Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/7 nk. 18-22
  • Mabota, bókumisa Nzambe na kati ya lisangá na Ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabota, bókumisa Nzambe na kati ya lisangá na Ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobongisa motema
  • Ndenge ya komibongisa mpo na makita ya lisangá
  • Kobongisa mosala ya kosakola na libota
  • Bóteya bango ntango nyonso nzela ya Yehova
  • Bakonzi ya mabota​​—⁠Bóbatela mimeseno malamu na makambo ya elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Bóyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe na libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Lisalisi mpo na mabota
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/7 nk. 18-22

Mabota, bókumisa Nzambe na kati ya lisangá na Ye

“Nakosanzola [Yehova] kati na koyangana monene.”—NZEMBO 26:12.

1. Longola koyekola mpe kobondela na ndako, likambo nini ezali na ntina na losambo ya solo?

KOSAMBELA Yehova esuki kaka na kosala mabondeli mpe koyekola Biblia na ndako te; kasi esɛngi mpe kosangana na makambo mosusu na kati ya lisangá ya Nzambe. Nzambe asɛngaki na Bayisalaele ya kala ete ‘báyanganisa bato, mibali mpe basi mpe bana,’ mpo na koyekola mibeko ya Nzambe mpo bátambola na nzela na ye. (Deteronome 31:12; Yosua 8:35) Balendisaki mikóló na ‘bilenge mpe baseka’ ete bango mpe básanzola nkombo ya Yehova. (Nzembo 148:12, 13) Bibongiseli lolenge moko ezali na kati ya lisangá ya boklisto. Na Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba, mibali, basi, na bana bapesaka biyano na masolo oyo basɛngaka bayangani báloba, mpe bato mingi basepelaka na yango.​—Baebele 10:23-25.

2. (a) Mpo na nini komibongisa ezali na ntina mingi mpo na kosalisa bilenge básepela na makita? (b) Ndakisa ya banani ezali na ntina mingi?

2 Ya solo, kosalisa bilenge bázwa momeseno ya kosangana na bibongiseli ya lisangá ekoki kozala etumba monene. Epai wapi mokakatano ekoki kozala soki tomoni lokola ete bana mosusu oyo bayaka na makita na baboti na bango basepelaka na makita te? Ya solo, bana mingi bakokaka kolanda likambo moko ntango molai te, balɛmbaka noki. Komibongisa ekoki kosalisa bango bálonga mokakatano yango. Soki bamibongisi te, bana bakolanda makita na ndenge oyo ebongi te. (Masese 15:23) Soki bamibongisaka te, ekozala mpasi mpo bákola malamu na elimo. (1 Timote 4:12, 15) Bokoki kosala nini? Ya liboso, baboti basengeli komituna soki bango moko naino babongisaka makita. Ndakisa na bango nde ekopusa bana. (Luka 6:40) Kobongisa malamu boyekoli ya libota ekoki kozala na ntina mingi.

Kobongisa motema

3. Na ntango ya boyekoli ya libota, mpo na nini bosengeli kosala milende mpo na kobongisa mitema, mpe likambo yango esɛngi nini?

3 Boyekoli ya libota esengeli kozala kaka ntango ya kozwa boyebi te kasi esengeli mpe kozala ntango ya kobongisa mitema. Likambo yango esɛngi koyeba mikakatano ya moto na moto na kati ya libota mpe komibanzabanza mpo na moto mokomoko. Yehova ‘atalaka motema.’—1 Ntango 29:17, NW.

4. (a) ‘Kozanga mayele’ elimboli nini? (b) ‘Kozwa motema’ esɛngi makambo nini?

4 Yehova amonaka nini ntango atalaka mitema ya bana na biso? Mingi na bango balobaka ete balingaka Nzambe, mpe yango ezali malamu. Kasi, elenge to moto oyo abandi koyekola makambo ya Yehova sika, ayebi naino banzela ya Yehova malamu te. Yango wana, Biblia elobi mpo na moto yango ete akoki ‘kozanga mayele.’ Mbala mosusu azali mpenza na makanisi mabe te, kasi esɛngaka ntango mingi mpo na kobongisa motema ya mwana mpo esepelisa mpenza Nzambe. Yango esɛngi koyokanisa makanisi, bamposa, mayoki mpe mikano ya moto na makambo oyo Nzambe alingaka, na meko oyo ekoki kosalema epai ya bato ya masumu. Ntango moto azali kosembolama na ndenge oyo esengeli mpenza, azali ‘kozwa motema.’—Masese 9:4; 19:8.

