Lobiko ezali na Yehova
“Nzambe na biso azali Nzambe na kobikisa.”—NZEMBO 68:20.
1, 2. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali Liziba ya lobiko? (b) Limbolá Masese 21:31.
YEHOVA azali Mobikisi ya bato oyo balingaka ye. (Yisaya 43:11) Davidi, mokonzi monene na Yisalaele ya kala ayebaki likambo yango na makambo oyo ye moko akutanaki na yango mpe ayembaki na bosembo nyonso ete: “Lobiko ezali na Yehova.” (Nzembo 3:8, NW) Mosakoli Yona alobaki maloba motindo wana na libondeli mozindo oyo asalaki na libumu ya mbisi monene.—Yona 2:9.
2 Salomo mwana ya Davidi, ye mpe ayebaki ete Yehova azali Liziba ya lobiko, mpamba te alobaki ete: “Mbalata ebongisami mpo na mokolo na etumba, nde elonga ezali epai na [Yehova].” (Masese 21:31) Na ntango ya kala na Moyen-Orient, ngɔmbɛ ezalaki kobenda etimweli, mpunda (âne) ezalaki komema bato na mikumba, mpe na bitumba bazalaki kosalela mbalata (cheval). Kasi, liboso ete Bayisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka, Nzambe alobaki ete moto oyo asengelaki kokóma mokonzi na bango “azwa mbalata mingi mpo na ye mpenza te.” (Deteronome 17:16) Bazalaki na mposa ya mbalata ya bitumba te mpamba te Yehova azalaki wana mpo na kobikisa libota na ye.
3. Mituna nini ebongi tótalela yango?
3 Nkolo Mokonzi Yehova azali “Nzambe na kobikisa.” (Nzembo 68:20) Likambo yango ezali mpenza elendiseli! Kasi misala nini ya “kobikisa” Yehova asalaki? Mpe abikisaki banani?
Yehova abikisaka basembwi
4. Ndenge nini toyebi ete Yehova abikisaka bato oyo babangaka ye?
4 Maloba ya ntoma Petelo ekoki kobɔndisa baoyo nyonso bazali komitambwisa na bosembo lokola basaleli oyo bamipesi na Nzambe. Alobaki ete: “Nkolo ayebi kobikisa bango bakosambela ye wana ezali bango kati na komekama nde kobatela bakeseni kino mokolo na kosamba mpo na kozwa etumbu.” Mpo na komonisa bosolo ya likambo yango, Petelo alobaki ete Nzambe “atikaki mokili na kalakala te, kasi abateli Noa, mosakoli na boyengebene, na bamosusu nsambo wana eyeisi ye mpela na mokili likoló na batyoli.”—2 Petelo 2:5, 9.
5. Mokili ezalaki ndenge nini ntango Noa asalaki lokola “mosakoli ya boyengebene”?
5 Kanisá soki ozalaki na ntango ya Noa na kati ya makambo motindo wana. Bademo oyo balati nzoto ya bato bayei awa na mabelé. Bana oyo baanzelu yango batomboki baboti bazali konyokola bato, mpe ‘mokili etondi na yauli.’ (Genese 6:1-12) Nzokande, Noa abangi kosala mosala ya Yehova te. Kutu, azali “mosakoli ya boyengebene.” Ye na libota na ye batongi masuwa mpe bazali na ntembe ata moke te ete mabe ekosilisama na eleko oyo bazali na bomoi. Kondima ya Noa esambisi mpe ekweisi mokili wana. (Baebele 11:7) Makambo oyo mazali koleka na mokili ya lelo makokani na makambo mazalaki na mikolo ya Noa, mpe mamonisi ete tozali na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya biloko mabe oyo. (Matai 24:37-39; 2 Timote 3:1-5) Na bongo, okozala sembo lokola mosakoli ya boyengebene na ndakisa ya Noa mpe okosala elongo na libota ya Nzambe wana ozali kozela lobiko ya Yehova?
6. Ndenge nini 2 Petelo 2:7, 8 emonisi ete Yehova abikisaka basembwi?
6 Petelo apesi bilembeteli mosusu mpo na komonisa ete Yehova abikisaka bato oyo bazali sembo epai na ye. Alobi ete “[Nzambe] abikisi mpe Lota moyengebene, oyo azalaki [komitungisa] mpo na lofundo na bizaleli na bato kati na mobulu. Zambi efandaki moyengebene kati na bango, amoni mpe ayoki misala na bango na kilikili mokolo na mokolo mpe anyokolami na molimo na ye sembo.” (2 Petelo 2:7, 8; Genese 19:1-29) Na mikolo oyo ya nsuka, bato mingi bamipesi na pite mpe na ekobo. Lokola Lota, ozali ‘komitungisa mpo na lofundo na bizaleli na bato kati na mobulu’ oyo bato mingi bamipesi na yango lelo oyo? Soki ezali bongo, mpe soki ozali kosala na bosembo, okoki kozala kati na baoyo Yehova akobikisa ntango akosukisa ebongiseli mabe oyo.
Yehova abikisaka bato na ye na mabɔkɔ ya banyokoli
7. Ndenge nini makambo oyo Yehova asalelaki Bayisalaele na Ezipito emonisi ete abikisaka bato na ye na monyoko?
7 Ntango nyonso ebongiseli oyo ekoumela, basaleli ya Yehova bakonyokwama mpe banguna bakoyokisa bango mpasi. Kasi bakoki kozala na elikya ete Yehova akobikisa bango, mpamba te na ntango ya kala abikisaki basaleli na ye oyo bazalaki konyokwama. Kanisá soki ozali Moyisalaele mpe ozali konyokwama na mabɔkɔ ya Baezipito na ntango ya Mose. (Exode 1:1-14; 6:8) Nzambe akweisi malɔzi na mokili ya Ezipito. (Exode 8:5–10:29) Ntango bolɔzi ya zomi ebomi mwana ya liboso na libota mokomoko ya Baezipito, Falo atiki Bayisalaele bákende, kasi na nsima ayanganisi basoda na ye mpe alandi bango. Mpe, mwa moke na nsima, ye na bato na ye bakufi na Mai Motane. (Exode 14:23-28) Ozali koyemba elongo na Mose mpe Yisalaele mobimba ete: “[Yehova] azali mobali na etumba; [Yehova] ezali nkombo na ye. Ye abwaki makalo na Falo na ebele na ye kati na mai na monana; mpe bakapitene basili kozinda kati na Mai Motane. Mpela ebomi bango; bakiti kati na bozindo lokola libanga.” (Exode 15:3-5) Likama motindo yango ekokwela bato nyonso oyo bazali konyokola libota ya Nzambe na mikolo oyo ya nsuka.
8, 9. Pesá ndakisa moko na mokanda ya Basambisi oyo emonisi ete Yehova abikisaka bato na ye na mabɔkɔ ya banyokoli.
8 Nsima wana Bayisalaele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, basambisi bazalaki kosambisa mpo na kotya bosembo kati na bango na boumeli ya bambula mingi. Na bileko mosusu bapaya banyokolaki libota ya Nzambe, kasi Nzambe asalelaki basambisi ya sembo mpo na kobikisa bango. Atako biso mpe tokoki ‘kokimela na ntina na baoyo bazali koyokisa biso mpasi mpe konyokola biso,’ Yehova akobikisa mpe biso lokola tozali basaleli na ye ya sembo. (Basambisi 2:16-18; 3:9, 15) Mokanda ya Basambisi endimisi biso likambo yango mpe endimisi biso ete Nzambe akobikisa biso na lobiko monene na nzela ya Yesu Klisto, Mosambisi oyo ye aponi.
9 Tózonga naino na mikolo ya Mosambisi Balaka. Lokola Bayisalaele bamipesi na losambo ya lokuta mpe Nzambe aboyi bango, Yabini, mokonzi ya Kanana anyokoli bango na boumeli ya mbula 20. Sisela azali mokonzi ya limpinga monene ya basoda ya Kanana. Atako bazali soko bato milio minei na ekólo mobimba, kasi ‘nguba soko likɔnga emonani na kati na nkóto ntuku minei na Yisalaele’ te. (Basambisi 5:6-8) Bayisalaele babongoli motema mpe bamileli epai na Yehova. Lokola Nzambe atindi na monɔkɔ ya mosakoli-mwasi Debola, Balaka ayanganisi mibali 10 000 na Ngomba Tabola, mpe Yehova ayanganisi banguna na lobwaku oyo ezali na nse ya Ngomba Tabola. Na makɛlɛlɛ lokola lokito ya nkake, basoda ya Sisela bayei na makalo ya bitumba 900 na lobwaku mpe kati ya Ebale Kisoni oyo ekauki. Kasi mbula makasi ebandi kobɛta mpe mpela eyei na Ebale Kisoni. Ntango Balaka na bato na ye bazali kokita na Ngomba Tabola wana mbula makasi ezali kobɛta, bamoni ebele ya bato oyo Yehova abomi na nkanda na ye makasi. Bato ya Balaka babomi Bakanana oyo bazali koluka kokima na kobanga, mpe ata moto moko te abiki. Likambo oyo ezali likebisi mpo na banyokoli na biso oyo bazali kokanisa ete bakobunda na Nzambe!—Basambisi 4:3-16; 5:19-22.
10. Mpo na nini tokoki komindimisa ete Nzambe akobikisa basaleli na ye na mikolo na biso na mabɔkɔ ya banyokoli na bango nyonso?
10 Yehova akobikisa basaleli na ye na mikolo na biso na mabɔkɔ ya banguna nyonso oyo bazali konyokola bango, lokola abikisaki Yisalaele oyo bazalaki kobanga Nzambe na ntango ya makama. (Yisaya 43:3; Yilimia 14:8) Nzambe abikisaki Davidi “na mabɔkɔ ya bayini na ye nyonso.” (2 Samwele 22:1-3) Na bongo, ata soki bazali koyokisa biso mpasi to konyokola biso mpo tozali basaleli ya Yehova, tózala na mpiko, mpamba te Masiya oyo Nzambe aponi ete azala Mokonzi akobikisa biso na minyoko. Ɛɛ, “akobikisa milimo na babola. Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala.” (Nzembo 72:13, 14) Lobiko yango ezali lisusu mosika te.
Nzambe abikisaka baoyo batyelaka Ye motema
11. Elenge Davidi apesaki ndakisa nini oyo emonisi ete atyelaki Yehova motema?
11 Mpo Yehova abikisa biso, tosengeli, na mpiko nyonso, kotyela ye motema. Davidi atyelaki Nzambe motema mpe azalaki na mpiko ntango abimaki mpo na kobunda na engambe Goliata. Kanisá mbinga ya Mofilistia wana atɛlɛmi liboso ya elenge Davidi, bongo Davidi angangi ete: “Yo oyeli ngai na mopanga mpe na likɔnga monene mpe na likɔnga moke, kasi ngai nayeli yo na nkombo na [Yehova] na bibele, Nzambe na basoda na Yisalaele oyo yo obɛtɛli bango ntembe. Lelo oyo [Yehova] akokitisa yo na lobɔkɔ na ngai; nakobɛta yo mpe nakolongola yo motó na yo; nakopesa bibembe na ebolo na Bafilistia lelo epai na ndɛkɛ na lola mpe epai na nyama na zamba, ete bato na mokili mobimba báyeba ete Nzambe azali na Yisalaele. Mpe koyangana oyo nyonso bakoyeba ete [Yehova] akobikisa na mopanga mpe na likɔnga te. Mpo ete etumba ezali na [Yehova].” Mosika te Goliata akufi, mpe Bafilistia batelengani. Ezali polele ete Yehova abikisaki bato na ye.—1 Samwele 17:45-54.
12. Mpo na nini kokanisa Eleazala, moko na bilombe ya Davidi, ekoki kosunga biso?
12 Ntango bato bazali konyokola biso, mbala mosusu tosengeli ‘komimonisa bato mpenza’ mpe kotyela Nzambe motema mobimba. (Yisaya 46:8-13; Masese 3:5, 6) Talá likambo oyo esalemaki na esika ebéngami Pasa-damimi. Bayisalaele bakimaki basoda ya Filistia. Kasi Eleazala, moko na bilombe misato ya Davidi, azongi nsima te na bobangi. Atɛlɛmi na kati ya elanga ya orge mpe ye moko abomi Bafilistia na mopanga. Na ndenge yango ‘Yehova abikisi Yisalaele na elonga monene.’ (1 Ntango 11:12-14; 2 Samwele 23:9, 10) Basɛngi na biso te ete tólonga limpinga ya basoda biso moko. Kasi, ntango mosusu tokoki kozala biso moko mpe tokutani na motungisi ya banguna. Tokotyela Yehova, Nzambe oyo abikisaka, motema mobimba? Tokoluka lisalisi na ye mpo ete tókaba bandeko na biso bandimi epai na banyokoli te?
Yehova abikisaka baoyo babatelaka bosembo na bango
13. Mpo na nini kotikala sembo epai ya Nzambe ezalaki mpasi na Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi?
13 Mpo ete Yehova abikisa biso, tosengeli kotikala sembo epai na ye ata soki yango esɛngi biso nini. Na ntango ya kala libota ya Nzambe ekutanaki na komekama ndenge na ndenge. Kanisá makambo oyo olingaki kokutana na yango soki ozalaki na Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi. Makambo makasi ya Lehobama epusaki mabota zomi na kokabwana na ye mpe kosala bokonzi ya Yisalaele na nɔrdi. (2 Ntango 10:16, 17; 11:13, 14) Kati na bakonzi mingi oyo bayangelaki na bokonzi yango, Yehu alekaki malamu, kasi ye mpe ‘atosaki te ete alanda Mobeko ya Yehova na motema na ye mobimba.’ (2 Mikonzi 10:30, 31) Atako bongo, ezalaki na bato oyo babatelaki bosembo na bango na bokonzi ya mabota zomi. (1 Mikonzi 19:18) Bandimelaki Nzambe, mpe ye atikaki bango te. Ozalaka sembo epai ya Yehova, ata soki kondima na yo emekami?
14. Ndenge nini Yehova abikisaki na mikolo ya Mokonzi Hizikiya, mpe mpo na nini Babilone elongaki Yuda?
14 Lokola bato mingi bakómaki kotyola Mibeko ya Nzambe, bokonzi ya Yisalaele ekómaki na likama. Ntango Basulia balongaki Yisalaele na mobu 740 L.T.B., na ntembe te bato mosusu bakimaki na Yuda, bokonzi oyo ezalaki na mabota mibale; kuna bakokaki kosambela Yehova na tempelo na ye. Bakonzi minei kati na bakonzi 19 bakitani ya Davidi: Asa, Yehosafata, Hizikiya, mpe Yosiya, bazalaki mpenza kobanga Nzambe. Na eleko ya mosembwi Hizikiya, limpinga monene ya basoda ya Asulia eyaki kobundisa Yuda. Nzambe ayanolaki na libondeli ya Hizikiya mpe atindaki anzelu moko oyo abomaki Baasulia 185 000 na butu moko, mpe na bongo, abikisaki basambeli na Ye! (Yisaya 37:36-38) Na nsima, lokola bato batikaki kotosa Mibeko mpe balandaki makebisi ya basakoli ya Nzambe te, bato ya Babilone balongaki Yuda mpe babebisaki Yelusaleme, engumba-mokonzi na yango na tempelo na yango na mobu 607 L.T.B.
15. Mpo na nini Bayuda oyo bakendaki boombo na Babilone basengelaki kolendendela, mpe nsukansuka ndenge nini Yehova abikisaki bango?
15 Bayuda oyo bakendaki boombo basengelaki kolendendela mpo na kotikala sembo epai ya Nzambe na ntango bazalaki bakangami na Babilone na boumeli ya mbula 70 ya mpasi. (Nzembo 137:1-6) Mosakoli Danyele azali moko na bato oyo babatelaki mpenza bosembo na bango. (Danyele 1:1-7; 9:1-3) Kanisá esengo oyo azalaki na yango ntango mobeko ya Sirise, mokonzi ya Perse, ekokisamaki na mobu 537 L.T.B., oyo epesaki Bayuda likoki ya kozonga na Yuda mpo na kotonga lisusu tempelo! (Ezela 1:1-4) Danyele na bato mosusu bayikaki mpiko na boumeli ya bambula mingi, kasi nsukansuka bamonaki kokwea ya Babilone mpe ndenge oyo libota ya Yehova ebikaki. Likambo oyo esengeli kosalisa biso na kolendendela wana tozali kozela kobomama ya “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba.—Emoniseli 18:1-5.
Yehova abikisaka bato na ye ntango nyonso
16. Ndenge nini Nzambe abikisaki bato na ye na mikolo ya Mokonzi-mwasi Esetele?
16 Yehova abikisaka ntango nyonso basaleli na ye wana bazali sembo na nkombo na ye. (1 Samwele 12:22; Yisaya 43:10-12) Tózonga na mikolo ya Mokonzi-mwasi Esetele—na ekeke ya mitano L.T.B. Mokonzi Asueruse (Zelezese I) atii Hamana ministre-mokonzi. Lokola Moledekai oyo azali Moyuda aboyi kokumbama liboso na ye, Hamana asiliki makasi mpe aluki mayele ya koboma Moledekai na Bayuda nyonso oyo bazali na ekólo Perse. Amonisi Bayuda lokola babuki-mibeko, alaki ete akofuta bato oyo bakosala mosala yango mpe bakotya mbongo yango na bibombelo ya mokonzi, mpe azwi ndingisa ya kosalela lopɛtɛ ya mokonzi mpo na kotya sinyatili na mobeko ya koboma Bayuda nyonso. Na mpiko nyonso, Esetele ayebisi mokonzi ete azali Moyuda mpe afundi Hamana mpo na mayele na ye ya koboma Bayuda. Mosika te, Hamana akakisami na nzete oyo ye moko abongisaki mpo na kokakisa Moledekai. Moledekai akómi ministre-mokonzi, mpe azwi ndingisa ya kopesa Bayuda lotomo ya komibatela. Balongi banguna na bango na bolongi monene. (Esetele 3:1–9:19) Likambo oyo esengeli kolendisa kondima na biso ete, na mikolo na biso, Yehova akobikisa basaleli na ye oyo bazali na botosi.
17. Na ekeke ya liboso, ndenge nini botosi ebikisaki Bayuda oyo bakómaki baklisto baye bafandaki na Yudea?
17 Ntina mosusu oyo Nzambe abikisaka basaleli na ye ezali mpo ete batosaka ye na Mwana na ye. Kanisá soki ozalaki na kati ya bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso. Alobi na bango ete: “Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basoda, bóyeba na ntango yango ete libebisi na yango esili kobɛlɛma. Na ntango yango bango na kati na Yuda bákima kuna na ngomba.” (Luka 21:20-22) Bambula mingi eleki, mpe ozali komituna soki maloba yango makokokisama. Bongo na mobu 66 T.B., Bayuda batomboki. Basoda ya Loma, na litambwisi ya Cestius Gallus bazingi Yelusaleme mpe bapusani na bifelo ya tempelo. Mbala moko, mpe mpo na ntina oyo eyebani te, Baloma bazongi. Bayuda oyo bakómaki baklisto balingaki kosala nini? Na buku na ye (Ecclesiastical History [Buku III, mokapo V, 3]), Eusèbe alobi ete baklisto balongwaki na Yelusaleme mpe na Yudea. Babikaki mpamba te balandaki likebisi oyo Yesu asakolaki. Okakatanaka te na kolanda litambwisi ya Makomami oyo epesami na nzela ya “kapita ya sembo” oyo atyami likoló ya “biloko” ya Yesu?—Luka 12:42-44.
Lobiko mpo na bomoi ya seko
18, 19. (a) Liwa ya Yesu ememaki lobiko nini, mpe mpo na banani? (b) Ntoma Paulo azalaki na ekateli ya kosala nini?
18 Baklisto ya Yudea babikaki mpo balandaki likebisi ya Yesu. Kasi liwa ya Yesu ezali kobikisa “bato ya lolenge nyonso” mpo bázwa bomoi ya seko. (1 Timote 4:10, NW) Bato bakómaki na mposa ya lisiko ntango Adama asalaki lisumu; yango wana abungisaki bomoi na ye mpe akɔtisaki bakitani na ye na boombo ya lisumu mpe ya liwa. (Baloma 5:12-19) Bambeka ya banyama oyo ezalaki kopesama na boyokani na Mibeko ya Mose ezalaki bobele elembo mpo na kozipa masumu. (Baebele 10:1-4) Lokola Yesu azalaki na tata te oyo azali moto mpe ete elimo santu ya Nzambe ‘ezalaki likoló’ na Malia kobanda ntango oyo akómaki na zemi kino Yesu abotamaki, Yesu asangolaki lisumu te mpe kozanga kokoka te ntango abotamaki. (Luka 1:35; Yoane 1:29; 1 Petelo 1:18, 19) Ntango Yesu akufaki lokola moto oyo abatelaki mpenza bosembo, apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo na kosomba bato mpe kosikola bango. (Baebele 2:14, 15) Na bongo, Klisto ‘amipesaki lokola lisiko mpo na bato nyonso.’ (1 Timote 2:5, 6) Bato nyonso te nde bakozwa litomba ya ebongiseli wana mpo na lobiko, kasi Nzambe andimi ete baoyo bazali koyamba yango na kondima bázwela yango matomba.
19 Na ndenge amonisaki motuya ya mbeka ya lisiko na ye epai ya Nzambe kuna na likoló, Klisto asombaki lisusu bakitani ya Adama. (Baebele 9:24) Na bongo, Yesu abalaki Mwasi, elingi koloba lisangani ya bayekoli na ye bapakolami 144 000 baye bakozwa bomoi na likoló. (Baefese 5:25-27; Emoniseli 14:3, 4; 21:9) Akómi mpe “Tata ya seko” mpo na baoyo bazali kondima mbeka na ye mpe bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé. (Yisaya 9:6, 7; 1 Yoane 2:1, 2) Oyo ezali mpenza ebongiseli ya bolingo! Na mokanda ya mibale epemami na Nzambe oyo atindelaki baklisto ya Kolinti, Paulo amonisaki botɔndi na ye mpo na ebongiseli wana. Lisolo oyo elandi ekomonisa yango. Paulo azwaki ekateli makasi ya kotika nzela na eloko moko te ete epekisa ye kosalisa bato na kozwa matomba na ebongiseli kitoko oyo Yehova asali mpo na kobikisa bato mpe kopesa bango bomoi ya seko.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Elembeteli nini ya Makomami emonisi ete Nzambe abikisaka basaleli na ye ya sembo?
◻ Ndenge nini toyebi ete Yehova abikisaka baoyo batyelaka ye motema mpe batikalaka sembo?
◻ Ebongiseli nini Nzambe asali mpo na lobiko mpe bomoi ya seko?
[Elilingi na lokasa 12]
Davidi atyaki motema epai na Yehova, “Nzambe na kobikisa.” Boni mpo na yo?
[Elilingi na lokasa 14]
Yehova abikisaka ntango nyonso basaleli na ye, lokola amonisaki yango na mikolo ya Mokonzi-mwasi Esetele