Bato mingi bazali na mposa ya libɔndisi!
“Talá, mpisoli ya banyokolami mpe moko azali te mpo na kobɔndisa bango. Epai na banyokoli na bango nguya ezali nde bazali na moko te mpo na kobɔndisa bango.”—MOSAKOLI 4:1.
OZALI na mposa ya libɔndisi? Ozali koluka bábɔndisa yo ata mwa moke mpo na kozala na mwa esengo ya bomoi? Ozali nde na mposa makasi bálendisa yo mpo na kolɛmbisa mwa moke mikakatano mpe bwale ya bomoi?
Ekómelaka biso nyonso na kozala mpenza na mposa makasi ya libɔndisi mpe ya kolendisama. Ezali bongo mpamba te bomoi ezali na makambo mingi oyo ezali kopesa biso mawa. Moto nyonso azalaka na mposa bábatela ye, básepelisa ye mpe báyamba ye. Bato mosusu bakómi mibange mpe likambo yango ezali kosepelisa bango te. Bamosusu balɛmbi nzoto mpo bomoi oyo bazali na yango lelo oyo ezali te ndenge oyo bazalaki kokanisa. Bamosusu mpe bazali komitungisa na makanisi mpo monganga ayebisi bango ete bazali na maladi na nzoto.
Lisusu, moto moko te akoki kotya ntembe ete makambo oyo ezali kobima na mikolo na biso ezali kopesa bato mposa makasi ya koluka libɔndisi mpe elikya. Tókamata kaka ekeke oyo eleki, bato koleka milio nkama moko bakufaki na bitumba.a Bato wana nyonso batiki mabota na bango na mpasi, bamama na batata, bandeko, basi na bana oyo bazali na mposa makasi ya libɔndisi. Lelo oyo, bato koleka miliare moko bazali babola mpenza. Katikati ya bato na mokili mobimba bazali na mbongo ya kofuta te mpo na kokutana na monganga to kosomba nkisi. Babalabala ya bingumba minene etondi na bosɔtɔ mpe na bana oyo basundolá bango, mingi bamipesi na molangwa mpe na kindumba. Bamilio ya bato oyo bakimá bamboka na bango bazali na bomoi ya mpasi na bakaa.
Motango ata soki ezali monene ndenge nini—ekoki te komonisa mpasi mpe mitungisi oyo bato mosusu bazali koyoka na bomoi na bango. Tókamata ndakisa ya Svetlana, elenge mwasi ya ekólo moko ya Balkans, baboti na ye bazali mpenza babola.b Alobi boye: “Mpo na kozwa mbongo, baboti na ngai batindaki ngai nakende kosɛngasɛnga to koyiba. Libota na biso ebebaki mpenza na boye ete ndeko na ngai moko asangisaki na ngai nzoto. Nakómaki kosala na restora moko mpe lokola mama nde azalaki kozwa mbongo oyo bazalaki kofuta ngai, alobaki ete soki nalongwe na mosala yango, ye akomiboma. Makambo nyonso wana ememaki ngai na kosala kindumba. Nazalaki na mbula 13 mpamba. Na nsima, nazwaki zemi mpe nalongolaki yango. Ntango nakómaki na mbula 15, nazalaki komonana lokola nde nazali na mbula 30.”
Laimonis, elenge mobali moko ya ekólo Lettonie, ayebisi ntina oyo azali na mposa ya libɔndisi mpe makambo mabe oyo akutanaki na yango oyo ekómisi ye mawamawa. Ntango azalaki na mbula 29, azwaki likama ya motuka oyo ekómisá ye paralize banda na lokɛto tii na makolo. Amonaki ete azali lisusu na elikya te mpe amipesaki na masanga. Nsima ya mbula mitano akómaki ebɔsɔnɔ moko ya kwitikwiti mpe mpo na ye bomoi na mikolo ekoya ezalaki na ntina te. Epai wapi akokaki kozwa libɔndisi?
Kanisá lisusu likambo ya Angie. Basalaki mobali na ye lipaso na bɔɔngɔ mbala misato mobimba mpe eteni moko ya nzoto na ye ezalaki kosala lisusu te. Mbula mitano nsima ya lipaso ya nsuka, azwaki lisusu likama monene, mbala oyo alingaki mpenza kokufa. Ntango Angie akɔtaki na shambre ya lopitalo, amonaki mobali na ye alali, azali koyeba lisusu eloko moko te mpo azokaki mpota monene na motó, ayebaki ete akobika te. Amonaki ete bomoi na ye na ya bana na ye ebebi mpenza. Ndenge nini akokaki kobɔndisama mpe kolendisama?
Mpo na Pat, eleki mwa bambula, mokolo moko ya eleko ya mpiɔ ebandaki malamu. Kasi, mikolo misato oyo elandaki, Pat alekisaki yango kozanga koyeba makambo nini ezalaki koleka. Mobali na ye ayaki koyebisaki ye na nsima ete ayokaki mpasi makasi na ntolo mpe motema na ye etikaki kobɛta. Na nsima ebandaki lisusu kobɛta mbangumbangu mpe ekómaki kobɛta mpe kokata, na nsima etikaki kobɛta. Azalaki kopema lisusu te. Pat alobi ete: “Minganga balobaki ete nakufaki mpenza.” Kasi azongaki lisusu na bomoi. Mpo na ntango molai oyo aumelaki na lopitalo alobi boye: “Ndenge minganga bazalaki kotala motema na ngai mpo na koyeba soki ekómi malamu ezalaki kobangisa ngai, mingimingi ntango bazalaki komeka kosala ete ebɛta lisusu ndenge ezalaki kobɛta ntango bayaki na ngai.” Eloko nini ekokaki kobɔndisa ye mpe kopesa ye makasi oyo esengeli na ntango ya mpasi wana?
Mwana ya Joe na Rebecca ya mobali ya mbula 19 akufaki na likama ya motuka. Balobi boye: “Naino tokutaná na likambo moko oyo esalá biso mpasi makasi boye te. Atako liboso tozalaki koyokela baninga mawa soki bakufeli moto, toyokaki mpasi na motema lokola ndenge tozali koyoka sikoyo te.” Eloko nini ekokaki kobɔndisa bango na “mpasi makasi ya motema,” elingi koloba kokufela moto oyo balingaki mingi?
Bato nyonso oyo mpe bato mosusu ebele, bazwaki moto oyo abɔndisaki bango koleka bato nyonso. Mpo na komona ndenge oyo yo mpe okoki kobɔndisama epai ya moto yango, tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Motango mpenza ya basoda na basivili oyo bakufaki na bitumba eyebani te. Na ndakisa, na ebimeli na yango ya 1998, kaka mpo na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, buku moko (Facts About the American Wars) elobi ete: “Balapolo mingi ezali komonisa ete bato milio 50 bakufaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba (basoda na basivili) kasi bato mingi oyo bayekoli likambo yango malamumalamu balobi ete motango ya solosolo eleki oyo wana mosika, ekoki kozala ata mbala mibale.”
b Topesi ye nkombo mosusu.
[Elilingi/Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
UNITED NATIONS/PHOTO YA J. K. ISAAC
UN PHOTO 146150 na lisalisi ya O. MONSEN