Libota ezali na likama!
“MPE bafandaki na esengo mpo na libela.” Ezali komonana ete maloba oyo ya nsuka ya lisapo mazali solo mpo na mabala moke mpenza na mikolo na biso. Elaka oyo babalani bapesanaka ete bakolingana ‘na ntango ya mpasi mpe na ntango ya bisengo na bomoi na bango mobimba’ ezalaka mingimingi se maloba ya mpamba. Likoki ya kozala na libota ya esengo emonanaka lokola ete ekoki kosalema te.
Kobanda 1960 kino 1990, kokufa ya mabala ebakisamaki koleka mbala mibale na mikili mingi ya Mpoto ya Wɛsti mpe ya Amerika ya Nɔrdi. Na mikili mosusu mitángo yango mikolaki mbala minei. Na ndakisa, mbula na mbula pene na mabala 35 000 mazali kosalema na ekólo Suède, mpe pene na katikati ya mabala yango mazali kokufa nsima ya kobota bana, oyo motángo na bango mobimba eleki 45 000. Motángo ya bato bafandi makango bongo na nsima bazali koboyana ezali se kobakisama, mpe likambo yango ezali kobimisa mikakatano mpo na bankóto ya bana oyo bazali kobotama. Likambo yango ezali mpe komonana na bikólo mosusu kati na mokili mobimba, lokola tokoki komona yango na etanda oyo ezali na lokasa 5.
Ya solo, kokabwana ya mabota mpe kokufa ya mabala ezali likambo ya sika te kati na lisolo ya bato. Mibeko ebéngami “Code d’Hammourabi” oyo ezalaki na ekeke ya 18 L.T.B. ezalaki na mibeko oyo epesaki ndingisa ya koboma libala na Babilone. Ata mpe Mibeko ya Mose, oyo epesamaki na ekeke ya 16 L.T.B., epesaki ndingisa ya koboma libala na Yisalaele. (Deteronome 24:1) Nzokande, na ekeke oyo ya 20, nsinga ya libota esili kolɛmba mingi koleka. Eleki sikawa mbula zomi na ndambo, mokomi moko na zulunalo akomaki ete: “Nsima ya mbula ntuku mitano, mbala mosusu tokozala lisusu na mabota te na lolenge oyo toyebi yango uta kala. Ekoki kozala ete bituluku ya ndenge na ndenge ekozwa esika ya mabota.” Mpe, ndenge makambo mazali kokende emonisi ete likanisi yango ezali mpenza solo. Libota esili kobeba nokinoki na boye ete motuna oyo ebongi kotunama: “Libala ekobika?”
Mpo na nini ezali mpenza mpasi mpo na babalani mingi ete bákangana moko epai na mosusu mpe bábatela bomoko ya libota? Sɛkɛlɛ ya baoyo bakangani elongo na boumeli ya bomoi na bango mobimba, mpe bazali kosepela na esengo mibu 25 mpe mibu 50 ya libala na bango ezali nini? Talá eksperiansi oyo: Na 1983 eyebisamaki ete na ekólo Azerbaïdjan na ex-Union soviétique, mobali moko na mwasi na ye basepelaki mibu 100 ya libala na bango—mobali azalaki na mbula 126 mpe mwasi 116.
Nini ezali koyeisa likama?
Na mikili mingi, mibeko epesi ndingisa na babalani na koboma libala na makambo lokola ekobo, konyokola mobalani na makanisi to na nzoto, kokima ndako, kolangwa masanga, kokufa mokɔngɔ, liboma, kozala na mobalani mosusu, mpe kosalela bilangwiseli. Nzokande, ntina oyo emonanaka mingi ezali ete lolenge oyo bato bazali kotalela libala mpe libota na ndenge eyebanaki kala esili kobongwana mpenza, mingimingi na bambula oyo euti koleka. Bato bazali lisusu komemya libala te, oyo kala etalelamaki ete ezali ebongiseli ya bulɛɛ. Babimisi na miziki oyo batondi na lokoso, bafilime, teyatre ya televizyo mpe mikanda ya masapo oyo bato basepelaka na yango mingi ezali kokumisa etamboli oyo ebéngami ete bonsomi na makambo ya kosangisa nzoto, etamboli ya mbindo, mpe bomoi ya koluka bobele matomba ya moto ye moko. Bazali kolendisa momeseno oyo esili kobebisa makanisi mpe mitema ya bilenge mpe mikóló.
Ankɛtɛ moko esalemaki na 1996 emonisaki ete Baameriké 22 likoló na monkama balobaka ete ntango mosusu kozala na makango ekoki kozala na litomba mpo na libala. Na ebimeli moko ya sipesiale, Aftonbladet, moko na bazulunalo minene ya ekólo Suède elendisaki basi ete báboma mabala na bango mpamba te “yango nde eleki malamu mpo na bomoi na bango.” Banganga-mayele mosusu ya pisikoloji mpe antropoloji babimisaki makanisi ete moto “abongisami” na nzela ya evolisyo ete aluka molongani mosusu nsima ya mwa bambula. Na maloba mosusu, bazali kopesa likanisi ete kozala na makango mpe koboma mabala ezali makambo makanamá bongo mpo na bato. Kutu, basusu balobi ete kokufa ya libala ya baboti ekoki kozala malamu mpo na bana, mpamba te ekobongisa bango ete báyika mpiko na ntango mabala na bango moko makokufa!
Bilenge mingi balingi lisusu te kozala na lolenge ya bomoi ya libota ndenge ezalaka uta kala, elingi koloba libota oyo ezali na tata, mama, mpe bana. Likanisi epalangani mingi ezali oyo: “Nakokoka te kofanda bomoi na ngai mobimba na molongani se moko.” Elenge mwasi moko ya mibu 18 na ekólo Danemark alobaki ete: “Libala ezali lokola Eyenga ya Mbotama, ezali se lisapo. Natyelaka yango motema te.” Noreen Byrne mosali na Lisangani ya basi ya ekólo Irlande alobaki boye: “[Basi] bazali na mayoki oyo: ‘Mpo na nini nakomitungisa na kofandáká na [mobali] mpe kosaleláká ye misala ya ndako. Tóbima, tósakana na bango elongo mpe esuka se wana’ . . . Basi mingi bazali kozwa ekateli ete bazali na mposa ya mobali te mpo na kolonga kati na bomoi.”
Mabota oyo mazali na moboti moko mazali kobakisama
Na mikili nyonso ya Mpoto ezalela yango ebakisi nokinoki bamama oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko. Bamoko kati na bango bazali bilenge mpe bazali kokanisa ete kozwa zemi oyo ekanami te ezali mabe te. Bamoko bazali basi oyo basepeli kobɔkɔla bana na bango bango moko. Mingi bazali bamama oyo bafandi esika moko na tata ya mwana bobele mpo na mwa ntango, kozanga likanisi ya kobalana. Na mbula oyo eleki, zulunalo Newsweek ezalaki na motó na likambo moko na ezipeli na yango elobaki ete: “Kokufa ya libala?” Lisolo yango elobaki ete motángo ya bana oyo bazali kobotama na libándá ya libala ezali kobakisama nokinoki na mikili ya Mpoto mpe emonani ete likambo yango ezali kotungisa ata moto moko te. Ekólo Suède ekoki kozala na esika ya liboso mpamba te katikati ya motángo ya bana oyo bazali kobotama kuna bazali kobotama na libándá ya libala. Na ekólo Danemark mpe ekólo Norvège motángo yango ezali pene ya katikati ya bana bazali kobotama na bikólo yango, mpe na ekólo France mpe ekólo Angleterre, motángo yango ezali mwana moko kati na bana misato.
Na États-Unis, motángo ya mabota oyo mazali na tata mpe mama masili kokita mingi na bambula oyo eleki. Lapolo moko elobi ete: “Na 1960, . . . bana 9 likoló na monkama bazalaki na ndako oyo ezali na moboti se moko. Na 1990, motángo yango emataki mingi kino na bana 25 likoló na monkama. Lelo oyo, mwayene ya bana 27,1 likoló ya monkama na États-Unis bazali kobotama na bandako oyo ezali na moboti moko, mpe motángo yango ezali se Komata. . . . Kobanda 1970, motángo ya mabota oyo moboti azali se moko ekoli koleka mbala mibale. Balukiluki mosusu balobi ete, lelo oyo, libota oyo esangisi baboti nyonso mibale ezali na likama na boye ete ezali kokende na kolimwa.”
Na bikólo oyo Lingomba ya Katolike ezali lisusu na bopusi te na etamboli ya bato, mabota oyo mazali na moboti moko mazali se kobakisama. Na ekólo Italie, mabota oyo mazali na mama, tata, mpe bana, mazali ata katikati te ya mabota nyonso, mpe mabota ya lolenge ya kala mazali kotika esika na mabota esalemi na babalani bazangi bana mpe mabota oyo mazali na moboti moko.
Na bikólo mosusu, ebongiseli ya kosunga bato ezali mpenza kolendisa bato ete bábala te. Bamama oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko mpe bazali kozwa lisungi ya Leta, bakozwa yango lisusu te soki babali. Bamama oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko na ekólo Danemark bapesaka bango mosolo mpo na kobatela bana na bango, mpe na bisika mosusu, bilenge basi oyo bakokisi naino mbula 18 te, kasi bazali na bana, babakiselaka bango mosolo mpe bafutelaka bango ndako. Na bongo, likambo ya mbongo mpe etalelami. Alf Svensson alobi ete na ekólo Suède, libala moko oyo ekufi ezali kozwa dolare 250 000 kino 375 000 na kɛsi ya Leta mpo na kopesa bato mwa mosolo ya kobikela, kofutela bango ndako mpe kosunga mpo na bolamu na bango.
Emonani ete mangomba ya boklisto ezali kosala mpenza eloko te mpo na komeka kobongola ezalela mabe oyo kati na mabota. Bapastere mingi mpe bakonzi mingi ya mangomba bazali kobunda na mikakatano ya mabota na bango moko, na bongo bazali komiyoka ete bakolonga te kosalisa bato mosusu. Kutu, ezali na baoyo bazali kolendisa likambo ya koboma libala. Na ebimeli na yango ya 15 Apríli 1996, zulunalo Aftonbladet eyebisaki ete pastere Steven Allen na engumba Bradford, na ekólo Angleterre, abongisaki molulu moko ya sipesiale mpo na koboma mabala, na makanisi na ye, esengeli kozala molulu oyo esengeli kosalemaka na mangomba nyonso ya Angleterre. “Ezali molulu ya kobikisa mpo na kosalisa moto ete andima mpe amesana na likambo oyo ekómeli bango. Esalisaka bango báyeba ete Nzambe azali ntango nyonso kolinga bango mpe esalisaka bango na kolongola mpasi ya mayoki.”
Na bongo, libota ezali kokende wapi? Tokoki kozala na elikya ete ekobika? Libota mokomoko ekoki kobatela bomoko na yango ata na likama monene boye? Tosɛngi yo ete otánga lisolo elandi.
[Etanda na lokasa 5]
MOTÁNGO YA MABALA OYO MAZALI KOSALEMA NA BOKOKANISI NA MABALA OYO MAZALI KOKUFA NA MBULA MOKO NA MWA BIKÓLO
EKÓLO MOBU MABALA MABALA MAZALI KOKUFA
Allemagne 1993 442,605 156,425
Australie 1993 113,255 48,324
Canada 1992 164,573 77,031
Cuba 1992 191,837 63,432
Danemark 1993 31,507 12,991
Estonie 1993 7,745 5,757
États-Unis 1993 2,334,000 1,187,000
France 1991 280,175 108,086
Grande-Bretagne 1992 356,013 174,717
Japon 1993 792,658 188,297
Moldavie 1991 4,065 2,659
Norvège 1993 19,464 10,943
Porto Rico 1992 34,222 14,227
République tchèque 1993 66,033 30,227
Russie 1993 1,106,723 663,282
Suède 1993 34,005 21,673
(Euti na Annuaire démographique 1994, Nations unies, New York 1996)