“Nani abotaki matanga ya mamwɛ?”
NA EKEKE ya 19, mopanzi-nsango moko alobaki ete matanga ya mamwɛ ezali “mai kitoko lokola biju oyo mopɛpɛ esali mpo na mabelé.” Mozalisi atunaki Yobo, tata ya mabota na ntango ya kala ete: “Nani abotaki matanga ya mamwɛ?” (Yobo 38:28, NW) Nzambe azalaki kokundwela Yobo ete mamwɛ kitoko eutaka epai na Nzambe.
Longola ngɛlingɛli na yango, kitoko na yango lokola biju, Biblia esalelaka mamwɛ mpo na komonisa lipamboli, kobɔta mbuma mingi, kofuluka, mpe kobatela bomoi. (Genese 27:28; Deteronome 33:13, 28; Zekalia 8:12) Na boumeli ya eleko ya molunge mpe ya elanga na Yisalaele, “mamwɛ ya Helemone” ezalaki kobatela matiti na mokili, mpe lisusu bato oyo bazalaki kofanda na esika yango. Nsɔngɛ ya Ngomba Helemone ezipami na matiti mpe etondi na mbulampɛmbɛ, ebimisaka mbɔngi na butu, oyo ekómaka mamwɛ. Davidi, mokomi na nzembo, akokanisaki mpiɔ oyo mamwɛ epesaka na esengo ya kofanda na bomoko elongo na baninga basambeli ya Yehova.—Nzembo 133:3.
Mosakoli Mose apesaki Yisalaele malako ya boboto oyo ezalaki kokitisa motema, lokola matanga ya mamwɛ. Alobaki boye: “Tiká liteya na ngai ekwea lokola mbula mpe kosolola na ngai etanga lokola mamwɛ, lokola mbula moke na likoló na matiti motau, mpe lokola mbula mokuse na likoló na ndunda.” (Deteronome 32:2) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ekopesa bomoi, kino na nsuka ya mokili. (Matai 24:14) Nzambe azali kobyanga ete: “Yaká! Tiká ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 22:17) Bamilio ya bato ya mabota nyonso bazali kondima likabo oyo ezali kokitisa motema na elimo oyo Nzambe azali kopesa, yango ekoki kopesa bomoi ya seko.