Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/12 nk. 3-4
  • Nini ezali kokómela Bilenge?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ezali kokómela Bilenge?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bakeseni na nini?
  • Esengeli kopamela nani?
  • Ndenge ya kozala na bolenge ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bilenge, bozali kobongisa avenire na bino?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Bilenge: bólanda elimo ya mokili te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/12 nk. 3-4

Nini ezali kokómela Bilenge?

NSANGO malamu to nsango mabe​—oyo wapi olingaka koyoka liboso? Ntango batunaki motuna oyo, bato mingi baponaki koyoka liboso nsango mabe na elikya ete nsango malamu ekotikala na makanisi.

Ntango tozali kotalela makambo oyo mazali kokómela bilenge, tólobela liboso makambo ya mawa ya ntango oyo. Mbala mingi mikóló balobaka ete bilenge ya ntango oyo bakokani te na bilenge ya ntango ya kala. Bilenge, na ngambo na bango, bazali komitungisa te mpo ete bazali kolanda te mitindá ya kala. Nzokande, bato oyo bayekolaka bizaleli ya bato bandimi ete bilenge ya lelo bakeseni na bilenge ya kala.

Bakeseni na nini?

Atako bato mingi bazali kondima ete bilenge basengeli kozala na bizaleli malamu, basengeli kokokisa mikumba, mpe kotósa basusu, mbala mingi emonanaka ete balóngaka te kokokisa makambo yango. Ankɛ́tɛ moko ebimisami na zulunalo The Independent ya Londres elobi ete, bilenge bazali “kokólisa ‘elimo ya sika ya botomboki’ kotɛmɛla mokili oyo na makanisi na bango esili mpenza kolɛmbisa bango.” “Elimo yango ya sika ya botomboki” emonisami na bolukiluki moko esalemaki mpe emonisi ete bobele bilenge moke ya mikolo oyo nde balingi komitalela lokola ete “bazali kolanda mitindá mpe babongi mpo na kokokisa mikumba.” Babongi mpenza kotalelama lokola “bazoba mpe babongi te na kozwa mikumba.”

Na ndakisa, na ekólo Angleterre, lapólo moko eyebisamaki na ntina na koboma bato​—oyo makambo yango mingimingi esalemaki na bilenge​—emonisi ete koboma bato ekóli koleka mbala zomi kobanda mobu 1950 kino 1993. Kosalela bilangwiseli mpe kolangwa masanga ezali likambo ekómi mingi ndenge moko na koboma bato. Nzokande, zulunalo The Times ya Londres, elobi ete, “Kobanda na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mobulu ya bilenge esili kokóla mingi” pene na bikólo nyonso ya bozwi. Engebene David J. Smith, profɛsɛrɛ ya makambo matali koboma bato (criminologie), mobulu yango “ezali na boyokani te na kokweisama ya bizaleli malamu to mpe na bopusi oyo ekóli kozanga nkaká.” Bolukiluki emonisi ete bokeseni monene ezali komonana sikawa kati na bilenge mpe mikóló.

Lelo oyo bana mpe bilenge bazali kokutana na bopusi makasi. Komiboma, to koluka lokumu, ekómi komonana bisika nyonso. Zulunalo Herald ya engumba Glasglow na ekólo Écosse elobi ete likambo ya koluka komiboma ekóli koleka mbala mibale na boumeli ya mibu pene na zomi epai na bana oyo bazali na nsé ya mbula zomi na mibale na ekólo Écosse. Bana oyo bakómi na mbula mingi bazali kopesa nzela na mayoki ya kozanga elikya mpe bazali koluka komiboma. Zulunalo yango elobi ete, “Likambo ya koluka komiboma liuti mpenzampenza na bokóli ya mitungisi na makanisi epai na bana oyo bazali kokana kobebisa bibongiseli oyo bityami mpo na kosunga bango.”

Esengeli kopamela nani?

Mikóló bazali komona ete ebongi kopamela bilenge zambi “babebisi” makanisi na bango. Kasi, na bosolo, mikóló mpe babongi kopamelama te mpo na makambo oyo mazali kokómela bilenge? Makambo makasi, bopɔtu ya baboti mpo na kokokisa mikumba na bango, ndakisa mabe ya baboti oyo bilenge bakoki kotyela motema, mbala mingi ezali ntina oyo ebebisi etamboli ya bilenge. Profɛsɛrɛ Sir Michael Rutter, mokambi ya Britain’s Medical Research Council Child Psychiatry Unit (Lisangani ya minganga ya Angleterre mpo na bolukiluki makɔnɔ ya motó epai na bana), alobi ete, “Konyokwama na makanisi oyo ezali komonana epai ya bato mingi ekokani na ndenge ezalaki komonana esili koleka mbula 30.” Abakisi ete, “Kasi, mawa oyo ezali komonana epai na bilenge mpe bilenge oyo bapusani na mbula ezali kokóla makasi. . . . Na ntembe te kobeba ya mabota ezali mpe kokólisa likambo yango; bobele mabota oyo babomi mabala te, kasi mobulungano mouti na kowelana mpe kozanga boyokani kati na mikóló.”

Molukiluki moko alobaki ete, bilenge bazali “kobwaka mitindá ya makambo ya kala.” Mpo na nini? “Mpamba te mitindá yango mizali mpo na bango te.” Kobwakama ya mitindá yango ekoki komonana na mbongwana ya kosalela bobali to bomwasi. Bilenge basi mingi bazali komekola bizaleli ya mibali ya matumoli mpe ya mobulu, nzokande bilenge mibali bazali komikómisa lokola basi. Oyo nde bokeseni na mitindá ya kala!

Kasi mpo na nini tozali komona mbongwana yango lelo? Mpe nsango malamu nini ezali mpo na bilenge lelo? Ndenge nini bakoki kozala malamu na mikolo oyo mizali liboso na bango? Lisoló na biso oyo elandi ekopesa biyano na mituna oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto