Mosala oyo “ebongi kopesamela limemya”
NTOMA Petelo alendisaki baninga na ye baklisto ete: “Bózala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete na likambo likotukaka bango bino lokola ete bozali bato mabe, awa ekomona bango misala na bino malamu, bákumisa Nzambe.” (1 Petelo 2:12) Uta bambula mingi Batatoli ya Yehova na ekólo Italie bamonisaka bizaleli malamu epai ya bato nyonso. Mpo na kotosa lilako ya Yesu ete “bósakola likoló na nsamba na ndako,” bazali kosala mosala na bango ya boklisto polele, na miso ya bato nyonso. (Matai 10:27; Yoane 18:20) Yango wana, ntango avoka moko elongo na sango moko na ekólo Italie, babimisaki mikanda oyo efundaki Batatoli ya Yehova ete bazali “mwa lingomba moke ya bakosi” mpe batángaki bango kati na “masangá ya misala ya nkuku oyo ezali kozimbisa bato,” Batatoli ya Yehova bafundaki bato yango na esambiselo na ndenge bakoselaki bango makambo.
Ntango basambaki mbala ya liboso, esambiselo ekataki ete avoka na sango babukaki mobeko moko te. Nzokande, mokolo ya 17 Yulí 1997, esambiselo monene (cour d’appel) ya engumba Venise ekweisaki ekateli ya liboso, ekataki ete avoka na sango bazali na ekweli. Esambiselo monene elobaki boye: “Mikanda wana mibale oyo sango na avoka bakomaki ezali na maloba oyo ekoki kobɛbisa lokumu ya ‘Batatoli ya Yehova.’ Emonani mpenza ete bakomaki mikanda wana mpo ete bato báyina Batatoli ya Yehova.” Esambiselo monene elobaki ete mikanda wana “ezali na lotomo ya kosambisa to ya koloba mabe mpo na mosala ya bato mosusu te.” Esambiselo monene ekatelaki bafingi wana mibale lomande mpe esɛngisaki bango báfuta mosolo na Leta, bakisa mpe mosolo nyonso oyo Batatoli babebisaki banda na kosamba ya liboso.
Esambiselo monene ya Venise ekomaki boye kati na ekateli na yango: “Bobele soki tosaleli mobeko-mama [ya ekólo Italie] na bokatikati mpe tobateli yango nde tokolonga kopekisa bato mosusu likambo ya koboya lingomba ya baninga mpe kozala na molende mabe na makambo ya lingomba.” Ekateli endimaki ete mosala ya Batatoli ya Yehova ezali ya nkuku te to mpe ya bozimbisi te. Esambiselo monene elobaki ete: “Soki moto atángi Batatoli ya Yehova na molɔngɔ ya masangá ya misala ya nkuku asaleli bosembo te, mpamba te lingomba yango ezali kati na bingumba mingi mpe mosala monene ya koluka bandimi ya sika oyo bato na bango bazali kosala, mingimingi na mikolo ya lomingo mpe na mikolo mosusu ya bopemi, eyebani mingi mpe milende oyo basili kosala ebongi kopesamela limemya, atako moto moko akoki kokanisa ndenge nini na mateya oyo bazali kopesa.” Na yango, mosala ya molende mpe bizaleli malamu ya Batatoli ya Yehova na Italie esungaki mpo na kolongola makanisi mabe oyo bato mosusu bakoki kozala na yango likoló na bango.—Matai 5:14-16; 1 Petelo 2:15.