Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/8 nk. 8-9
  • Salelá bomoi na yo na lolenge malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá bomoi na yo na lolenge malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Sepelá na bomoi
  • ‘Kanisá Mozalisi na yo’
  • Sepelá na bompaka
  • ‘Nyonso oyo esɛngami epai na moto’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bomoi na yo​—⁠Ntina na yango ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mokanda ya Biblia nimero 21—Mosakoli
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Kanisá Mozalisi na yo Monene!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/8 nk. 8-9

Salelá bomoi na yo na lolenge malamu

TATA moko azalaki kati na ndako, alali na mbeto, azalaki kobɛla maladi ya kanser mpe ekómaki makasi. Mwana na ye azalaki na ndako ya mosala, kokangisa bisaleli oyo tata asalelaka na mosala ya mabaya. Wana asimbaki bisaleli yango, akanisaki biloko kitoko oyo tata na ye asalá na lisalisi ya bisaleli wana. Atako ndako ya mosala ezalaki pene na ndako ya monene, ayebaki ete tata na ye akokɔta lisusu kuna te, mpe bisaleli oyo ayebaki kosalela yango malamu, akosimba yango lisusu te, esili.

Mwana akanisaki vɛrsɛ ya Mosakoli 9:10 oyo elobi ete: “Oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na nguya na yo mpo ete ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na [sheol, NW], esika ekokenda yo.” Ayebaki vɛrsɛ yango malamu. Azalaki kosalela yango mbala mingi ntango azalaki koteya bato solo ya Biblia oyo elobi ete moto oyo akufi akokoka kosala lisusu mosala te. Sikawa nguya ya maloba ya Salomo esimbaki motema na ye ete tosengeli kosala misala mpe koyoka esengo ntango tozali naino na bomoi, mpamba te mokolo ekoya wana tokokoka lisusu kosala bongo te.

Sepelá na bomoi

Na mokanda mobimba ya Mosakoli, Mokonzi Salomo, moto ya mayele azali kolendisa batángi ete básepela na bomoi. Na ndakisa, mokapo 3 elobi boye: “Nayebi ete eloko mosusu eleki oyo te ete [bato] básepela mpe ete básala malamu naino bazali na bomoi, mpe ete moto na moto alya mpe amela mpe ayoka esengo mpo na malamu na mosala na ye nyonso. Yango likabo na Nzambe.”​—Mosakoli 3:12, 13.

Salomo apemamaki na Nzambe mpo ete azongela likanisi oyo: “Talá yango emoni ngai, ete ezali malamu mpe ekoki ete moto alya mpe amela mpe asepela na libonza na misala na ye nyonso misali ye na nse na moi kino mikolo nyonso na bomoi na ye oyo Nzambe akopesa ye. Yango ezali likabo na ye.”​—Mosakoli 5:18.

Bobele bongo, alendisi bilenge ete: “Ɛ elenge, sepelá na bolenge na yo mpe tiká ete motema na yo esepelisa yo na bolenge na yo; tambolá mpe na nzela na motema na yo mpe na pole na miso na yo.” (Mosakoli 11:9a) Ezali malamu mpenza kosepela na nguya mpe na mpiko nyonso ya bolenge!—Masese 20:29.

‘Kanisá Mozalisi na yo’

Salomo alingi koloba te ete ezali likambo ya mayele kolanda biloko nyonso oyo ekoki kosepelisa motema mpe miso. (Kokanisá na 1 Yoane 2:16.) Makambo oyo akomi na nsima emonisi yango polele ete: “Yebá mpe ete mpo na makambo oyo nyonso [makambo oyo ekoki kosepelisa yo], Nzambe akoyeisa yo na kosambisama.” (Mosakoli 11:9b) Ezala ete tozali na mbula boni, tóyeba ete Nzambe azali kotala makambo oyo tozali kosala na bomoi na biso, mpe akosambisa biso mpo na yango.

Ezali mpenza bozoba na kokanisa ete tokoki kosalela bomoi na biso mpo na biso moko naino mpe tokomipesa na Nzambe nsima ntango tokokóma mibange, mpamba te, liwa elakaka te. Ata soki esalemi bongo te, kosalela Nzambe ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te ntango moto akómi mobange. Lokola ayebaki likambo yango, Salomo akomaki ete: “Kanisá Mozalisi na yo Monene sikawa na mikolo na bolenge na yo, liboso ete mikolo mabe ebanda, liboso ya bambula oyo okoloba ete, ‘Nazali kosepela na yango te.’”—Mosakoli 12:1, NW.

Bompaka eyaka na mitungisi na yango. Na nsima, Salomo amonisi makambo oyo ekómaka na bompaka, asaleli maloba ya elilingi. Mabɔkɔ mpe misapi ezali kolɛnga, makolo elɛmbi, mpe mino esili. Nsuki ya motó ekómi mpɛmbɛ mpe ezali kosila. Mpɔngi ezali lisusu ya mozindo te, na boye ete moto akoki kolamuka ata na mwa makɛlɛlɛ ya ndɛkɛ. Biyokeli, elingi koloba miso, matoi, mabɔkɔ, zolo, mpe lolemo—bikosala lisusu malamu te. Kolɛmba ya nzoto ekosala ete moto abanda kobanga kokwea mpe “makama” mosusu na balabala. Nsukansuka moto akufi.​—Mosakoli 12:2-7.

Bompaka ezali mpenza mikolo mabe mpo na baoyo ‘bakanisaki Mozalisi na bango Monene’ na bolenge na bango te. Lokola alekisaki ntango na ye mpamba, moto motindo oyo, ezala mobali to mwasi, ‘azali na esengo te’ na bompaka na ye. Bomoi ya kozanga kolanda mitinda ya Nzambe ekoki lisusu kobakisa mikakatano mpe mpasi ya bompaka. (Masese 5:3-11) Na mawa nyonso, ntango bazali kotala liboso, bato motindo oyo bazalaka na elikya ya bomoi na mikolo mizali koya te kasi bamonaka bobele lilita.

Sepelá na bompaka

Yango elimboli te ete mibange bakoki kosepela na bomoi te. Kati na Biblia, ‘mikolo mingi mpe bomoi molai’ etángami kati na mapamboli ya Yehova. (Masese 3:1, 2) Yehova ayebisaki moninga na ye Abalayama ete: “Yo, . . . okokundama na nsima na bonunu na [bambula, NW] mingi.” (Genese 15:15) Atako mitungisi ya bompaka ezali, Abalayama azalaki na kimya mpe esengo na bompaka na ye, azalaki koyoka esengo ete alekisaki bomoi na kosalela Yehova. Azalaki mpe kozela na kondima “mboka oyo ezali na [miboko ya solosolo, NW]” elingi koloba Bokonzi ya Nzambe. (Baebele 11:10) Bongo, akufaki “mobange mpe na esengo.”​—Genese 25:8, NW.

Yango wana Salomo alendisaki na maloba oyo: “Soko moto akobika kino [mbula, NW] mingi, akosepelaka na yango nyonso.” (Mosakoli 11:8) Ozala elenge to mokóló, esengo ya solo etaleli boyokani na biso na Nzambe.

Ntango elenge mobali oyo azalaki kati na ndako ya mosala abombaki esaleli ya nsuka ya tata na ye, akanisaki makambo yango. Akanisaki bato nyonso oyo ayebaki ete bamekaki komisepelisa na bomoi na bango, kasi bazalaki na esengo te mpamba te bazalaki na boyokani te na Mozalisi na bango. Yango ebongaki mpenza ete nsima ya kolendisa bato básepela na bomoi, Salomo asukisa makambo na maloba oyo ete: “Tóyoka nsuka na likambo mobimba: Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye; yango ezali mosala na bato nyonso.”​—Mosakoli 12:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto