Tokobosana te likambo oyo esalemaki na ekólo France
“TOBOYI MBOKA YA YEHOVA!” Ezali maloba bakomaki na bakalati oyo bapanzaki na engumba mobimba. Etuluku moko ya batɛmɛli ezalaki kolendisa bato ete “biso nyonso tósangana mpe tótɛmɛla mwango ya Yehova.” Solo mpenza, masolo mingi mpenza mabimisamaki na bipanzelo ya nsango na ntina na likambo yango. Bato batyaki basinyatili mpo na komonisa botɛmɛli na bango, mpe basanduku ya mikanda etondaki na batrakte koleka nkama mitano oyo ezalaki kolobela mwango wana. Mwango yango ezalaki nini oyo ekɔtisaki yikiyiki na engumba Louviers, oyo ezwami na nɔrdi-wɛsti ya ekólo France oyo na momeseno ezalaka na kimya? Ezalaki bongo botongi filiale ya sika ya Batatoli ya Yehova.
Yehova azali kokolisa
Mosala ya Batatoli ya Yehova na ekólo France ebandaki na nsuka ya ekeke ya 19. Ebombelo ya liboso ya mikanda efungwamaki na 1905, na mboka Beauvène, na sudi ya ekólo France, mpe na 1919, biro moke ezalaki kotambwisa misala na engumba Paris. Na 1930, filiale efungwamaki na Paris, mpe na mbula oyo elandaki basali na biro bakendaki kofanda na Betele oyo ezalaki na Enghien-les-Bains, na nɔrdi ya Paris. Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, libota ya Betele ezongaki na Paris, mpe na 1959, filiale ekómaki na buludingi ya bitaze mitano na Boulogne-Billancourt, na wɛsti ya Paris.
Lokola mosala ya kosakola Bokonzi ebakisamaki, na 1973, mosala ya konyata mikanda mpe ya kokabola yango ekómaki kosalema na Louviers, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 100 na wɛsti ya Paris, wana babiro etikalaki naino na Boulogne-Billancourt. Nzokande, kobakisama ya motángo ya basakoli na France esalaki ete bandako ya Louviers ekóma moke, atako bayeisaki yango monene na 1978 mpe na 1985. Na yango ekateli ezwamaki ete báyeisa yango monene lisusu mpe básangisa libota mobimba ya Betele esika moko. Mwango oyo esepelisaki bato nyonso te, ndenge emonisami na ebandeli ya lisolo oyo. Atako botɛmɛli yango ezalaki, esika ezwamaki na ntaka ya kilomɛtɛlɛ moko na ndambo longwa na esika ya konyata mikanda. Nsima ya mbula motoba ya mosala makasi, mpe nsima ya mbula 23 ya kofanda na bisika mibale bikeseni, libota mobimba ya Betele esangisamaki esika moko na Louviers na Augústo 1996.
Ezalaki bongo na esengo monene nde etuluku ya bato 1 187, kati na bango basangani 300 ya libota ya Betele ya France, mpe batindami 329 bautaki na bafiliale mosusu 42, bayanganaki mokolo ya pɔsɔ, mwa 15 Novɛ́mbɛ 1997, mpo na koyoka lisukulu ya bofungoli oyo esalemaki na Ndeko Lloyd Barry, moko kati na lisangani ya Mikóló-Bakambi. Nzokande, atako bofungoli yango esalemaki na nse ya botɛmɛli makasi mpe bato bazalaki kotya songisongi na nzela ya bipanzeli-nsango mpo na kotɛmɛla Batatoli ya Yehova na ekólo France, emonanaki ete Batatoli nyonso na ekólo France bakokaki kosangana mpo na kokumisa bolongi yango. Na yango, na mokolo ya lomingo 16 Novɛ́mbɛ, likita mosusu ya ntina mpenza ebongisamaki na Centre d’expositions na nɔrdi ya Paris, na Villepinte, na motó na likambo ete “Tikalá kati na bolingo ya Klisto.” Batatoli ya Yehova nyonso ya ekólo France babyangamaki elongo na Batatoli ya masangá ya Lifalanse ya ekólo Belgique mpe Suisse, na baoyo ya masangá ya Lifalanse ya Allemagne, ya Grande-Bretagne, ya Hollande, mpe ya Luxembourg.
Liyangani oyo etiká nsango
Bibongiseli mpo na liyangani bibandaki kokamatama nsanza motoba liboso. Na nsima, bobele pɔsɔ mibale liboso ya molulu ya bofungoli, basofɛlɛ ya mituka ya minene na ekólo France baboyaki mosala (grève), bakangaki banzela minene mpe bisika ya koteka esansi. Ndenge nini bakiti mpe bisaleli mosusu bikokaki kokóma na ntango malamu? Kokangama ya banzela elingaki nde kopekisa bandeko ete báya na likita te? Bato banso basepelaki ete, botomboki esilaki nsima ya pɔsɔ se moko, mpe banzela efungwamaki lisusu. Mokolo ya mitano na mpokwa liboso ya molulu ya bofungoli oyo esengelaki kosalema na nsuka ya pɔsɔ, mituka 38 eyaki kotika bakiti 84 000 na ndako mibale ya minene oyo tofutelaki mpo na liyangani. Bandeko koleka 800 mibali mpe basi basalaki butu mobimba kino na ngonga ya libwa na ndambo ya ntɔngɔ ya mokolo ya pɔsɔ, mpo na kobongisa bakiti, ebaelo, bikoliseli lolaka, mpe televizyo libwa ya minene.
Mokolo ya lomingo na 6:00 ya ntɔngɔ, bafungolaki bikuke, mpe bato babandaki kokɔta. Bingbunduka 17 ememaki Batatoli koleka 13 000 kino na mboka-mokonzi. Bandeko mibali mpe basi koleka nkama mibale ya engumba yango bazalaki na bisika oyo engbunduka etɛlɛmaka mpo na koyamba bandeko oyo bayaki mpe kokende na bango na bituluku kino na esika ya liyangani. Ndeko mwasi moko alobaki ete ebongiseli oyo ya bolingo epesaki bango “liyoki ya kobatelama mpe kozala malamu.”
Basusu bayaki na Paris na mpɛpɔ to na motuka. Nzokande, bato mingi bayaki na bisi 953, wana Batatoli ya Paris mpe ya bamboka ya pembeni bakɔtaki na babisi mosusu mpo na kokende na Parc des expositions. Mingi basalaki mobembo na butu to balongwaki na bandako na bango na ntɔngɔntɔngɔ mpenza, kasi esengo na bango ya koyangana na likita ezalaki komonana na miso. Mbote ya esengo mpe koyambana na mɔ́tɔ emonisaki bokutani ya baninga oyo bamonanaki te na boumeli ya bambula mingi. Bilamba ya langi ndenge na ndenge na elateli ya mboka na mboka epesaki bayangani oyo ya esengo elembo ya libota ya mokili mobimba. Na ntembe te, likambo moko monene ezalaki kosalema.
Ntango manaka ebandaki na 10:00 ya ntɔngɔ, bisika ya kofanda bizalaki lisusu te, kasi bankama ya bato bazalaki se koya nsima ya miniti mokomoko. Epai nyonso moto akokaki kotala, miso na ye ezalaki kokutana na bilongi bizali komungamunga. Bankóto ya bato batɛlɛmaki to bafandaki na mabelé. Komonisáká elimo ya motó na likambo ya liyangani, na bolingo nyonso, bilenge mingi batikelaki mikóló bisika ya kofanda. Mobali moko na mwasi na ye bakomaki boye: “Tozalaki mpenza na esengo ya kotika bisika na biso na bandeko mibali mpe basi oyo toyebaki te, kasi bazalaki balingami na biso!” Mingi bamonisaki elimo ya komipimela: “Totɛlɛmaki na boumeli ya manaka mobimba na nsima ya bakiti oyo totandaki na butu mobimba ya mokolo ya mitano. Kasi bobele kozala [na liyangani] wana etondisaki mitema na biso na botɔ́ndi mpo na Yehova.”
Atako kolɛmba mpe motungisi, bayangani balandaki na likebi nyonso balapolo ya mikili mosusu mpe lisukulu ya Lloyd Barry mpe oyo ya Daniel Sydlik, oyo azali mpe moko kati na lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ndeko Barry asalaki lisolo “Yehova akobakisa nguya,” mpe amonisaki lolenge Yehova apamboli bato na ye na koyeisáká bango mingi atako komekama ya ndenge na ndenge ezalaki. Lisolo ya Ndeko Sydlik ezalaki na motó na likambo ete “Esengo ezali na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!” Masukulu nyonso mibale epesamaki na ntango malamu na kotalela botɛmɛli oyo Batatoli ya Yehova bazali kokutana na yango na France. Ndeko Sydlik amonisaki ete bolamu ya solo eutaka na makambo ya libándá te, kasi eutaka na boyokani na biso elongo na Yehova mpe na lolenge tozali kotalela bomoi. Ntango atunaki bayangani ete, “Bozali na esengo?” Bayanolaki na kobɛtáká mabɔkɔ makasi.
Ndeko mwasi moko oyo “abungisaki esengo na ye” akomaki na nsima ete: “Nasosolaki mbala moko ete nakokaki kozwa esengo. Nazalaki kosala milende na lolenge mabe, mpe na nzela ya lisukulu oyo, Yehova amonisaki ngai ndenge oyo nasengelaki kobongwana.” Ndeko mobali moko alobaki ete: “Sikawa nakobunda makasi mpo nasepelisa motema ya Yehova. Nakopesa nzela na eloko te ete elongola esengo oyo nabandi koyoka na kati na ngai.”
Lokola likita ezalaki kobɛlɛma na nsuka, ezalaki na esengo monene ntango prezida ayebisaki ete bato nyonso oyo bayanganaki bazalaki 95 888—yango ezali liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo esangisaki bato mingi koleka na ekólo France!
Nsima ya loyembo ya nsuka, oyo bato mingi bayembaki na mpisoli ya esengo na miso, mpe libondeli ya nsuka, bandeko basalaki mobembo mpo na kozonga na ndako na mayoki ya esengo mpe ya mawa esangani. Ezalela ya mɔ́tɔ mpe ya boninga oyo ezalaki na liyangani elekaki mpamba te na miso ya bato. Batambwisi mingi ya babisi balobaki malamu na ntina na etamboli malamu ya bayangani. Bakamwaki lisusu na ebongiseli oyo epesaki nzela na bisi nyonso 953 ete elongwa na Parc des expositions na ngonga mibale kozanga ete nzela ekangama! Basali na bingbunduka mpe na babisi bakumisaki lisusu etamboli ya bayangani. Masolo ya kitoko mingi malandanaki, mpe litatoli malamu epesamaki.
“Ekimelo kati na mokili mokauki”
Ntoma Paulo ayebisaki baninga na ye bandimi ete: “Tótala ete [tólendisana, NW] moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. . . . Tópesana toli. Tósala bongo na koleka, awa emoni bino ete Mokolo yango ezali kobɛlɛma.” (Baebele 10:24, 25) Ya solo, likita oyo ya ntina mpenza ezalaki liziba ya elendiseli monene mpo na bato nyonso. Ndeko mwasi moko abéngaki yango ete “ekimelo kati na mokili mokauki.” Bandeko ya filiale ya ekólo Togo bakomaki ete: “Tozongaki wana tozwi lisusu makasi, tolendisami, tozwi mpiko, mpe na ekateli ya kosepelaka ntango nyonso kati na mosala ya Yehova.” Mokɛngɛli moko ya zongazonga alobaki ete, “Baoyo balɛmbaki na motema bazongaki ndako na esengo.” Mokɛngɛli mosusu alobaki ete: “Bandeko balendisamaki mpe bakembisamaki.” Mobali moko na mwasi na ye bakomaki ete: “Tomiyoká naino penepene na lisangá ya Yehova boye liboso te.”
Mokomi na nzembo alobaki boye: “Lokolo na ngai etɛlɛmi na mabelé alima; nakosanzola [Yehova] kati na koyangana monene.” (Nzembo 26:12) Mayangani ya boklisto motindo oyo epesaka bato nyonso likoki ya kozwa lisusu etɛlɛmɛlo malamu na elimo liboso ya mikakatano. Ndeko mwasi moko andimaki ete, “Ezala minyoko motindo nini oyo ekoki kobima, bangonga ya malamu boye ekoti kati na mitema na biso mpe ekotikala kuna mpo na kobɔndisaka biso.” Bobele bongo, mokɛngɛli-motamboli moko akomaki ete: “Na ntango ya mpasi, komikundola lolenge touti komeka bomoi oyo ekozala na Paladiso ekosalisa biso na koyikela yango mpiko.”
Nzembo 96:7 elendisi boye: “Ɛ bino mabota na bato, bópesa [Yehova], bópesa [Yehova] lokumu mpe nguya.” Na ntembe te, molulu ya bofungoli filiale ya sika na ekólo France ezali lokito ya bolongi mpo na Yehova. Bobele ye nde akokaki kolongisa mwango oyo liboso ya botɛmɛli makasi boye. Batatoli ya Yehova na ekólo France bazwi ekateli makasi mpo na ‘koumela kati na bolingo na Klisto’ mpe ya ‘kotika ete pole na bango engɛnga.’ (Yoane 15:9; Matai 5:16) Baoyo nyonso bazalaki na molulu ya bofungoli kozanga komipekisa bazalaki na mayoki lokola oyo ya mokomi na nzembo ete: “Oyo ezali mosala na [Yehova], ezali na kokamwa mingi na miso na biso.”—Nzembo 118:23.
[Elilingi na lokasa 26]
Daniel Sydlik
[Elilingi na lokasa 26]
Lloyd Barry
[Elilingi na lokasa 26]
Bato 95 888 bayanganaki na likita ya ntina mpenza na Parc des expositions ya Villepinte
[Bililingi na lokasa 28]
Bankóto kati na bayangani batɛlɛmaki to bafandaki na mabelé mpo na kolanda manaka