5, 6. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango na ‘kozwa motema’?

5 Baboti bakoki kosalisa bana na bango na ‘kozwa motema’? Ya solo, moto moko te akoki kobongisa motema ya moninga na ye moto. Mokomoko na biso akoki kopona kosala makambo oyo esepelisi ye, mpe mbala mingi etalelaka makambo oyo tozali kotika efanda na makanisi na biso. Kasi, mbala mingi soki baboti bazali na bososoli, bakoki kosala ete mwana na bango afungola motema, na bongo bakoyeba makambo oyo ezali na motema na ye mpe makambo oyo basengeli ko3salisa ye na yango. Bótuna mituna lokola oyo: ‘Okanisi nini na likambo oyo?’ mpe ‘Okolinga mpenza kosala nini?’ Na nsima, bóyoka na motema molai. Bósilika te. (Masese 20:5) Kozala na boboto, koyeba komitya na esika ya mwana, mpe kozala na bolingo ezali na ntina mingi mpo na kosimba motema ya mwana.

6 Mpo na kolendisa elimo ya malamu, mbala na mbala bosengeli kolobelaka mbuma mokomoko ya elimo mpe kosalisana na libota mpo na kolona yango. (Bagalatia 5:22, 23) Lendisá bolingo mpo na Yehova mpe Yesu Klisto; kosuka kaka na koloba te ete tosengeli kolinga bango, kasi yebisá ntina oyo tokolinga bango mpe ndenge nini tokomonisa bolingo yango. (2 Bakolinti 5:14, 15) Ntango bozali kosolola, lendisá mposa ya kosala makambo malamu mpe lakisá matomba na yango. Sololá na bana mpo na komonisa bango ntina ya kokima makanisi, maloba, mpe bizaleli mabe mpe monisá mbuma mabe na yango. (Amosa 5:15; 3 Yoane 11) Monisá ete soki makanisi, maloba, mpe bizaleli na biso ezali malamu, ekobongisa boyokani na biso na Yehova mpe soki ezali mabe, ekobebisa yango.

7. Baboti bakoki kosala nini mpo básalisa bana na bango bálongaka mikakatano mpe bákamataka mikano na ndenge oyo ekobatela boyokani na bango na Yehova?

7 Soki mwana azali na mokakatano to alingi kokamata mokano moko monene, tokoki kotuna ye boye: ‘Okanisi ete Yehova akotalela yango ndenge nini? Ezaleli nini ya Yehova epusi yo oloba bongo? Osalaki libondeli mpo na yango?’ Soki obandi kosala bongo na ntango bana bazali naino mike mpenza, okosalisa bango básala ntango nyonso makasi ya koyeba mokano ya Nzambe mpe kosala yango na bomoi na bango. Soki bakómi mpenza baninga ya Yehova, bakosepela kotambola na banzela na ye. (Nzembo 119:34, 35) Yango ekosala ete básepela na libaku ya kozala na lisangá ya Nzambe ya solo.

Ndenge ya komibongisa mpo na makita ya lisangá

8. (a) Na boyekoli ya libota, eloko nini ekoki kosalisa biso tóbosana ata likambo moko te ya ntina? (b) Boyekoli yango ezali na ntina nini?

8 Makambo oyo bokoki kotalela malamu ntango bozali kosala boyekoli ya libota ezali mingi. Ndenge nini kokokisa yango nyonso? Bokoki kosala makambo nyonso mbala moko te. Kasi, soki bokomi makambo yango na papye, ekosalisa bino. (Masese 21:5) Bótalaka liste yango mbala na mbala mpe bóluka likambo nini bosengeli kotalela. Bólanda malamu bokoli ya moto mokomoko na kati ya libota. Boyekoli ya libota ezali na esika monene mpo na kopesa mateya ya boklisto; ezali kobongisa biso mpo na bomoi ya lelo mpe mpo na bomoi ya seko na mikolo ezali koya.​—1 Timote 4:8.

