Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/7 nk. 26-28
  • Mabanga ya ntalo oyo ezali na bomoi ezwami na Namibie!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabanga ya ntalo oyo ezali na bomoi ezwami na Namibie!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Babandi kotimola bozwi ya elimo
  • Koya ya basakoli ya ntango nyonso
  • Kopɛtola mabanga ya ntalo
  • Mposa ya batimoli ya mabanga ya elimo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/7 nk. 26-28

Mabanga ya ntalo oyo ezali na bomoi ezwami na Namibie!

EKÓLO Namibie ezali na bolai ya kilomɛtɛlɛ soko 1 500 na bokula ya sudi-wɛsti ya Afrika. Bokula yango mobimba etondi na zɛlo oyo esalá ngombangomba mpo na mopɛpɛ, bangomba ya mabanga, mpe bitando minene ya patatalu oyo ezali na mabanga mikemike. Mabanga ya ntalo ya langi ndenge na ndenge esangani na mabanga mikemike ya mabongo ya Namibie. Na bantango mosusu diama mpe emonanaka kuna. Kasi ekólo yango ezali na eloko mosusu oyo eleki mabanga yango na motuya. Namibie ezali na mabanga ya ntalo oyo ezali na bomoi—bato oyo bauti na ebele na bitúká ya mboka yango.

Bato ya liboso oyo bafandaki na Namibie bazalaki koloba nkota mingi oyo bazalaki koyokana kati na bango mpe ebéngamaki Khoisan. Elobeli yango eyebani na mwa ba do-do-do oyo eyokanaka ntango bazali koloba. Kati na bato oyo balobaka nkota Khoisan lelo oyo, ezali na ba Damara oyo bazalaka na loposo moindo, ba Nama oyo bazalaka na loposo mpɛmbɛ mpe bazali mikusemikuse, mpe ba Bochiman oyo bayebani mingi lokola babomi minene ya nyama. Na bikeke oyo biuti koleka, bitúká mingi ya bato moindo eyaki mpe na Namibie. Bato yango bazali kati na bitúká misato ya minene ya ekólo yango: Ovambo (etúká oyo eleki monene na Namibie), Herero mpe Kavango. Mindɛlɛ babandaki kofanda na Namibie na ekeke ya 19. Bapaya mingi bakendaki kuna ntango diama ezwamaki na zɛlo ya mokili mokaoki.

Bato ya Namibie bazali na motuya mpamba te bazali lokola bato nyonso ya mokili oyo Nzambe apesaki Mwana na ye mpo afungola nzela ya bomoi ya seko mpo na bango. (Yoane 3:16) Ebele ya bato oyo bauti na ebele na bitúká ya mboka Namibie basili kondima nsango ya lobiko. Tokoki kokokanisa bango na mabanga ya ntalo mpamba te bazali “biloko kitoko ya mabota” oyo bizali koyanganisama lelo oyo na ndako ya losambo ya Yehova.​—Hagai 2:7, NW.

Babandi kotimola bozwi ya elimo

Ezalaki na 1928 nde mosala ebandaki mpo na kotimola mabanga ya ntalo na elimo na Namibie. Na boumeli ya mbula yango, filiale ya la Société Watch Tower na Afrika ya Sudi etindaki mikanda 50 000 oyo elimbolaka Biblia mpo na kokabola epai na bato oyo bafandi bipai na bipai na mboka yango. Na mbula oyo elandaki, Lenie Theron, moklisto mopakolami, moto ya Afrika ya Sudi alandelaki bosepeli oyo bato bamonisaki. Na boumeli ya sanza minei, ndeko mwasi yango atambolaki mboka monene yango ye moko ngámbo na ngámbo, akabolaki mikanda koleka 6 000 oyo elimbolaka Biblia na lokota ya Afrikaans, na Lingelesi, mpe na Allemand. Na ntembe te, mosala nyonso wana ezangaki kobota mbuma te.

Tókamata ndakisa ya Bernhard Baade, oyo azali motimoli mabanga ya ntalo mpe moto ya mboka Allemagne. Na 1929, mobokoli moko ya bibwele azalaki kotindela ye maki mpe azalaki kokanga likei mokomoko na lokasa ya mokanda moko ya la Société Watch Tower. Bernhard azalaki kotánga lokasa mokomoko na mposa mpenza, mpe azalaki komituna soki nani akomaki mokanda yango. Mokemoke, akómaki na lokasa ya nsuka, epai bakomaki adresi ya filiale ya la Société Watch Tower na Allemagne. Bernhard akomelaki la Société mpo na kozwa mikanda mingi lisusu mpe akómaki moto ya liboso ya mboka Namibie oyo andimaki solo.

Koya ya basakoli ya ntango nyonso

Na 1950, bamisionere minei oyo bakɔtaki na eteyelo ya Gileadi ya la Société Watch Tower bakómaki na Namibie. Na 1953 bamisionere bakómaki mwambe. Dick na Coralie Waldron, babalani ya mboka Australie oyo bazali naino kosala na bosembo nyonso na Namibie, bazalaki kati na bamisionere yango. Ebele na basakoli mosusu ya ntango nyonso ya Bokonzi oyo bautaki na Afrika ya Sudi mpe na mikili mosusu basangani mpe mpo na kotimola mabanga ya ntalo, mabanga ya elimo, na Namibie. Bamisionere mosusu mpe basakoli mosusu ya ntango nyonso oyo bauti na eteyelo mpo na kobongisa basungi, basili kotindama na Namibie.

Likambo mosusu oyo esali ete bokoli ya elimo emonana na Namibie ezali bongo kobongolama mpe kokabolama ya mikanda oyo elimbolaka Biblia na nkota ya minene oyo balobaka kuna, lokola Herero, Kwangali, Kwanyama, Nama/Damara, mpe Ndonga. Kobanda 1990, biro moko kitoko mpo na kobongola mikanda mpe ndako moko ya koyamba basali ya ntango nyonso ezali na Windhoek, mboka-mokonzi ya ekólo. Karen Deppisch, oyo asali elongo na mobali na ye na mosala ya ntango nyonso ya kosakola nsango malamu na bisika ndenge na ndenge ya Namibie, alobi ete: “Bato mingi bakamwaka ntango tolakisaka bango mikanda oyo ekomami na lokota na bango mpenza, mingimingi ntango bamonaka ete ata mikanda mikemike ya lolenge nyonso ezali mpe na lokota na bango.”

Kopɛtola mabanga ya ntalo

Mabanga mosusu ya ntalo ya Namibie, epɛtolamaka na mbonge oyo esukolaka zɛlo esili koleka bankóto ya bambula. Kasi, lolenge wana ya kopɛtola ekoki kobimisa mabanga ya bomoi te. Esɛngaka milende epai na bato ya kozanga kokoka ete “bálongola bomoto ya kala” mpe bálata oyo ya sika lokola baklisto. (Baefese 4:20-24, NW) Na ndakisa, losambo ya bakufi ezali makasi na bitúká mingi ya Namibie. Mbala mingi, baoyo basalaka losambo ya bakufi te banyokwamaka na bato ya libota na bango to na baninga na bango. Ntango bato bayekoli na Biblia ete bakufi “bayebi likambo moko te,” bakutanaka na komekama. (Mosakoli 9:5) Na ndenge nini?

Motatoli moko oyo alobaka lokota ya Herero alimboli ete: “Ezalaki mokakatano monene kotosa solo ya Biblia. Nandimaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, kasi ezwaki ngai ntango mingi mpo na kosalela makambo oyo nazalaki koyekola. Ya liboso, nasengelaki komindimisa ete nakozwa likama moko te soki naboyi losambo ya bankɔkɔ. Na ndakisa, nasengelaki koleka na bisika mosusu ya Namibie kozanga kotɛlɛma mpo na kotya libanga na lilita moko to kozanga kolongola ekɔti na ngai mpo na kopesa mbote na mowei. Mokemoke, nabandaki kondima ete eloko moko ekosalema te soki naboyi kosambela bankɔkɔ. Oyo nde esengo nazali na yango na ndenge Yehova apamboli milende na ngai mpo na kosalisa libota na ngai mpe bato mosusu ete báyekola solo!”

Mposa ya batimoli ya mabanga ya elimo

Liboso bamisionere báya na 1950, ezalaki bobele na mosakoli moko ya nsango malamu na Namibie. Kasi motángo yango ebakisami mpenza makasi kino ekómi na basakoli 995. Nzokande, ezali naino na mosala mingi ya kosala. Ya solo, ezali mpasi mpo na koteya na bisika mosusu. Ozali na likoki ya kosala epai mposa ya basakoli ya nsango malamu ezali makasi? Na yango, yaká na Namibie mpo na kosalisa biso ete tóluka mpe tópɛtola lisusu koleka mabanga ya ntalo, mabanga ya elimo.​—Kokanisá na Misala 16:9.

[Karte/Bililingi na lokasa 26]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

AFRIKA

NAMIBIE

[Bililingi]

Namibie ezali mboka ya mabanga kitoko ya ntalo

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Kalati: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.; Diama: Na ndingisa ya Namdek Diamond Corporation

[Bililingi na lokasa 26]

Nsango malamu ezali kosakolama epai na bato ya bitúká nyonso ya Namibie

[Elilingi na lokasa 28]

Okoki kosala esika bazali na mposa ya basakoli mingi ya Bokonzi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto