Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/12 nk. 8-10
  • ‘Basombaki Solo’!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Basombaki Solo’!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Babendami na mateya ya Biblia
  • Moto ameka solo ye moko
  • Batiki kotyela mangomba ya lokuta motema
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/12 nk. 8-10

‘Basombaki Solo’!

“SOMBÁ solo mpe kotekisá yango te.” (Masese 23:23, NW) Ezali wana elendiseli oyo Salomo, moto na mayele apesaki. Atako yango ekoki kolobama mpo na solo nyonso, ezali bongo mingi mpenza mpo na solo oyo ezwami na Biblia, Liloba ya Nzambe. Solo yango ekoki komema na bomoi ya seko! (Yoane 17:3, 17) Kasi, simbá likambo oyo ete solo yango ezwamaka ofele te. Moto asengeli kolinga “kosomba” yango, elingi koloba, kopesa to kotika eloko moko mpo na kozwa yango. (Kokanisá na Matai 13:45, 46.) Mingimingi, bato balingaka kosala yango te. Kasi na mikili mingi, bato ya mpiko oyo bazali kosomba solo ya Biblia bazali sé kokóma mingi​—mbala mingi bazali kosomba yango na motuya monene.

Tótalela ndakisa ya Batatoli ya Yehova na ekólo Ghana, na wɛ́sti ya Afrika. Na Yúni 1989, ekólo yango ezalaki na bato koleka 34 000 oyo bandimaki solo ya Biblia mpe bazalaki koteya yango epai na basusu. Na nsima, bakonzi ya Letá bapekisaki mosala na bango ya kosakola epai ya bato nyonso. Atako bongo, bato ya motema sembo bakóbaki ‘kosomba solo’​—atako bipekiseli ezalaki. Epekiseli elongolamaki na mokolo ya 31 Ɔkɔtɔ́bɛ 1991, mpe na katikati ya 1995, bobele mbula misato na ndambo nsima ya kolongolama ya epekiseli, Batatoli ya Yehova na ekólo Ghana bakómaki na motángo ya 46 104! Mpe na mbula oyo bakómi bato koleka 52 800.

Eloko nini ezali kobenda bato epai na solo ya Liloba ya Nzambe? Makambo nini bamosusu bazali komipimela mpo na “kosomba solo”? Mpo na koyanola, tótalela baeksperiansi ya baklisto misato ya ekólo Ghana.

Babendami na mateya ya Biblia

Tóbanda naino na elenge mwasi oyo azali na mbula mwa moke koleka 20. Tata na ye azalaki pastere, kasi ye aponaki kotika lingomba ya tata na ye. Mpo na nini? Bolingo na ye mpo na solo.

Abandaki na kolimbola boye: “Batatoli bazalaki koya mbala na mbala na ndako na biso wana bazalaki kotala bato na mosala na bango ya kosakola ndako na ndako. Nsima ya kosolola mwa mingi na bango, nasosolaki ete mateya na bango mazwaki mpenza moboko na yango na Biblia. Natunaki mituna na mateya lokola Bosato, lifelo ya mɔ́tɔ, kozanga kokufa ya molimo, mpe mingimingi kobikisama na bokɔnɔ na nzela ya kondima. Namindimisaki makasi ete mateya yango mautaki na Biblia. Kasi Batatoli basalisaki ngai na kososola ete ezalaki bongo te.”​—Mpo na koyeba likanisi ya Biblia likoló na mateya wana, tosɛngi na yo ete otánga mikapo oyo: Malako 13:32; Baloma 6:23; Misala 10:40; mpe 1 Bakolinti 13:8-10.

Elenge mwasi yango abakisaki lisusu boye: “Kasi, botɛmɛli ezalaki makasi na libota na ngai, mingi mpenza epai ya tata na ngai. Ye akanisaki ete bazalaki kozimbisa ngai. Nzokande, nayebaki ete makambo oyo nazalaki koyekola epai ya Batatoli ya Yehova ezali solo. Namekaki komonisa tata na ngai makambo yango kati na Biblia, kasi aboyaki koyoka. Kútu, botɛmɛli engalaki.

“Kasi, nazalaki na ekateli makasi. Nayebaki ete bobele boyebi ya solo nde ezali komema na bomoi ya seko na Paladiso, mpe nazalaki na ekateli ya kokangama na yango. Ntango Batatoli ya mboka na biso bayokaki mikakatano oyo nazalaki kokutana na yango, basalisaki ngai na bolingo nyonso, kolendisáká ngai mpe kopesáká ngai biloko mosusu oyo nasengelaki na yango. Yango esalisaki ngai nakanga ntina ya maloba ya Yesu mazwami na Yoane 13:35: “Bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” Nandimisamaki lisusu makasi ete Batatoli ya Yehova nde bazali na lingomba ya solo. Na nsima, ntango baboti na ngai bamonaki ete etamboli na ngai ebongwanaki, ekómaki malamu koleka, basepelaki na likambo yango, mpe ezaleli na bango epai na ngai ebongwanaki​—ɛɛ, ebongwanaki mingi mpenza na boye ete tata na ngai asɛngaki na Batatoli ete báteya mpe yaya na ngai ya mobali Biblia!”

Moto ameka solo ye moko

‘Kosomba solo’ ezalaka mpe komekama mpo na bilenge mosusu oyo babɔkwami na baboti oyo bazali Batatoli. Bilenge mosusu batalelaka solo ya Biblia sé bongobongo. Soki bango moko bamindimisi solo yango te, kondima na bango ekolɛmba, ekozala likolólikoló. (Kokanisá na Matai 13:20, 21.) Nathaniel, mobali moko ya ekólo Ghana oyo azali na mibu mwa moke koleka 30 ayebisi lolenge ‘asombaki solo’ ntango azalaki naino elenge.

Azali komikundola: “Baboti na ngai balakisaki ngai mateya ya Biblia uta nazalaki mpenza mwana moke. Ntango nazalaki kokóla, nazalaki kobima na bango elongo na mosala ya kosakola, kasi nazwaki mpenza ekateli te ya kokóma Motatoli. Na nsima, nasosolaki ete nasengeli kotalela mateya ya Biblia ngai moko.

“Liboso, nasengelaki komindimisa ete Biblia nde ezali Liloba ya Nzambe, kasi búku mosantu mosusu te ya lingomba. Na nzela ya boyekoli ya ngai moko, nayaki koyeba ete ezali búku mosantu bobele moko oyo ezali na ebele ya bisakweli ya polele oyo bikokisamaki na bosikisiki. Lisusu, nayaki koyeba ete Biblia ezali na makambo oyo mandimami na siansi​—na ndakisa, likambo oyo ete mabelé ‘etandami na esika mpamba.’ (Yobo 26:7) Maloba yango makomamaki bankóto ya bambula liboso ete bato ya siansi báyeba ebongiseli ya moi mpe bitando oyo bizingi yango. Bobele Nzambe nde akokaki kopemisa bato ete bákoma makambo yango!a

“Na nsima, nalingaki koyeba lingomba nini eteyaka mpe esalelaka solo oyo eteyami na Biblia. Mangomba mingi mateyaka lifelo ya mɔ́tɔ, Bosato, mpe molimo ekufaka te elandaka kozala na bomoi nsima ya liwa. Kasi mateya yango malongobanaki te na makanisi na ngai. Nakanisaki boye: Ezali mpenza na tata mabe oyo akotya lobɔkɔ ya mwana na ye na nzungu ya mai ya mɔ́tɔ mpo na kopesa ye etumbu? Boye, ebandi boni Nzambe ya bolingo abwaka bana na ye na lifelo ya mɔ́tɔ mpe kotika bango kuna ete bányokwamaka? Nzokande, Batatoli ya Yehova, bateyaka na boyokani na mikapo ya Biblia lokola Baloma 6:23 oyo elobi ete: “Masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa”​—kasi lifelo ya mɔ́tɔ te. Na makanisi na ngai, yango nde elongobanaki.

“Namonaki mpe ete Batatoli ya Yehova basɛngaka na basangani na bango nyonso ete bálanda mitindá ya Biblia mpe babimisaka na lisangá basáli na masumu oyo bazali kobongola motema te. Nsima ya kotalela makambo oyo nyonso, namindimisaki ete Batatoli ya Yehova nde bazali na solo, mpe nazwaki ekateli ngai moko ya kokóma Motatoli. Nasalaki milende mpo na kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo lokola Motatoli.”​—1 Bakolinti 5:11-13.

Lisoló ya Nathaniel ezali komonisa ete ata bilenge oyo babɔkwami na baboti baklisto basengeli “kosomba solo.” Basengeli kosuka te bobele na koyangana na makita ya lisangá, kozanga kokóla. Lokola bato ya Beloya ya kala, basengeli ‘kotánga makomami mokolo na mokolo, kotala soko makambo yango mazali boye.’ (Misala 17:11) Yango esɛngaka ntango mpe milende, kasi yango ekoki kopesa moto kondima makasi.​—Kokanisá na Baefese 3:17-​19.

Batiki kotyela mangomba ya lokuta motema

Godwin, moto ya ekólo Ghana, azalaki na mibu pene na 70 ntango atikaki Lingomba ya Presbytérien mpe lingomba ya nkuku ebéngami Franc-maçonnerie. Godwin alobi ete: “Ezali na makambo mazalaki kosalema na lingomba oyo namonaki ete mabongi te. Na ndakisa, kowelana ezalaki mingi mpe ezalaki kosila te. Ntango mosusu esengelaki ete bapolisi báya kotya kimya mpe molɔngɔ́! Namilobelaki ete yango ezali etamboli ebongi te mpo na bayekoli ya Klisto. Na nsima, mokakatano moko ebimaki kati na ngai mpe moninga moko na Lingomba ya Presbytérien. Tosambaki na tribinale mpe moninga yango akweaki na likambo yango. Nzokande, pastere ya lingomba, akɔtelaki moto yango na elimo ya koponapona mpe amekaki kopamela ngai na miso ya bato nyonso na lingomba! Nalobelaki ye polele mpe nabimaki na ndakonzambe​—natyaki mpe lisusu makolo na ngai kuna te.

“Mwa ntango elekaki, mpe Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na ngai. Liboso, nayokaki bango bobele mpo ete naboyaki kobengana bato bazalaki koteya makambo ya Nzambe. Kasi nabandaki komona ete atako naumelaki bambula mingi na Lingomba ya Presbytérien, nayebaki makambo mingi ya Biblia te. Na ndakisa, nayebaki soko moke te ete Biblia ezali kopesa elikya ya bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé.b Mpe ntango nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, lolenge na bango, mpe mingimingi molato ya bilenge na bango, esepelisaki ngai mingi. Bazalaki mpenza bato oyo bazalaki kotosa mitindá ya Biblia!”

Kasi, ‘kosomba solo’ esɛngaki na ye ete asala mbongwana ya mpasi kati na bomoi na ye. Godwin azali komikundola: “Nazalaki mosangani ya Lingomba ya Franc-maçonnerie. Mpe atako eyebani lokola lingomba oyo esungaka basangani na yango, namonaki milulu oyo na boumeli na yango bazalaki kosalela mikuwa ya mitó ya bato bakufá mpe mikuwa ya binama mosusu mpe bazalaki kobelela bilimu. Bazalaki koloba ete bilimu yango esalisaka baoyo babelelaka bango ete bákóla na elimo.

“Boyekoli na ngai esalisaki ngai na koyeba ete Yehova Nzambe ayini komikɔtisa na losambo ya bilimu mabe mpamba te yango ezali kotya moto kati na bopusi ya Satana mpe kati na nguya ya bilimu mabe na ye.c Nasengelaki nde kokóba kozala mosangani ya Franc-maçonnerie na losambo na yango ya bilimu mabe, to nasengelaki kolongwa mpe kosepelisa Yehova? Naponaki kosepelisa Yehova. Nabebisaki bisaleli nyonso ya Franc-maçonnerie oyo nazalaki na yango, ata molato oyo nazalaki kolata na makita ya Franc-maçonnerie. Namonaki bosolo ya elaka ya Yesu oyo elobaki ete, ‘Solo ekosikola bino’! (Yoane 8:32) Sikawa, na esengo nyonso, nazali koyebisa bato mosusu makambo oyo nayekolaki. Nazali na mawa ata moke te.”

Bankóto mingi ya bato ya motema sembo basili kopesa motuya monene mpo na “kosomba solo.” Ndenge moko na baklisto misato oyo tolobeli na lisoló oyo, bazali na mawa soko moke te mpo na mbongwana oyo basalaki. Solo ya Biblia epesi bango “miboko kitoko mpo na ekeke ekoya, ete básimba bomoi [ya solo, NW].” (1 Timoté 6:19) “Bomoi ya solo” yango mpe mapamboli nyonso oyo masangani na yango, yo mpe okoki kozwa yango mpo na libela soki ‘okosomba solo.’

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

b Na ndakisa, talá Nzembo 37:9-11, 29.

c Talá Deteronome 18:10-12; mpe Bagalatia 5:19-21.

[Elilingi na lokasa 9]

Nathaniel

[Elilingi na lokasa 9]

Godwin

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto