Bokutani ya ntina mingi epesi esengo na bato ya esanga moko
Eleki mwa basanza, bato ya Cuba, esanga kitoko na kati ya bisanga ya Caraïbes, basepelaki mpamba te balekisaki mikolo malamu ya makambo ya elimo na ndenge oyo esalamaki naino bongo liboso te. Na nsuka ya 1998, Batatoli ya Yehova ya esanga wana ya Antilles bazwaki mapamboli oyo bazelaki banda kala. Ezalaki mbala ya liboso nsima ya mbula 30 bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova bakendaki kuna, mpe bazalaki elongo na batindami mosusu 15. Bapaya yango bautaki na ekólo Australie, Autriche, Belgique, Grande-Bretagne, Italie, Nouvelle-Zélande, mpe Porto Rico.
EZALAKI likambo monene mpo na basakoli ya Bokonzi 82 258 oyo bazali kuna mpe bato 87 890 oyo basanganaki na bango mpo na kokanisa Elambo ya Mpokwa ya Nkolo na eleko ya prɛnta ya 1998.
Banda na mwa 1 kino na mwa 7 Desɛmbɛ 1998, Lloyd Barry, John Barr, na Gerrit Lösch bakómaki na Betele ya engumba La Havane mpe bakendaki na mayangani ya etúká oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi,” oyo esalemaki na Cuba. Basepelaki na ndenge bakutanaki na bakɛngɛli-batamboli mpe bazwaki likoki ya koyebana malamu na bakonzi ya Cuba.
John Barr, alobaki ete: “Mpo na ngai na mwasi na ngai oyo ezali likambo ya ntina mingi na lisolo ya Teokrasi. Bandeko na biso mibali mpe basi ya Cuba bazali na molende mingi mpo na solo! Namoni mpenza ete bondeko na biso na mokili mobimba ezali mpenza eloko ya motuya!” Lloyd Barry mpe alobaki boye: “Pɔsɔ oyo ya ntina esalisi ngai nayeba malamumalamu makambo oyo bandeko na biso bakutanaka na yango na mboka yango.”
Eleki sikoyo mbula mitano, Batatoli ya Yehova bakómi na bonsomi mingi na makambo ya losambo na Cuba, mpe maloba oyo bakonzi ya Cuba balobaki emonisi ete balingi bonsomi yango eumela ntango nyonso.
Na Sɛtɛmbɛ 1994, Betele ya La Havane ebandaki kobimisa mikanda. Batatoli ya Yehova bakokaki lisusu kosala mayangani mpe koteya ndako na ndako. Na nsima, na 1998, bakonzi bandimaki ete Batatoli ya Yehova 18 oyo bautaki na mikili mingi bákende kuna. Kati na bango, ezalaki na bandeko misato oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi.
Likita ya esengo
Ntango bapaya bakómaki na libándá ya mpɛpo ya José Martí na La Havane, bayambamaki na mwa bakonzi mpe na Batatoli ya Yehova oyo bautaki na Betele, kati na bango ezalaki na ndeko mobali moko oyo azalaki kokanisa lisusu mbala ya nsuka oyo Milton Henschel—moko na Mikóló-Bakambi akendaki kotala bango na Cuba, ezalaki na 1961. Ndeko yango azalaki na mbula 12 na ntango wana; sikoyo azali mokɛngɛli-motamboli.
Ntango bapaya yango bakómaki na Betele, bapesaki bango liboke moko ya bafololo ndenge na ndenge oyo ndeko moko akonaki mpo na boyei na bango. Bandeko balelaki na esengo wana basangani ya libota ya Betele batɔmbelaki bapaya boyei malamu. Na nsima, balyaki bilei oyo balambaki na lolenge ya mboka Cuba: ngulu ya kotumba, loso na madesu, salade, yucca na mojo (supu ya ai na mafuta ya olive), na bambuma. Nsima ya kolya ndeko mokomoko ya Lisangani ya Mikólo-Bakambi asalaki lisukulu oyo elendisaki bandeko mpo na mosala na Betele, yango ezali mosala ya ntina mingi. Basepelaki mingi na lisukulu ya Ndeko Lösch mpo asalaki yango na lokota ya Espagnole. Libota ya Betele ezali na bandeko 48 oyo basalaka mikolo nyonso mpe bandeko 18 oyo bayaka kopesa mabɔkɔ.
Atako babuku na Babiblia mpo na bandeko ya Cuba ebimisamaka na ekólo Italie, bango moko babimisaka bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo ezali na langi te na lisalisi ya masini mibale ya fɔtɔkopi. Yango esɛngaka bangonga mingi mpe mosala ya mabɔkɔ ya kozongela mbala na mbala na kati ya bandako ya mike mpo na kobimisa bazulunalo nyonso oyo basengeli na yango. Bandeko bapesaka mosala na bango mpo na Yehova motuya monene.—2 Bakolinti 4:7.
Makambo ya ntina mingi na liyangani
Batindami 18 bakabwanaki na bituluku misato mpo na kolanda mayangani ya etúká na bingumba misato: La Havane, Camagüey, mpe Holguín. Na mokolo mokomoko ya liyangani oyo eumelaki mikolo misato, bazalaki kobéngisa etuluku monene ya bandeko 500 to koleka, kati na bango bankulutu na babongisi-nzela, mpo na kokende na esika moko oyo liyangani ezalaki kosalema. Bazakaki koyebisa Batatoli ya esika yango kaka ete ekozala libaku ya ntina mingi, kasi bazalaki koyeba te ete bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bakozala wana. Mokolo ya mitano na ntɔngɔ, bakamwaki mingi ntango bamonaki bandeko yango mpe basi na bango bazali kokita na babisi oyo bafutelaki!
Mayangani esalemaki na bisika ya polele oyo bandeko babongisaki na ndingisa ya bakonzi. Na esika oyo liyangani esalemaki na La Havane, likoló ya mabanga oyo ezalaki na liboso ya ekɔtelo bakomaki maloba ya “Nzembo 133:1.” Yango esalisaki bandeko bákanisa lisusu maloba ya vɛrsɛ yango oyo elobi ete: “Talá! lokola ezali malamu mpe na esengo soko bandeko bakozalana na motema moko!” Ya solo, na liyangani, bondeko ya malamu mpe ya esengo ya boklisto emonanaki na esika yango.
Bayangani basepelaki na masukulu mpe masolo-mituna, mpe basepelaki lisusu mingi na lisano-liteya oyo elobelaki lisolo moko ya Biblia na mokanda ya Danyele mokapo 3, oyo esalamáká na Babilone ya kala. Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Basani nyonso basalaki malamu mpenza, mpe mongongo esalemaki malamu na boye ete tozalaki kutu koyeba te ete ezalaki kobima na kasɛti. . . . Bato mabe ya Babilone bamonanaki mpenza ete bazali bato mabe, mpe Baebele misato bazalaki mibali ya mpiko mpe bazwaki ekateli ya mpiko.”
Bakonzi ya Leta oyo batalelaka makambo ya mangomba mpe bakonzi mosusu ya guvernema oyo bayaki na liyangani bapesaki bandeko longonya mpo ete ebongiseli ezalaki malamu mpe Batatoli bazalaki na etamboli malamu. Ndeko Barry apesaki matɔndi mingi na bakonzi ya Cuba na ndenge bayambaki bapaya malamu. Bandeko bazalaki kobɛta mabɔkɔ, mpe mbala mingi ezalaki koumela miniti mingi, mpo na komonisa botɔndi mpo na masukulu, mpe lisusu mpo na bakonzi na ndenge bapesaki nzela ete mayangani esalema. Ndeko moko na libota na ye balobaki ete: “Yango elekaki kutu ndenge oyo tozalaki kokanisa—ezalaki mwa liyangani ya mikili mingi! Ezalaki kitoko mingi, mpo emonisi nguya monene ya Yehova mpo na kokokisa bilaka na ye.”
Mayangani esalisaki bato mosusu báyeba Batatoli ya Yehova malamu. Sofɛlɛ moko ya bisi ayaki na liyangani na mokolo ya pɔsɔ mpe na mokolo ya lomingo. Alobaki ete ayokaki makambo mingi mpo na Batatoli ya Yehova, kasi sikoyo andimi ete bazali bato malamu mpe ya kimya.
“Makambo oyo tokoki kobosana te”
Bato ya Cuba basepelisaki bapaya oyo bakendaki na mboka na bango mpo na ezaleli na bango ya mɔ́tɔ mpe ya boninga. Bato ya Cuba balingi mosala, batosaka mibeko mpe bazali na boboto. Mopaya moko alobaki boye: “Mbala mingi, bato yango atako toyebanaki na bango te, bazalaki kosalisa biso.”
Bapaya basepelaki mingi na kondima, esengo, mpe bolingo oyo Batatoli ya Cuba bamonisaki. Atako bakutanaki na mikakatano mingi, Yehova azalaki ebombamelo na bango. (Nzembo 91:2) John Barr alobaki boye: “Makambo mingi ya kitoko ekamwisaki ngai ntango nakómaki mpo na mbala ya liboso na Cuba, kitoko ya esanga yango, bizaleli malamu ya bato oyo tokutanaki na bango, mpe oyo eleki nyonso ezali bongo esengo oyo Batatoli ya Yehova na Cuba bazalaki na yango. Na bomoi na ngai mobimba nayoká naino te bandeko bazali koyemba nzembo ya Bokonzi na mayoki motindo oyo mpe kobɛta mabɔkɔ ntango molai soki makambo ya elimo esimbi mitema na bango! Tokoki kobosana makambo yango te. Tokokanisa yango ntango nyonso.”
Nzembo 97 elobi ete: “Tiká ete ebele na bisanga biyoka esengo.” Ya solo, Batatoli ya Yehova na esanga ya Cuba basepelaki mingi na bonsomi mingi oyo bakómi na yango mpo na kosambela Nzambe mpe lisusu na bokutani ya ntina mingi na bapaya oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge.
[Bililingi na lokasa 8]
Mabota mingi na Cuba bayaki na mayangani ya etúká oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi”
[Elilingi na lokasa 8]
Betele ya La Havane ezongelaki lisusu misala na yango na 1994
[Elilingi na lokasa 8]
Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali kokoma mwa maloba na Babiblia oyo bakopesa na bakonzi ya Leta