya libota oyo basengeli kotambwisa. Clay alobaki boye: “Mwasi na ngai amonisaki mpenza motema malamu ndenge andimaki kobatela bana na ndako nsima na ngai mpe yango ezalaki mpenza elimo ya komipesa oyo eleki kutu oyo ya ngai.” Ya solo, mibali nyonso oyo basi na bango bakokaki kokende na bango te bazali mpe na likanisi yango!
Kobanda mosala ya kotonga esilaki na Tuvalu, basali ya bolingo malamu batongi Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani, bandako ya bamisionɛrɛ, mpe babiro mpo na kobongola mikanda na esanga ya Fidji, Tonga, Papouasie-Nouvelle-Guinée, Nouvelle-Calédonie, mpe bisika mosusu. Ebele ya misala ya kotonga, na mosusu oyo esengeli kosalema na sudi-ɛsti ya Azia, ezali naino kolɛngɛlama. Bato bakomonana mingi mpo na kosala yango?
Emonani ete mpo na yango mokakatano ekozala te. Biro ya filiale ya Hawaii ekomaki boye: “Moto nyonso oyo azalaki na mosala ya kotonga awa asɛngaki ete bábosana ye te soki ebongiseli mosusu ezali. Ntango kaka bazongaki na bamboka na bango babandaki kobomba mbongo mpo na yango.” Ya solo, soki bato bamipesi mpe Yehova abakisi mapamboli, mosala oyo ebongisami elongaka kaka!
[Elilingi na lokasa 9]
Biloko ya mosala
[Bililingi na lokasa 9]
Basali na esika oyo bakotonga
[Bililingi na lokasa 10]
Ntango misala esilaki, tosepelaki mingi na makambo oyo esalemaki na elimo ya Nzambe.