Agora esika ya ntina na engumba Atene ya kala
BATO ya mayele ya engumba Atene bazalaki kati na yikiyiki! Makanisi ya sika mazalaki ntango nyonso kosakolama na agora to zando ya engumba Atene, na ekólo Grèce. Nzokande, na mbala oyo ezalaki likambo mosusu. Ntango akómaki na engumba yango, Moyuda moko amonanaki lokola “mosakoli na banzambe na bapaya.” Azalaki koloba makambo ya kokamwa epai na bato oyo ‘akutanaki na bango.’ Baepikuli, bato ya lolendo mpe Basetoa na bilongi na bango ekangamá ntango nyonso batunaki ete: “Molobalobi oyo azali na mposa na koloba nini?” Ya solo, agora ya Atene ezalaki esika ya bokutani mpo na kolobela makambo ya ndenge nyonso. Kasi kolobela banzambe ya sika ezalaki kosalema te, mpamba te kosala bongo ezalaki kolekisa ndelo!—Misala 17:17, 18.
Ezali na ntina wana nde bato ya Atene bamitunaki ntango ntoma Paulo abandaki koteya mpo na mbala ya liboso na agora ya Atene. Azalaki koloba na ntina na Yesu mpe lisekwa. Kasi, mpo na bato ya Atene, baoyo emonani ete bazalaki koboya makanisi ya sika te, likambo nini ekamwisaki bango na koyoka mateya wana ya sika na Agora?
Esika ya bato nyonso esalemi na Atene
Likambo oyo ekesenaki ezalaki agora yango moko mpe esika na yango na makambo ya lingomba mpe mpo na bomoi ya bafandi nyonso ya engumba Atene. Agora ya Atene ezali esika ya mwa ngomba moke na bonene ya hectares soko 10 na nɔrdi-wɛsti ya Acropole. Emonani ete na ebandeli ya ekeke ya motoba L.T.B., wana Solon, mosali na Leta mpe moto ya mibeko azalaki na bomoi, baponaki esika yango mpo na kotonga esika ya bato nyonso na engumba. Kotyama ya demokrasi na Atene mpe ndenge bazalaki kolobela mingi misala oyo banamboka basengeli kosala, esalaki ete bátonga bandako ebele na ebandeli ya ekeke oyo elandaki. Yango ebakiselaki lisusu agora makambo ya sika mpe ekómisaki yango esika ya ntina.
Liloba ya Greke a·go·raʹ euti na likelelo oyo elimboli “koyanganisa, kosangisa.” Yango eyokani na ndenge agora esalelamaki lokola esika monene ya bokutani kati na engumba. Agora ekómaki esika ya ntina mpo na bokutani mpe mpo na misala ya bato nyonso. Ezalaki esika ya misala ya Leta mpe bisambiselo, zando monene mpe esika ya mombongo, esika mpo na masano ya Bagreke, esika ya mimekano ya bopɔti mbango, mpe esika malamu mpo na masolo ya bato ya mayele.
Okolinga kotambola mwa moke katikati na bitika ya batempelo, bitongeli oyo esimbami na makonzí, bikeko, bamonima mpe bandako ya agora na Atene? Wana tozali koluka koyeba agora ya kala, tótika naino engumba oyo etongami sika, oyo etondi na yikiyiki mpe na makɛlɛlɛ, mpe tótambola na nzela ya mabangamabanga, bisika ya kimya kati na bitika ya mabanga ya marbre, mabanga ekatama malamumalamu, mpe na bikɔtelo ekatanakatana mpe ebotá matiti.
Batempelo, bisika ya bulɛɛ, mpe banzambe babateli
Bato oyo bakendaka kuna bakamwaka na komona ebele ya batempelo, bisika ya bulɛɛ, mpe bandakonzambe ya banzambe ndenge na ndenge. Biloko oyo nyonso bisalaki ete agora ekóma esika monene mpo na losambo, esika ya mibale nsima ya Acropole. Na eleko oyo Atene ya kala ezalaki kokóma monene mpe na bozwi, lingomba ekómaki na bopusi likoló na makambo nyonso ya bomoi ya bato. Na ntina yango, banzambe ndenge na ndenge oyo baponamaki lokola “banzambe babateli” ya misala ya Leta bapesamelaki batempelo ya bulɛɛ na agora.
Tempelo ya Héphaïstos elekaki bandako nyonso na lokumu. Bazalaki kosangisa nzambe-mwasi Athena na Héphaïstos. Bato ya Atene basambelaki banzambe mibale wana lokola banzambe babateli na makambo ya ntɔki mpe ya misala ya koyema. Biloko bisalemi na ebende mpe bambeki oyo bato ya arkeoloji bakundolaki zingazinga ya tempelo yango emonisaki ete ezalaki tempelo ya Héphaïstos, nzambe ya Bagreke na makambo ya ntɔki oyo esɛngaka kosalela mɔ́tɔ. Ekoki mpenza kozala ete na ekeke ya nsambo T.B., tempelo oyo ebatelamaki malamu ekómaki ndakonzambe ya Saint-George ya Lingomba ya Ortodokse ya Grèce, atako lelo oyo bazali lisusu kosalela yango bongo te.
Agora esengelaki mpe kozala na nzambe mobateli na yango. Nzambe mobateli na yango ezalaki Zeus ya agora, oyo bakanisaki ete apesaka makoki ya koloba, basalelaki nzambe yango etumbelo ekembisami mpe eyemamaki na mabanga ya marbre ya mpɛmbɛ. (Kokanisá na Misala 14:11, 12.) Pembeni wana ezalaki na etumbelo ya Mama ya Banzambe, yango ezalaki na ebele ya bamonima ya bilombe ya kala.
Mwa mosika, tokokuta tempelo moke ya Ion. Pausanias, nganga-mayele ya geografi alobaki ete ezali tempelo ya Apollo Tata. Mpo na nini? Mpamba te, lisapo moko ya Bagreke ya kala elobi ete azalaki tata ya Ion, nkɔkɔ ya libota ya ba ionien oyo ezalaki mpe libota ya bato ya Atene.a Mpo na yango, Apollo azalaki moko ya banzambe mobateli na makambo ya Leta, mingimingi na masangá ndenge na ndenge oyo ezalaki kati na engumba.
Na nɔrdi, tozali komona mabanga oyo ezali bitika ya tempelo moko ya moke. Batongaká yango na katikati ya ekeke ya minei L.T.B. Kuna bazalaki kosambela Zeus mpe Athena Phatrios, banzambe minene mpo na kobatela mangomba ya losambo ya bankɔkɔ. Mbala mingi, mpo na kozala mwanamboka ya Atene esengelaki naino kozala na mangomba wana. Na ngambo mosusu ya balabala, tokomona bitika ya etumbelo ya banzambe zomi na mibale.
Mosika te na Ndako (Stoa) ya Zeus Eleutherios, ezali lisusu na esika oyo bazalaki kokumisa nzambe mokonzi ya Grèce, kasi mbala oyo lokola nzambe ya bonsomi mpe oyo asikolaka. Bato mingi balingaki ndako ya makonzí wana, to stoa, mpo na kominanola mpe koyangana. Balobaka ete Socrate, filozofe oyo ayebani mingi, azalaki kokutana na baninga na ye na ndako yango, epai bakokaki kofanda mpe kosolola to kominanola. Mpo na kosikolama ya engumba na mabɔkɔ ya banguna mpe kobatela bonsomi na yango, makabo mingi mazalaki kopesama na ndako yango. Na ndakisa, bazalaki kotika banguba ya basoda oyo bakufaki na etumba mpo na kobatela Atene.
Balabala ya Panathênaia
Panathênaia ezali balabala monene ya mabanga, na mopanzi ya esika etalani na agora. Nkombo ya balabala yango mpe lokumu na yango euti na feti ya ekólo oyo ezalaki kosalema na Atene, feti yango Panathenaia. Na boumeli ya feti yango, bazalaki kotambwisa litambala ya nzambe-mwasi Athena longwa na Ndako ya Botamboli (nsima ya ekɔtelo monene ya engumba) kino na Acropole. Liyemi moko ezali na tempelo ya Parthénon ezali kosalisa biso na kozwa likanisi ete botamboli yango ezalaki ya kafukafu. Ezalaki na bampunda, makalo oyo ezalaki koleka mbangu, bangɔmbɛ mpe bampate mpo na kokabama lokola mbeka, bilenge mibali mpe basi bazalaki komema bisaleli mpo na mbeka. Bato ya Atene mpe bapaya bazalaki kotala milɔngɔ ya bato bazali kotambola na molɔngɔ, mpamba te bato oyo batongaki agora balɛngɛlaki bisika mingi oyo bakokaki kotɛlɛma mpo na kotala. Na ndakisa, baveranda na nse ya makonzí ezalaki na milɔngɔ mingi mpe basikalié na liboso mpe ebongisamaki malamu mpo na kotala bato oyo bazalaki kotambola na molɔngɔ. Basikalié ezalaki mingi na boye ete ekokaki kokɔtisa bato mingi.
“Etondi na bikeko”
Na kotala ebele ya batempelo, bikeko, mpe bamonima oyo etondaki kuna, tokokamwa te ete ‘elimo ya ntoma Paulo etungisamaki kati na ye na komona ete mboka etondaki na bikeko.’ (Misala 17:16) Makambo Paulo amonaki ntango akɔtaki na agora epesaki ye mpasi mpenza. Bikeko ya nzambe Hermès oyo bimonisaka binama ya kobotela ezalaki mingi na boye ete esengelaki ndako mobimba ya makonzí mingi, oyo eyebani na nkombo Stoa ya Hermès, mpo na kotya yango nyonso. Bikeko mosusu ya Hermès bizalaki na bilamba bayemá bikulusu, yango ezali bilembo ya kobota mpe ya bomoi. Ezalaki na ekeko moko ya Vénus Genetrix, nzambe-mwasi ya lolango, mpe ekeko mosusu ya Dionysos oyo ezalaki na ebele ya bikulusu lokola binama ya kobotela. Mpo na komonisa ete agora ezalaki esika ya “bulɛɛ,” libanga moko ezalaki na ekɔtelo na saani ya mai “mosantu” oyo bazalaki kosalela mpo na kopɛtola bato nyonso oyo bazalaki kokɔta kuna.
Na kotalela lolenge bato bamipesaki mingi na makambo ya losambo, ezali mpasi te na kososola mpo na nini Paulo azalaki mpenza na likama. Balobaki ete azalaki “mosakoli na banzambe na bapaya,” mpe mobeko na eleko wana elobaki ete ‘moto te akoki kozala na nzambe mosusu, to nzambe ya sika; to akoki kosambela nzambe na bapaya te bobele soki bapesi ye nzela.’ Na yango, tokokamwa te ete bamemaki Paulo na Ngomba na Ale mpo na kotuna ye mituna.—Misala 17:18, 19.
Esika ya misala ya Leta
Misala ya Leta na Atene mizalaki kosalema na ndako moko ebéngamaki Tholos. Na butu, bakambi mingi ya engumba bazalaki kolala na ndako yango mpo ete bakonzi bálukama te soki bazali na mposa na bango. Bilakiseli ya bimekeli ezalaki kobombama na Tholos. Pembeni wana ezalaki na babiro mpo na misala mosusu ya Leta. Ndako ya Makita ezalaki na ngomba oyo ezwami na nɔrdi-wɛsti ya Tholos. Ezali kuna nde Lisangani ya bato 500 bazalaki koyangana mpo na kosala komite ya misala mpe kobongisa mibeko mpo na Parlema.
Ndako mosusu ya ntina mingi ezalaki bongo Ndako ya Mokonzi. Biro ya Prokirere-mokonzi ya Atene ezalaki kuna, ye azalaki moko na bazuzi minene misato oyo bazalaki na engumba. Kuna azalaki kotalela makambo mingi ezala ya lingomba to ya mibeko. Emonani ete, ezalaki awa nde basɛngaki Socrate aya kosamba ntango bafundaki ye ete azali motuki. Mibeko ya bonkɔkɔ ya Atene ekomamaki na bifelo ya ndako moko etalanaki na Ndako ya Mokonzi. Likoló ya libanga oyo batyaki liboso ya ndako yango, baprokirere, to bazuzi minene, bazalaki kotɛlɛma mpe kokata sɛlɛka mbula na mbula mpo na mosala na bango.
Ndako ya Attale
Ndako oyo ebatelamaki malamu koleka na Agora ezali Ndako ya Attale. Na bolenge na ye, Mokonzi Attale moto ya Pelegamo (ekeke ya mibale L.T.B.), atángaki kelasi na ye na Atene, lokola mpe bana mosusu ya mikonzi na bikólo ya zingazinga ya mai monene ya Méditerranée. Ntango akómaki mokonzi, apesaki likabo wana kitoko—elingi koloba Ndako ya Attale—na engumba esika akɔtaki kelasi.
Ndako ya Attale esalelamaki mpenza lokola esika kitoko ya kobombama mpe ya kotambola, mpo na bokutani, mpe mpo na masolo. Longwa na veranda mpe na bandako na yango okoki komona malamu lolenge bato bazali koleka na milɔngɔ. Mpe lokola bato mingi bazalaki kokende kuna, esika yango ekómaki zando monene mpenza mpe ya lokumu. Emonani ete Leta akómaki kofutisa bakomelesa bamagazini yango. Na bongo, bandako yango ezalaki kokɔtisa mbongo na sanduku ya Leta.
Ndako ya Attale oyo ezongisami na lolenge na yango ya ebandeli ezali komonana mpenza ete etongamaki malamu mpenza. Bonene na yango, makonzí na yango ya nse oyo makeseni na oyo ya likoló, bisika pole ezali kobima mpe bisika ya molili, mpe bitongeli kitoko mpe ya motuya, nyonso wana ekesenisi yango na bandako mosusu. Makambo ndenge na ndenge ekesenisi yango na bandako mosusu, mingimingi na mitindo misato mikeseni ya makonzí ya moboko oyo basaleli—ya Bagreke, ya ba Ionien, mpe ya Baezipito.
Esika ya masano
Na Atene, masano mazalaki kosalema na ndako ya kobɛta miziki. Ndako yango ezalaki likabo ya Vipsanius Agrippa, mobali ya mwana ya Auguste, amperere ya Loma. Ebaelo na yango ezalaki na karo ya mabanga ya marbre ya langilangi. Ndako yango, ekokaki kokɔta bato pene na 1 000, ezalaki na bolai ya mɛtɛlɛ soko 25 mpe na ebandeli ezipamaki na nsamba oyo esimbamaki na makonzí na kati te. Wana ezalaki moko na bansamba ya ndako oyo batongi na yango balukaki kosala eloko ya sika! Nzokande, emonani ete, masano mingi oyo mazalaki kosalema kuna mazalaki mabe mpo na baklisto ya solo, baoyo bazalaki kobatela mitinda mitombwani ya bizaleli malamu.—Baefese 5:3-5.
Na ntembe te, na ntango ya kala, bato oyo balingaki koyeba makambo mingi bazalaki kokende na Bibliotɛkɛ ya Pantainos. Bifelo na yango etondaki na bisika oyo babombaki barulo ya papirise mpe ya parshɛmɛ (mposo ya nyama) oyo ekomamaki na mabɔkɔ. Eteni eleki monene ya bibliotɛkɛ yango etalaki na ngámbo ya wɛsti, na milɔngɔ oyo ezalaki wana moto akoki komona makonzí ya veranda. Ezalaki esika malamu mpo na kominanola, kotánga, to komanyola. Ezalaki na likomi moko oyo emonisaki mibeko mibale ya bibliotɛkɛ. Ekomamaki boye: “Epekisami kobima na mokanda,” mpe “[Bibliotɛkɛ] efungwamaka kobanda na ngonga ya yambo kino ngonga ya motoba.”
Agora lelo oyo
Na bambula eleki, eteyelo moko na États-Unis (École américaine d’études classiques) esalaki botimoli ya arkeoloji mpe ekundolaki agora mobimba. Na nse ya ndako molai ya Acropole, agora ezongi lisusu esika malamu epai baturiste oyo balingi koyeba lisolo ya Atene ya kala bakendaka.
Monastiraki ezali pene wana, ezali zando epai batɛkisaka biloko ya kala to ya bankɔkɔ. Longwa na agora mpe Akropoli, moto akotambola mingi te mpo na kokóma wana. Yango mpe ezali na makambo mosusu ya kitoko. Bato oyo bakendaka kuna bakamwaka mpe basepelaka na zando ya biloko ndenge na ndenge ya bonkɔkɔ ya Bagreke mpe ya Moyen-Orient mpe oyo bakoki kokakola ntalo. Mpe lisusu, bato oyo bakendaka kuna bamonaka Batatoli ya Yehova, na esengo nyonso, bazali kosala mosala oyo ntoma Paulo asalaki esili koleka mbula 1 900, elingi koloba kosakola nsango malamu ya Bokonzi ‘na bato oyo bakutani na bango.’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebengeli Ionien euti na nkombo Yawana, mwana ya Yafete mpe mwana ya mwana ya Noa.—Genese 10:1, 2, 4, 5.
[Etanda na lokasa 28]
Mombongo na Atene
Agora ezalaki kaka esika ya ntina mpo na mayangani ya bato ya mayele mpe ya masano na Atene te, kasi ezalaki lisusu zando monene ya engumba. Atene ekómaki esika ya mombongo, oyo eyebanaki mingi mpo na mosolo na yango mpe mpo na bosembo ya baprokirere na yango, oyo bazwaki ndingisa ya kosɛnzɛla ete mombongo ezala sembo mpe biloko ya kotɛkisa bizala malamu.
Atene ezalaki kotɛkisa vinyo, mafuta ya olive, mabanga ya marbre, mpe bilɔkɔ mosusu lokola mbeki mpe biloko bisalemi na bibende na mikili mosusu. Nzokande, mbala mingi ezalaki kosomba nganu (blé) na mikili mosusu. Lokola biloko oyo Attique (etúká ya zingazinga na Atene) ezalaki kobimisa bikokaki te mpo na koleisa bafandi na yango nyonso, mibeko na makambo ya mombongo mizalaki na bosikisiki. Zando ya Pirée (libongo ya Atene) esengelaki ntango nyonso kozala na biloko ya malamu mpo na kotɛkisa na basivili mpe na basoda. Mpe bakomelesa bapesaki bango ndingisa te ya kobomba biloko na mokano ya kotɛkisa yango na ntalo makasi na ntango ekozanga.