Ozali na mposa ya mokili ya boyengebene?
MASUWA moko esalemá na mabaya, ezali na bilamba misato ya mopɛpɛ mpe na bitazi mibale elingi kosɛma na libongo ya mboka oyo lelo ebéngami Cape Cod, na etúká ya Massachusetts, na États-Unis. Basáli na masuwa mpe bato 101 oyo bazali na kati balɛmbi mpenza nsima ya mobembo ya mikolo 66 na mai monene. Kokimáká minyoko oyo bazali kozwa na ntina na lingomba na bango mpe mikakatano ya nkita na mboka na bango, bauti kosala mobembo moko ya makámá na kokatisáká Mbu ya Atlantike.
Ntango basáli-mobembo na masuwa yango ebéngami Mayflower, bamonaki mokili na mokolo ya 11 Novɛ́mbɛ 1620, basepelaki mingi na elikya ete balingi kobanda bomoi ya sika. Lokola bazalaki na mposa makasi ya kobandisa mokili ya malamu koleka, mingi kati na mibali basáli-mobembo batyaki mabɔkɔ na boyokani oyo ebéngamaki Boyokani ya Mayflower. Kati na yango, bayokanaki kosala “mibeko ya sembo mpe ya kozanga koponapona” mpo “na bolamu ya etuluku mobimba.” Mposa na bango ya kosala mokili ya bosembo mpe ya malamu mpo na moto nyonso—to mokili ya boyengebene—ekokisamaki?
Atako boyokani oyo esalemaki kati na masuwa Mayflower etalelamaka lokola moko na miboko ya ebongiseli ya boyangeli ya États-Unis, bokesene ezali komonana mingi na États-Unis, lokola mpe ezali komonana na mokili mobimba. Na ndakisa, bapolisi babɛtaki mobali moko masasi na mokɔngɔ wana alingaki kokima nsima ya koyiba na magazini mpe kobɛta nkolo na yango masasi. Mobali yango afundaki bapolisi mpe bakonzi ya engumba New York na esambiselo mpe na nsuka bafutaki ye mosolo dolare milió minei.
Talá ndakisa mosusu. Ntango bayekoli ya mambi matali mibeko bazalaki kosala mamekani mpo na kokóma baavoka na engumba Pasadena, na etúká ya Californie, moko na bango azwaki maladi ya ndɛkɛ mpe akweaki. Bayekoli mosusu mibale oyo bazalaki pene na ye basalisaki ye mbangumbangu na kofuláká ye mopɛpɛ na zolo kino minganga bakómaki. Balekisaki miniti 40 mpo na kosalisa moninga na bango. Kasi ntango basɛngaki ete bábakisela bango miniti yango mpo na kosilisa mamekani na bango, bakambi ya mamekani yango baboyaki.
Ezali na likambo mosusu etali bitumbu oyo bizali kopesamela basáli na mobulu. Ed Rubenstein, nganga-mayele na makambo ya nkita alobi ete: “Mbala mingi babomi bakangaka bango te. Mingi kati na baoyo bakangamaka basambisamaka te. Bafundami mingi batikaka bango na bonsomi liboso ya kosambisama. Mpo na mosáli na mabe, etumbu oyo ebongi mpo na mbeba na ye ezali sé na mikanda, ezali yango te nde akozwa mpenza.” Kotaleláká mitángo ya bato oyo bazali kobuka bandako mpo na koyiba, Rubenstein asukisi na kolobáká ete moto nyonso oyo azali kobuka ndako mpo na koyiba “akokɔta bolɔ́kɔ bobele mbala 2 soki asali yango mbala 100.” Lokola etumbu ezali kopesama mingi te, yango epesi nzela na bokóli ya mobulu mpe bato mingi bazali kobomama.—Mosakoli 8:11.
Na mikili mingi, etuluku moke ya bazwi bazali kokóma na bozwi mingi lisusu koleka wana ebele ya babólá bazali konyokwama na mikakatano ya nkita. Bokesene motindo wana ezali komonana mingi ntango bato bazali na makoki mingi te ya kobongisa bomoi na bango to komileisa bobele mpo na mposo ya nzoto na bango, ekólo na bango, lokótá na bango, mpo ete bazali basi to mibali, to mpo na lingomba na bango. Na ndakisa, engebene zulunalo The New York Times, “pene na bato milió 250 oyo bazali na Azia ya Súdi epai Lingomba ya Hindu epalangani mingi—mingi mpenza na ekólo Inde mpe ekólo Népal—babotamaka bato baboyamá mpe bakotikala bongo bomoi na bango mobimba.” Likambo yango ezali kosala ete bamilió mingi ya bato bányokwama na bobólá, na nzala, mpe na maladi. Bokesene ezali konyokola bango uta kobotama na bango kino bakokufa.
Ezali boni mpo na oyo emonanaka lokola bokesene oyo moto azali na likoki ya kosilisa yango te? Kanisá bana oyo bazali kobotama na mbeba na nzoto—bakufá miso, bazali na mayele moke, to binama na bango mosusu bizali na mbeba. Mwasi oyo aboti mwana ebɔsɔnɔ to mwana akufi akozala na liyoki ete ezali bokesene ntango azali komona basi mosusu pembeni na ye bamemi bana na bango oyo bazali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́, boye te?
Likambo ya mawa, bokesene ezali sé koyikana, mpe mbuma mabe na yango—mpasi makasi mpe kozanga kimya, kozanga esengo mpe bosepeli. Lokola bazali na nkanda mpo na bokesene oyo bazali komona to mpe ezali kokómela bango, bato mingi bamipesi na mobulu, nzokande yango ezali sé kobakisa mpasi ya bato. Bitumba mingi bisalemi mpo na bokesene oyo ezali komonana.
Mpo na nini bato balóngi te kotya mokili ya boyengebene? Mokili ya boyengebene ezali bobele ndɔ́tɔ?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Corbis-Bettmann
[Elilingi na lokasa 4]
Bazali kotya mabɔkɔ na Boyokani ya Mayflower
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Corbis-Bettmann