Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/12 nk. 20-22
  • Baboti na biso bateyaki biso kolinga Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baboti na biso bateyaki biso kolinga Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge toyekolaki mateya ya Biblia
  • Basalelaki makambo oyo bayekolaki
  • Bateyi biso solo ya Biblia
  • Bato babimisi mobulu na Selma
  • Na eteyelo ya Gileadi
  • Na mosala ya misionɛrɛ elongo na baboti na ngai
  • Lisalisi mpo na baboti na biso
  • Libula ya boklisto oyo ekomonanaka mingi te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Libula na biso ya bozwi ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Nakosala nini soki tata to mama na ngai azali maladi?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Nalandaki matambe ya baboti na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/12 nk. 20-22

Baboti na biso bateyaki biso kolinga Nzambe

LISOLO YA ELIZABETH TRACY

Mokolo moko na ntɔngɔ, ebele ya bato bayaki mpe babandaki kozomela biso. Na nsima, bato oyo bamemaki bango bayaki na mindoki mpe babimisaki Tata na Mama na motuka na makasi. Batikaki ngai na yaya na ngai ya mwasi na motuka. Tofandaki na kiti ya nsima. Tozalaki kokanisa ete mbala mosusu tokomona lisusu baboti na biso te. Likambo wana esalemaki na 1941, penepene na Selma, na etúká ya Alabama, na États-Unis. Kasi, mpo na nini basalaki biso bongo mpe likambo yango etaleli makambo oyo baboti na biso bateyaki biso na nini?

NKOMBO ya tata na ngai ezalaki Dewey Fountain. Ndeko na ye ya mwasi moto abɔkɔlaki ye na na ferme moko na etúká ya Texas mpo baboti na ye bakufaki ntango azalaki naino mwana moke. Ntango akolaki akendaki kosala na bakompanyi ya petrole. Na 1922, ntango akokisaki mbula 23, abalaki Winnie, elenge mwasi moko kitoko, moto ya Texas, mpe alukaki esika oyo akoki kofanda mpe kobɔkɔla bana na ye.

Atongaki ndako moko na zamba na ɛsti ya Texas, penepene na mwa engumba ya Garrison. Kuna, akómaki kosala bilanga. Azalaki kolona biloko ndenge na ndenge lokola ntukia (coton) mpe masangu. Azalaki mpe kobɔkɔla bibwele ndenge na ndenge. Na nsima, babotaki biso: Dewey junior na Mai 1924, Edwena na Desɛmbɛ 1925, mpe ngai nabotamaki na Yuni 1929.

Ndenge toyekolaki mateya ya Biblia

Tata na Mama bazalaki kokanisa ete bayebi Biblia mpo bazalaki na Lingomba ya Protesta. Kasi, na 1932, moto moko na nkombo ya Cook atikelaki tata-nkulutu na biso, Monroe Fountain, mikanda mibale oyo ebimisamaki na la Société Watch Tower: Délivrance mpe Gouvernement. Lokola Tata-nkulutu Monroe alingaki mpenza ete baboti na ngai báyeba makambo oyo azalaki koyekola, mbala mingi azalaki koya na ntango ya komela tii, azalaki kotánga masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe, na ntango ya kozonga, azalaki “kobosana” bazulunalo yango na ndako na biso. Na nsima na ye, Tata na Mama bazalaki kotánga yango.

Mokolo moko ya lomingo na ntɔngɔ, Tata-nkulutu Monroe abengaki Tata bákende na ndako moko oyo ezalaki kaka na kartye mpo na koyekola Biblia. Ayebisaki ye ete moto moko nkombo na ye Cook akoki kopesa biyano na mituna nyonso oyo akotuna na Biblia. Ntango Tata azongaki, nsima ya koyekola Biblia mokolo wana, azalaki na esengo mpe ayebisaki biso nyonso ete: “Nazwi biyano na mituna na ngai nyonso, kutu nayekoli makambo ya sika! Nazalaki kokanisa ete nayebi makambo nyonso, kasi ntango mobali moko, nkombo na ye Cook abandaki kolimbwela ngai lifelo, molimo, mpe mokano ya Nzambe mpo na mabelé, mpe ndenge Bokonzi ya Nzambe ekokokisa mokano yango, namonaki mpenza ete nayebi eloko te na Biblia!”

Ndako na biso ezalaki mpenza ndako ya bato nyonso. Bandeko na baninga na biso bazalaki koya mingi, bazalaki kosala krɛmɛ mpe tuska (masangu ya fware), bazalaki koyemba mpe Mama azalaki kobɛta piano. Lokola bamesanaki kokutana na ndako, mokemoke, babandaki kolobela makambo ya Biblia. Atako biso bana tozalaki mpenza kokanga ntina ya makambo nyonso te, tozalaki komona mpenza ete baboti na biso balingaki Nzambe mpe balingaki Biblia. Yango wana, biso mpe tokómaki kolinga Nzambe na Liloba na ye.

Mabota mosusu mpe bandimaki ete boyekoli ya Biblia esalemaka epai na bango. Mingimingi tozalaki koyekola lisolo moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebimi. Soki makita ekosalema na Appleby to na Nacogdoches, bamboka mibale oyo ezalaki mosika te na epai na biso, tozalaki kokende kuna na motuka na biso ya Ford. Eloko moko te ezalaki kopekisa biso, ezala moi to mbula.

Basalelaki makambo oyo bayekolaki

Eumelaki te mpo baboti na biso bákanga ntina ete basengeli kosalela makambo oyo bazalaki koyekola. Lokola balingaki Nzambe, bamonaki ete basengeli koyebisa bato mosusu makambo oyo bazalaki koyekola. (Misala 20:35) Kasi, mpo baboti na ngai bákende koteya bato mosusu ezalaki likambo moke te, mingimingi mpo bazalaki bato ya nsɔninsɔni mpe ya komitikisa. Kasi, lokola balingaki Nzambe mingi, bazongaki nsima te; mpe na nsima, likambo yango esalisaki bango báteya biso ezaleli ya kotyela Yehova motema mobimba. Tata azalaki koloba boye: “Yehova azali kokómisa basali bilanga basakoli!” Na 1933, Tata na Mama bamipesaki na Yehova mpe bazwaki batisimo na mwa mai moke penepene na Henderson, na Texas.

Na ebandeli ya 1935, Tata atindaki mokanda na la Société Watch Tower. Na mokanda yango atunaki mituna mingi na likambo etali elikya ya bomoi ya seko mpo na baklisto. (Yoane 14:2; 2 Timote 2:11, 12; Emoniseli 14:1, 3; 20:6) Joseph Rutherford, oyo azalaki prezida ya la Société, akomelaki ye mpo na koyanola ye. Kasi, na esika apesa ye biyano na mituna na ye, Ndeko Rutherford abengisaki ye na liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo esengelaki kosalema na Washington na sanza ya Mai.

Tata alobaki boye: ‘Ekoki kosalema te! Biso tozali basali bilanga, toloni hectare 26 mobimba. Mikolo yango ekozala ntango ya kobuka biloko na bilanga mpe kokende kotɛka yango.’ Kasi, mwa moke na nsima mpela ebebisaki biloko nyonso na bilanga: milona, mabondo oyo basalaki mpo na kokanga mai, na bagbagba (ponts). Yango wana, biso na Batatoli mosusu tofutelaki bisi moko mpe tokendaki na liyangani. Tosalaki kilomɛtrɛ 1 600 na ngámbo ya nɔrdi-ɛsti tii na mboka oyo liyangani esalemaki.

Na liyangani yango, Tata na Mama basepelaki mingi na ndimbola oyo bapesaki mpo na “ebele monene” oyo bakobika na “bolɔzi monene.” (Emoniseli 7:9, 14, NW) Banda wana, elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé ezalaki likambo oyo ezalaki kolendisa mpenza Tata na Mama na bomoi na bango mobimba. Bazalaki mpe kolendisa biso ‘tósimba bomoi ya solosolo,’ elingi koloba bomoi ya seko na mabelé oyo Yehova alaki. (1 Timote 6:19, NW; Nzembo 37:29; Emoniseli 21:3, 4) Atako nazalaki mwa mwana ya mbula mitano, nasepelaki mingi ndenge nakendaki na liyangani yango elongo na baboti na bandeko na ngai.

Ntango toutaki na liyangani, tolonaki lisusu bilanga na biso. Na mbala oyo tobukaki mbuma mingi mpenza na ndenge oyo tobuká naino liboso te. Nabanzi ete likambo yango esalisaki Tata na Mama na kondima ete soki totyeli Yehova motema na biso mobimba, akozanga te kopesa biso mbano. Tata na Mama bakómaki babongisi-nzela mpe bazalaki kolekisa ngonga 52 na sanza na mosala ya kosakola. Na nsima, ntango eleko ya kolona ekokaki, batɛkaki biloko nyonso! Tata azalaki na wago moko oyo ezalaki lokola ndako mpe biso nyonso mitano tozalaki kolala kuna. Asombaki motuka ya sika (modɛlɛ ya Ford) mpo ebendaka yango. Tata-nkulutu Monroe mpe asalaki bongo. Ye na libota na ye bakómaki kofanda na wago oyo motuka ebendaka.

Bateyi biso solo ya Biblia

Tata na Mama bakómaki babongisi-nzela na Ɔkɔtɔbɛ 1936. Libota mobimba tobandaki kosakola na bamboka na ɛsti ya Texas epai nsango malamu ekómaki naino mpenza te. Na boumeli ya mbula mobimba tozalaki kotambolatambola na bamboka. Kasi, bomoi yango ezalaki kosepelisa biso mingi. Tata na Mama bazalaki koteya biso na maloba mpe na ndakisa ete tosengeli kozala lokola baklisto ya ekeke ya liboso oyo bamipesaki mpo na koteya bato mosusu solo oyo ezali na Biblia.

Likambo oyo mama na biso asalaki, elingi koloba kondima kotika ndako na ye, esimbaki mpenza mitema na biso bana. Kasi, azalaki na eloko moko oyo azalaki kotika yango te: masini na ye ya kotonga bilamba. Yango ezalaki likanisi malamu mpenza. Lokola ayebaki kotonga bilamba, azalaki ntango nyonso kosalela biso bilamba ya kitoko. Soki tokei na liyangani, tozalaki ntango nyonso na bilamba ya sika mpe ya kitoko.

Nayebaka malamu ntango Herman Henschel na libota na ye bayaki na mboka na biso na motuka ya la Société Watch Tower oyo ezalaki na bikoliseli-lolaka (haut-parleurs). Bazalaki kotɛlɛmisa motuka na esika oyo bato bazali mingi, na nsima bazalaki kotya diskɛ ya lisukulu, mpe bazalaki kokende kotala bato mpo na kolimbwela bango makambo mosusu. Dewey junior akómaki moninga ya Milton, mwana ya Herman Henschel. Na ntango wana Milton azalaki naino elenge oyo akokisaki naino mbula 20 te. Lelo oyo, Milton azali prezida ya la Société Watch Tower.

Na 1937, na liyangani moko oyo esalemaki na Columbus, na etúká ya Ohio, Edwena azwaki batisimo. Mpe lisusu, basɛngaki Tata na Mama básala mosala ya mobongisi-nzela monene. Na ntango wana, na sanza moko, mobongisi-nzela monene azalaki kosala ngonga 200 to koleka na mosala ya kosakola. Soki nakanisi makambo yango, namonaka mpenza ndenge oyo ndakisa malamu ya Mama esalisaki ngai mpo na kosunga mobali na ngai na mikumba na ye na lisangá.

Soki Tata abandi koyekola Biblia na libota moko, azalaki komema biso mpo tópesa bana ya libota yango ndakisa malamu. Azalaki kosɛnga biso tóluka mpe tótánga bavɛrsɛ ya Biblia mpe tópesa biyano na mituna mosusu ya ntina. Likambo yango ebotaki mbuma: bana mingi oyo toyekolaki na bango bazali kosalela Yehova na bosembo mpenza tii na moi ya lelo. Likambo yango esalisaki biso mingi mpo na nsima tótika kolinga Nzambe te.

Ntango Dewey junior akolaki, akómaki koyoka nkaka kofanda na bandeko na ye mibale ya basi. Yango wana, na 1940 alongwaki na ndako mpe abandaki mosala ya mobongisi-nzela na Motatoli mosusu. Na nsima, abalaki Audrey Barron. Baboti na biso bateyaki mpe Audrey makambo mingi. Akómaki kolinga Tata na Mama mingi. Na 1944, ntango Dewey junior akɔtaki bolɔkɔ mpo aboyaki kosala mosala ya soda, Audrey ayaki kofanda epai na biso mpo na mwa ntango na mwa wago na biso.

Na 1941, na liyangani moko monene oyo esalemaki na engumba Saint Louis, na etúká ya Missouri, Ndeko Rutherford asalaki lisolo moko mpo na bilenge ya mbula 5 tii 18. Bilenge nyonso bafandaki na bisika oyo etalanaki na ebaelo. Ngai na Edwena tofandaki mpe tozalaki kolanda Ndeko Rutherford ntango azalaki koloba na mongongo na ye ya pɛtɛɛ mpe ya polele. Azalaki koloba lokola tata moko oyo azali koteya bana na ye na ndako na bolingo nyonso. Alendisaki baboti na maloba oyo: “Lelo oyo Klisto Yesu ayanganisi libota na ye ya kondimana liboso na ye, mpe azali koyebisa bango na molende nyonso ete báteya bana na bango nzela ya bosembo.” Na nsima, abakisaki ete: “Bófanda na bango na ndako mpe bóteya bango mateya ya solo!” Nazali na esengo ya komona ete baboti na biso basalelaki toli yango!

Na liyangani yango, tozwaki mwa buku ya sika oyo ezalaki na motó ya likambo ete Jehovah’s Servants Defended. Mwa buku yango elobelaki makambo oyo Batatoli basambaki mpe balongaki na batribinale, mpe na tribinale monene (cour suprême) ya États-Unis. Tata atyaki yango na programɛ ya boyekoli ya libota mobimba. Biso moko toyebaki te mpo nini tozalaki koyekola yango, nzokande ezalaki na ntina mingi mpo na makambo oyo tokutanaki na yango na Selma, na etúká ya Alabama, kaka nsima ya mwa bapɔsɔ.

Bato babimisi mobulu na Selma

Na ntɔngɔ ya mokolo oyo likambo yango esalemaki, Tata apesaki kopi ya mokanda moko epai ya sherif, na mokonzi ya mboka, mpe na mokonzi ya bapolisi ya Selma. Mokanda yango emonisaki ete mibeko ya mboka epesi biso ndingisa ya kosakola nsango malamu. Atako bongo, mposa na bango ezalaki kaka ete bábengana biso na mboka yango.

Na mpokwa, bato mitano bayaki na mindoki na bango na mabɔkɔ na esika oyo wago na biso ezalaki. Bakangaki ngai, Mama, na ndeko na ngai ya mwasi. Bapanzaki biloko nyonso na kati ya motuka mpo na koluka mikanda oyo ezali na makambo oyo ekoki kozimbisa bato. Tata azalaki libándá. Balakisaki ye mindoki mpe balobaki na ye akangisa motuka na ye na wago. Na ntango wana, ngai nazalaki kobanga te. Ngai na yaya na ngai ya mwasi tosɛkaki na komona ete bato yango bazali kokanisa ete biso tokoki kosala bato mabe. Kasi, ntango kaka Tata atalaki biso na miso mabe, tofandaki nyɛɛ.

Na ntango ya kokende, bato yango balobaki ete ngai na Edwena tómata na motuka na bango. Tata alobaki na mpiko nyonso ete: “Mpo na wana, malamu bóboma ngai kasi bana na ngai bakomata kuna te!” Balobanaki mwa moke mpe na nsima batikaki biso tókende na motuka na biso. Bato yango bazalaki kolanda biso na nsima na motuka na bango. Nsima ya kotambola kilomɛtɛlɛ 25, balobaki na biso tótɛlɛma pembeni ya nzela mpe babimisaki Tata na Mama. Mokomoko azalaki komeka kondimisa bango boye: “Bótika lingomba wana. Bózonga na ferme, bókende kobɔkɔla bana na bino!” Tata amekaki kosolola na bango, kasi ezalaki mpamba.

Nsukansuka, moko na bango alobaki boye: “Bókende, kasi soki bomeki lisusu kotya makolo na Dallas County, tokoboma bino nyonso!”

Lokola biso nyonso tobikaki na monɔkɔ ya ngando, totambolaki na motuka bangonga mingi mpe na nsima, ntango butu eyindaki, tótɛlɛmaki mpo na kolala. Tozwaki nimero ya motuka na bango. Mbala moko Tata atindaki lapolo na la Société Watch Tower. Mwa basanza na nsima bamonaki bato yango mpe bakangaki bango.

Na eteyelo ya Gileadi

Na 1946, babengaki Edwena na kelasi ya mbala ya 7 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watch Tower na South Lansing, na etúká ya New York. Albert Schroeder, oyo azalaki moko ya balakisi, asololaki na Bill Elrod mpe ayebisaki ye ete Edwena azali mwana mwasi moko malamu. Bill Elrod na Albert Schroeder bazalaki liboso kosala esika moko lokola babongisi-nzela, mpe na ntango wana Bill azalaki kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na New York.a Edwena na Bill bakutanaki, mpe soki mbula moko nsima ya kozwa lipɔlɔmi na ye na Gileadi, babalanaki. Basalaki bambula mingi na mosala ya mobongisi-nzela; mpe lisusu basalaki mbula mitano na Betele. Mokolo moko na 1959, Ndeko Schroeder ayebisaki banakelasi ya mbala ya 34 ya Gileadi ete moninga na ye akómi tata-mapasa: bana yango mwasi na mobali.

Na 1947, ntango ngai na baboti na biso tozalaki kosala mosala na biso na mboka Meridian, na etúká ya Mississipi, babengisaki biso misato na kelasi ya mbala ya 11 ya Gileadi. Ekamwisaki biso mpamba te nakokisaki naino mbula oyo esengeli te mpo nakɔta na kelasi yango, mpe Tata na Mama balekaki mbula oyo esɛngamaki mpo na kokɔta na kelasi yango. Kasi, bamoniselaki biso boboto mpe tolandaki mateya yango ya koyekola Biblia na bozindo.

Na mosala ya misionɛrɛ elongo na baboti na ngai

Batindaki biso na ekólo Colombie, na Amerika ya Sudi, mpo na kosala lokola bamisionɛrɛ. Kasi, tokómaki na Bogotá se na Desɛmbɛ 1949, koleka mbula mobimba nsima ya kozwa mapɔlɔmi na biso. Tofandaki na ndako ya bamisionɛrɛ epai tokutaki bamisionɛrɛ mosusu misato. Na ebandeli, Tata alobaki mbala moko ete ekoleka malamu alakisa bato Lingelesi mpo na koteya bango Biblia na esika ete ye ayekola Espagnol! Ya solo, makambo ya mpasi ezalaki, kasi mapamboli mpe ezalaki mingi! Na 1949, Batatoli bazalaki ata nkama moko te na Colombie mobimba, lelo oyo baleki 100 000!

Nsima ya kosala mbula mitano na Bogotá, batindaki Tata na Mama na mboka Cali. Na 1952, tobalanaki na Robert Tracy, oyo mpe azalaki misionɛrɛ na Colombie.b Tofandaki na Colombie tii na 1982. Na nsima batindaki biso na Mexique, epai tozali kosala tii lelo oyo. Na 1968, baboti na ngai bazongaki na États-Unis mpo na maladi. Ntango bakómaki lisusu malamu, bakobaki mosala ya mobongisi-nzela penepene na mboka Mobile, na etúká ya Alabama.

Lisalisi mpo na baboti na biso

Nsima ya bambula, Tata na Mama bakómaki kolɛmba mpe bakómaki na mposa ya lisalisi. Basɛngaki bákende kosala mosala ya mobongisi-nzela na mboka Athens, na etúká ya Alabama, penepene ya esika oyo Edwena na Bill bazalaki kofanda. Na nsima, yaya na biso ya mobali, Dewey junior, amonaki malamu libota mobimba ezala esika moko na etúká ya Caroline du Sud. Yango wana Bill amemaki libota na ye na Greenwood, na Tata na Mama. Likambo malamu wana esalisaki ngai na Robert tókoba mosala na biso na Colombie mpo toyebaki ete baboti na biso bazali kobatelama malamu.

Na nsima, na 1985, maladi ebwakaki Tata, mpe nsima na yango azalaki koloba lisusu te mpe azalaki kaka kolala na mbeto. Tofandaki libota mobimba mpo na kotalela ndenge oyo tokoki kosala mpo na kobatela baboti na biso malamu. Toyokanaki ete Audrey nde akobanda kobatela Tata mpe ngai na Robert tokobanda kotindela bango mikanda pɔsɔ na pɔsɔ mpe koyebisa bango masolo ya kolendisa oyo tokokutana na yango mpe tokobanda kokende kotala bango mbala nyonso oyo tokozwa libaku.

Nazali naino koyeba malamu mbala ya nsuka oyo nakendaki kotala Tata. Azalaki lisusu koloba te. Kasi ntango toyebisaki ye ete tolingi kozonga na Mexique, asalaki makasi atako azalaki kolenga, alobaki kaka liloba moko ete: “Bayo!” Tomonaki na liloba yango ete, na motema na ye, azali kolendisa biso na mokano na biso ya kokoba mosala na biso ya misionɛrɛ. Akufaki na Yuli 1987, mpe Mama akufaki sanza libwa na nsima.

Mokanda oyo yaya na ngai ya mwasi, oyo mobali na ye mpe akufá, atindelaki ngai ezali komonisa mpenza bolingo oyo mokomoko na biso azalaki na yango mpo na baboti na biso. “Nasepelaka mingi na bozwi ya elimo oyo baboti na biso batikelá biso mpe nandimi ata moke te ete nakokaki kozala na esengo koleka oyo nazali na yango soki baboti na biso babɔkɔlaki biso ndenge mosusu. Kondima makasi na bango, komipimela na bango, mpe kotyela Yehova motema mobimba ezalaki ndakisa oyo esalisaki ngai nakende liboso na ntango nazalaki kokutana na bampasi na bomoi na ngai.” Edwena asukisaki mokanda na ye na maloba oyo: “Nazali kotɔnda Yehova moto apesaki biso baboti oyo balakisaki biso, ezala na maloba to na misala, bolamu oyo tokoki kozwa soki totii mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1988, nkasa 11-12 (ebimeli ya Lifalanse).

b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 1960, nkasa 189-191 (ebimeli ya Lingelesi).

[Bililingi na lokasa 22, 23]

Libota na biso mobimba: (banda na lobɔkɔ ya mwasi) Dewey, Edwena, Winnie, Elizabeth, Dewey junior; na lobɔkɔ ya mobali: Elizabeth na Dewey junior liboso ya motuka ya Ndeko Henschel (1937); na nse, na lobɔkɔ ya mobali: Elizabeth ntango azalaki na mbula 16, azali kobaka bapapye ya kobenga bato na lisukulu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto