Molulu monene ya libala
NA NƆRDI ya ekólo Mozambique ezali na etando ya mabelé patatalu oyo ezali na matiti mingi mpe ezingami na bangomba kitoko—mosusu ezali mabangamabanga, mpe mosusu ezipami na matiti. Ezali epai kuna nde mboka Fíngoè ezwami. Na eleko ya malili, ntango pole ezali na butu, likoló engɛngaka na ebele ya minzoto, mpe sanza epesaka pole makasi na boye ete engɛngisaka bandako ya matiti ya bato ya mboka. Ezali na esika wana kitoko nde molulu moko ya libala oyo ekokani na molulu mosusu te esalemaki.
Bankama ya bato batambolaki na makolo na boumeli ya bangonga mingi, basusu kutu mikolo mingi, mpo na koyangana na molulu monene wana. Basusu balekaki na banzela oyo ezangi banzete ya kobombama moi mpe na bisika ya makama epai banyama lokola ekange, nkosi, mpe nzoku ezali. Longola basakosi na bango, mingi bamemaki bansɔsɔ, bantaba, mpe ndunda. Ntango bakómaki na mboka yango, bakendaki na esika moko ya polele oyo mbala mingi esalelamaka mpo na mayangani ya boklisto. Atako mobembo elɛmbisaki bango, bazalaki na esengo, mpe bilongi na bango ya komungamunga bizalaki kofunda ete motema na bango ezalaki lukuluku mpo na kozela makambo oyo masengelaki kolanda.
Banani basengelaki kobalana? Ezalaki bato mingi! Ɛɛ, babalani mingi mpenza. Ezali te ete bakendaki kuna mpo na kosangana na molulu moko ya kobalisa bato mingi mbala moko mpo na kolamusa mayoki. Nzokande, bazali bato oyo balinganaki na bosembo mpe na matindiki malamu kasi, liboso bazalaki na likoki te ya kokomisa mabala na bango na mikanda ya Leta mpamba te bafandaka na bitúká oyo bizali mosika na babiro ya Leta. Babalani wana nyonso bayebaki mitinda ya Nzambe na ntina na libala na nzela ya boyekoli ya Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Bayekolaki ete mpo na kosepelisa Mozalisi na bango, ye mobandisi ya libala, basengelaki kobalana engebene mibeko ya Leta na mboka oyo bafandi, se lokola Yosefe na Malia bandimaki kokomisa nkombo na bango na mikanda ya Leta na eleko oyo Yesu abotamaki.—Luka 2:1-5.
Bolɛngɛli molulu
Filiale ya Batatoli ya Yehova na ekólo Mozambique ezwaki ekateli ya kopesa lisungi. Libosoliboso, na Maputo, engumba-mokonzi, batunaki ministere ya mambi ma bosembo mpe ministere ya misala mya mondɛlɛ-mboka mpo na koyeba masɛngami ya mibeko. Na nsima, bamisionere na engumba-mokonzi ya etúká ya Tete bakutanaki na bakonzi ya etúká mpo na kozwa bibongiseli mosusu. Baponaki mokolo oyo bamisionere mpe bakonzi oyo bapesaka mikanda ya Leta bakosala mobembo na mboka Fíngoè. Se na ntango yango, filiale ya la Société etindaki nkoma ya kolimbola makambo oyo epesaki malako na masangá oyo matalelamaki na likambo yango. Batatoli mpe bakonzi ya Leta bazelaki na motema likoló molulu yango oyo esalemá naino te.
Mokolo ya lomingo mwa 18 Máí 1997, bamisionere misato elongo na bakonzi ya Leta bakómaki na Fíngoè. Bakonzi ya mboka yango basilaki kobongisa bisika malamu pembeni ya ndako ya misala ya Leta mpo na bakonzi oyo bakoya. Nzokande, bakonzi yango basepelaki mingi na boyambi ya Batatoli ya Yehova na boye ete bamonaki malamu kofanda esika moko na bamisionere na milako oyo etongamaki mbangumbangu. Bakamwaki ntango bayokaki ete moko kati na bandeko oyo bazalaki kolamba azali nkulutu na lisangá ya mboka yango mpe ete mokɛngɛli-motamboli moko azalaki kati na basali ya bolingo malamu oyo bazalaki kosala mpo na kolɛngɛla molulu ya libala yango. Lisusu, bamonaki elimo malamu ya bamisionere, baoyo, kozanga ete bamilelalela bazalaki kolala na mwa milako mpe bazalaki kosukola nzoto na mwa katini moke. Bamonaki naino bondeko makasi motindo wana te kati na bato bauti na bisika bikeseni. Nzokande, eloko ekamwisaki bango mingi ezali kondima oyo bandeko bamonisaki na komipimeláká makambo mingi mpo na kolanda mibeko ya mboka mpe ebongiseli ya Nzambe.
Libaku ya esengo
Na ntango bazalaki kokóma, nokinoki babalani bazalaki komibongisa mpo na eteni ya liboso ya molulu ya libala: kozwa mokanda ya kotatola mbotama. Bango nyonso bazelaki na motema molai kati na molɔngɔ liboso ya bakonzi ya Leta mpo na kokomisa nkombo, mokolo ya mbotama, mpe makambo mosusu oyo masɛngamaki. Na nsima, balandaki molɔngɔ mosusu mpo na kokanga fɔtɔ, mpe bakendaki epai na bakonzi mosusu mpo na kozwa buku ya Leta. Bongo bazongaki lisusu epai na bakonzi mpo na kotondisa buku ya libala, oyo bazalaki na mposa na yango mingi. Nsima na yango, bazelaki na motema molai ete nkombo na bango ebéngama na ekoliseli-lolaka. Kopesama ya buku ya libala ezalaki likambo oyo esimbaki mayoki mpenza. Esengo ezalaki mingi wana mobali mokomoko na mwasi na ye batombolaki buku na bango ya libala lokola nkeni (coupe) ya motuya mingi oyo bauti kozwa.
Nyonso wana esalemaki na moi makasi. Kasi, moi mpe mputulu ya mabelé ebebisaki esengo ya libaku yango te.
Mibali balataki na lipombo mpenza, mingi balataki kazaka na kalavati. Basi balataki na modɛlɛ ya mboka na bango, mpe babakisaki elamba babéngi capulana na loketo, yango ezali elamba moko molai na langi ndenge na ndenge. Basusu bamemaki bana na bango, kokangáká bango na elamba yango.
Makambo nyonso malekaki malamu, kasi bato balekaki mingi mpo na kosilisa na mokolo moko. Ntango molili ekɔtaki, na boboto nyonso, bakonzi ya Leta bazwaki ekateli ete bakokoba koyamba babalani mpo na kokomisa mabala. Balobaki ete bakokaki kotika “bandeko na biso” te bákoba kozela nsima ya kosala milende makasi mpo na kokóma na mboka yango. Tokoki kobosana elimo ya lisalisi mpe ya komipesa yango te.
Ntango butu eyindaki malili ezalaki makasi. Mwa bato moke bakɔtaki na milako, nzokande, babalani mingi bazalaki libándá, zingazinga ya mɔ́tɔ. Yango ekitisaki esengo ya libaku yango te. Kosɛka mpe nzembo ezalaki koyokama kati na makɛlɛlɛ ya mɔ́tɔ; nzembo ezalaki koyembama na bosangisi mingongo minei. Mingi babɛtaki masolo ya mobembo na bango, wana basimbi mikanda na bango oyo bautaki kozwa.
Na ntɔngɔntɔngɔ, bamoko bakendaki na kati ya mboka kotekisa bansɔsɔ, bantaba, mpe ndunda na bango mpo na kofuta mbongo ya kokomisa mabala na bango. Ya solo, mingi “bakabaki” mpenza banyama na bango mpamba te batekisaki yango mpenza mangondo. Mpo na babola, ntaba ezali eloko ya motuya mpe ezali na ntalo mingi; kasi bandimaki komipimela biloko yango mpo na kobalana mpe kosepelisa Mozalisi na bango.
Mpasi ya mobembo
Babalani mosusu batambolaki ntáká milai mpo na kokóma kuna. Na ndakisa, Chamboko na mwasi na ye Nhakulira. Babɛtaki lisolo ya mobembo na bango na butu ya mibale wana bazalaki koyɔtɔ mɔ́tɔ. Atako azali na mbula 77, liso na ye moko ekufá mpe mosusu emonaka malamu te, Chamboko atambolaki makolo-ngulu na boumeli ya mikolo misato na bandeko nyonso ya lisangá na bango, mpamba te azalaki na ekateli makasi ya kokomisa libala na bango oyo esilaki koumela mbula 52.
Anselmo Kembo, ye azali na mbula 72, asilaki kolekisa pene na mbula 50 elongo na mwasi na ye Neri. Mwa mikolo liboso ya kosala mobembo, anyataki nzube molai wana azalaki kokata elanga na ye. Amemamaki mbangu na lopitalo ya pembeni mpo na kozwa nkisi. Atako bongo, azwaki ekateli ya kotambola na makolo, na kotɛnguma na mpasi kino na Fíngoè. Alekisaki mikolo misato mpo akóma. Anselmo akokaki kobomba esengo na ye te ntango asimbaki buku ya libala na ye na mabɔkɔ.
Mobalani mosusu ya sika oyo abendaki likebi ya bato ezali bongo Evans Sinóia, oyo liboso azalaki na basi mingi. Ntango ayekolaki solo ya Liloba ya Nzambe, azwaki ekateli ya kokomisa libala na ye na mwasi na ye ya liboso, kasi, mwasi yango aboyaki, mpe atikaki ye mpo na kobalana na mobali mosusu. Mwasi na ye ya mibale, oyo azalaki mpe koyekola Biblia, andimaki ete bábalana. Bango mibale batambolaki na nzela etondi na makama epai bankosi mpe banyama mosusu ya yauli ezali. Nsima ya kotambola mikolo misato, bango mpe balongaki kokomisa libala na bango na mikanda ya Leta.
Na Mwamitano, mikolo mitano nsima ya bokómi ya bamisionere mpe bakonzi ya Leta, makambo nyonso masilaki. Lapolo ya mosala nyonso ezalaki boye: bapesaki babuku ya Leta 468 mpe mikanda ya kotatola mbotama 374. Babuku nyonso ya libala oyo epesamaki ezalaki 233! Bato nyonso bazalaki na nsai. Atako balɛmbaki, bango nyonso bandimaki ete ezalaki na ntina mingi kosala likambo yango. Na ntembe te, libaku yango ekobunga te na makanisi mpe na mitema ya baoyo nyonso basanganaki na molulu yango. Ya solo, ezalaki molulu monene ya libala!