Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/3 nk. 30-31
  • Bazali kosakola elikya ya boklisto na Sénégal

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kosakola elikya ya boklisto na Sénégal
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Balɔbi na bato”
  • Mokakatano mpo na kondima solo
  • Bato ya lolenge nyonso bazali kondima
  • Tózala balɔbi na bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Tolɔba bato na mai nyonso ya mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Okoki sikoyo kokóma moluki-bato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Mosala ya koluka mbisi na Mbu ya Galile
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/3 nk. 30-31

Biso tozali kati na baoyo bazali na kondima

Bazali kosakola elikya ya boklisto na Sénégal

KOBANDA kala bato balyaka mbisi mingi. Ntango nyonso, bato babomaka mbisi na mai minene, na mabeke mpe na bibale. Bantoma mosusu ya Yesu Klisto bazalaki koboma mbisi na Libeke ya Galilai. Kasi Yesu apesaki bango mosala ya koboma mbisi ya ndenge mosusu. Yango ezalaki mosala ya koboma mbisi ya elimo, oyo ekozala na litomba kaka mpo na babomi-mbisi te kasi mpe mpo na “mbisi” yango moko.

Mpo na yango, Yesu ayebisaki Petelo, oyo azalaki mobomi-mbisi ete: “Longwá [sikoyo okokóma molɔbi, NW ] na bato.” (Luka 5:10) Lelo oyo, mosala yango ya koboma mbisi ezali kosalema na mikili koleka 230, kati na yango Sénégal. (Matai 24:14) Kuna, “balɔbi na bato” ya ntango na biso bazali kosakola elikya na bango ya boklisto epai na bato mosusu na molende.—Matai 4:19, NW.

Sénégal ezali mboka moko ya wɛsti ya Afrika. Ebandi na esobe ya Sahara, na nɔrdi kino bazamba ya Casamance na sudi. Mipɛpɛ ya molunge oyo eutaka na esobe mpe na mwa mipɛpɛ ya mpiɔ oyo eutaka na Mai Monene ya Atlantique mipepaka mingi na Sénégal. Bato koleka milio libwa bafandi kuna. Bato ya Sénégal bayebani mpo na ezaleli na bango ya koyamba bapaya. Mingi bazali baklisto te. Mingi babɔkɔlaka bampate, kasi bato mosusu babɔkɔlaka mpe bangɔmbɛ, bakamela mpe bantaba. Basali na bilanga mpe bazali, balonaka nguba, ntokya (coton) mpe loso. Na ntembe te, ezali mpe na babomi-mbisi oyo bayaka na minyama etondi na mbisi ya Mai Monene ya Atlantique mpe ya bibale oyo ezali na mokili yango. Mosala ya koboma mbisi ezali na ntina mingi mpo na nkita ya Sénégal. Kutu, biloko ya kolya oyo bato balingaka mingi kuna ezali bongo ceebu jën, biloko moko kitoko: basangisaka loso, mbisi na ndunda.

“Balɔbi na bato”

Basakoli 863 bazali kosakola Bokonzi ya Nzambe na molende na Sénégal. Mosala ya koboma-mbisi ya elimo ebandaki kuna na ebandeli ya mibu 1950. Na 1965, bafungolaki biro moko ya Société Watch Tower na mboka-mokonzi Dakar. Bamisionɛrɛ— “babomi-mbisi”—bautaki na mikili mingi ya mosika mpe bakómaki wana. “Mosala ya koboma mbisi” ebandaki mpe kosakolama ya elikya ya boklisto na Sénégal ezalaki kokende liboso. Mpo na yango, batongaki babiro ya sika na Almadies, pene na Dakar, mpe bafungolaki esika yango ya losambo ya Yehova na Yuni 1999. Ezalaki mpenza ntango moko ya esengo!

Mokakatano mpo na kondima solo

Basakoli bazali kokutana mbala na mbala na bato ya ndenge nyonso mpe basusu basepelaki na nsango ya elikya oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Atako bato mingi bayebi makambo ya Biblia te, basepelaka koyeba ete, etikali moke, bilaka oyo Yehova apesaki basakoli na ye ya sembo na ntango ya kala ekokisama.

Mbala mingi esɛngaka kozala na molende mpo na kokangama na mitinda ya boklisto, mingimingi liboso ya makambo ya bonkɔkɔ mpe mimeseno ya bato. Na ndakisa, na Sénégal, bato bazali na momeseno ya kobala basi ebele. Na ndakisa, elenge mobali moko azalaki na basi mibale ntango abandaki koyekola Biblia. Akondima solo ya boklisto mpe akotosa oyo Makomami esɛngi ete mobali azala kaka na mwasi moko? (1 Timote 3:2) Akotikala na mwasi ya bolenge na ye, elingi koloba mwasi oyo ye abalaki liboso? Na ntembe te, asalaki mpenza bongo mpe sikoyo azali nkulutu ya molende na lisangá moko ya monene na Dakar. Mwasi na ye ya liboso mpe bana na ye nyonso 12, bana 10 abotaki bango na mwasi na ye ya liboso mpe bana 2 na mwasi na ye ya mibale, bango nyonso bazali kati na solo.

