Ozalaka moto ya makanisi ya kolónga to ya kozanga kolónga?
“EZALAKI eleko eleki malamu, ezalaki eleko eleki mabe, . . . ezalaki eleko oyo elikya ebakisamaki, ezalaki eleko oyo tozangaki elikya, biloko nyonso ezalaki liboso na biso, eloko moko te ezalaki liboso na biso.” Maloba ya ebandeli ya búku ya Charles Dickens oyo ezali na motó na likambo ete A Tale of Two Cities (Lisoló ya bingumba mibale), mamonisi na ntɔki mpenza lolenge makambo oyo mabimaka makoki kozala na bopusi likoló na makanisi na biso, na mayoki na biso, mpe likoló na lolenge na biso ya kotalela bomoi.
Bingumba mibale oyo bilobelami ezali bongo Londres mpe Paris na eleko ya yikiyiki ebéngami Révolution française. Mpo na bato ya ekólo France oyo banyokwamaki na ekeke ya 18, kosakolama ya ntómo mpe bonsomi ya moto na ntango ya mbongwana (révolution), ezalaki solo “eleko oyo elikya ebakisamaki.” Kasi mpo na bato ya ancien régime, to boyangeli oyo elongolamaki, ezalaki ‘eleko oyo elikya ezalaki lisusu te,’ eleko oyo ezalaki komema na liwa mpe libebi.
Kolónga to kozanga kolónga? Yango etalelaki ngámbo oyo moto azalaki. Mpe ezali sé bongo lelo.
Ntango ya komitalela na bozindo
Ozali moto ya makanisi ya kolónga? Ozali komona bisengo ya bomoi, omizelaka ntango nyonso na makambo malamu mpo na mikolo mizali koya? To omonaka ntango nyonso ete makambo makolónga te, ete avenire na yo ekozala malamu te, mpe atako ozali na mposa ete makambo malamu maya kasi ozali sé komona ete makambo mabe koleka makoya?
Eleki mbula ntuku motoba, James Branch Cabell, mokomi Moamerike amonisaki na mokuse lolenge yango mibale ya kokanisa ekeseni na maloba oyo: “Moto ya makanisi ya kolónga alobaka ete tozali kobika na eleko oyo eleki bileko nyonso na malamu; nzokande moto ya makanisi ya kozanga kolónga akanisaka ete soki ezali bongo, elikya moko ezali te.” Soki okanisi ete likanisi yango ezali mpenza polele te, talelá malamu mpe mabe na lolenge bobele misato ya makambo oyo mazali komonana na mokili ya lelo lokola elobelami awa. Na nsima, talelá mayoki na yo, mpe omituna: ‘Nazali moto ya makanisi ya kolónga to ya kozanga kolónga?’
Kimya oyo ekoumela: Okoki kotánga bisika boni ya mokili oyo bizali na bitumba to matata? Irlande, ex-Yougoslavie, Moyen-Orient, Burundi, Rwanda—yango ezali koya nokinoki na makanisi. Bitumba yango mpe matata mosusu ekoki kosilisama mpo na kotya kimya oyo ekoumela na mokili mobimba? Mokili ezali nde kokende na kimya?
Nkita malamu: Lisangani ya mikili ya Mpótó (Union européenne) ezali na mokano ya kosalela mosolo sé moko kobanda 1999; nzokande, mikili yango mizali kokutana na mikakatano minene mpo na kosilisa komata ya ntalo ya biloko mpe nyongo ya Letá (dette publique). Na bisika mosusu, kanyaka ezali kobebisa nkita ya bikólo mingi ya Amerika mpe ya Afrika, epai kuna komata ya ntalo ya biloko ezali kotyela bato bozito monene mpe matata kati na bituluka mazali sé kokabola bato. Nkita ya mokili ezali pene na kokóma malamu?
Kozanga mosala: Na 1997, ntango bazalaki kosala voti na ekólo Angleterre, mangomba ya ekólo yango masanganaki mpo na kosɛnga na masangá nyonso ya politiki ete mokano ya liboso na manáka na bango ya mosala ezala ya kopesa bato nyonso mosala. Kasi, na komona ete bato pene na 30 likoló na monkámá kati na baoyo bakoki kosala bazali na mosala te to bazali kosala misala mikemike, tokoki mpenza kolikya ete moto nyonso akozwa mosala—mingi mpenza bilenge?
Ya solo, ezali mpasi te na kokanisa ete makambo makolónga te! Kasi moboko mpo na kozala na makanisi ya kolónga ezali, mpe tobyangi yo ete otalela lolenge oyo tokoki kokólisa makanisi ya kolónga.
[Elilingi na lokasa 3]
Révolution française
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na búku Pictorial History of the World