Tóyoka esengo na Nzambe ya lobiko na biso
“Nakosepela na [Yehova], nakoyoka esengo na Nzambe na lobiko na ngai.”—HABAKUKU 3:18.
1. Danyele amonaki emonaneli ya makambo nini liboso Babilone ekwea na mobu 539 L.T.B.?
KOLEKA mbula zomi liboso Babilone ekwea na mobu 539 L.T.B., wana mosakoli Danyele akómi mobange, amonaki emonaneli moko ya kokamwa. Emonaneli yango eyebisaki makambo oyo ekobima na mokili liboso ete Yesu Klisto, Mokonzi oyo Nzambe aponi, abundisa banguna ya Yehova. Danyele asalaki nini ntango amonaki makambo yango? Alobaki ete: “Nakómaki motau . . . mpe natungisaki motema na ntina na emonaneli.”—Danyele 8:27.
2. Kowelana nini Danyele amonaki na emonaneli, mpe ozali koyoka ndenge nini lokola ekómi pene?
2 Ezali boni mpo na biso? Lelo oyo, ntango epusani mpenza! Tozali kosala nini lokola toyebi ete etumba oyo Danyele amonaki na emonaneli, etumba ya Nzambe oyo ebengami Armagedon, ekómi pene? Tozali kosala nini lokola tozali komona ete mabe oyo balobeli na esakweli ya Habakuku ekómi kosalema mingi na boye ete Nzambe akoki kozongisa mokano ya koboma banguna na ye nsima te? Na ntembe te, toyokaka lokola Habakuku, ndenge mokapo ya misato ya mokanda na ye elobeli ye.
Habakuku abondeli Nzambe ayokela bato mawa
3. Habakuku abondelaki mpo na banani, mpe ndenge nini maloba na ye ekoki kotalela biso?
3 Habakuku mokapo 3 ezali libondeli. Vɛrsɛ 1 ezali komonisa libondeli na ye lokola nde azali koyemba nzembo ya mawa to ya kolela. Mosakoli azali kosala libondeli lokola nde azali kosala yango mpo na ye moko. Kasi, Habakuku azali koloba mpo na libota oyo Nzambe aponaki ezala libota na ye. Lelo oyo, libondeli na ye ezali na ndimbola monene mpo na basaleli ya Nzambe, bango bamipesi na mosala ya kosakola Bokonzi. Ntango tozali na likanisi yango mpe tozali kotánga mokanda ya Habakuku mokapo 3, maloba na ye ezali kobangisa biso mpo na makambo ekoya, kasi ezali mpe kopesa biso esengo. Libondeli ya Habakuku, to nzembo na ye ya mawa, ezali kopesa biso ntina ya solosolo oyo tosengeli kosepela na Yehova, Nzambe oyo akobikisa biso.
4. Mpo na nini Habakuku abangaki, tokoki kozala na elikya nini mpo na makasi ya Nzambe?
4 Lokola tomonaki yango na masolo mibale oyo eleki, mokili ya Yuda ebebaki mingi na mikolo ya Habakuku. Kasi Nzambe alingaki kotika te ete makambo etikala kaka ndenge wana. Yehova asengelaki kosala likambo moko, ndenge asalaká na ntango ya kala. Yango wana tokoki kokamwa te ete mosakoli agangaki ete: “Ɛ [Yehova], nayoki nsango na yo mpe nazali [kobanga, NW] mosala na yo, ɛ [Yehova].” Alingaki koloba nini na maloba yango? ‘Nsango ya Yehova’ ezalaki masolo ya makambo minene oyo Yehova asalaká kala, lokola makambo oyo asalaká na Mai Motane, na mokili mokauki, mpe na Yeliko. Habakuku ayebaki makambo yango malamu, mpe ezalaki kobangisa ye mpo ayebaki ete Yehova akobimisa lisusu makasi na ye ya kokamwa ntango akobunda na banguna na ye. Ntango tozali komona ndenge oyo bato bazali kosala mabe lelo oyo, biso mpe tozali koyeba ete Yehova akosala ndenge asalaká na ntango ya kala. Likambo yango ezali kobangisa biso? Ɛɛ, tozali kobanga! Kasi, tozali kobondela ndenge Habakuku abondelaki, ete: “Na kati ya [bambula] obimisa yango lisusu, na kati ya [bambula], omonisa yango; kati na nkanda, okanisa mawa.” (Habakuku 3:2) Nzambe akolakisa makasi na ye ya kokamwa na ntango oyo ye aponi, “na kati ya bambula.” Mpe akokanisa baoyo balingaka ye mpe akoyokela bango mawa!
Yehova azali kotambola!
5. Ndenge nini ‘Nzambe alongwaki na Temana,’ mpe likambo yango emonisi nini mpo na Armagedon?
5 Ntango Yehova akoyoka libondeli oyo tozali kosala mpo ayokela biso mawa, makambo nini ekosalema? Eyano ezali na Habakuku 3:3, 4. Liboso, mosakoli alobi boye: “Nzambe alongwi na Temana mpe Oyo na Bulɛɛ longwa na ngomba na Palana.” Na ntango ya mosakoli Mose, Temana na Palana ezalaki bamboka oyo Bayisalaele balekaki na mokili mokauki ntango bazalaki kokende na Kanana. Ntango ebele ya Bayisalaele bazalaki kotambola, ezalaki lokola nde Yehova ye moko azali kotambola, mpe eloko moko te ekokaki kotɛlɛmisa ye. Mose alobaki boye liboso ya liwa na ye: “[Yehova] alongwaki na Sinai, mpe ataneli bango longwa na Seili; angɛngaki longwa na ngomba na Palana, alongwaki na [baanzelu] nkóto zomi.” (Deteronome 33:2) Ntango Yehova akoya kobundisa banguna na ye na Armagedon, akolakisa mpe makasi ya ndenge wana oyo moto akoki kotɛlɛma liboso na yango te.
6. Longola nkembo ya Nzambe, baklisto oyo basosolaka bazali komona nini?
6 Habakuku alobi lisusu boye: “Nkembo ya [Yehova] ezipi lola, mokili etondi na kosanzolama na ye. Nkembo na ye ezali lokola moi.” Emonaneli ya kokamwa mpenza! Ya solo, bato bakoki kotala Yehova Nzambe te mpe bázala na bomoi. (Exode 33:20) Kasi, mpo na bato oyo bazali kosalela Nzambe na bosembo, miso na bango ya elimo ezali kongɛnga ntango bazali komona nkembo na ye. (Baefese 1:18) Longola nkembo ya Yehova, baklisto oyo bayebi kososola bazali komona mpe eloko mosusu. Habakuku 3:4 (NW) esuki na maloba oyo: “Kongɛnga mibale ezalaki kobima na lobɔkɔ na ye, makasi na ye ebombamaki wana.” Tomoni mpenza ete etikali moke Yehova asala eloko moko, akolakisa makasi mpe nguya ya lobɔkɔ na ye ya mobali.
7. Soki Nzambe atamboli mpo na kolonga, ezalaka ndenge nini mpo na baoyo batombokelaka ye?
7 Soki Nzambe atamboli mpo na kolonga, ezali likama mpo na baoyo bazali kotombokela ye. Habakuku 3:5 elobi boye: “Maladi eleki liboso na ye, maladi na mɔ́tɔ [elandi] makolo na ye.” Ntango etikalaki moke Bayisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka na mobu 1473 L.T.B., mingi kati na bango batombokaki, basalaki pite na ekobo mpe basambelaki bikeko. Yango wana, Nzambe atindaki maladi oyo ebomaki bato koleka 20 000 kati na bango. (Mituya 25:1-9) Etikali moke, ntango Nzambe akotambola mpo na kobunda “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” bato nyonso oyo bazali kotombokela ye bakonyokwama mpo na masumu na bango. Bamosusu mpe bakokufa na maladi mpenza.—Emoniseli 16:14, 16.
8. Habakuku 3:6 elobi makambo nini oyo ekokómela baoyo batombokelaka Nzambe?
8 Yoká sikoyo ndenge mosakoli azali kolobela makambo oyo Yehova na bibele akosala. Na Habakuku 3:6, tozali kotánga boye: “[Yehova Nzambe] atɛ[lɛ]mi mpe apimi mokili, atali mpe abulunganisi mabota, wana ngomba ya kala ipalanganisami, nkeka ya kalakala ikumbami na nse. Nzela na ye izali lokola na kala.” Ya liboso, Yehova ‘atɛlɛmi,’ lokola mokonzi ya basoda oyo azali kotala esika oyo etumba ekosalema. Banguna na ye bazali kolenga. Bamoni moto oyo bakobunda na ye mpe bayoki nsɔmɔ, bazali kopumbwapumbwa mpo bazali mitema likoló. Yesu asakolaki ntango oyo “mabota nyonso ya mokili bakolela.” (Matai 24:30) Bakozala lisusu na eloko ya kosala te ntango bakoyeba ete moto moko te akoki kotɛlɛma mpo na kobunda na Yehova. Masangá ya bato, ata oyo ezali komonana lokola ete ekoki kokufa te lokola “ngomba ya kala” mpe “nkeka ya kalakala” ekopanzana. Na ntango wana ekozala lokola ‘nzela ya kala’ ya Nzambe, to ndenge oyo asalaki na ntango ya kala.
9, 10. Habakuku 3:7-11 eyebisi biso nini?
9 Yehova ‘ayoki nkanda’ mpo na banguna na ye. Kasi, akosalela bibundeli nini na etumba na ye monene? Yoká ndenge oyo mosakoli alobi mpo na bibundeli yango: “Olongolaki ezipelo na litimbo, malako na yo epai na mabota ezalaki liloba na solo. Opasolaki mokili na bibale. Ngomba imonaki yo mpe ibangaki, mai na mobulu elekaki; bozindo ebimisaki mongongo na yango, etombolaki mabɔkɔ na yango likoló. Moi mpe sanza itɛ[lɛ]maki na efandelo na bango nyɛ, na pole na mbanzi na yo wana elekaki yango, na pole na likonga na yo oyo ekongɛngangɛnga.”—Habakuku 3:7-11.
10 Na ntango ya Yosua, Yehova alakisaki makasi na ye ya kokamwa na ndenge atɛlɛmisaki sanza na moi. (Yosua 10:12-14) Esakweli ya Habakuku ezali kosalisa biso tóyeba lisusu ete Yehova akosalela makasi ndenge wana na Armagedon. Na mobu 1513 L.T.B., Yehova alakisaki ete azali mokonzi ya mai mozindo ntango abomaki basoda ya Falo na Mai Motane. Mbula ntuku minei na nsima, Ebale Yaladene, atako ezalaki na mai mingi, ekangaki Bayisalaele nzela te ntango bazalaki kokende na Mokili ya Ndaka. (Yosua 3:15-17) Na ntango ya mosakoli mwasi Debola, mbula makasi ememaki makalo ya basoda ya Sisela oyo azalaki monguna ya Yisalaele. (Basambisi 5:21) Na Armagedon, Yehova akosalela biloko lokola mpela, mbula makasi, mpe mai mozindo. Akoki mpe kosalela nkake mpe mikalikali, lokola likonga oyo ezali na mbanzi ebele.
11. Nini ekosalema ntango Yehova akolakisa nguya mingi oyo azali na yango?
11 Ya solo, ntango Yehova akolakisa nguya mingi oyo azali na yango ekozala nsɔmɔ. Maloba ya Habakuku emonisi ete butu ekobongwana moi mpe moi ekongɛnga makasi. Ezala ete esakweli yango ya Armagedon ekosalema mpenza ndenge elobelami to ezali nde maloba ya elilingi, tondimi mpenza ete Yehova akolonga, mpe ata monguna moko te akobika.
Basaleli ya Nzambe bakozwa lobiko!
12. Nzambe akosala banguna na ye nini, kasi banani bakobika?
12 Mosakoli alobi makambo mosusu oyo Yehova akosala ntango akoboma banguna na Ye. Na Habakuku 3:12, tozali kotánga boye: “Olekaki kati na mokili na nkanda, otutaki mabota na nkɛlɛ.” Kasi, Yehova akoboma bibomela te. Akobikisa bato mosusu. Habakuku 3:13 elobi boye: “Obimaki mpo na lobiko ya bato na yo, mpo na lobiko na mopakolami na yo.” Ya solo, Yehova akobikisa basaleli na ye bapakolami ya sembo. Na ntango yango, Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba ekobomama nyɛɛ. Nzokande, lelo oyo, bikólo ya mokili ezali koluka kolimwisa losambo ya pɛto. Etikali moke, basoda ya Koko ya Makoko bábundisa basaleli ya Yehova. (Ezekiele 38:1–39:13; Emoniseli 17:1-5, 16-18) Bakolonga basaleli ya Nzambe? Te! Na ntango yango nde Yehova akotuta banguna na ye na nkanda, akonyatanyata bango ndenge batutaka loso na libándá. Kasi akobikisa baoyo bazali kosambela ye na elimo mpe na solo.—Yoane 4:24.
13. Habakuku 3:13 ekokokisama ndenge nini?
13 Yoká ndenge oyo bakosukisa mabe mpo na libela: “[Yehova] otutaki motó longwa na ndako na moto mabe, kozalisa ye bolumbu longwa na miboko kino nkingo.” (Habakuku 3:13) “Ndako” yango ezali ebongiseli mabe oyo Satana Zabolo asali. Ekobebisama nyonso. “Motó,” to bakonzi oyo bazali banguna ya Nzambe, bakobomama. Ndako mobimba ekobebisama banda na miboko (fondation) na yango. Ekozala lisusu te. Ekozala mpenza kobikisama solo!
14-16. Habakuku 3:14, 15 elobi makambo nini oyo ekokómela basaleli ya Yehova mpe banguna na bango?
14 Na Armagedon, Yehova akokɔtisa mobulu na kati ya baoyo bazali koluka koboma “mopakolami” na ye. Na Habakuku 3:14, 15, mosakoli ayebisi Nzambe boye: “Otɔbɔlaki motó na basoda na ye na nzete na yo, baoyo bayaki lokola mopɛpɛ makasi mpo na kopanza ngai; basepelaki lokola mpo na kolya mobola na nkuku. Onyatelaki mai-na-monana na mbalata na yo, mai ezalaki kofulukafuluka mingi.”
15 Ntango Habakuku alobi ete “basoda . . . bayaki lokola mopɛpɛ makasi mpo na kopanza ngai,” azali nde koloba mpo na bapakolami ya Yehova. Lokola miyibi oyo bamibombi, bikólo ya mokili ekokwela basaleli ya Yehova mpo na koboma bango. Banguna yango ya Nzambe mpe ya basaleli na ye ‘bakosepela’ mpo bakokanisa ete bakolonga. Baklisto ya sembo bakomonana lokola nde bazali na makasi te, lokola “mobola.” Kasi ntango banguna ya Nzambe bakobundisa basaleli ya Yehova, ye akobalola mindoki na bango epai na bango moko. Bakosalela mindoki na bango, to “nzete” mpo na kobɛta basoda na bango moko.
16 Kasi esuki wana te. Yehova akotinda bikelamu na ye oyo baleki bato na makasi báboma banguna na ye nyonso. Na ‘bambalata’ ya basoda na ye ya likoló oyo Yesu Klisto akotambwisa, akoleka tii na “mai-na-monana” mpe na ‘mai ezali kofulukafuluka mingi,’ elingi koloba ebele ya banguna. (Emoniseli 19:11-21) Na nsima nde bakolongola bato mabe na mokili. Nzambe akolakisa mpenza makasi mpe bosembo na ye!
Mokolo ya Yehova ekómi pene!
17. (a) Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete maloba ya Habakuku ekokokisama? (b) Wana tozali kozela mokolo monene ya Yehova, ndenge nini tokoki kozala lokola Habakuku?
17 Tokoki kozala na elikya ete etikali moke maloba ya Habakuku ekokisama. Ekoumela mingi te. Lokola oyebi makambo oyo ekoya, ozali kosala nini? Kobosana te ete Nzambe nde atindaki Habakuku akoma makambo yango. Yehova akosala likambo moko, mpe ntango akosala yango, mobulu ekokɔta na mokili. Yango wana tokoki kokamwa te ete mosakoli akomaki boye: “Nazali koyoka mpe libumu na ngai elɛngalɛngi; bibebu na ngai etetemi mpo na mongongo; kopela ekɔti kati na mikuwa na ngai, nazali kotetema na nse na ngai moko; nakozila na kimya mpo na mokolo na mpasi ete eya likoló na bato baoyo bakotɛmɛla biso na bibele.” (Habakuku 3:16) Tokoki kokamwa te ete Habakuku azalaki mpenza motema likoló mpo na makambo yango. Kasi kondima na ye etɛngatɛngaki? Ata moke te! Andimaki kozela mokolo monene ya Yehova na motema moko. (2 Petelo 3:11, 12) Biso mpe tozali kozela mokolo ya Yehova na kimya? Ezali mpenza bongo! Tozali mpenza na elikya ete esakweli ya Habakuku ekokokisama. Biso tokozela na motema moko tii ekokokisama.
18. Atako Habakuku ayebaki ete makambo ya mpasi ezalaki koya, azalaki ndenge nini?
18 Bitumba ememaka kaka mpasi, ata epai ya baoyo balongi yango. Biloko ya kolya ekoki kozanga. Bato bakoki kobungisa biloko na bango. Bomoi ekoki kokóma mpasi. Soki ekómeli biso, tokosala nini? Habakuku apesaki ndakisa malamu, mpo alobaki boye: “Zambi ata nzete na mosuke ebimisi felele te, mpe mbuma izali na miwiti te, ata libonza na nzete na elaya ekozanga mpe bilanga ekozwisa bilei te; ata etonga ekozengama na ebatelelo mpe bibwele ikozala lisusu kati na bifandelo te, ata bongo, nakosepela na [Yehova], nakoyoka esengo na Nzambe na lobiko na ngai. [Yehova], Nkolo azali nguya na ngai, ye akozalisa makolo na ngai lokola makolo na mboloko; ye akotambolisa ngai na bisika na ngai na likoló.” (Habakuku 3:17, 18) Habakuku ayebaki malamu ete mikakatano, mpe mbala mosusu nzala ekoya. Kasi, abatelaki esengo na ye na Yehova, ye oyo abikisaki ye.
19. Baklisto mingi bazali kokutana na bampasi nini, kasi tokoki kozala na elikya nini soki totii Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso?
19 Lelo oyo, atako etikali moke etumba ya Yehova mpo na kosukisa mabe eya, bato mingi bazali na nsuka ya bwale. Yesu asakolaki ete bitumba, nzala, koningana ya mabele, mpe maladi ekozala ‘elembo ya kozala na ye’ na bokonzi. (Matai 24:3-14, NW; Luka 21:10, 11) Bandeko na biso ebele bafandi na mikili oyo mpasi ezali makasi mpo makambo oyo Yesu asakolaki ezali kokokisama, yango wana bazali konyokwama makasi. Baklisto mosusu mpe bakoki kokutana na bampasi yango na mikolo ekoya. Mpo na bandeko mingi lisusu kati na biso, liboso nsuka eya, ekoki mpenza kosalema ete ‘nzete ya mosuke ebimisa felele te.’ Kasi, toyebi mpo na nini makambo yango ezali kosalema, mpe yango ezali kopesa biso makasi. Tozali mpe na lisalisi. Yesu alakaki ete: “Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ikobakisama na bino.” (Matai 6:33) Yango elingi koloba te ete tokozala na bomoi ezangi mpasi, kasi endimisi biso ete soki totii Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso, ye akobatela biso.—Nzembo 37:25.
20. Atako bampasi ya ntango oyo mokuse ezali, tosengeli kozala na mokano ya kosala nini?
20 Ata soki tozwi mikakatano nini na ntango oyo, tokozala ntango nyonso na kondima ete Yehova azali na makasi ya kobikisa biso. Bandeko na biso mingi na Afrika, na Mpoto ya Ɛsti, mpe na bisika mosusu bazali kokutana na mikakatano makasi, kasi bazali ntango nyonso ‘kosepela na Yehova.’ Lokola bango, biso mpe tósepela ntango nyonso na Yehova. Tóbosana te ete Nkolo Mokonzi Yehova azali Mopesi ya “nguya.” (Habakuku 3:19) Akokokisa elikya na biso. Armagedon ekoya, mpe mokili ya sika oyo Nzambe alaki ekoya. (2 Petelo 3:13) Na ntango wana nde “mokili ekotondisama na boyebi na nkembo na [Yehova] lokola mai ezali kozipa mai-na-monana.” (Habakuku 2:14) Liboso ntango malamu wana eya, tiká tólanda ndakisa malamu ya Habakuku. ‘Tósepela ntango nyonso na Yehova mpe tózala na esengo na Nzambe ya lobiko na biso.’
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini libondeli ya Habakuku ekoki kotalela biso?
• Mpo na nini Yehova azali kotambola?
• Esakweli ya Habakuku elobi nini mpo na lobiko?
• Tosengeli kozala na makanisi nini wana tozali kozela mokolo monene ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 23]
Oyebi biloko nini Nzambe akosalela mpo na koboma bato mabe na Armagedon?