Kozanga koyeba mokanda ezali mpe mokakatano mosusu mpo na kondima solo ya boklisto. Yango elingi koloba ete moto oyo ayebi mokanda te akoki te kondima mpe kosalela solo? Te, ezali bongo te. Talá ndakisa ya Marie, ye azali mama ya bana mwambe mpe asalaka mosala makasi. Amonaki mbala moko ntina ya kotalelaka mokapo moko ya Biblia na bana na ye mokolo na mokolo liboso bákenda kelasi mpe ye akenda mosala. Kasi akosala yango ndenge nini mpo ye ayebi kotánga te? Mikolo nyonso na ntɔngɔntɔngɔ azalaki kozwa mwa buku na ye Tótángaka Makomami mokolo na mokolo mpe azalaki kotɛlɛma na balabala ya zɛlozɛlo liboso ya ndako na ye. Ntango bato bazali koleka, azali kotuna bango soki bayebi kotánga. Soki akutani na moto oyo ayebi kotánga, akopesa ye mwa buku yango mpe akobondela ye ete: “Nayebi kotánga te, okoki kotángela ngai mwa eteni ya lelo?” Akolanda botángi na likebi nyonso. Nsima ya kopesa moto yango matɔndi, akozonga mbangu na ndako mpo na kotalela na esengo mpenza mokapo yango na bana na ye liboso bákenda na kelasi!

Bato ya lolenge nyonso bazali kondima

Na Sénégal, okoki kokuta bato bafandi na balabala bazali kotɛka mbisi, ndunda to bazali kotɛka mbuma na wenze to mpe bafandi na nse ya baoba mpe bazali komela ataya, tii moko ya mwa bololo mpe ya langi ya mai ya pondu. Lokola bazalaki na mposa ya koteya bato nyonso oyo bakokutana na bango nsango malamu, bandeko mibale basololaki na ebɔsɔnɔ moko oyo azalaki kosɛnga mbongo na balabala. Bapesaki ye mbote mpe na nsima balobaki ete: “Bato mingi bapesaka yo mbongo kasi batɛlɛmaka te mpo na kosolola na yo. Biso toyei kosolola na yo likambo moko ya ntina oyo etali bomoi na yo na mikolo mizali koya.” Mosɛngi yango akamwaki. Bandeko balobaki lisusu ete: “Tolingi kotuna yo motuna moko. Na makanisi na yo, mpo na nini bampasi ezali mingi boye na mokili?” Mosɛngi yango ayanolaki ete: “Ezali mokano ya Nzambe.”

Na nsima, bandeko batalelaki Makomami elongo na ye mpe balimbolelaki ye Emoniseli 21:4. Nsango ya elikya oyo esimbaki mpenza motema ya mosɛngi yango mpe asepelaki mingi ndenge bandeko mibale batɛlɛmaki mpo na kosolola na ye makambo ya Biblia. Alelaki. Na esika asɛnga mbongo, abondelaki bandeko bázwa mbongo nyonso ya bibende oyo azalaki na yango na linzanza oyo azalaki kosɛnga na yango! Abondelaki bango mingi kino ebendaki likebi ya bato oyo bazalaki koleka wana. Ezalaki mpasi mpo bandeko bándimisa ye ete abomba mbongo na ye. Nsukansuka andimaki kasi abondelaki bango bázonga kotala ye lisusu.

Monyama ya koboma mbisi ya elimo ezali mpe kokanga bato mosusu na iniversite monene ya Dakar. Kuna, Jean-Louis, moyekoli na makambo ya minganga, abandaki koyekola Biblia. Nokinoki andimaki solo, amipesaki na Yehova mpe azwaki batisimo. Mposa na ye ezalaki asalela Nzambe na mosala ya ntango nyonso lokola mobongisi-nzela. Kasi lokola asalaki kontra na mboka na ye, asengelaki kosilisa kelasi na ye. Atako bongo, abandaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi kaka na ntango wana. Nsima ya kozwa diplomi na ye ya mosala ya monganga, babyangaki ye mpo na kosala lokola monganga ya libota ya Betele moko ya monene na Afrika. Elenge mobali mosusu mpe oyo basololaki na ye na Iniversite ya Dakar, azali sikoyo mpe kosala na Betele ya mboka na ye.

Mosala ya koboma mbisi ya elimo na Sénégal ezali mpenza kobota mbuma. Bato basepelaka mingi na mikanda ya Batatoli ya Yehova oyo elimbolaka Biblia mpe sikoyo, mikanda yango ezali na Wolof, lokota moko oyo elobamaka na Sénégal. Lokola bazali koyoka nsango malamu na lokota na bango moko, bato mingi bazali kosepela mpe bazali kondima nsango malamu yango na motema mobimba. Na ntembe te, na lipamboli ya Yehova, ‘balɔbi na bato’ oyo bazali kosala mosala na bango na molende, bakokanga mbisi mingi ya elilingi na Sénégal, mpamba te bazali kokoba kosakola elikya ya boklisto na bosembo mpe na molende mpenza.

[Karte/Bililingi na lokasa 31]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

SÉNÉGAL

[Elilingi]

Bazali kosakola elikya ya boklisto na Sénégal

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto