Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 21
  • Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kozanga bosembo eutaka wapi?
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka kozanga bosembo?
  • Nzambe akotya nsuka na kozanga bosembo?
  • Bomoi ekozala ndenge nini na mokili ya sika ya boyengebene?
  • Osengeli mpenza kondimela elaka ya Nzambe oyo ete kozanga bosembo ekolongwa na mokili?
  • Tokoki kobunda mpo na kozanga bosembo banda sikoyo?
  • Nzambe akosala eloko mokolo mosusu mpo na kosilisa bokesene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Osengeli kosala nini mpo na makambo ya kozanga bosembo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Okoki koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 21
Mwasi moko azali kotala emekeli kilo ya boyengebene, oyo etɛngami na ngámbo moko.

Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?

Ezali lokola ete kozanga bosembo ezali na mabele mobimba. Tótalela kaka bandakisa mibale ya bato oyo bakangamaki kozanga ete básala likambo ya mabe:

  • Na sanza ya 01/2018, zuzi moko ya États-Unis apesaki nzela bábimisa na bolɔkɔ mobali moko oyo asalaki mbula pene na 38. Babimisaki ye mpo ekzamɛ ya ADN oyo basalaki ye emonisaki ete asalaki eloko te.

  • Na sanza ya 09/1994, na Afrika, bilenge mibali misato bakangamaki na bolɔkɔ mpo baboyaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Mpe na sanza ya 09/2020, bakokisaki mbula 26 na bolɔkɔ kozanga ete bákatela bango etumbu na kolanda mibeko to básambisa bango na tribinale.

Soki okutaná na makambo ya kozanga bosembo, okoki komiyoka lokola Yobo oyo alobaki: “Nazali se kobelela mpo na kosɛnga lisalisi, kasi bosembo ezali te.” (Yobo 19:7) Atako bosembo ya solosolo ekoki komonana lokola ndɔtɔ, Biblia elaki ete ezali na mokolo oyo bato oyo balukaka bosembo bakozwa yango. Na yango, bwanya oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa yo okanga motema na makambo ya kozanga bosembo.

Kozanga bosembo eutaka wapi?

Kozanga bosembo eutaka epai ya bato oyo baboyaka litambwisi ya Nzambe. Biblia emonisaka ete bosembo ya solosolo eutaka epai ya Nzambe. (Yisaya 51:4) Na Biblia, maloba oyo ebongolami na “boyengebene” mpe “bosembo” ezali mpenza na boyokani. (Nzembo 33:5) Misala ya boyengebene mpe ya bosembo, to oyo ezali malamu na kolanda mibeko ya Nzambe ememaka bosembo. Nzokande, kozanga bosembo eutaka na lisumu, oyo ebukaka mibeko ya Nzambe. Tótalela mwa bandakisa oyo elandi:

  • Ezaleli ya koluka kaka matomba ya moto ye moko. Mposa ya moimi ná lisumu ezali mpenza na boyokani. (Yakobo 1:14, 15) Mpo na kozwa oyo balingi, bato mingi balyelaka basusu ndenge basalelaka bango makambo na kozanga bosembo. Nzokande, Nzambe alingaka tóluka liboso matomba ya basusu.​—1 Bakorinti 10:24.

  • Kozanga koyeba. Bato mosusu basalelaka basusu makambo ya kozanga bosembo kozanga kutu báyeba, kasi Nzambe atalelaka yango kaka lokola lisumu. (Baroma 10:3) Kutu, kozanga koyeba etindaki bato básala likambo moko monene ya kozanga bosembo; elingi koloba, babomaki Yesu Kristo.​—Misala 3:15, 17.

  • Bibongiseli ya bato ná makanisi na bango elongi te. Bato bakanisaka ete ebongiseli ya politiki, ya mombongo mpe ya mangomba nde esengeli kosalela bato nyonso makambo na bosembo. Kasi, mbala mingi, bibongiseli yango nde ezali kosala mabunga, kobimisa kanyaka, kopona bilongi, lokoso, kokómisa bato babola mpenza, mpe kokonza basusu​—nyonso wana ezali komema na makambo ya kozanga bosembo. Bibongiseli yango mosusu ezali kotambwisama na bato oyo bazali na makanisi malamu. Kasi lokola Nzambe azali kotambwisa bango te, bazali kolonga te.​—Mosakoli 8:9; Yirimia 10:23.

Ndenge nini Nzambe atalelaka kozanga bosembo?

Ya solo, ayinaka kozanga bosembo, makanisi, mpe makambo nyonso oyo ebimisaka yango. (Masese 6:16-18) Na nzela ya elimo santu ya Nzambe, mosakoli Yisaya akomaki ete: “Ngai Yehovaa nalingi bosembo, nayini moyibi ná kozanga boyengebene.”​—Yisaya 61:8.

Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele ya kala emonisaki ete alingaka bato oyo basalelaka basusu makambo na bosembo. Apesaki bazuzi mitindo ete báboya kanyaka mpe makambo mosusu oyo ekoki kobebisa bosembo. (Kolimbola Mibeko 16:18-20) Apamelaki Bayisraele oyo batosaki ye te na ndenge bazalaki kolyela babola mpe bato mpamba, mpe aboyaki bango mpo batosaki te mibeko na ye.​—Yisaya 10:1-3.

Nzambe akotya nsuka na kozanga bosembo?

Ɛɛ. Na nzela ya Yesu kristo, Nzambe akolongola lisumu, likambo oyo esalaka kozanga bosembo ezala, mpe akopesa bato nyonso nzoto ya kokoka. (Yoane 1:29; Baroma 6:23) Lisusu, atye Bokonzi moko oyo ekomema mokili ya sika ya boyengebene mpe ekosalela moto nyonso makambo na bosembo. (Yisaya 32:1; 2 Petro 3:13) Mpo na koyeba makambo mosusu mpo na Bokonzi yango ya likoló, talá video oyo elobi Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Bomoi ekozala ndenge nini na mokili ya sika ya boyengebene?

Ntango bosembo ekotonda na mabele, yango ekomema kimya mpe moto nyonso akomiyoka ete abatelami. (Yisaya 32:16-18) Nzambe atalelaka bomoi ya moto nyonso ndenge moko, yango wana bakosalela moto nyonso makambo ndenge moko. Mawa, koganga mpe mpasi oyo eutaka na kozanga bosembo ekolongwa mpo na libela, ata mpe makanisi oyo etungisaka biso mpo na makambo ya kozanga bosembo ekolongwa mokemoke. (Yisaya 65:17; Emoniseli 21:3, 4) Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo oyo elobi “Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo nini?”

Osengeli mpenza kondimela elaka ya Nzambe oyo ete kozanga bosembo ekolongwa na mokili?

Ɛɛ. Na makambo mingi Biblia emonisi ete bisakweli na yango ebongi kotyelama motema, eyokani na istware mpe siansi, Biblia na mobimba na yango ezali na boyokani, nyonso wana emonisi ete okoki kotyela bilaka na yango motema. Masolo oyo elandi ezali kopesa bandimbola mosusu:

  • Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia elobaka solo? (video)

  • “Bisakweli oyo ekokisamaki”

  • “Bisakweli nyonso ya Biblia ekokisamaka”

  • “Ntina ya kotyela Biblia motema”

Tokoki kobunda mpo na kozanga bosembo banda sikoyo?

Basaleli ya Nzambe na ntango ya kala basalaki nyonso oyo esengeli mpo básalela bango te makambo ya kozanga bosembo. Na ndakisa, basalelaki ntoma Paulo makambo na kozanga bosembo oyo ekokaki komema ye tii na liwa. Na esika andima likambo yango kaka bongo, asalelaki makambo oyo endimami na mibeko mpe asɛngaki ete akende kosamba epai ya Kaisala.​—Misala 25:8-12 25:8-12.

Kasi, milende nyonso oyo bato bazali kosala mpo na kozongisa bosembo na mabele ezali kosimba te. (Mosakoli 1:15) Yango wana, ebele ya bato bazali kondimela elaka ya Nzambe ya mokili ya sika, epai boyengebene ekozala mpe yango esalisi bango bázala na kimya na motema atako bazali kosalela bango makambo ya kozanga bosembo.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.​—Nzembo 83:18.

Biblia esalisaki bango bákanga motema na makambo ya kozanga bosembo

  • Rafika.

    Rafika akɔtaki na etuluku moko oyo ezalaki kobunda mpo na makambo ya kozanga bosembo, kasi atikaki yango mpo bazalaki kotinda bato na mobulu. Na nsima, akómaki kondimela elaka ya Biblia oyo ete ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, kimya mpe bosembo ekozala. Talá lisolo ya bomoi na ye.

  • Antoine.

    Antoine, akolaki na Liban na ntango oyo bana-mboka bazalaki kobundana mpe kosalela mobulu mpo na kosilisa makambo ya kozanga bosembo. Kasi bavɛrsɛ mibale ya Biblia esalisaki ye mpo azwa kimya. Talá ndenge oyo Biblia ebongolaki bomoi na ye.

  • Jukka.

    Jukka abundaki mpo na koluka bosembo kasi amiyokaki ete azangi makasi, ntango azalaki komona ete milende na ye ezalaki kosala eloko ya malonga te. Kasi sikoyo azali na esengo ndenge azali kotya makasi na ye nyonso na elikya ya solosolo mpo na mokili. Tángá lisolo na ye.

Bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali kolobela bosembo

Mosakoli 3:16: “Mpe namoni lisusu na nse ya moi ete mabe ezalaki na esika ya bosembo, mpe mabe ezalaki na esika ya boyengebene.”

Ndimbola: Biblia ezali kondima ete kozanga bosembo ezali na mokili.”

Yobo 34:12: “Ɛɛ, ya solo, Nzambe asalaka mabe te, mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ye moko abebisaka lisambisi te.”

Ndimbola: Ezali Nzambe te nde abimisaka makambo ya kozanga bosembo.

Kolimbola Mibeko 32:4, 5: “Libanga, mosala na ye ezali ya kokoka, mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo. Nzambe moko ya bosembo, epai na ye kozanga bosembo ezali te. Azali moyengebene mpe sembo. Bango moko nde babebisi makambo; bazali bana na ye te, mbeba ezali ya bango moko.”

Ndimbola: Nzambe te nde abimisaka makambo ya kozanga bosembo, kasi nde bato ya masumu mpe baoyo baboyaka litambwisi ya Nzambe.

Yisaya 32:1: “Mokonzi moko akoyangela mpo na boyengebene; bongo bankumu bakoyangela mpo na bosembo.”

Ndimbola: Bokonzi ya Nzambe ekoyangela na boyengebene mpe na bosembo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto