Olandaka bandakisa ya malamu?
NTOMA Paulo akomelaki baklisto ya sembo na Tesaloniki ete: “Bosili kokóma ndakisa mpo na bandimi nyonso na Makedonia mpe na Akaya.” Ndakisa oyo baklisto yango bapesaki bandimi mosusu ezalaki mpenza malamu. Kasi, Batesaloniki bango moko mpe bazalaki kolanda ndakisa oyo Paulo na baninga na ye bapesaki. Paulo alobaki boye: “Nsango malamu oyo tozali kosakola eyeli bino kaka na maloba te, kasi lisusu na nguya, na elimo santu mpe na kondima makasi, lokola boyebi soki tokómaki bato ya lolenge nini mpo na bino; mpe bolandaki ndakisa na biso.”—1 Batesaloniki 1:5-7, NW.
Ya solo, Paulo asukaki kaka na koteya na maloba te. Bomoi na ye mpenza ezalaki liteya mobimba—azalaki ndakisa ya kondima, ya koyika mpiko, mpe ya komipesa. Yango wana, Paulo na baninga na ye bakómaki bandakisa minene mpenza mpo na Batesaloniki, ndakisa na bango etindaki Batesaloniki bándima solo “kati na bolɔzi mingi.” Kasi ezalaki kaka Paulo te na baninga na ye nde bazalaki bandakisa malamu mpo na bandimi wana. Ndakisa ya baklisto mosusu oyo bayikelaki minyoko mpiko ezalaki mpe kolendisa bango. Paulo akomelaki Batesaloniki boye: “Bandeko, bolandaki ndakisa ya masangá ya Nzambe oyo ezali na Yudea, na boyokani na Klisto Yesu, mpamba te, bino mpe, bobandaki konyokwama na mabɔkɔ ya bato ya mboka na bino mpenza na makambo oyo bango mpe bazali konyokwama na yango na mabɔkɔ ya Bayuda.”—1 Batesaloniki 2:14, NW.
Klisto Yesu azali ndakisa oyo eleki bandakisa nyonso
Atako Paulo apesaki ndakisa malamu oyo ebongi kolanda, kasi amonisaki ete Yesu Klisto azali ndakisa ya libosoliboso oyo baklisto basengeli kolanda. (1 Batesaloniki 1:6) Yesu azalaki mpe azali Ndakisa oyo eleki bandakisa nyonso mpo na biso. Ntoma Petelo akomaki ete: “Bobyangami mpo na bongo, zambi Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete [bólanda] matambe na ye.”—1 Petelo 2:21.
Nzokande, mbula pene na 2 000 esili koleka banda Yesu asukisaki bomoi na ye lokola moto. Lelo oyo azali ekelamu ya elimo oyo akoki kokufa te mpe azali “kofanda na pole oyo moto ayebi kobɛlɛma na yango te.” Mpo na yango, “moto te amoni ye, mpe moto te akokoka komona ye.” (1 Timote 6:16) Kasi, ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye? Lolenge ya liboso ezali ya koyekola Baevanzile minei oyo elobeli bomoi ya Yesu. Baevanzile ezali kolakisa biso bomoto na ye, bomoi na ye, mpe “makanisi” na ye. (Bafilipi 2:5-8) Tokoki mpe koyeba makambo mosusu soki toyekoli malamumalamu buku oyo ezali na motó ya likambo ete Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, oyo ezali kolobela likambo mokomoko ya bomoi ya Yesu mpe ndenge makambo yango elandanaki.a
Ndakisa ya komipesa oyo Yesu apesaki esimbaki mpenza motema ya ntoma Paulo. Ayebisaki baklisto ya Kolinti ete: “Na esengo nakobimisa nyonso ezali na ngai mpe nakobimisama mpo na milimo na bino.” (2 Bakolinti 12:15) Ntoma Paulo azalaki mpenza na elimo lokola oyo ya Klisto! Ntango tozali kokanisa ndakisa ya kokoka oyo Klisto apesaki, biso mpe tosengeli kolanda yango na kati ya bomoi na biso.
Na ndakisa, Yesu ateyaki biso ete tosengeli kotya elikya epai ya Nzambe oyo alaki ete akokokisa bamposa na biso. Kasi asukaki kaka wana te. Na bomoi na ye ya mokolo na mokolo, amonisaki ete azali na kondima mpe atyelaki Yehova elikya. Alobaki ete: “Nkanza ezali na mabulu mpe ndɛkɛ na lola ezali na zumbu nde Mwana na moto azali na esika ya kolalisa motó na ye te.” (Matai 6:25; 8:20) Mposa ya kozala na biloko mingi nde ezalaka na esika ya liboso na makanisi mpe na misala na yo? To makambo oyo ozali kosala na bomoi na yo emonisaka mpenza ete ozali nde koluka liboso Bokonzi? Mpe ndenge nini otalelaka mosala ya Yehova? Otalelaka yango lokola Yesu oyo azali Ndakisa na biso? Biblia emonisi ete Yesu asukaki kaka te na koteya bato bázala na molende, kasi ye moko amonisaki molende yango mbala mingi. (Yoane 2:14-17) Lisusu, Yesu apesaki ndakisa malamu na likambo ya bolingo! Apesaki bomoi na ye lokola mbeka mpo na bayekoli na ye! (Yoane 15:13) Ozali kolanda ndakisa ya Yesu na likambo ya kolinga bandeko na yo baklisto? To mabunga ya bandeko na yo mosusu epekisaka yo kolinga bango?
Atako tozali kosala milende mpo na kolanda ndakisa ya Klisto, tokokwea mbala mingi. Kasi, ntembe ezali te ete Yehova azali kosepela na milende oyo tozali kosala mpo na ‘kolata Nkolo Yesu Klisto lokola elamba.’—Baloma 13:14.
“Bandakisa mpo na etonga”
Lelo oyo na kati ya lisangá, ezali na bato oyo bakoki kozala bandakisa mpo na biso? Ɛɛ, bazali! Mingimingi, bandeko mibali oyo baponami mpo na komema mikumba basengeli kozala ndakisa malamu. Paulo ayebisaki Tito, oyo azalaki kosala na masangá ya Kelete mpe azalaki kopona bakɛngɛli ete, nkulutu mokomoko oyo aponami asengeli kozala “mobali oyo bafundi ye na likambo moko te.” (Tito 1:5, 6, NW ) Ndenge moko mpe ntoma Petelo apesaki “bankulutu” toli ete bázala “bandakisa mpo na etonga.” (1 Petelo 5:1-3, NW ) Bongo, tokoloba boni mpo na baoyo bazali kosala lokola basaleli na misala? Bango mpe basengeli kozala “mibali oyo bazali kosala mosala malamu.”—1 Timote 3:13, NW.
Ya solo, tosengeli te kokanisa ete nkulutu nyonso to mosaleli na misala nyonso azala mpenza na makoki mingi na makambo nyonso ya mosala ya boklisto. Paulo alobaki na baklisto ya Loma ete: “Tozali na makabo na motindo na motindo, [na kotalela] ngɔlu epesami na biso.” (Baloma 12:6) Ndeko na ndeko azali na makambo oyo asalaka malamu koleka bandeko mosusu. Ebongi te tókanisa ete makambo nyonso oyo bankulutu bakobanda kosala to maloba na bango ekozala ntango nyonso na libunga te. Na Yakobo 3:2, Biblia elobi ete: “Biso nyonso tokweaka na makambo mingi. Soko moto akokweaka na liloba na ye te, ye moto [ya kokoka NW ] mpe ayebi kopekisa nzoto na ye mobimba.” Nzokande, atako bankulutu bazali bato ya kozanga kokoka, bango mpe lokola Timote, bakoki “kokóma [bandakisa] mpo na bato ya sembo, na maloba, na bizaleli, na bolingo, na kondima, na bopɛto.” (1 Timote 4:12, NW ) Ntango bankulutu bazali kosala bongo, baoyo bazali na kati ya etonga bakokakatana te mpo na kolanda toli oyo ezali na Baebele 13:7: “Bókanisa baoyo bakokambaka bino . . . Bóbanzabanza mpo na nsuka na bizaleli na bango mpe [bólanda ndakisa ya, NW ] kondima na bango.”
Bandakisa mosusu na mikolo na biso
Na bambula oyo euti koleka, bandeko mingi bamonisaki ete bazali bandakisa malamu. Tokoloba boni mpo na ebele ya bamisionɛrɛ oyo bazali komonisa elimo ya komipesa, batiki “ndako to bandeko babali to bandeko basi to tata to mama to bana to bilanga” mpe bazali kokokisa, na mikili ya bapaya, makambo oyo Klisto atindaki? (Matai 19:29) Tókanisa lisusu, bakɛngɛli-batamboli na basi na bango, bandeko basi mpe mibali oyo basalaka na Betele, mpe babongisi-nzela oyo bazali kosala na masangá. Bandakisa motindo wana ekoki kotinda bato mosusu ete bálanda yango, boye te? Na Azia, moklisto moko mopalanganisi ya nsango malamu akanisaka misionɛrɛ moko oyo azwaká lipɔlɔmi na kelasi ya mbala ya mwambe na Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Alobaki ete ndeko mobali yango ya sembo “alɛmbaki nzoto te mpo na ngungi mpe malili makasi. . . . Likambo oyo ezalaki kokamwisa bato ezalaki ete azalaki kosakola na lokota ya Chinois mpe lokota ya Malais, atako azalaki moto ya Angleterre.” Ndakisa malamu yango ebimisaki matomba nini? Ndeko mobali yango alobaki ete: “Ezaleli na ye ya kimya mpe ya kolɛmba te epesaki ngai mposa ya kokóma misionɛrɛ ntango nakokola.” Ndeko yango akómaki mpe misionɛrɛ!
Soki otali na Index ya mikanda ya la Société, okomona liste ya masolo mingi ya bomoi ya bandeko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká! Masolo yango ezali kolobela bato oyo batikaki misala na bango mpe makambo oyo balingaki kosala na bomoi na bango, bakómaki makasi atako liboso bazalaki na bolɛmbu, babongolaki bomoto na bango, bazongaki nsima te mpo na minyoko, mpe bazalaki na molende, bayikaki mpiko, bazalaki sembo, bazalaki na komikitisa mpe na elimo ya komipesa. Moto moko oyo atángaka masolo yango, akomaki boye mpo na masolo yango: “Ntango natángaka makambo oyo bato mosusu bakutanaki na yango, yango esalaka ngai nazala moklisto ya komikitisa mpe napesaka bato matɔndi, mpe esalisaka ngai nakanisaka kaka bamposa na ngai moko te to nazala na moimi te.”
Lisusu, kobosana te bandakisa malamu ya bandeko oyo bazali na kati ya lisangá na bino: batata ya mabota oyo bazali ntango nyonso kokokisa bamposa ya mabota na bango na makambo ya mosuni mpe ya elimo; bakisa mpe bamama oyo bazali na mibali te, oyo bazali kobunda etumba ya kobɔkɔla bana kasi bazali kobima sanza na sanza na mosala ya kosakola; bandeko oyo bakómi mibange mpe baoyo bazali bibɔsɔnɔ oyo bazali ntango nyonso kosala na bosembo atako nzoto na bango elɛmbi mpe ezali mpenza kolɔngɔnɔ te. Bandakisa motindo oyo ezali kolendisa yo, boye te?
Ya solo, mokili etondi na bandakisa ya mabe. (2 Timote 3:13) Atako bongo, tótalela toli ya Paulo epai ya baklisto oyo bazalaki kofanda na Yudea. Nsima ya kolobela bizaleli malamu ya basi mpe mibali mingi ya kondima na ntango ya kala, ntoma Paulo alobi na bango boye: “Na bongo mpo na biso, awa ezingelami biso na lipata monene boye ya batatoli, . . . tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima.” (Baebele 12:1, 2) Lelo oyo, baklisto bazingelami mpe na ‘lipata monene’ ya bandakisa malamu—ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso. Ozali mpenza kolanda yango? Okoki kozwa litomba na yango soki okomityela mokano ya kozala ‘momekoli ya makambo mabe te, kasi ya makambo malamu.’—3 Yoane 11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 20]
Tosengeli te kokanisa ete nkulutu nyonso to mosaleli na misala nyonso azala mpenza na makoki mingi na makambo nyonso ya mosala ya boklisto
[Bililingi na lokasa 21]
Bankulutu basengeli kozala “bandakisa mpo na etonga”