Bazali kowela esika “Mosantu”
NA MOKOLO ya 15 Yuli 1099, pápa wa Loma atindaki basoda baklisto mpo na mbala ya liboso na etumba babéngi croisade mpo na kobɔtɔla Yelusaleme na mabɔkɔ ya Bamizilma mpe babɔtɔlaki yango. Babomaki bato na ndenge ya nsɔmɔ! Bobele guvernere na mobateli na ye nde babikaki mpamba te bafutaki mbongo mingi mpo bábikisa bango. Sango Antony Bridge akomaki na buku na ye (The Crusades) makambo ekómelaki Bamizilma oyo batikalaki mpe alobi boye: “Ntango bapesaki basoda ya croisade nzela ya kosala nyonso oyo balingi na kati ya engumba, basopaki ebele ya makila. . . . Babomaki mobali nyonso, mwasi mpe mwana oyo bakutaki na engumba . . . Ntango moto ya koboma azalaki lisusu te, basoda yango batambolaki na babalabala ya engumba . . . kino na ndakonzambe ya Saint-Sépulcre mpo na kopesa Nzambe matɔndi.”
Banda basoda ya croisade babɔtɔlaki Yelusaleme, kowelana ekɔtaki na engumba yango kati na mangomba ya boklisto: Lingomba ya Katolike ya Loma, Ortodokse ya Azia, mpe mangomba mosusu ya boklisto. Na mobu 1850, kowelana oyo ebimaki kati na bakonzi ya mangomba mingi mpo na bisika mosantu ya Yelusaleme mpe zingazinga na yango ebimisaki etumba ya Crimée. Ekólo Angleterre, France, na Empire Ottoman, ebundisaki ekólo Russie mpe bato koleka 500 000 bakufaki.
Etumba yango esilisaki matata ya mangomba ya boklisto te mpo na Yelusaleme na bisika mosantu na yango. Bato ya Empire Ottoman oyo bazalaki koyangela mboka yango na eleko wana, balukaki kotya kimya na ndenge bapesaki lingomba mokomoko esika mosantu na yango. Doktere Menashe Har-el akomaki na buku na ye (This Is Jerusalem) mpe alobi boye: “Mabota Masangani endimaki likambo yango . . . na ekateli oyo bazwaki na Novɛmbɛ 1947 mpo na likambo ya kokabola mabelé. Lelo oyo ezali mobeko oyo endimami na mikili mingi.” Yango wana, bapesaki ndakonzambe ya Saint-Sépulcre na baklisto ya Katolike ya Loma, Ortodokse ya Grèce, Arménie, Syrie, mpe Égypte. Na nsima, bato ya Lingomba ya Éthiopie balobaki ete esika yango ezali esika na bango. Batyaki bato na bango báfanda na bahema likoló ya ndakonzambe yango. Bato mingi batalelaka ndakonzambe ya Saint-Sépulcre lokola esika oyo eleki bosantu na kati ya mangomba ya boklisto. Etondi na mwa bisika ya losambo, bikeko, mpe bililingi. Esika mosusu ebéngami mosantu, ezali Calvaire de Gordon, Baprotesta mosusu bakumisaka yango mpo bakanisaka ete ezali esika oyo babomaki mpe bakundaki Yesu.
Kala mpenza, Yesu alobaki na mwasi moko oyo azalaki kondima bisika mosantu ete: “Ntango ekoya wana bokosambela Tata na ngomba oyo te to na Yelusaleme te. . . . Basambeli na solo bakosambela Tata na bisambeli na [elimo, NW] mpe na solo.” (Yoane 4:21-24) Yango wana, baklisto ya solo bakumisaka bisika mosantu te. Lokola basoda ya Loma babomaki Yelusaleme oyo epɛngwaki na mobu 70 T.B., ezali likebisi mpo na mangomba ya boklisto. Losambo na bango ya bikeko, bokabwani, mpe nyongo ya makila oyo bazali kosopa emonisi lokuta na bango ntango bazali komibénga ete mangomba ya boklisto. Yango wana, bakozwa etumbu oyo Nzambe asakolaki mpo na mangomba nyonso ya Babilone monene.—Emoniseli 18:2-8.