Rashi: Molimboli ya Biblia oyo asalaki bopusi monene
OYEBI buku moko na kati ya babuku ya liboso oyo enyatami na lokota ya Liebele? Ezali buku oyo elimbolaki Pentatɛkɛ (mikanda mitano ya Mose). Ebimisamaki na engumba Reggio de Calabre, na ekólo Italie, na mobu 1475. Nani akomaki yango? Mobali moko na nkombo Rashi.
Mpo na nini buku oyo elimbolaki Pentatɛkɛ ezwi lokumu oyo ekokani na mosusu te? Na buku na ye (Rashi—The Man and His World), Esra Shereshevsky alobaki ete buku ya Rashi “ekómaki buku ya ntina mingi na bandako ya Bayuda mpe na biteyelo na bango. Ezali na buku mosusu te na kati ya babuku oyo Bayuda bakomaki oyo basepelaki na yango lokola buku wana . . . Ezali na babuku koleka 200 oyo ezali kolobela buku ya Rashi oyo elimbolaki Pentatɛkɛ.”
Bobele Bayuda nde basepelaki na buku ya Rashi? Atako bato mingi bayebi yango te, buku ya Rashi oyo elimbolaki Makomami ya Liebele esalaki bopusi na mabongoli ya Biblia na boumeli ya bikeke. Kasi, Rashi azalaki nani, mpe ndenge nini akómaki na bopusi monene?
Rashi azalaki nani?
Rashi abotamaki na engumba ya Troyes, na ekólo France, na mobu 1040.a Azalaki naino elenge ntango akendaki kotánga na biteyelo ya Lingomba ya Bayuda na engumba Worms mpe na engumba Mayence, na etúká ya Rhénanie, na ekólo Allemagne. Kuna ateyamaki na banganga-mayele Bayuda oyo bayebanaki mingi na Mpoto. Ntango akómaki na mbula soki 25, ye moko amonaki malamu ete azonga na Troyes. Lokola ayebanaki lokola nganga-mayele ya makoki, mosika te Rashi akómaki mokonzi ya Lingomba ya Bayuda na Troyes mpe afungolaki eteyelo ya makambo ya lingomba. Na nsima, eteyelo yango ya sika ya makambo ya Bayuda ekómaki na lokumu mingi koleka biteyelo ya balakisi oyo batángisaki Rashi na ekólo Allemagne.
Na ntango yango ya kala, Bayuda na ekólo France bazalaki na mwa kimya mpe na boyokani na bato mosusu oyo bazalaki kosambela na mangomba ya boklisto; yango epesaki Rashi bonsomi ya kokoba na mosala na ye ya nganga-mayele. Kasi, azalaki nganga-mayele oyo akabwanaki na bato te. Atako azalaki na lokumu na ndenge azalaki nganga-mayele mpe mokonzi ya eteyelo, Rashi azalaki kobikela na mosala ya kosala vinyo. Mombongo wana etyaki ye na boyokani na Bayuda mingi, esalisaki ye ayeba mpe amimesenisa na makambo na bango. Engumba Troyes yango moko mpe esalisaki Rashi ayeba makambo mingi. Lokola engumba yango ezali na banzela minene oyo bato ya mombongo bazalaki koleka, mpe etondaki na bato ya bikólo ndenge na ndenge, yango esalisaki Rashi mpo na komesana malamu na makambo mpe bizaleli ya bato ya bikólo ndenge na ndenge.
Mpo na nini basengelaki na ndimbola?
Bayuda bayebanaki lokola bato oyo balingaka kotánga mingi. Kasi “buku,” elingi koloba Biblia ezalaki na lokota ya Liebele, mpe na ntango wana bato bazalaki koloba lokota ya Allemand, Arabe, Espagnole, Lifalanse, mpe minɔkɔ mosusu ndenge na ndenge. Atako Bayuda mingi bayekolaki lokota ya Liebele banda bomwana, kasi bazalaki mpenza kokanga ntina ya maloba mingi ya Biblia te. Lisusu, na boumeli ya bikeke, momeseno moko oyo balabi bakɔtisaki na Lingomba ya Bayuda elɛmbisaki bato mpo na kotalela ndimbola ya solosolo ya bavɛrsɛ ya Biblia. Masapo na ntina na maloba mpe bavɛrsɛ ya Biblia ekómaki mingi. Bakomaki ebele ya makambo mpe masolo yango na babuku ya nkasa ebele; babuku yango na mobimba ebéngami Midrash.b
Mwana ya mwana ya Rashi, Labi Samuel ben Meir (Rashbam), azalaki mpe nganga-mayele ya Biblia. Ntango alimbolaki Genese 37:2, alobaki ete “balimboli ya kala [oyo bazalaki liboso ya Rashi] . . . balingaki mingi kosala masolo (derashot), yango nde bamonaki ete ezali na ntina mingi, kasi bazalaki na momeseno ya koluka ndimbola ya mozindo ya vɛrsɛ ya Biblia te.” Mpo na momeseno yango, Doktere Abraham Cohen (mokomi-mokambi ya babuku Soncino Books of the Bible) akomi ete: “Ezali solo ete Balabi batyaki mobeko ete liteya moko te ekondimama soki eyokani te na peshat to ndimbola ya polele ya Biblia; nzokande bazalaki koloba kasi bazalaki kosalela mobeko yango te.” Na makambo ya losambo motindo wana, Moyuda oyo atángaki kelasi mingi te azalaki kokanga ntina te ntango azali kotánga Biblia, yango wana esengelaki na buku moko mpo na kolimbola Biblia.
Mokano ya Rashi mpe mayele oyo asalelaki
Na bomoi na ye mobimba, Rashi amityelaki mokano ya kosala ete Bayuda nyonso bákanga ntina ya Makomami ya Liebele. Mpo na kokokisa mokano yango, abandaki kosangisa babuku oyo ezalaki na bandimbola ya maloba mpe bavɛrsɛ oyo amonaki ete ezali mpasi mpo motángi akanga ntina na yango. Rashi akomaki makambo oyo eutaki na bandimbola ya balakisi na ye mpe na boyebi azalaki na yango na mikanda mingi ya balabi. Na bolukiluki na ye ya ndimbola ya maloba ya lokota, Rashi atángaki babuku nyonso oyo ezalaki na eleko wana. Atalekaki mingi lolenge oyo Bamasorete bakɔtisaki bilembo ya bopemi soki ebebisaki ndimbola ya Makomami te. Mpo na kolimbola malamu liloba moko, mbala mingi mokanda na ye oyo elimbolaki Pentatɛkɛ ezali kosalela ndenge liloba yango ezali na libongoli ya Aramɛyɛ (Targoum ya Onkelos). Rashi atingamaki na makanisi na ye moko te kasi atalelaki na likebi mpenza makambo oyo elimbolamaki liboso te oyo etali maloba ya kokangisa makanisi (prépositions, conjonctions), bandimbola ya verbe, makambo mosusu ya gramere mpe bafraze. Bandimbola yango esalisaki mingi mpo na kokanga ntina ya bafraze mpe gramere ya lokota ya Liebele.
Na bokeseni na momeseno ya balabi ya Lingomba ya Bayuda, Rashi azalaki ntango nyonso koluka maloba ya pɛtɛɛ mpo na kolimbola Makomami. Kasi, ezalaki mpe na ebele ya babuku ya Midrash oyo Bayuda bayebaki malamu. Likambo moko oyo ezali kobenda likebi mingi na buku ya Rashi, ezali lolenge oyo amonisi polele babuku ya Midrash oyo mbala mingi ezalaki kobulunganisa ndimbola ya Biblia.
Na ndimbola na ye ya Genese 3:8, Rashi alobi ete: “Ezali na ba midrash ya aggadac mingi oyo bato ya bwanya babongisaki malamumalamu kati na Beréchith rabba mpe na babuku mosusu ya midrash. Kasi, ngai nakotalela mpenzampenza ndimbola (peshat) ya vɛrsɛ, na ba aggadot ndenge maloba ya zingazinga ya Makomami elimboli yango.” Rashi aponaki mpe akomaki bobele babuku ya midrash oyo amonaki ete ekosalisa bato mpo na kongɛngisa ndimbola ya maloba ya zingazinga ya bavɛrsɛ ya Biblia mpe alongolaki babuku ya midrash oyo ezalaki kokɔtisa bongolabongola mpe mobulungano. Yango wana, mabota ya Bayuda oyo eyaki na nsima basalelaki mingi babuku ya Midrash oyo Rashi aponaki.
Atako Rashi azalaki na botɔndi mingi epai na balakisi na ye, azalaki kokakatana te mpo na koboya ntango amoni ete bandimbola na bango eyokani te na ndimbola ya polele ya vɛrsɛ moko ya Biblia. Soki akangi ntina ya vɛrsɛ moko malamu te to mpe amoni ete liboso alimbolaki yango mabe, azalaki kondima likambo yango mbala moko, kutu atángi makambo oyo bayekoli na ye basalisaki ye mpo ayeba yango malamu.
Apusami na makambo ya eleko na ye
Rashi azalaki mpenza kolandela makambo ya eleko na ye. Mokomi moko alobi na mokuse ete: “[Rashi] apesaki Bayuda likabo monene na ndenge alimbolaki lisusu bavɛrsɛ nyonso ya ntina na ndenge lokota ezalaki kolobama ntango wana. Apesaki bandimbola ya polele mpe ya pɛtɛɛ, asalaki yango na mɔ́tɔ mpe na ndenge ya kopesa bato lokumu, na makoki mpenza ya nganga-mayele, na boye ete bapesaki babuku na ye lokumu mpe balingaki yango mingi. Rashi akomaki Liebele na mayele mpe na bonzenga lokola nde ezalaki Lifalanse. Soki azangi liloba ya sikisiki ya Liebele, azalaki kosalela liloba ya Lifalanse, azalaki kokoma yango na balɛtɛlɛ ya Liebele.” Rashi asalelaki maloba koleka 3 500 ya Lifalanse oyo akomaki na balɛtɛlɛ ya Liebele. Maloba yango ekómaki na ntina mingi epai na bato ya kala oyo bayekolaki lokota ya Lifalanse mpe lolenge ya kobénga maloba.
Atako bomoi ya Rashi ebandaki na mwa kimya, kasi bambula na ye ya nsuka emonisi ete kowelana makasi ezalaki kati na Bayuda na baklisto. Na mobu 1096, etumba ya liboso ya Croisade ebomaki Bayuda na etúká ya Rhénanie, esika Rashi atángaki kelasi. Bankóto ya Bayuda bakufaki. Emonani ete Rashi atungisamaki mingi na nsango ya liwa ya Bayuda (kobanda wana kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye ekómaki kobeba kino ntango akufaki na mobu 1105). Kobanda ntango wana, mbongwana monene ekɔtaki na bandimbola na ye ya Makomami. Ndakisa moko ya ntina mingi ezali na Yisaya mokapo 53, oyo ezali kolobela monyoko ya mosaleli ya Yehova. Liboso, Rashi alimbolaki ete bavɛrsɛ yango etali Masiya, ndenge Talmud mpe elimboli yango. Kasi emonani ete nsima ya etumba ya Croisade, akanisaki ete bavɛrsɛ yango etalelaki nde Bayuda, oyo banyokwamaki kozanga ntina. Banda wana Bayuda bakómaki kobebisa ndimbola ya bavɛrsɛ yango.d Na bongo, etamboli mabe ya mangomba ya boklisto, epɛngwisaki bato mingi, bakisa mpe Bayuda, na mateya ya solo na ntina na Yesu.—Matai 7:16-20; 2 Petelo 2:1, 2.
Ndenge nini asalaki bopusi na mosala ya kobongola Biblia?
Mwa moke na nsima, Rashi akómaki na bopusi ata epai ya bato oyo bazalaki na Lingomba ya Bayuda te. Sango Nicolas de Liré, molimboli ya Biblia (1270-1349) mbala na mbala azalaki kozongela makanisi ya “Labi Salomo [Rashi]” na boye ete bapesaki ye nkombo “Momekoli ya Solomo.” Na nsima, balimboli mpe babongoli mingi balandaki bopusi ya Liré, bakisa mpe babongoli ya liboso ya King James Version na Lingelesi mpe Martin Luther, oyo akɔtisaki mbongwana na mosala ya kobongola Biblia na Allemagne. Luther amipesaki mingi na bopusi ya Liré na boye ete bato bakómaki koyemba loyembo moko oyo elobaki boye: “Liré bɛtá lindanda, Luther abina.”
Rashi apusamaki makasi na makanisi ya balabi oyo eyokanaki te na mateya ya baklisto. Kasi, lokola ayebaki malamumalamu maloba ya Liebele oyo esalelami na Biblia, ndimbola ya bafraze, mpe gramere mpe na milende oyo asalaki mpo na kokanga ntina ya ndimbola ya bavɛrsɛ, Rashi atikelaki balukiluki na babongoli ya Biblia buku ya ntina mpo na kosala bokokanisi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Rashi” ezali nkombo mokuse ya Liebele oyo euti na balɛtɛlɛ ya liboso ya bankombo oyo: “Rabbi Shlomo Yitzḥaqi [Labi Salomo mwana ya Yisaka].”
b Liloba “Midrash” euti na liloba ya Liebele oyo elimboli “koluka koyeba, koyekola, kolukaluka,” mpe “koteya.”
c Aggadah (na boike aggadot) elimboli “lisolo” mpe ezali kolobela makambo oyo ebakisami na mikanda ya balabi. Mbala mingi ezalaki masolo oyo ekomami na Biblia te kasi ezali kotánga bankombo ya bato oyo Biblia elobeli to ezalaki masapo na ntina na balabi.
d Mpo na koyeba makambo mosusu likoló na bavɛrsɛ yango, talá motó na likambo “Mosaleli na ngai”—Azali nani?, na etanda ya lokasa 28 na mwa buku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Makomi: Per gentile concessione del Ministero dei Beni Culturali e Ambientali