Masolo ya Basakoli ya Bokonzi
Boyokani malamu na kati ya libota ebendi bato epai ya Nzambe
YEHOVA apesaki Yosefe mayele mpe bososoli mingi. (Misala 7:10) Yango wana, bososoli ya Yosefe “emonanaki malamu na Falo mpe na basali na ye nyonso.”—Genese 41:37.
Lelo oyo, Yehova azali mpe kopesa basaleli na ye bososoli ntango bazali koyekola Biblia. (2 Timote 3:16, 17) Ntango bazali kosalela toli ya Biblia, bazali kozwa mayele mpe bososoli oyo ezali kobota mbuma malamu. Mbala mingi bizaleli malamu ya basaleli ya Nzambe ‘emonanaka malamu na miso ya bato mosusu,’ lokola masolo oyo euti na ekólo Zimbabwe emonisi yango.
• Mwasi moko azalaki kofanda kartye moko na libota moko ya Batatoli ya Yehova. Atako azalaki kolinga Batatoli te, mwasi yango azalaki kosepela na bizaleli na bango mpe mingimingi ndenge oyo bazalaki kofanda na libota na bango. Amonaki ete mobali wana na mwasi na ye bazalaki koyokana malamu mpenza mpe bana na bango bazalaki na botosi. Amonaki mpenza ete mobali azalaki kolinga mwasi na ye mingi.
Na bisika mosusu na Afrika, bato bakanisaka ete soki mobali alingi mwasi na ye mingi, emonisi ete mwasi “akangá” ye na nkisi. Yango wana, mwasi yango akutanaki na mwasi oyo azali Motatoli mpe atunaki ye ete: “Okoki kolakisa ngai nkisi oyo osalá mpo okanga mobali na yo mpo ngai mpe nasalela mobali na ngai mpo alinga ngai mingi ndenge mobali na yo alingaka yo?” Motatoli yango apesaki eyano ete: “Likambo te, nakomemela yo yango lobi na nsima ya midi.”
Na mokolo oyo elandaki, ndeko mwasi akendaki kotala mwasi wana mpe amemelaki ye “nkisi” na ye. Nkisi yango ezalaki nini? Ezalaki Biblia na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Ntango batalelaki mwa makambo na buku Boyebi, na motó ya likambo oyo elobi ete “Ndenge nini kotonga libota oyo ezali kokumisa Nzambe,” alobaki na mwasi yango ete: “Talá ‘nkisi’ oyo ngai na mobali na ngai tosalelaka mpo na ‘kokangana,’ yango wana tolingani mingi.” Babandaki koyekola Biblia mpe mwasi wana akolaki nokinoki tii azwaki batisimo na mai mpo na komonisa ete amipesi na Yehova.
• Na lisangá moko moke oyo ezali na mboka moko pene na ndelo ya Zimbabwe na Mozambique, babongisi-nzela minene mibale balekisaki pɔsɔ mibale mobimba, bakokaki te kokende kosakola ndako na ndako. Mpo na nini? Mpamba te bato bazalaki koya kotala bango mpo na koyoka bango. Mobongisi-nzela moko alobi ndenge nini likambo yango ebandaki. Alobi ete: “Pɔsɔ na pɔsɔ tozalaki kotambola ntaka ya kilomɛtrɛ 15 mpo na koyekola Biblia na moto moko oyo asepelaki. Ezalaki mpasi mpo na kokóma epai oyo azalaki kofanda. Tosengelaki kotambola na pɔtɔpɔtɔ mpe kokatisa mai ya mozindo oyo ezalaki kokóma tii na nkingo. Na bongo, tozalaki kolongola bilamba na sapoto mpe komema yango na motó mpo na kokatisa mai, mpe soki tokómi na ngámbo, tolati yango lisusu.
“Molende na biso ekamwisaki bato oyo bazalaki kofanda na mboka yango. Na kati ya bato yango ezalaki na mokambi ya lingomba moko oyo ezalaki kuna. Alobaki na bandimi na ye boye: ‘Bolingi te kozala na molende lokola bilenge mibali mibale oyo bazali Batatoli ya Yehova?’ Na mokolo oyo elandaki, bandimi na ye mingi bayaki na ndako na biso mpo na koyeba ntina oyo tozalaka na molende. Mpe lisusu, na boumeli ya pɔsɔ mibale oyo elandaki, bato oyo bazalaki koya kotala biso bazalaki ebele mpenza na boye ete tozangaki ata ntango ya kolamba!”
Mokambi ya lingomba yango azalaki mpe na kati ya bato oyo bayaki kotala babongisi-nzela yango na kati ya pɔsɔ wana mibale. Kanisá naino esengo oyo babongisi-nzela wana bazalaki na yango ntango mokambi yango andimaki koyekola Biblia elongo na bango!