Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/9 nk. 4-7
  • Ntango ya kolamuka na mpɔngi yango oyo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango ya kolamuka na mpɔngi yango oyo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo mazali se ndenge moko?
  • Tosengeli mpenza kolamuka na mpɔngi
  • Nsuka ya mokili ekómi pene?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • “Bókɛngɛlaka”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bantoma batuni elembo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/9 nk. 4-7

Ntango ya kolamuka na mpɔngi yango oyo!

“BÓSALA angɛlɛ na mikolo oyo tozali; ntango ya kolamuka na mpɔngi ekoki.” (Baloma 13:11, Knox) Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Loma maloba wana mbula soko 14 liboso ya mobu 70 T.B., mobu oyo babomaki ebongiseli ya biloko ya Bayuda. Lokola balalaki mpɔngi ya elimo te, Bayuda oyo bakómaki baklisto bazalaki lisusu na Yelusaleme te na ntango wana, yango wana babikaki na liwa to na boombo. Kasi, ndenge nini bayebaki ete basengeli kokima mpe kozonga lisusu na engumba yango te?

Yesu Klisto akebisaki ete banguna bakozinga Yelusaleme mpe bato oyo bafandaki kuna bakobwakama na nse. (Luka 19:43, 44) Na nsima, Yesu apesaki bayekoli na ye ya sembo elembo oyo esangisi makambo mingi mpe ezali mpasi te mpo na kososola yango. (Luka 21:7-24) Mpo na baklisto oyo bafandaki na Yelusaleme, kokima engumba elimbolaki mpe kotika bandako mpe misala na bango. Kasi, lokola bazalaki na bokɛngi mpe bakimaki, babikaki.

Ntango Yesu asakolaki ete Yelusaleme ekobebisama, bayekoli na ye batunaki ete: “Nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na komonana [“kozala,” NW] na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?” (Matai 24:3) Na eyano na ye, Yesu alobaki ete kozala na ye ekozala ndenge moko na eleko oyo ezalaki liboso ya Mpela na mikolo ya Noa. Yesu amonisaki ete Mpela ebomaki bato nyonso ya mabe. (Matai 24:21, 37-39) Bongo, alobaki mpe ete Nzambe akosala lisusu likambo moko na mokili. Ekozala monene ndenge nini? Ekosukisa mokili mobimba, to ebongiseli ya biloko mabe! (Kokanisá na 2 Petelo 3:5, 6.) Likambo yango ekoki kosalema na mikolo na biso?

Makambo mazali se ndenge moko?

Na ekeke ya liboso, Bayuda moke kaka bandimaki ete Yelusaleme, engumba mosantu na bango ekobomama. Bato oyo bafandi pene ya ngomba ya mɔ́tɔ kasi bamoná naino ndenge esanzaka mɔ́tɔ te bazalaka mingi na ntembe motindo wana. Mbala mingi, soki bazali kokebisa bango, balobaka ete, “Ekosalema na ntango oyo ngai nazali na bomoi te.” Lionel Wilson, nganga-mayele oyo ayekolaka makambo ya bangomba ya mɔ́tɔ alobi ete “mingimingi bangomba ya mɔ́tɔ elamukaka lisusu nsima ya bikeke mibale to misato. Moto akomitungisa soki ayebi ete ngomba esanzaki mɔ́tɔ na ntango oyo baboti na ye bazalaki na bomoi. Kasi soki esalemaki na ntango ya bankɔkɔ na ye, akomona yango lokola se lisapo mpamba.”

Nzokande, koyeba makambo malamumalamu ekoki kosalisa biso tósosola bilembo oyo emonisaka ete likama ezali koya mpe tózwa yango na lisɛki te. Na kati ya bato oyo bakimaki mosika na Ngomba Pelée; moko amesanaki na mɔ́tɔ oyo ebimaka na ngomba mpe asosolaki bilembo oyo emonisaka likama. Liboso ete Ngomba Pinatubo ebanda kosanza mɔ́tɔ, bilembo yango bimonanaki polele. Banganga-mayele oyo bazalaki koyekola makambo mazalaki kosalema na kati ya ngomba yango, bandimisaki bato ete bákima mosika.

Bato mosusu balingaka kotya likebi na makebisi te mpe batingamaka na likanisi oyo ete eloko moko ekosalema te. Bakoki ata kosɛka baoyo bazali kokima. Ntoma Petelo asakolaki ete elimo ya ndenge wana ekomonana mingi na mikolo na biso. Alobaki ete: “Bóyeba mpe oyo liboso ete na mikolo na nsuka basɛki bakoya mpe bakosɛka, bakotambola [na kolanda, NW] mposa mabe na bango mpenza, bakoloba ete, Wapi elaka na [kozala, NW] na ye? Zambi longwa na ntango na kufa na bankɔkɔ, makambo nyonso maumeli bobele bongo lokola ezalaki na ebandeli na Kozalisama.”​—2 Petelo 3:3, 4.

Ondimaka ete tozali sikawa na “mikolo ya nsuka”? John Garraty na Peter Gay, banganga-mayele ya istware bakomaki buku moko (The Columbia History of the World). Na kati ya buku yango batunaki boye: “Tokómi nde na nsuka ya sivilizasyo na biso?” Na nsima balobeli na bozindo mikakatano ya boyangeli, kobakisama ya mobulu na mokili mobimba mpe kozanga kotosa bakonzi, kobeba ya mabota, ndenge siansi ezali kolonga kosilisa mikakatano ya bato te, bokonzi ya malamu ezali lisusu te, bizaleli malamu mpe kosambela ezali kobunga na mokili mobimba. Na nsuka balobi boye: “Soki makambo yango ezali elembo ya nsuka ya mokili te, ekokani na yango mpenza.”

Tozali mpenza na ntina ya kondima ete “nsuka” ekómi pene. Tosengeli kokanisa te ete mabelé nde ekobomama, mpamba te Biblia elobi ete Nzambe “atɛlɛmisaki mokili likoló na moboko na yango ete yango eningana libela na libela te.” (Nzembo 104:5) Kasi, tosengeli koyeba ete etikali moke, ebongiseli mabe ya biloko oyo ememeli bato mpasi mingi boye ekosuka. Mpo na nini? Mpamba te ezali na bilembeteli ya polele oyo ezali komonisa mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo, lokola Yesu Klisto alobaki yango. (Talá etanda “Mwa bilembeteli ya mikolo ya nsuka.”) Okosepela kokokanisa maloba ya Yesu na makambo oyo tozali komona na mokili? Soki osali bongo, ekosalisa yo na kozwa bikateli malamu mpo na yo na libota na yo. Kasi, mpo na nini tosengeli kozwa ekateli moko sika sikawa?

Tosengeli mpenza kolamuka na mpɔngi

Atako bato ya siansi bakoki koyeba ete etikali moke ngomba ebanda kosanza mɔ́tɔ, bakoki koyebisa mpenzampenza te ntango nini ekosalema. Se ndenge moko, Yesu alobaki boye mpo na nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo: “Nde mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te, ata [baanzelu, NW] na Likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi.” (Matai 24:36) Lokola toyebi mpenzampenza te ntango nini ebongiseli ya biloko oyo ekosuka, Yesu akebisaki biso na maloba oyo: “Bóyeba nde likambo oyo ete soko mokolo na ndako ayebaki ntango nini ekoya moyibi, mbɛ akɛngɛlaki mpe atikaki te ete moyibi apunza ndako na ye. Bongo ekoki na bino koselingwa, mpo ete Mwana na moto [Yesu] akoya na ntango ekanisi bino te.”​—Matai 24:43, 44.

Maloba ya Yesu mamonisi ete nsuka ya ebongiseli mobimba oyo ekobimela bato mbalakaka. Ata soki tozali bayekoli na ye, tosengeli komilɛngɛla. Ezalela na biso ekokani na nkolo ndako oyo akoki kosutuka mpo ayebi te ntango nini moyibi akokɔta na ndako na ye.

Bobele bongo, ntoma Paulo ayebisaki baklisto ya Tesaloniki ete: “Zambi boyebi solosolo ete Mokolo na Nkolo ekoya lokola moyibi kati na butu. . . . Bandeko, bozali kati na molili te, mokolo yango ekokwela bino lokola moyibi te.” Paulo akebisaki lisusu ete: “Tiká te ete tólala mpɔngi, [lokola] ekosalaka bamosusu, kasi tólamuka mpe tólangwa masanga te.” (1 Batesaloniki 5:2, 4, 6, maloba na nse ya lokasa na NW) ‘Kolamuka mpe kolangwa masanga te’ elimboli nini?

Kokima na biso na esika ya libateli esɛngi te ete tólongwa na engumba moko ndenge baklisto ya ekeke ya liboso bakimaki Yelusaleme. Ntango asilisaki kolendisa baninga na ye bandimi oyo bazalaki na Loma ete bálamuka na mpɔngi, Paulo alobaki na bango ete ‘bálongola misala ya molili’ mpe “bálata Nkolo Yesu Klisto.’ (Baloma 13:12, 14) Soki tolandi mpenza matambe ya Yesu, tokolala mpɔngi te na ntango oyo tozali, mpe Nzambe akobatela biso ntango akoboma ebongiseli ya biloko ya ntango oyo mpo tolalaki mpɔngi na elimo te.​—1 Petelo 2:21.

Bomoi ya bayekoli ya Yesu Klisto ezali bomoi ya ntina mpe ya esengo. Bamilio ya Batatoli ya Yehova bamoni ete kozala moyekoli ya Klisto ezali lokola komitya na ekanganeli ya pɛtɛɛ mpe ya kobɔndisa. (Matai 11:29, 30, NW, maloba na nse ya lokasa) ‘Koyeba Nzambe mpe motindami na ye, Yesu Klisto’ ezali litambe ya liboso mpo na kokóma moyekoli. (Yoane 17:3) Pɔsɔ na pɔsɔ, Batatoli batalaka bamilio ya bato na bandako na bango mpo na kosalisa bango ete bázwa “boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4, NW) Bakosepela koyekola na yo Biblia na ndako na yo kozanga ete ofuta mbongo. Mpe ntango boyebi na yo ya Liloba ya Nzambe ekobanda kokola, na ntembe te yo mpe okondima ete mikolo na biso ekeseni na mikolo mosusu nyonso. Ɛɛ, ntango ya kolamuka na mpɔngi yango oyo!

[Etanda/Bililingi na lokasa 7]

Mwa bilembeteli ya mikolo ya nsuka

“Libota moko ekotɛlɛmɛla libota mosusu”; ‘kimya ekolongolama na mokili.’ (Matai 24:7; Emoniseli 6:4)

Bitumba mibale ya mokili mobimba oyo esalemi na ekeke oyo, bakisa mpe bitumba mosusu ebele ebele, elongoli kimya na mokili. John Keegan, nganga-mayele ya istware akomi ete, “Etumba ya Liboso mpe ya Mibale ya mokili mobimba ekesanaki na bitumba nyonso oyo esalemaki liboso, ekesanaki na bonene, na makasi, na bibundeli oyo esalelamaki mpe na motángo ya bato oyo babomamaki. . . . Bitumba ya mokili mobimba ebomaki bato mingi koleka, ebebisaki biloko mingi mpe ebimisaki mpasi mingi na etando monene koleka bitumba nyonso oyo esalemaki liboso na yango.” Bitumba ya lelo oyo bizali koyokisa basi na bana mpasi koleka basoda. UNICEF emonisi ete na mbula zomi oyo eleki, bana milio mibale bakufaki na bitumba.

“Nzala” (Matai 24:7; Emoniseli 6:5, 6, 8)

Na 1996, nganu (blé) mpe ya masangu emataki ntalo mingi. Mpo na nini? Mpamba te bilei wana ezali lisusu mingi te, oyo etikali na mabombo ekoki koleisa mokili mobimba bobele mikolo 50. Ezali mbala ya liboso yango ekita bongo. Ntango bilei ya moboko ezali komata ntalo, bamilio ya babola—mingimingi bana—bazali kolala nzala.

“Mabelé ekoningana esika na esika” (Matai 24:7, NW)

Na boumeli ya mbula 2 500 oyo eleki, bobele koningana ya mabelé libwa nde ebomaki bato koleka 100 000. Na nyonso wana, minei esalemaki kobanda 1914.

‘Mobulu ekoyikana mingi’ (Matai 24:12)

Lokola tozali kokende na nsuka ya ekeke ya 20, kotyola mibeko, to kobuka mibeko eyei makasi. Banganga-mobulu oyo bazali koboma basivili, babomi bazangi mawa, mpe koboma bato ebele, nyonso wana ezali makambo ya nsɔmɔ na mikolo ya nsuka oyo etondi na mobulu.

‘Maladi mabe ekobima esika na esika’ (Luka 21:11)

Na boumeli ya bumbula ya 1990, ekoki kozala ete bato milio 30 bakokufa na maladi ya ntolo. Bamikrobe oyo epalanganisaka bamaladi ezali kokufa lisusu na nkisi te. Malaria ezali mpe maladi mosusu oyo ezali koboma bato mingi; ezali kozwa bato milio 300 kino milio 500 mbula na mbula mpe ezali koboma soko milio mibale. Na nsuka ya bambula ya 1990 sida ekoboma bato milio moko mbula na mbula. Lapolo moko (State of the World 1996) elobi ete, “Lelo oyo bamaladi ezali kobima moko nsima na mosusu.”

“Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba.” (Matai 24:14)

Na 1997, Batatoli ya Yehova balekisaki ngonga koleka miliare moko na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Batatoli koleka milio mitano bazali ntango nyonso komema nsango yango epai ya bato na mikili 232.

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Fɔtɔ ya FAO/B. Imevbore

Fɔtɔ ya U.S. Coast Guard

[Elilingi na lokasa 4, 5]

Baklisto bakimaki Yelusaleme mpamba te balalaki mpɔngi na elimo te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto