Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/6 lok. 8
  • “Nzambe akoki kosala nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nzambe akoki kosala nyonso”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masolo mosusu
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Yehova, omoni ngai!”
    Lamuká!—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/6 lok. 8

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

“Nzambe akoki kosala nyonso”

MALOBA oyo ezali na Matai 19:26 ekokisamaki epai ya elenge mwasi moko na ekólo Venezuela. Ntango ayekolaki kotyela Yehova motema mobimba, alongaki mokakatano moko monene. Yoká lisolo na ye:

“Nkɔkɔ na ngai ya mwasi azalaki moto ya boboto mpe azalaki na bolingo mingi. Kasi, ntango kaka nakokisaki mbula 16, nkɔkɔ na ngai akufaki. Liwa na ye epesaki ngai mpasi mpenza. Namitungisaki mingi, nazalaki lisusu kolinga ata kobima libándá te. Nsukansuka nakómaki kofanda kaka ngai moko.

“Nazalaki kokende kelasi te, nazalaki mpe na mosala te. Nazalaki kaka kofanda na ndako. Lokola nazalaki na baninga te, nanyokwamaki mingi na makanisi. Nazalaki komona ete nazali ata na ntina moko te mpe nazalaki na mposa nakufa mpo makambo nyonso esila mbala moko. Ntango nyonso nazalaki komituna, ‘Mpo na nini nazali na bomoi?’

“Mbala na mbala, elenge mwasi moko Motatoli, nkombo na ye Gisela, azalaki kotikela mama na ngai bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká! Mokolo moko, mama amonaki Gisela azali koleka liboso ya ndako na biso mpe atunaki ye soki akoki kosalisa ngai. Gisela andimaki ete akomeka. Kasi ngai naboyaki kokutana na ye. Gisela alɛmbaki te. Atindelaki ngai mokanda moko; bongo na mokanda yango akomaki ete alingi ngai na ye tózala baninga; mpe lisusu, ezali na moto moko ya lokumu mingi koleka ye oyo alingi azala mpe moninga na ngai. Alobaki ete moto yango ezali Yehova Nzambe.

“Likambo yango esepelisaki ngai mingi. Yango wana, ngai mpe nakomelaki ye. Sanza misato mobimba, tozalaki kotindelana mikanda. Gisela azalaki kolendisa ngai mbala na mbala, mpe nsukansuka, nazwaki makasi ya kokutana na ye. Mbala ya liboso oyo tokutanaki, Gisela ayekolaki na ngai Biblia. Asalelaki mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Ntango tosilisaki koyekola, abéngisaki ngai na makita na Ndako na Bokonzi. Nakanisaki likambo ya ndenge yango ata moke te. Mbula minei mobimba, nazalaki kobima libándá te mpe likanisi ya kotambola na balabala ezalaki kobangisa ngai.

“Gisela azalaki na motema molai epai na ngai. Alendisaki ngai nabanga eloko moko te mpe tokokende na ye nzela moko na makita. Nsukansuka, nandimaki. Ntango tokómaki na Ndako ya Bokonzi, nabandaki kolɛnga mpe kotɔka. Nazalaki kokoka kopesa moto mbote te. Kasi, nandimaki ete nakotika koyangana te, mpe Gisela azalaki kozanga te koya kozwa ngai pɔsɔ na pɔsɔ.

“Mpo asalisa ngai natika kobanga, Gisela azalaki koya kozwa ngai mpe tozalaki kokóma bato ya liboso mpenza na Ndako ya Bokonzi. Tozalaki kotɛlɛma na porte mpe tozalaki kopesa moto nyonso mbote. Na ndenge yango, nazalaki kokutana na moto moko to mibale na mbala moko, na esika ya bato ebele mbala moko. Soki amoni ete nazali kokoka lisusu te, Gisela azalaki koyebisa ngai maloba ya Matai 19:26: ‘Bato bakoki kosala yango te, nde Nzambe akoki kosala nyonso.’

“Atako ezalaki mpasi, nsukansuka nakokaki kokende na likita monene oyo ezalaki na bato ebele: na liyangani ya zongazonga. Ezalaki likambo monene mpo na ngai! Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1995, nazwaki makasi ya koyebisa bankulutu mposa na ngai ya kobanda kosakola ndako na ndako. Nsima ya sanza motoba, na Aprili 1996, nalakisaki ete namipesi na Nzambe, nazwaki batisimo na mai.

“Eleki mwa mikolo, moto moko atunaki ngai ndenge oyo nazwaki makasi ya kosala yango, nalobaki ete: ‘Mposa na ngai ya kosepelisa Yehova eleki kobanga oyo nazalaka na yango.’ Atako ekómelaka ngai mbala mosusu nanyokwama na makanisi, esengo na ngai ebakisami lokola nazali mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Soki nakanisi ndenge nazalaki, nazali kolongisa Gisela. Sikoyo, nazali na Moninga oyo amibanzabanzaka mpo na ngai mpe ‘akembisaka ngai na nguya.’”​—Bafilipi 4:13.

[Bililingi na lokasa 8]

“Mposa na ngai ya kosepelisa Yehova eleki kobanga oyo nazalaka na yango”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto