Bazali kobikisa bato na Esanga Robinson Crusoé
ROBINSON CRUSOÉ ezali esanga moko na kati ya bisanga misato babengi Juan Fernández, na Océan pacifique. Banda esika esanga yango ezali tii na bokula ya ekólo Chili, ezali na kilomɛtrɛ soki 640.a Nkombo ya mwa esanga yango ya kilomɛtrɛ-kare 93 eutá na mokanda moko eyebanaki mingi na ekeke ya 18 mpe ezali na motó ya likambo ete Robinson Crusoé, Daniel Defoe, moto ya Angleterre nde akomaki mokanda yango. Makambo mingi oyo akomaki, azwaki yango na lisolo ya Alexander Selkirk, moto moko ya ekólo Écosse, ye afandaki na esanga yango mbula soki minei ye moko.
Libaya moko ezali na esanga yango oyo bakomá mwa makambo mingi lokola oyo: “Na esika oyo, mokolo na mokolo na boumeli ya mbula koleka minei, Alexander Selkirk, moto ya Écosse, azalaki kotalatala mosika mpo na koluka komona soki masuwa moko ekoya kobikisa ye na esika oyo azalaki se ye moko.” Nsukansuka, bayaki kobikisa Selkirk mpe bazongisaki ye na mboka na ye. Ntango azongaki, Selkirk azalaki lisusu kosepela na mboka na ye te nsima ya kofanda ye moko na mwa paladiso na ye. Balobaka ete na nsima alobaki boye: “Ah, esanga na ngai, nalingaki yo mingi! Nabanzi ete natiká yo libela te!”
Nsima ya bambula mingi, bakómisaki esanga yango bolɔkɔ mpo na bato oyo bazalaki “koboya kotosa mateya” ya Lingomba ya Katolike. Esanga yango ezalaki lisusu paladiso te oyo Selkirk ayebaki! Kasi, lelo oyo, bato oyo bafandaka na esanga yango bazali na kimya mpenza oyo ezali na mikili mingi te. Bomoi ya esengo oyo bato bazali na yango kuna, ndenge mpe ezalaka na bisanga mingi, esalaka ete ezala mpasi te mpo na kosolola na bato.
Esanga Robinson Crusoé ezali na bato soki 500, kasi na boumeli ya basanza mingi na mbula, bato kaka 400 nde bafandaka na esanga yango. Moko na bantina ezali ete, bamama mosusu na bana na bango bakendaka na bingumba minene ya Chili ntango bana bazali kotánga kelasi, mpe bazongaka kaka na konje mpo na kofanda mwa basanza na bato mosusu ya libota na bango.
Atako Robinson Crusoé ezali na banzete mpe na bafololo ya kitoko, bato mosusu ya esanga yango bazali na nzala ya elimo mpe bazali koluka biyano na mituna na bango. Bamosusu bamonaki lokola nde bazali na mposa ya kobikisama na elimo.
Kobika na elimo
Mosala ya kobikisa bato na elimo ebandaki soki na 1979. Mwasi moko oyo azalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova na engumba Santiago, na Chili, akendaki kofanda na esanga Robinson Crusoé mpe abandaki koteya bato mosusu makambo oyo ayekolaki. Nsima ya mwa ntango nkulutu ya lisangá moko akendaki na esanga yango mpo na makambo na ye moko mpe akendaki kokuta mwasi yango azali kosalisa etuluku ya bato na koyekola Biblia mpe bato yango bazalaki kokola malamu na elimo. Ntango nkulutu yango azongaki lisusu na esanga yango nsima ya sanza misato, mwasi oyo azalaki ye moko lokola mosakoli, na bato mibale oyo azalaki koyekola na bango Biblia, balingaki kozwa batisimo, mpe nkulutu wana asalaki lisukulu ya batisimo na bango. Na nsima, moko na basi oyo bazwaki batisimo sika abalaki mpe, ye na mobali na ye, balandaki koluka bato oyo bazalaki na mposa bábikisa bango na elimo. Mobali na ye atongisaki mwa Ndako ya Bokonzi moko oyo etuluku moke na esanga yango bazali kosalela tii lelo oyo. Na nsima, mpo na mikakatano ya mbongo, balongwaki na Robinson Crusoé mpe bakendaki na lisangá moko na katikati ya Chili, epai bazali mpe kosalela Yehova na molende.
Mokemoke, mwa etuluku yango ebandaki kokola, bazalaki kobikisa bato mosusu oyo bazalaki na mangomba ya lokuta. Kasi, lokola basakoli oyo bazali banakelasi basengeli kotika esanga mpo na kokoba bakelasi na bango epai mosusu, etuluku yango etikalaka kaka na bandeko basi mibale oyo bazwi batisimo na elenge mwasi moko. Etuluku yango eyaka monene na konje ntango bamama mosusu bazongaka na esanga. Bandeko misato oyo batikalaka mbula mobimba bango moko bazwaka lisusu makasi ntango yango. Batatoli ya Yehova bayebani malamu na Robinson Crusoé mpo na mosala ya molende ya bandeko basi yango. Bato mosusu ya esanga baboyaka bango mpe bamekaka kotinda bamosusu báboya nsango ya Bokonzi. Atako bongo, mbuma ya mateya ya solo ya Biblia oyo ekonami na mitema ya sembo ezali se kokola.
Bazali kolendisa bato oyo bazali kobika
Mbala moko na mbula mokɛngɛli-motamboli akendaka na esanga yango kotala bandeko. Kotala mwa Batatoli moke oyo bafandaka na esanga yango ya mosika ezalaka ndenge nini? Mokɛngɛli ya zongazonga moko ayebisi biso ndenge makambo elekaki ntango akendaki kotala bandeko mpo na mbala ya liboso na Robinson Crusoé:
“Ezalaki mobembo moko kitoko. Tolongwaki na Valparaiso na motuka na ngonga ya 7 ya ntɔngɔ mpo na kokende na Cerrillos, libándá ya mpɛpɔ ya engumba Santiago. Tozwaki mpɛpɔ moko ya moke oyo ememaka bato nsambo. Nsima ya kotambola na likoló ngonga mibale na miniti 45, tomonaki na mosika nsɔngɛ ya ngomba moko oyo ezali komonana likoló na mapata. Ntango topusanaki pene, tobandaki komona esanga lokola libanga moko ya monene na katikati ya mbu. Tozalaki komona yango lokola nde ezali kotɛpatɛpa likoló ya mai monene, lokola masuwa oyo ebungi na ebale.
“Ntango tokitaki na mpɛpɔ, tokɔtaki na bwato moko mpe tokendeki tii na mboka. Epai na epai tomonaki mabanga mineneminene oyo ebimá na mai mpe ezali lokola mwa bisanga mikemike epai banyama ya mai babengi otarie ya Juan Fernández bapemaka. Bapekisaka bato koboma yango mpamba te ezali lisusu mingi te. Mbala moko, tomonaki eloko moko epumbwi pembeni ya bwato mpe elimwe lisusu na kati ya mai. Ezalaki mbisi oyo epumbwaka. Binyanyeli (nageoire) na yango ezali lokola mapapu. Emonanaki ete mbisi yango ezalaki kosepela kopumbwa na likoló ya mai mpo na kokanga nyamankɛkɛ (insectes). Ntango mosusu mpe bakangaka mbisi yango oyo ekangaka banyamankɛkɛ; kopumbwa na yango ekoki mbala mosusu kobenda likebi ya banyama to mbisi mosusu mpe ntango kaka ezali kokita na mai, bameli yango.
“Mpe, tokómaki na mboka San Juan Bautista (Saint-Jean-Baptiste). Tomonaki bato mwa mingi ya esanga yango batɛlɛmi na libongo, mpo na kozela bapaya na bango to mpo na kotala kaka mpe koyeba soki nani akoki koya mbala oyo. Makambo tomonaki kuna esepelisaki biso mpenza, mingimingi El Yunque, ngomba moko monene mpe ya molai, ezipami na matiti, mpe nsima na yango, likoló ezali polele, na langi ya bule ezingami na mapata ya mpɛmbɛ.
“Tomonaki etuluku ya bandeko na biso baklisto ya basi na bana na bango bazali kozela biso na libongo. Ezalaki eleko ya konje, yango wana bazalaki mingi koleka ndenge bazalaka liboso. Nsima ya kopesana mbote ya esengo, bamemaki biso na mwa ndako moko kitoko ya moke esika tofandaki pɔsɔ mobimba.
“Ezalaki pɔsɔ ya ntina mingi, mpe tomonaki ete elekaki nokinoki mpenza. Tosengelaki kolekisa ntango na biso mpamba te. Na mokolo yango kaka, nsima ya kolya na midi, tokendaki kotala moyekoli ya Biblia moko oyo etikalaki moke akóma ndeko na biso ya mwasi na elimo mpe moko na bato oyo bazali na paladiso ya elimo. Azalaki kosɛka na esengo kasi azalaki mpe motema likoló. Ntango ekokaki mpo azwa batisimo oyo azalaki kozela banda kala. Totalelaki na ye mwa makambo ya ntina mpo andimama lokola mosakoli ya nsango malamu. Na mokolo oyo elandi, abimaki na mosala ya kosakola mpo na mbala ya liboso. Na mokolo ya misato, totalelaki ye soki akokisi masɛngami mpo na kozwa batisimo. Liboso ete tósilisa pɔsɔ yango, azwaki batisimo.
“Bato mingi bayaki na makita oyo tosalaki na pɔsɔ wana, bango nyonso bazalaki 14. Mokolo na mokolo tobongisaki programɛ mpo na kobima na mosala ya kosakola, kozongela bato oyo tosololaki na bango, kotambwisa boyekoli ya Biblia, mpe kotala bandeko epai na bango. Yango elendisaki mpenza bandeko basi oyo basalaki mosala bango moko na boumeli ya mbula mobimba!”
Ezalaka mpasi mingi mpo mibali ya esanga bándima mateya ya solo, mbala mosusu mpo ete basalaka misala na bango mokolo mobimba mpe bazalaka na ntango mpenza te. Basalaka mingi mpenza mosala ya kokanga sanya (kosakosa), mosala yango esɛngaka ntango mingi. Makanisi mabe ezali mpe kotinda bato mosusu báboya kondima nsango ya Bokonzi. Atako bongo, elikya ezali ete bato mingi ya esanga yango, mibali na basi, bakondima nsango ya Bokonzi na mikolo ekoya.
Tii sikoyo, bato zomi babiki na esanga yango mpo bayebi mateya ya solo mpe mikano ya Yehova Nzambe. Bamosusu kati na bango balongwe na esanga yango mpo na bantina ndenge na ndenge. Kasi ezala batikali na esanga to te, kobika na bango ya elimo emonani ete ezali na ntina mingi koleka ndenge Alexander Selkirk abikaki. Bazali sikoyo na paladiso ya elimo esika nyonso oyo bazali. Bandeko basi oyo bazali naino na esanga yango na bana na bango bafandi na esika oyo ezali na banzete mpe na bafololo ya kitoko, kasi koleka wana, bazali na elikya ya kozala na bomoi ntango mabele mobimba ekokóma mpenza paladiso.
Mosala ya kobikisa bato ezali ntango nyonso kosalema
Soki totali esika esanga ezali, tokoloba ete Batatoli ya Yehova na Robinson Crusoé bazali mpenza mosika na bandeko na bango mosusu ya elimo. Kasi, bamiyokaka te ete bazali bango moko ndenge Selkirk amiyokaki. Mikanda ebele ya makambo ya Nzambe, bavideo ya mayangani ya minene na ya mike oyo filiale ya la Société Watch Tower na Chili etindelaka bango mbala misato na mbula, mpe ndenge mokɛngɛli ya zongazonga atalaka bango mbala moko na mbula, ezali kosala ete bázala ntango nyonso na boyokani na ebongiseli ya Yehova. Na yango bazali kosala mosala ya ntina na kati ya ‘lisangani ya bandeko na mokili mobimba.’—1 Petelo 5:9, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo mpenza ya esanga yango ezali Más a Tierra.
[Maps/Picture on page 9]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
CHILI
Santiago
ESANGA ROBINSON CRUSOÉ
Saint-Jean-Baptiste
El Yunque
OCÉAN PACIFIQUE
ESANGA SANTA CLARA
[Elilingi]
Soki esanga ebandi komonana ezalaka lokola libanga moko ya monene na katikati ya mbu
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Kalati ya Chili: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.
[Elilingi na lokasa 8, 9]
Ngomba monene mpe molai babengi El Yunque (Anvil)
[Elilingi na lokasa 9]
Mboka San Juan Bautista (Saint-Jean-Baptiste)
[Bililingi na lokasa 9]
Ba phoques na ba otaries eyaka kopema na mwa bisanga mikemike
[Elilingi na lokasa 10]
Toutaki na engumba ya Santiago, na Chili na mwa mpɛpɔ ya moke
[Elilingi na lokasa 10]
Bokula ya mabangamabanga ya esanga Robinson Crusoé.
[Elilingi na lokasa 10]
Mwa Ndako ya Bokonzi na esanga