Zabolo nde apesaka biso maladi?
MALADI ELINGAKI KOZALA TE. Nzambe akelaki biso mpo tózala na bomoi ya seko mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Maladi, bampasi, na liwa oyo etungisaka biso ebandaki ntango ekelamu moko ya elimo oyo tobéngi Satana apusaki baboti na biso ya liboso, Adama na Eva, na kosala lisumu.—GENESE 3:1-5, 17-19; BALOMA 5:12.
ELINGI koloba ete bilimu nde bapesaka bato maladi nyonso oyo babɛlaka? Ndenge tolobaki yango na lisolo oyo eleki, bato mingi bakanisaka bongo. Nkɔkɔ ya Owmadji mpe akanisaki bongo. Kasi pulupulu ya Owmadji, maladi oyo mbala mosusu ebomaka bana na mikili ya molunge makasi, eutaki na bilimu mabe?
Makambo oyo Satana asalaka
Biblia epesi eyano polele na motuna yango. Ya liboso, emonisi ete bilimu ya bankɔkɔ ekoki kosala bato ya bomoi mabe te. Ntango bato bakufaka, ‘bayebaka lisusu likambo moko te.’ Bazalaka na bilimu te oyo etikalaka na bomoi. Bazali na malita, epai “ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te.” (Mosakoli 9:5, 10) Bato oyo bakufá bakoki kopesa bato ya bomoi maladi te!
Kasi, Biblia emonisi ete bilimu mabe bazali. Ekelamu ya elimo oyo tobéngi Satana azalaki motomboki ya libosoliboso na mokili. Bikelamu mosusu ya elimo balandaki ye; bakómaki kobéngama bademo. Satana na bademo bakoki kopesa bato maladi? Esilá kosalema. Bikamwiseli mosusu Yesu asalaki ezalaki nde kobengana bademo. (Luka 9:37-43; 13:10-16) Kasi, bato mingi oyo Yesu abikisaki bazalaki na maladi oyo eutaki na bademo te. (Matai 12:15; 14:14; 19:2) Ndenge moko mpe lelo oyo, maladi eutaka mingimingi na mikrobe, kasi na bilimu te.
Tokoloba nini mpo na bondoki? Masese 18:10 elobi na biso boye: “Nkombo na [Yehova] ezali ndako molai na nguya; moyengebene akokima kuna mpe akobika.” Yakobo 4:7 elobi: “Bótɛmɛlaka oyo na mabe [Zabolo] mpe akokima longwa na bino.” Ɛɛ, Nzambe akoki kobatela bato oyo bazali sembo, mpe na ndenge yango bandoki na bato ya misala mabe to mpe bilimu mabe bakokoka kosala eloko te. Na likambo yango, tokoki mpe kosalela maloba oyo Yesu alobaki ete: “Solo ekosikola bino.”—Yoane 8:32.
Bato mosusu bakoki kotuna ete, ‘Tokoloba boni na likambo oyo ekómelaki Yobo, ezali elimo mabe nde epesaki ye maladi, boye te?’ Ɛɛ, Biblia elobi ete Satana nde apesaki Yobo maladi. Kasi likambo ya Yobo ezali likambo ya ndenge mosusu. Banda kala Nzambe azalaki kobatela Yobo mpo bilimu mabe básala ye mabe te. Na nsima, Satana alukaki konyokola Yobo mpo na kotya ntembe na Yehova, mpe lokola likambo yango ebimisaki mituna ya ntina mingi, Yehova atikaki naino kobatela mosaleli na ye mpo na mwa ntango.
Kasi, Nzambe atikelaka makambo nyonso nzela te. Ntango atikelaki Satana nzela anyokola Yobo, akokaki kopesa Yobo maladi mpo na mwa ntango, kasi akokaki koboma ye te. (Yobo 2:5, 6) Na nsuka, mpasi ya Yobo esilaki, mpe Yehova apesaki ye mbano monene mpo na bosembo na ye. (Yobo 42:10-17) Makambo oyo bosembo ya Yobo emonisaki ekomamá banda kala na Biblia mpe biso nyonso totángaka yango. Ezali lisusu na ntina te ete bámeka moto mosusu.
Satana asalaka ndenge nini?
Satana azali na likambo na maladi oyo ezwaka bato kaka mpo ye nde amekaki mwasi na mobali ya liboso, yango wana basalaki lisumu. Maladi nyonso oyo biso bato tobɛlaka eutaka na Satana na bademo na ye te. Kasi, Satana apusaka mpe biso tókamata mikano ya mabe mpe tótika kondima na biso; makambo yango nde ekoki kobebisa kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso. Satana alɔkaki Adama na Eva te, abomaki bango te, to mpe apesaki bango maladi te. Apusaki Eva abuka mobeko ya Nzambe, mpe Adama alandaki ndakisa na ye ya kozanga botosi. Maladi na liwa ezali na kati ya mbuma mabe oyo makambo yango ebimisaki.—Baloma 5:19.
Ntango Bayisalaele bafandaki pene ya Moaba, Bamoaba bazalaki kobanga, yango wana mokonzi ya Moaba abéngisaki mosakoli moko mabe na nkombo Balama akende kolɔka Bayisalaele. Balama amekaki kolakela Bayisalaele mabe, kasi akokaki te mpo Yehova azalaki kobatela bango. Bamoaba basalelaki mayele ya kokosa Bayisalaele mpo bápusa bango na kosambela bikeko mpe kosala pite. Bamoaba balongaki na mayele yango, mpe Yehova atikaki kobatela Yisalaele.—Mituya 22:5, 6, 12, 35; 24:10; 25:1-9; Emoniseli 2:14.
Tokoki kozwa liteya monene na likambo wana eleká kala. Nzambe abatelaka basaleli na ye ya sembo ete bilimu mabe básala bango mabe te. Kasi, Satana akoki komeka kopusa bato mosusu ete básala makambo oyo eyokani na kondima na bango te. Akoki koluka kobenda bango na kosala pite na ekobo. To, lokola nkosi oyo ezali konguluma, akoki kobimisela bango makambo oyo ekobangisa bango mpe ekopusa bango básala makambo oyo ekopusa Nzambe atika kobatela bango. (1 Petelo 5:8) Yango wana ntoma Paulo abéngi Satana lokola “ye oyo azali na likoki ya koboma.”—Baebele 2:14, NW.
Nkɔkɔ ya Owmadji amekaki kopusa Hawa aluka nkisi mpe bikelakela mpo na kobatela mwana azwa maladi te. Eloko nini elingaki kosalema soki Hawa andimaki? Likambo yango elingaki kolakisa ete Hawa azali kotyela Yehova Nzambe motema mobimba te, mpe lisusu kondima na motema mobimba te ete Nzambe akoki kobatela ye.—Exode 20:5; Matai 4:10; 1 Bakolinti 10:21.
Satana amekaki mpe kondimisa Yobo na ndenge yango. Abomaki bana na ye, abebisaki bozwi na ye, mpe apesaki ye maladi, kasi ekokaki kaka te. Mwasi na ye moko apesaki ye toli mabe mpenza, alobaki na ye ete: “Lakelá Nzambe mabe mpe kufa!” (Yobo 2:9) Na nsima, “baninga” na ye misato bayaki kotala ye; bato yango batungisaki ye mingi mpo na kondimisa ye ete asalaki mabe yango wana azwi maladi. (Yobo 19:1-3) Na bongo, Satana asalelaki mpasi ya Yobo mpo na komeka kolɛmbisa ye mpe kopusa ye atyela lisusu bosembo ya Yehova motema te. Kasi, Yobo atikaki kotyela Yehova motema te.—Talá Nzembo 55:22.
Na ntango tobɛli, biso mpe tokoki kolɛmba nzoto. Na ntango yango, Satana amekaka kopusa biso tósala makambo oyo eyokani na kondima na biso te. Yango wana, ntango tozali na maladi, tosengeli kobosanaka te ete tobɛlaka mpo bankɔkɔ na biso ya liboso batikelá biso lisumu, kasi bilimu mabe te nde bapesaka biso maladi. Tókanisa naino Yisaka moto ya sembo, miso na ye ekufaki bambula mingi liboso ya liwa na ye. (Genese 27:1) Ezalaki mpo na bilimu mabe te kasi akómaki nde mobange. Laele akufaki na mpasi ya kobota; ezali Satana te nde abomaki ye, kasi ezalaki mpo nzoto ya moto ezali na bolɛmbu. (Genese 35:17-19) Bato nyonso ya sembo na ntango ya kala bakufá. Ezali te mpo balɔkaki bango to balakelaki bango mabe kasi mpo na lisumu oyo bankɔkɔ na biso ya liboso batikelá biso.
Soki tozali kokanisa ete bilimu mabe bapesaka biso maladi nyonso oyo tobɛlaka, ezali motambo mpo na biso. Yango ekoki kosala ete tóbanda kobanga bilimu mabe. Bongo, soki tobɛli, tokoki kopusama na koluka kobondela bademo na esika tókima bango. Soki Satana alongi kobangisa biso na makambo na ye mpe apusi biso na kosala makambo oyo ekotinda biso tóyokana na bilimu mabe, ekolakisa ete toboyi Yehova, Nzambe ya solo. (2 Bakolinti 6:15) Na kati ya bomoi na biso, tosengeli nde kobanga Nzambe, kasi tosengeli kobangaka Monguna na ye te.—Emoniseli 14:7.
Owmadji abatelamaki malamu koleka libateli nyonso na bilimu mabe. Soki tolandi maloba ya ntoma Paulo, tokoloba ete Nzambe atalelaka ye ete azali “mosantu” mpamba te mama na ye azali mondimi; akokaki kobondela Nzambe abatela mwana na ye na lisalisi ya elimo santu. (1 Bakolinti 7:14) Lokola ayebaki mpenza solo, Hawa amemaki Owmadji epai ya monganga na esika aluka bikelakela.
Makambo oyo ememelaka bato maladi
Bato mingi bandimaka te ete bilimu mabe bazali. Soki bazwi maladi mpe bazali na mbongo, bakendaka epai ya monganga. Kasi, moto ya maladi akoki kokende epai ya monganga mpe mbala mosusu abiki te. Minganga bakoki kosala makamwisi te. Kasi bato mingi oyo babangaka bilimu mabe oyo bakokaki kobika balukaka monganga se na ntango oyo monganga akoki lisusu kosala eloko te. Balukaka naino banganga-nkisi básalisa bango, mpe soki maladi esili te, na ntango wana nde elikya ya nsuka ezalaka epai ya monganga. Bato mingi bakufaka na bozoba.
Bato mosusu bakufaka liwa ya mobesu mpo bayebaka te makambo nini basengeli kosala. Bayebaka te ete ntango ayoki mpasi na esika moko ekoki kozala maladi mpe bayebaka te nini bakoki kosala mpo na komibatela na bamaladi. Koyeba makambo esalisaka na komibatela na mpasi oyo moto akoki kokima. Emonanaka mingi ete bana ya bamama oyo bayebi mokanda babɛlaka mpambampamba te lokola bana ya bamama oyo bayebi kotánga mpe kokoma te. Ya solo mpenza, kozanga koyeba makambo mosusu ekoki kozala likama.
Maladi mosusu eyaka mpo na kozanga komibatela. Na ndakisa, bato mingi bazwaka maladi mpo batikaka banzinzi bámatela bilei oyo bakolya to mpe bato oyo balambaka bazalaka na momeseno ya kosukola liboso mabɔkɔ te. Likama mosusu ezali kozanga mustikɛrɛ na bisika oyo malaria ezali mingi.a Na likambo ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, mbala mingi emonanaka ete ‘eleki malamu komibatela mpo na kozwa maladi te na esika ya kozwa maladi bongo omisalisa.’
Kozala na mimeseno mabe na bomoi ememeli bato ebele bamaladi mpe liwa ya mobesu. Mimeseno lokola kolangwa masanga, bondumba, komela bangi, mpe komela likaya ebebisi kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato mingi. Soki moto amipesi na makambo yango, bongo na nsima azwi maladi, tokoloba ete balɔki ye to elimo mabe epesi ye maladi? Te. Soki abɛli ezali foti na ye moko. Soki tozali kopesa bilimu mabe foti, ezali lokola nde toboyi kondima ete mimeseno na ye ezali mabe.
Ya solo, ezali na makambo oyo tokoki kokima te. Na ndakisa, tokoki kozwa mikrobe to kopema mopɛpɛ mabe. Likambo yango nde ekómelaki Owmadji. Mama na ye, ayebaki te nini epesaki mwana pulupulu. Bana na ye babɛlaka mpambampamba te lokola bana mosusu mpo ndako mpe lopango na ye ezalaka pɛto mpe ntango nyonso asukolaka mabɔkɔ na ye liboso ya kolamba. Kasi mwana nyonso abɛlaka na bantango mosusu. Ezali na mikrobe ndenge soki 25 oyo ekoki kopesa pulupulu. Mbala mosusu, ekoyebana te mikrobe nini epesaki Owmadji pulupulu.
Ndenge maladi ekosila mpo na libela
Soki lelo oyo tobɛlaka, ezali foti ya Nzambe te. “Nzambe amekami na mabe te, ye mpe akomekaka moto te.” (Yakobo 1:13) Soki mosaleli moko ya Yehova abɛli, Yehova asungaka ye na elimo. “[Yehova] akolendisa ye na mbeto na ye na maladi; kati na maladi na ye, akobikisa ye na mpasi na ye nyonso.” (Nzembo 41:3) Ɛɛ, Nzambe azali na motema mawa. Azali na mposa ya kosalisa biso, kasi ya konyokola biso te.
Yehova abongisi ndenge oyo akosilisa maladi mpo na libela: na nzela ya liwa mpe lisekwa ya Yesu. Mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosomba biso esali ete bato ya mitema sembo bálongwa na masumu mpe na nsuka, bakokóma nzoto kolɔngɔnɔ mpe bakozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Matai 5:5; Yoane 3:16) Makamwisi oyo Yesu asalaki emonisaki ete bato bakobikisama solosolo ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya. Nzambe akolongola mpe Satana na bademo na ye. (Baloma 16:20) Yehova akani kosala makambo malamu mingi mpo na bato oyo bazali kosala misala oyo ezali kolakisa ete bazali na kondima epai na ye. Tózala kaka na motema molai mpe tólendendela.
Liboso makambo yango eya, Nzambe azali kopesa mayele mpe azali kotambwisa bato na nzela ya Biblia mpe na nzela ya basaleli na ye oyo basali lisangá monene ya bandeko na mokili mobimba. Azali kolakisa biso ndenge oyo tokoki kokima mimeseno ya mabe oyo ebebisaka kolɔngɔnɔ ya nzoto. Azali kopesa biso baninga ya malamu oyo bakoki kosalisa biso soki tokutani na mokakatano.
Tókanisa lisusu Yobo. Elingaki kozala mabe mingi mpo na ye soki alukaki nganga-nkisi! Nzambe alingaki lisusu kobatela ye te, mpe alingaki kozanga mapamboli nyonso oyo azwaki nsima ya komekama makasi. Nzambe abosanaki Yobo te, akobosana mpe biso te. Yakobo, moyekoli ya Yesu, alobaki ete, “Bosili koyoka mpo na mpiko na Yobo, bosili komona nsuka na makambo na ye epai na Nkolo.” (Yakobo 5:11) Soki tokangami makasi, Nzambe akopambola biso mpe na ntango oyo ebongi.
Owmadji asukaki ndenge nini? Mama na ye akanisaki lisusu lisolo moko ya Lamuká!, zulunalo oyo ebimaka esika moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Lisolo yango elobelaki nkisi oyo babéngi réhydratation orale.b Alandaki malako ya lisolo yango, asalaki mai ya mungwa na sukali mpe amelisaki Owmadji. Lelo mwana azali malamu mpe na nzoto kolɔngɔnɔ.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Pene na bato 500 000 000 bazali na malaria. Bato soki milio mibale bazali kokufa na malaria mbula na mbula, mingi mpenza na Afrika.
b Talá lisolo “De l’eau et du sel pour sauver des vies” na Lamuká ya 22 Sɛtɛmbɛ 1985, nkasa 24-25 (ebimeli ya Lifalanse).
[Bililingi na lokasa 7]
Yehova akosilisa maladi mpo na libela.