Ozali komikundola?
Omonaki ete masolo oyo mautaki kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mabongi mpo na yo? Boye meká boyebi na yo na mituna oyo elandi:
◻ Wapi mituna mibale oyo esalisaki baklisto oyo bazalaki na mokakatano na likambo ya mosala bákamata mokano ya malamu?
Motuna monene ya liboso yango oyo: Biblia eboyi mpenza mosala yango? Motuna ya mibale: Moto oyo akosala mosala yango, akosangana na makambo oyo eboyami?—15/4, lokasa 28.
◻ Na ndimbola nini mokili, elilingi koloba bato, ‘ezalisami mpamba’? (Baloma 8:20)
‘Tozalisamaki mpamba’ mpo na makambo oyo baboti na biso ya liboso basalaki. Ezalaki na “mposa na [biso] te” to te mpo ete toponaki yango. Batikelaki biso yango. Na mawa na ye, Yehova atikelaki bango likoki ya kobota bana, atako bakokaki se kotikela bana yango bomoto oyo ezangi kokoka, bakisa mpe lisumu na liwa. Na yango, liwa epalanganaki epai ya bato nyonso; ezali na ndenge yango nde Nzambe “azalisaki [mokili] mpamba.”—1/5, lokasa 5.
◻ Mpo na nini ebongi tóloba ete “Mbindo-na-Libebisi” ekotɛlɛma “na esika na bulɛɛ” na mikolo ekoya? (Matai 24:15)
Na ndenge esakweli ekokisamaki na ntango ya kala,‘Mbindo-na-Libebisi oyo etɛlɛmi na esika ya bulɛɛ’ etalelaki etumba oyo basoda ya Loma basalaki na litambwisi ya Général Gallus na mobu 66 T.B. Na mikolo na biso, eloko oyo ekokani na etumba wana, elingi koloba ebandeli ya bolɔzi monene, eyei naino te. (Matai 24:21) Na yango, ‘Mbindo-na-Libebisi’ etɛlɛmi naino na esika ya mosantu te.—1/5, nkasa 16, 17.
◻ Ndenge nini tata na mama oyo basalaka bakoki kozwa ntango ya kolekisa elongo na bana na bango?
Mama oyo alɛmbaka mingi soki auti mosala, akoki kosɛnga bana básalisa ye ntango azali kolamba. Tata oyo azali na makambo mingi ya kosala na wikende, akoki kosala misala mosusu elongo na bana na ye.—15/5, lokasa 6.
◻ Baoyo bazali ‘kotambola na nzela ya Yehova’ basengeli kosala nini? (Yilimia 7:23)
Kotambola na nzela ya Yehova esɛngi kozala sembo, elingi koloba kozala na mposa makasi ya kosalela kaka ye. Yango esɛngi kotyela ye motema—kozala na kondima makasi ete makambo oyo Yehova alaki ezali solo mpe ekokokisama. Kotambola na nzela ya Yehova esɛngi botosi: kotosa mibeko na ye mpe kokangama na yango mpe kobatela mitinda na ye oyo esɛngi etamboli malamu. (Nzembo 11:7)—15/5, lokasa 14.
◻ Wapi mikumba minei ya ntina mingi “makabo na motindo na mibali” bakoki kokokisa? (Baefese 4:8)
Bakoki kobongisa biso na boboto, kotonga biso na bolingo, kobatela bomoko na biso, mpe na mpiko nyonso, kobatela biso. (Baefese 4:12-14)—1/6, lokasa 14.
◻ Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Paulo asalaki elongo na bato ebele oyo nkombo na bango ekomami na mokanda ya Misala mpe na mikanda oyo ye akomaki?
Tosengeli ntango nyonso kosala elongo na ebongiseli ya Nzambe, na lisangá na biso, mpe na bandeko na biso bandimi. Tozali na mposa ya lisungi mpe bilendiseli na bango na ntango ya esengo mpe ya mpasi.—1/6, lokasa 31.
◻ Wapi makambo misato okoki kosalela mpo na kosalisa bato mosusu báyeba ete Mozalisi azali mpenza?
Ndenge makambo ebongisami malamu na mokili, ndenge bomoi ebandá awa na mabelé, mpe bɔɔngo ya moto na makoki mingi na yango oyo ekesenisi ye na bikelamu mosusu nyonso.—15/6, lokasa 18.
◻ Mpo na nini koyeba ndimbola ya nkombo ya Mozalisi ezali na ntina?
Nkombo ya Nzambe elimboli “Akómisaka” mpe emonisi ete akanaka mpe asalaka. Soki toyebi nkombo na ye mpe tozali kosalela yango, tokoki kokanga ntina malamu ete akokisaka makambo oyo alaki mpe mikano na ye.—15/6, lokasa 21.
◻ Bokoki kosala nini mpo bana bápesaka biyano mpe básepelaka na boyekoli ya libota?
Soki likoki ezali, mwana mokomoko azala na Biblia mpe mokanda oyo bozali koyekola. Bokoki kosɛnga na mwana alimbola fɔtɔ moko oyo ezali na kati ya mokanda. Bokoki kopesa mwana ya moke vɛrsɛ moko abongisa liboso mpe atánga na ntango ya boyekoli. Bokoki kosɛnga mwana oyo akoli abongisa makanisi oyo ekomonisa ndenge ya kosalela mateya yango.—1/7, lokasa 15.
◻ Wapi mwa mikano oyo libota ekoki komityela ntango bazali kobongisa makita ya lisangá?
(1) Moto mokomoko abanda kopesa biyano na makita ya lisangá; (2) moto na moto asala makasi apesaka biyano na maloba na ye moko; (3) alimbola vɛrsɛ ya Biblia na komantere na ye; mpe (4) atalela masolo yango na bozindo mpe ayeba ndenge ya kosalela yango.—1/7, nkasa 19, 20.
◻ Wapi sɛkɛlɛ ya libala ya malamu?
Mpo na komona mpe koumela na esengo ya libala ya malamu, likambo moko ya ntina ezali kosolola malamu. Yango esɛngaka kokabola mayoki mpe makanisi. Mpe kosolola malamu ezali na makambo oyo etongaka, oyo elendisaka, ya malamu, ya lokumu, mpe oyo ebɔndisaka. (Baefese 4:29-32; Bafilipi 4:8)—15/7, lokasa 21.
◻ ‘Nzela ya Yehova’ ezali nini? (Nzembo 25:8, 9, 12)
Nzela yango ezali nzela ya bolingo. Emonanaka na misala oyo ezali malamu na miso ya Nzambe. Biblia ezali kobénga ndenge ya kosalela bolingo yango ete “nzela oyo eleki nyonso na malamu.” (1 Bakolinti 12:31)—1/8, lokasa 12.