Ozali na makanisi ya Basinike?
BALOBAKA ete Henry Ward Beecher, mokonzi moko ya lingomba mpe moto ya Amerika oyo azalaki na bomoi na ekeke ya 19 alobaki boye: “Sinike ezali moto oyo amonaka ezaleli ya malamu epai ya moto mosusu te, kasi azangaka komona mabe te. Moto yango azali lokola esulungutu, amonaka malamu mpenza nde na molili kasi na moi te; mosala na ye kaka kolukaluka mwa nyamankɛkɛ, kasi nyama oyo ezali malamu mpo na kolya, ye amonaka yango te.” Bato mingi bakoki komona ete maloba yango ezali mpenza komonisa elimo ya moto oyo azali Sinike lelo oyo. Kasi liloba “sinike” (cynique) eutá na Grèce ya kala; kuna, bazalaki kosalela yango mpo na kolobela kaka moto oyo azali na ezaleli wana te. Na boumeli ya bankama ya bambula, bazalaki kosalela liloba yango mpo na kolobela bato mosusu ya filozofi.
Ndenge nini mateya ya filozofi ya Basinike ebandaki? Bazalaki koteya nini? Moklisto asengeli kozala lokola Basinike?
Ebandeli ya Basinike ya ntango ya kala mpe mateya na bango
Na ntango ya kala, ekólo Grèce ezalaki mboka oyo ezalaki na bato ya ntembe mingi mpenza. Bankama ya bambula liboso ya Ntango na Biso, bato lokola Socrate, Platon na Aristote babimisaki mateya ya filozofi oyo esalaki ete báyebana mingi. Mateya na bango ekɔtelaki mpenza bato, yango wana tii na moi ya lelo, bato mingi na mikili ya Mpoto bazali kosalela makanisi na bango.
Socrate (azalaki na bomoi na mobu 470 tii na 399 L.T.B.) ateyaki ete bolamu ya solosolo eutaka na koluka kozwa biloko mingi ya mosuni te to na kolanda bisengo ya nzoto te. Alobaki ete moto azwaka bolamu ya solosolo na koluka bizaleli malamu na bomoi na ye mobimba. Mpo na Socrate, kozala na bizaleli malamu ezali likambo oyo eleki makambo nyonso na malamu. Yango wana, Socrate aboyaki bomɛngo nyonso mpe misala nyonso oyo ezangi ntina, mpamba te azalaki komona ete yango ekobebisa makanisi na ye. Socrate aponaki kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpe ya komipimela, bomoi ya bobola mpenza.
Socrate abandisaki lolenge moko ya koteya oyo babengaka na Lifalanse méthode socratique. Bato mosusu ya filozofi bazalaki kosala boye: soki alobi likambo, na nsima akopesa makanisi mpo na kondimisa likambo oyo ye alobi; kasi Socrate azalaki kosala bongo te. Ye azalaki naino koyoka mateya ya bato mosusu ya filozofi, mpe na nsima, azalaki koluka komonisa mabunga ya makanisi na bango. Lolenge yango ya koteya ezalaki kosala ete bato bálukaka kaka mabe ya bato mosusu mpe bátyolaka bango.
Kati na bato oyo bazalaki kolanda ndenge Socrate azalaki koteya, ezalaki na moto moko ya filozofi, nkombo na ye Antisthène (azalaki na bomoi na mobu 445 tii na 365 L.T.B.). Antisthène na bato mosusu ya filozofi basalelaki mateya mpenza ya ntina oyo Socrate ateyaki mpe babakisaki ete eloko moko te na mokili ezali malamu, kaka bizaleli malamu. Mpo na bango, koluka bisengo ezalaki kaka kolekisa ntango mpamba te, kasi ezalaki mpe mabe. Bato yango bazalaki lisusu kofanda esika moko na bato te mpe bazalaki mpenza kotyola bato mosusu. Yango wana bato bakómaki kobenga bango Basinike. Ekoki kozala ete nkombo Sinike euti na liloba moko ya Greke (kynikos) oyo ezalaki komonisa ezaleli ya bato ya mawamawa mpe ya lolendo. Liloba yango elimbolaki “lokola mbwa.”a
Bomoi na bango ekómaki ndenge nini?
Atako mateya mosusu ya filozofi ya Basinike, lokola koboya kozala na biloko mingi ya mosuni mpe koboya komipesa na bisengo, ekokaki komonana malamu, Basinike balekisaki ndelo. Ezali ezaleli oyo Diogène, moto ya filozofi ya Basinike oyo ayebani koleka Basinike nyonso, azalaki na yango.
Diogène abotamaki na mobu 412 L.T.B. na Sinope, engumba moko ya Mer Noire. Tata na ye amemaki ye na Athènes, epai akendaki koyoka mateya ya Basinike. Antisthène ateyaki Diogène mpe ye asepelaki mingi na mateya ya Basinike. Socrate azalaki na bomoi ya mindɔndɔ te mpe Antisthène azalaki koluka bisengo te na bomoi na ye. Kasi Diogène, ye aboyaki mpenza bisengo ya ndenge nyonso. Balobaka ete mpo na komonisa ete aboyaki biloko nyonso oyo esepelisaka nzoto, na boumeli ya mwa ntango, Diogène azalaki kofanda na kati ya tono moko!
Bato balobaka ete lokola Diogène azalaki koluka malamu oyo eleki malamu nyonso, mokolo mosusu, na moi makasi, apelisaki mwinda mpe abandaki kotambola mpo na koluka moto oyo azali na bizaleli malamu! Likambo motindo wana ezalaki kobenda likebi ya bato mpe ezalaki lolenge oyo Diogène na Basinike mosusu bazalaki koteya. Balobaka lisusu ete mokolo moko, Alesandala Monene atunaki Diogène eloko oyo ye azalaki mpenza na mposa na yango. Diogène apesaki ye eyano ete mposa na ye ezalaki kaka ete Alesandala alongwa liboso na ye mpamba te azali kozipa ete moi ezwa ye te!
Diogène na Basinike mosusu bazalaki lokola bato oyo basɛngaka mbongo na balabala. Bazalaki na ntango te ya kofanda na bato mosusu esika moko mpe kosolola, mpe bazalaki koboya kosala makambo oyo bato nyonso basalaka. Mbala mosusu, lokola balandaki lolenge ya koteya ya Socrate, yango wana bakómaki mpenza kotyola bato mosusu. Diogène ayebanaki mpo na maloba na ye ya kotyola mpe ya kozokisa. Basinike bayebanaki lokola bato oyo bazali “lokola bambwa,” kasi bato bapesaki Diogène nkombo Mbwa. Diog̀ene akufaki pene na mobu 320 L.T.B., ntango azalaki na mbula soki 90. Na lilita na ye, basalaki ekeko moko ya mbwa na libanga ya marbre.
Bato mosusu ya filozofi babandaki mpe koteya mateya mosusu ya filozofi ya Basinike. Kasi, na nsima, bato baboyaki makambo ya kolekisa ndelo oyo Diogène na bato mosusu oyo balandaki ndakisa na ye bazalaki na yango. Na nsuka, mateya yango nyonso elimwaki.
Osengeli kolanda bizaleli ya Basinike ya ntango na biso?
Diksionɛrɛ moko (The Oxford English Dictionary) emonisi ete Sinike ya ntango na biso ezali “moto oyo mosala na ye ezali se kotyola to amonaka kaka mabe ya bato mosusu. . . . Moto oyo amonisaka ete andimaka te likambo ya solo oyo bato mosusu balobi to makanisi ya malamu oyo bato mosusu babimisi to misala ya malamu oyo bato mosusu basali, mpe amonisaka ete andimaka yango te na ndenge asɛkaka mpe atyolaka baninga; moto oyo alukaka mabunga ya bato mosusu mpo na kotyola bango.” Tomonaka bizaleli oyo epai ya bato oyo tofandi na bango, kasi bizaleli yango eyokani na bizaleli ya baklisto te. Talá mateya mpe mitinda ya Biblia oyo:
“Yehova azali na motema molai, azali mpe na mawa; ayokaka nkanda noki te mpe atondi na boboto. Akopamelaka libela na libela te mpe akobomba nkanda na ye mpo na libela te.” (Nzembo 103:8, 9, NW ) Baklisto basengeli ‘kozala bato oyo balandaka ndakisa ya Nzambe.’ (Baefese 5:1, NW ) Soki Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso azali na motema mawa mpe na boboto mingi na esika ya ‘kotyola to komona kaka mabunga ya bato,’ na ntembe te, baklisto basengeli kosala makasi mpo na kozala lokola ye.
Yesu Klisto, elilingi mpenza ya Yehova, ‘atikelaki biso elakiseli ete tólanda matambe na ye.’ (1 Petelo 2:21; Baebele 1:3) Na bantango mosusu, Yesu azalaki komonisa lokuta ya mangomba mpe atɔndɔlaki misala mabe ya mokili oyo. (Yoane 7:7) Kasi azalaki kopesa bato oyo bazalaki sembo longonya. Na ndakisa alobaki boye mpo na Natanaele: “Talá Moyisalaele na solo, bokosi ezali kati na ye te.” (Yoane 1:47) Ntango Yesu azalaki kosala makamwisi, azalaki mpe ntango mosusu kotala kondima ya moto oyo asalisi. (Matai 9:22) Mpe lisusu, ntango bato basepelaki te mpo mwasi moko apesaki likabo oyo emonanaki ete ezali mpenza ya motuya, Yesu atyolaki makanisi ya mwasi wana te, kasi alobaki ete: “Na esika na esika wana bato bakosakola Nsango Malamu oyo kati na mokili mobimba, likambo lisali ye ekoyebana mpo na ekaniseli na ye.” (Matai 26:6-13) Mpo na bayekoli na ye, Yesu azalaki moninga oyo azalaki kotyela bango motema mpe azalaki na bolingo mingi, “alingaki bango kino nsuka.”—Yoane 13:1.
Lokola Yesu azalaki moto ya kokoka, ekokaki kozala mpasi te mpo amonaka mabunga ya bato ya kozanga kokoka. Kasi, na esika amonisa, na elimo na ye, ete azali kotyela bato mosusu motema te mpe azali koluka kaka mabunga na bango, Yesu alukaki nde kobɔndisa bato.—Matai 11:29, 30.
“[Bolingo] ekondimaka nyonso.” (1 Bakolinti 13:7) Maloba oyo ekeseni mpenza na makanisi ya moto oyo andimaka te makanisi mpe misala ya bato mosusu. Ya solo, mokili oyo etondi na bankoi oyo bayaka na mposo ya mpate; na yango tosengeli kokeba. (Masese 14:15) Atako bongo, bolingo endimaka makambo nyonso mpo esalaka ete moto atyela bato mosusu motema kasi ezwelaka bato makanisi mabe te.
Nzambe alingaka basaleli na ye mpe atyelaka bango motema. Ayebi bolɛmbu na bango malamu koleka bango moko. Nzokande, Yehova azwelaka basaleli na ye makanisi mabe te mpe asɛngaka bango makambo oyo eleki ndelo te. (Nzembo 103:13, 14) Lisusu Nzambe alukaka makambo malamu epai ya bato; lokola azali kotyela bango motema, azali kopesa basaleli na ye ya sembo mikumba oyo basengeli kokokisa likoló ya bamosusu, atako bazali bato ya kozanga kokoka.—1 Mikonzi 14:13; Nzembo 82:6.
“Ngai [Yehova], nakolukaluka kati na motema, nakomeka makanisi, mpo na kopesa epai na moto na moto lokola ezali nzela na ye, [na kotalela, NW ] mbuma na misala na ye.” (Yilimia 17:10) Yehova akoki mpenza kotánga makambo oyo ezali na kati ya motema ya moto. Biso bato tokoki kosala yango te. Yango wana, tosengeli kokeba na likambo ya kozwela bato mosusu makanisi mabe.
Soki totiki elimo ya kotyola bato mosusu ekɔtela biso na mitema mpe etambwisa makanisi na biso, yango ekoki kokabola biso na bandeko na biso baklisto. Ekoki kobebisa kimya ya lisangá ya boklisto. Yango wana, tólanda ndakisa ya Yesu, ye azalaki na bokatikati mpe na makanisi malamu ntango azalaki na bayekoli na ye. Yesu akómaki moninga oyo bazalaki kotyela motema mpenza.—Yoane 15:11-15.
“[Lokola] ezali bino na mposa ete bato básalela bino, salelá bango bobele bongo.” (Luka 6:31) Tokoki kosalela toli ya Yesu oyo na ndenge ebele. Na ndakisa, biso nyonso tolingaka bato báloba na biso na boboto mpe na limemya. Na bongo, tosengeli mpe kolobaka na bato mosusu na boboto mpe na limemya mpenza. Ata ntango Yesu azalaki kotɔndɔla mateya ya lokuta ya bakonzi ya mangomba, azalaki kosala yango na lityo te.—Matai 23:13-36.
Ndenge nini okoki kotika ezaleli ya kotyola bato mosusu?
Soki basali biso likambo moko oyo tosepeli na yango te, ezali mpasi te ete tómonisa elimo ya kotyola bato oyo basali biso mabe. Tokoki kotika ezaleli yango soki tokanisi ndenge oyo Yehova atyelaka basaleli na ye motema, atako bazali bato ya kozanga kokoka. Yango ekoki kosalisa biso tósepela na basaleli mosusu ya Nzambe atako bazali bato ya kozanga kokoka mpamba te bazali kosala makasi mpo na kosala makambo ya malamu.
Bato mosusu bakoki kotika kotyela baninga motema mpo na makambo mabe oyo bakutanaki na yango. Ya solo, kotyela bato ya kozanga kokoka motema mobimba ezali likambo malamu te. (Nzembo 146:3, 4) Nzokande, na kati ya lisangá ya boklisto, bandeko mingi bazali kosala makasi mpo na kolendisa baninga na bango. Kanisá naino ebele ya bandeko oyo bazali lokola bamama, batata, bandeko basi, bandeko mibali mpe bana mpo na baoyo bandeko ya libota na bango bakufá. (Malako 10:30) Kanisá naino, bandeko mingi bazalaka baninga malamu na ntango ya mpasi.b—Masese 18:24.
Ezali elimo ya kotyola te, kasi bolingo epai ya bandeko nde emonisaka bayekoli ya Yesu, mpamba te ye moko alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Yango wana, tómonisa bolingo mpe tótalaka nde bizaleli malamu ya bandeko na biso baklisto. Soki tosali bongo, yango ekosalisa biso tóboya bizaleli ya Basinike.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Likanisi mosusu ezali ete nkombo Sinike euti na liloba Kynosarges, esika moko na engumba Athènes, epai Antisthène azalaki koteya.
b Talá lisolo “Lisangá ya boklisto—Esika oyo moto akoki kozwa lisungi oyo ekolendisa ye,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 1999.
[Elilingi na lokasa 21]
Diogène, Sinike oyo ayebanaki koleka Basinike nyonso
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na buku Great Men and Famous Women