9. Na oyo etali kobongisa makita, mikano nini tokoki koluka kokokisa mokemoke na boyekoli na biso ya libota?

9 Bobongisaka makita ya lisangá na boyekoli ya libota? Ezali na mikano mingi oyo bokoki kokokisaka mokemoke ntango bozali koyekola na libota. Mikano mosusu ekoki kozwa bapɔsɔ, basanza, to mpe bambula mpo bókokisa yango. Bótalela mikano oyo: (1) moto mokomoko na libota abanda kopesa biyano na makita ya lisangá; (2) moto na moto asala makasi apesaka biyano na maloba na ye moko; (3) alimbola vɛrsɛ ya Biblia na komantere na ye; mpe (4) atalela masolo yango na bozindo mpo ayeba ndenge ya kosalela yango. Makambo oyo nyonso ekoki kosalisa moto asepela na solo.​—Nzembo 25:4, 5.

10. (a) Tokoki kosala nini mpo tóbosana ata likita moko ya lisangá te? (b) Mpo na nini ezali na ntina?

10 Ata soki mbala mingi na boyekoli ya libota bobongisaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo bokoyekola na pɔsɔ wana, moto na moto to libota mobimba, bóbosana te kobongisa boyekoli ya mokanda, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, mpe Likita ya Mosala. Makita yango mpe ezali na ntina mingi mpo na koteya biso ndenge ya kotambola na nzela ya Yehova. Bokoki kosala ete ntango mosusu bóbongisaka makita bino nyonso na libota. Soki bozali kosala elongo, mayele na bino ya koyekola ekokola. Na ndenge yango, makita ekopesa bino bolamu mingi. Moko ya makambo oyo bokoki kosala ezali kolobela matomba oyo eutaka na komibongisa pɔsɔ na pɔsɔ mpo na makita mpe ntina ya kozala na ntango ya sikisiki mpo na kobongisa yango.​—Baefese 5:15-17.

11, 12. Litomba nini tokozwa na komeka nzembo oyo tokoyemba na makita, mpe ndenge nini tokoki kobongisa yango?

11 Na mayangani ya etúká “Nzela ya Nzambe ezali Nzela ya bomoi,” balendisaki biso tóbongisaka likambo mosusu oyo tosalaka na makita na biso: koyemba. Bozali kosalela toli yango? Soki bozali kosala yango ekoki kosalisa bino na kokɔtisa mateya ya Biblia na makanisi mpe mitema, mpe ekoki kobakisa esengo na bino mpo na makita ya lisangá.

12 Ntango tozali kobongisa makita, soki totiki mwa ntango mpo na kotánga mpe kolobela ndimbola ya maloba ya nzembo oyo ezali na programe, ekoki kosalisa biso na koyemba na motema mobimba. Na Yisalaele ya kala, bazalaki kosalela mingi bibɛteli ya miziki. (1 Ntango 25:1; Nzembo 28:7) Na libota na bino, moto moko ayebi kobɛta ebɛteli moko ya miziki? Ekozala malamu asalela yango mpo na komeka nzembo ya Bokonzi oyo bokoyemba na pɔsɔ wana mpe koyemba yango libota mobimba. Bokoki mpe kosalela bakasɛti ya miziki. Na bamboka mosusu, bandeko bayembaka malamu na mingongo mpamba. Ntango bazali kotambola na nzela to bazali na mosala ya kosakola, mbala mingi bayembaka nzembo oyo ezali na programe ya makita na pɔsɔ wana.​—Baefese 5:19.

Kobongisa mosala ya kosakola na libota

13, 14. Na kati ya libota, mpo na nini masolo oyo ebongisaka mitema na biso mpo na mosala ya kosakola ezali na ntina mingi?

13 Koteya bato mosusu nsango mpe mikano ya Yehova ezali na esika monene na kati ya bomoi na biso. (Yisaya 43:10-12; Matai 24:14) Tózala bilenge to mikóló, tosepelaka na mosala yango mingi mpe tosalaka yango malamu koleka soki tomibongisi. Ndenge nini tokoki komibongisa na kati ya libota?

14 Ndenge moko na makambo mosusu nyonso ya losambo na biso, ezali na ntina mingi tóbongisa mitema na biso. Tosengeli kosuka kaka te na kolobela makambo oyo tokosala, kasi lisusu ntina oyo tokosala yango. Na mikolo ya Mokonzi Yosafata, bazalaki koteya bato mibeko ya Nzambe; kasi Biblia elobi na biso ete “bato batyaki naino mitema na bango . . . te.” Yango esalaki ete bázanga makasi ya kobundisa mitambo oyo ekokaki kokabola bango na losambo ya solo. (2 Ntango 20:33; 21:11) Mokano na biso esengeli kozala kaka te ya kopesa lapolo ya bangonga oyo tolekisi na mosala ya kosakola, to kokabola mikanda. Mosala na biso ya kosakola esengeli kozala lolenge ya kolakisa bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na bato oyo bazali na mposa bápona bomoi. (Baebele 13:15) Na mosala yango, tozali ‘baninga ya mosala ya Nzambe.’ (1 Bakolinti 3:9) Talá lokumu monene boye! Ntango tozali kosakola, tozali kosala elongo na baanzelu basantu. (Emoniseli 14:6, 7) Ntango oyo eleki malamu mpo na kolendisa esengo yango ezali soki tozali kosolola na kati ya libota, ezala mpo na boyekoli ya libota ya pɔsɔ na pɔsɔ to ntango tozali kotánga mokapo ya mokolo na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo!

15. Ntango nini tokoki komibongisa na kati ya libota mpo na mosala ya kosakola?

15 Bolekisaka bantango mosusu ya boyekoli na bino ya libota na kosalisa bato ya libota na bino bámibongisa mpo na mosala ya kosakola na boumeli ya pɔsɔ? Bakoki kozwa litomba mingi na kosala bongo. (2 Timote 2:15) Ekoki kosalisa bango básala mosala ya ntina mpe oyo ekobota mbuma. Ntango mosusu, bokoki kosalela boyekoli mobimba se mpo na kobongisa ndenge ya kosala na mosala ya kosakola. Mbala na mbala, bokoki kolobelaka makambo ndenge na ndenge ya mosala ya kosakola na masolo mikuse na nsuka ya boyekoli ya libota to na bantango mosusu na kati ya pɔsɔ.

16. Yebisá ntina ya likambo mokomoko oyo paragrafe elobeli.

16 Bokoki kotalela mwa makambo mingi ya kokokisa lokola oyo: (1) Kobongisa elakiseli malamu na ndenge ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola mpe kotánga vɛrsɛ moko ya Biblia soki ekoki kosalema. (2) Kosala ete moto na moto azala na sakosi na ye, Biblia na ye, kaye ya banɔti, biki to kreyo, batrakte, na mikanda mosusu, mpe mikanda yango ezala malamu. Sakosi ya mosala ya kosakola esengeli kozala kaka sakosi ya ntalo te, kasi esengeli kozala malamu. (3) Bósolola bisika nini mpe ndenge nini kopesa litatoli ya libaku malamu. Nsima ya kolobela likambo moko, bosengeli koluka ntango ya kobima elongo mpo na komeka yango na mosala. Pesá makanisi oyo ekoki kosunga, kasi kopesa toli ebele ebele na mbala moko te.

17, 18. (a) Komibongisa na makambo nini ekoki kosalisa libota ebota mbuma na mosala ya kosakola? (b) Makambo nini bokoki kobongisa pɔsɔ na pɔsɔ?

17 Mosala monene oyo Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye ezali mosala ya kokómisa bato bayekoli. (Matai 28:19, 20) Kokómisa bato bayekoli esuki kaka na kosakola te. Esɛngi lisusu koteya. Ndenge nini boyekoli na bino ya libota ekoki kosalisa bino mpo bósala mosala yango malamu?

18 Bósolola na libota mpo na koyeba nani oyo ebongi bózongelaka ye. Ekoki kozala na baoyo bandimaki kozwa mokanda; basusu bayokaki malamu. Bato mosusu bokutanaki na bango na mosala ya kosakola ndako na ndako to boteyaki bango na libaku malamu na wenze to na kelasi. Tiká ete Liloba ya Nzambe etambwisa bino. (Nzembo 25:9; Ezekiele 9:4) Bópona moto nini oyo mokomoko na bino alingi kozongela na pɔsɔ yango. Bokosolola na ye makambo nini? Kosolola na kati ya libota ekoki kosalisa moto na moto amibongisa. Bókoma bavɛrsɛ ya ntina mpo na kotángela bato oyo basepelaki, mpe makanisi ya ntina na mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to na mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Ntango bozongeli moto, bólobela makambo ebele na mbala moko te. Na nsuka ya lisolo, tuná motuna moko oyo bokoyanola mbala ya nsima ntango bokokutana. Ekozala malamu na libota bózala na momeseno ya kobongisa bato oyo moto na moto akozongela, ntango nini akozongela bango, mpe makambo oyo akosolola na bango. Soki bozali kosala bongo, mosala ya kosakola ya moto na moto na kati ya libota ekobota mbuma mingi.

Bóteya bango ntango nyonso nzela ya Yehova

19. Mpo bato nyonso na libota bátambola ntango nyonso na nzela ya Yehova, basengeli komona likambo nini, mpe nini epesaka yango nzela?

19 Kozala tata ya libota na mokili mabe oyo ezali lisɛki te. Satana na bademo na ye bazali kosala nyonso mpo bábebisa elimo ya basaleli ya Yehova. (1 Petelo 5:8) Lisusu, lelo oyo, makambo ebele ezali kotungisa bino baboti, mingimingi bino baboti oyo bozali bino moko. Kozwa ntango ya kosala makambo nyonso oyo bozali na yango mposa ezali mpasi. Kasi ebongi bósala milende, ata soki bokolonga kosalela kaka toli moko na libaku moko, mpe mokemoke kobongisa programe na bino ya boyekoli na libota. Komona bato ya libota na yo bazali kotambola na bosembo nyonso na nzela ya Yehova ezali mbano ya esengo. Mpo na kolonga kotambola na nzela ya Yehova, bato nyonso na kati ya libota basengeli kosepela koyangana na makita ya lisangá mpe kobima na mosala ya kosakola. Mpo esalema bongo, basengeli kobongisa mitema mpe komibongisa mpo moto na moto asangana mpenza na boyekoli.

20. Eloko nini ekoki kosalisa baboti mingi bámona esengo oyo elobelami na 3 Yoane 4?

20 Ntoma Yoane akomaki boye mpo na bato oyo asalisaki bango na elimo: “Nazali na esengo eleki oyo te ete nayoka ete bana na ngai bazali kotambolaka kati na makambo na solo.” (3 Yoane 4) Soki boyekoli ya libota oyo ezali na mikano ya sikisiki mpe soki batata ya mabota bazali kokokisa bamposa ya moto mokomoko na libota na boboto mpe na lolenge oyo ezali kosunga, ekoki kosala mpenza ete mabota na bango emona esengo yango. Soki baboti bazali kolakisa ete bazali kosepela na nzela ya Nzambe oyo ezali nzela ya bomoi, bakosalisa bana na bango básepela na nzela ya bomoi oyo eleki malamu.​—Nzembo 19:7-11.

Okoki kolimbola?

◻ Mpo na nini kobongisa makita ezali na ntina mpo na bana na biso?

◻ Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango na ‘kozwa motema’?

◻ Ndenge nini boyekoli ya libota ekoki kosalisa biso na kobongisa makita nyonso?

◻ Ndenge nini komibongisa na libota mpo na mosala ya kosakola esalisaka mpo tósala mosala ya malamu?

[Elilingi na lokasa 20]

Bokoki kobongisa makita ya lisangá na boyekoli ya libota

[Elilingi na lokasa 21]

Komeka nzembo oyo bokoyemba na makita ezali na litomba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto