Bazali na mokili kasi bazali bato ya mokili te
“Awa ezali bino na mokili te, . . . bamokili bazali koyina bino.”—YOANE 15:19.
1. Boyokani nini baklisto bazali na yango na mokili, kasi ndenge nini mokili etalelaka bango?
NA BUTU ya nsuka oyo alekisaki elongo na bayekoli na ye, Yesu ayebisaki bango ete: “Bozali bato na mokili te.” Azalaki kolobela mokili oyo wapi? Ezali solo ete na libaku mosusu liboso alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko,” boye te? (Yoane 3:16) Ezali polele ete bayekoli bazalaki bato ya mokili wana mpamba te bazalaki bato ya liboso oyo bamonisaki kondima epai na Yesu mpo na bomoi ya seko. Kasi, mpo na nini Yesu alobaki lisusu ete bayekoli na ye basengelaki kokabwana na mokili? Mpe mpo na nini alobaki lisusu ete: “Awa ezali bino bato na mokili te, . . . bamokili bazali koyina bino”?—Yoane 15:19.
2, 3. (a) “Mokili” oyo wapi baklisto basengeli kosangana na yango te? (b) Biblia elobi nini na ntina na “mokili” oyo baklisto bazali kati na yango te?
2 Eyano ezali ete Biblia ezali kosalela liloba “mokili” (na Greke, koʹsmos) na mitindo mikeseni. Lokola elimbolamaki na lisoló lileki, na bisika mosusu kati na Biblia, liloba “mokili” ezali kosalelama mpo na kolobela bato nyonso. Ezali mokili wana nde Nzambe alingaki mpe Yesu akufaki mpo na yango. Nzokande, Búku The Oxford History of Christianity elobi ete: “Liloba ‘mokili’ ezali mpe kosalelama na boklisto mpo na kolobela eloko oyo ezali mosika na Nzambe mpe oyo ayini yango.” Ndenge nini yango ezali solo? Roland Minnerath, mokomi moko mokatolike, kati na búku na ye na motó na likambo Les chrétiens et le monde (Baklisto mpe mokili) alimboli boye: “Soki totaleli yango na ndimbola mosusu, mokili ezali komonana lokola . . . bisika oyo biyangeli bizali na bonguna na Nzambe bizali kosala misala na yango mpe lokola bizali kotɛmɛla bokonzi ya Klisto oyo esili kolónga, biyangeli yango emikómisi yango moko bokonzi oyo eyangelami na Satana.” “Mokili” yango ezali bongo etuluku ya bato oyo bazali mosika na Nzambe. Baklisto ya solo bazali bato ya mokili yango te, mpe mokili wana nde ezali koyina bango.
3 Pene na nsuka ya ekeke ya liboso, Yoane azalaki kokanisa mokili yango ntango akomaki ete: “Bólinga mokili te soko makambo kati na mokili te. Soko moto nani akolingaka mokili, bolingo na Tata ezali kati na ye te. Zambi makambo nyonso kati na mokili, na mposa mabe na nzoto mpe mposa mabe na miso mpe nzombo na bizaleli iuti na Tata te kasi iuti na mokili.” (1 Yoane 2:15, 16) Akomaki lisusu ete: “Tóyebi ete tozali bana na Nzambe mpe mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Yesu ye moko abéngaki Satana ete “mokóló na mokili oyo.”—Yoane 12:31; 16:11.
Bokóli ya banguya ya mokili
4. Ndenge nini banguya ya mokili ebandaki?
4 Mokili oyo ezali mosika na Nzambe lelo oyo ebandaki kokóla mwa moke nsima ya Mpela na ntango ya Noa, wana bakitani mingi ya Noa batikaki kosambela Yehova Nzambe. Nimilodi azalaki moto monene na mikolo wana, motongi na engumba mpe “moluki makasi na nyama liboso na [Yehova].” (Genese 10:8-12) Na ntango wana eteni monene ya mokili yango ebongisamaki na bingumba oyo ezalaki makonzi, oyo mbala na mbala ezalaki kosala boyokani mpe ezalaki kobunda moko na mosusu. (Genese 14:1-9) Bingumba mosusu oyo ezalaki makonzi ekómaki koyangela bingumba mosusu mpe ekómaki banguya na bitúká wana. Banguya mosusu ya bitúká ekómaki banguya ya mokili mobimba.
5, 6. (a) Tángá banguya nsambo ya mokili oyo elobelami na lisoló ya Biblia? (b) Ndenge nini banguya yango ya mokili emonisami, mpe nguya na bango ezali kouta wapi?
5 Kolandáká ndakisa ya Nimilodi, bakonzi ya banguya ya mokili basambelaki Yehova te, likambo oyo ezalaki komonana na misala mabe na bango mpe na makambo makasi na bango. Kati na Makomami, banguya yango ekokisami na banyama na yauli, mpe na boumeli ya bikeke, Biblia emonisi biyangeli motoba oyo ezalaki na bopusi monene likoló ya libota ya Yehova. Ezalaki bongo Ezipito, Asulia, Babilone, Mede na Pelese, Grèce, mpe Loma. Esakolamaki ete nsima ya Loma, nguya ya nsambo ya mokili mobimba ekobima. (Danyele 7:3-7; 8:3-7, 20, 21; Emoniseli 17:9, 10) Emonani ete ezali bongo nguya ya mokili mobimba oyo ebéngami Anglo-américain, oyo esangisaki bokonzi ya Angleterre mpe bokonzi ya États-Unis, oyo na nsuka, emelaki nguya ya Angleterre. Bokonzi ya Angleterre ebandaki kokóla nsima wana bitika ya nsuka ya Bokonzi ya Loma bilimwaki.a
6 Banguya yango nsambo ya mokili mobimba emonisami kati na búku ya Emoniseli na nyama na yauli ya mitó nsambo oyo ebimaki na mai monene oyo elimboli bato ya yikiyiki. (Yisaya 17:12, 13; 57:20, 21; Emoniseli 13:1) Nani azali kopesa nguya na nyama yango oyo ezali koyangela? Biblia eyanoli ete: “Dalagona apesi [“nyama”] nguya na ye, na kiti na bokonzi na ye, na bokonzi monene.” (Emoniseli 13:2) Dalagona yango ezali mosusu te bobele Satana Zábolo.—Luka 4:5, 6; Emoniseli 12:9.
Boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe ebɛlɛmi
7. Baklisto balikyaka na nini, mpe ndenge nini yango ezali na bopusi na boyokani na bango na biyangeli ya mokili?
7 Na boumeli ya mbula pene na 2 000, baklisto bazali kosambela ete: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalama na nsé pelamoko na Likoló.” (Matai 6:10) Batatoli ya Yehova bayebi ete bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekoki komema kimya ya solo awa na mabelé. Lokola bazali kolanda na likebi mpenza bisakweli ya Biblia, bandimisami ete mosika te libondeli yango likopesamela eyano mpe ete mosika te Bokonzi ekotambwisa makambo ya mokili. (Danyele 2:44) Lokola bamitye na ngámbo ya Bokonzi, bakɔtaka na makambo ya biyangeli ya mokili soko moke te.
8. Ndenge nini baguvernemá ezali kotalela boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe, lokola esakolamaki na Nzembo 2?
8 Bikólo mosusu bilobaka ete balandaka mitindá ya lingomba. Kasi, na misala, bazali kobosana ete Yehova azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe ete asili kotya Yesu lokola Mokonzi na likoló mpo na koyangela mabelé mobimba. (Danyele 4:17; Emoniseli 11:15) Nzembo moko ya esakweli elobi ete: “Mikonzi na nsé bazali kotɛlɛma mpe mikóló bayangani myango elongo kotɛmɛla [Yehova] mpe Mopakolami na ye [Yesu]. Bango ete, Tóbuka nkanga na bango mpe tóbwaka nsinga na bango mosika.” (Nzembo 2:2, 3) Biyangeli bizali kondima “nkanga” ya Nzambe te to “nsinga” oyo ekotya ndelo na bokonzi na bango. Na yango, Yehova alobi na Yesu, mokonzi oyo ye aponi ete: “Lɔmbá ngai mpe nakopesa yo mabota lokola libula na yo, mpe kino nsuka na mokili ete izala na yo. Okotuta bango na lingenda na ebende, okobuka bango lokola mbeki na moyemi.” (Nzembo 2:8, 9) Nzokande, mokili oyo Yesu akufelaki ‘ekobukama’ nyonso te.—Yoane 3:17.
Tóboya “elembo” ya “nyama”
9, 10. (a) Mokanda ya Emoniseli ekebisi biso na likambo nini? (b) Kolata ‘elembo ya nyama’ emonisi nini? (c) Basaleli ya Nzambe bandimaka elembo nini?
9 Emoniseli oyo ntoma Yoane azwaki eyebisaki ete mokili oyo ezali mosika na Nzambe ekobanda kosɛnga makambo mingi epai ya bato mwa moke liboso ete ekoka kokufa, kotyáká “mobeko ete bato mike na bato minene, na bazwi, na babólá, na bansomi na baombo, bátyama elembo na lobɔkɔ na bango na mobali soko na elongi, boye moto akoki kosomba to kotɛka te soko azangi elembo.” (Emoniseli 13:16, 17) Yango elimboli nini? Elembo na lobɔkɔ ya mobali ezali elilingi elongobani mpo na komonisa kopesa mpenza lisungi. Ezali boni mpo na elembo na elongi? Búku The Expositor’s Greek Testament elobi ete: “Elilingi yango ezali na boyokani na momeseno ya kokata basodá to baombo nzoloko to kotya bango bilembo oyo ezali komonana polele . . . ; to, ekoki kozala mpenza momeseno ya lingomba etali kolata nkombo ya nzambe lokola nkɔ́nzɔ.” Bato mingi na nzela ya misala mpe maloba na bango bazali, na elobeli ya elilingi, kolata elembo yango, komimonisáká bongo lokola “baombo” to “basodá” ya “nyama.” (Emoniseli 13:3, 4) Mpo na bomoi na bango na mikolo mizali koya, búku Theological Dictionary of the New Testament elobi ete: “Banguna ya Nzambe bazali kopesa nzela na [elembo] ya nyama, motángo ya libombami oyo ezali na nkombo na ye, ete etyama na elongi mpe na lobɔkɔ na bango. Yango ezali kopesa bango likoki ya kokólisa nkita mpe mombongo na bango, kasi ezali kotya bango na ngámbo ya baoyo bakokwela nkanda ya Nzambe mpe ezali kolongola bango likoki ya kokɔta na boyangeli ya mbula nkóto, Em. 13:16; 14:9; 20:4.”
10 Ezali kosɛnga mpiko mingi mpe kolendendela mingi mpo na kotɛmɛla bopusi ya kozwa “elembo.” (Emoniseli 14:9-12) Nzokande, basaleli ya Nzambe bazali na nguya motindo wana, mpe mpo na yango, mbala mingi bazali koyina bango mpe bazali koloba mabe mpo na bango. (Yoane 15:18-20; 17:14, 15) Na esika ya kolata elembo ya nyama, Yisaya alobaki ete na lolenge ya elilingi bakokoma na lobɔkɔ na bango ete, “Moto na Yehova.” (Yisaya 44:5) Lisusu, lokola bazali ‘kokimela mpe kolela’ na ntina na makambo na mbindo oyo mazali kosalema kati na mangomba ya lipɛngwi, bazali kozwa elembo ya elilingi na bilongi na bango oyo ezali komonisa bango ete babongi kobikisama ntango Yehova akokokisa bikateli na ye.—Ezekiele 9:1-7.
11. Nani atiki nzela ete baguvernemá ya bato eyangela kino ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya koyangela mabelé?
11 Nzambe atiki nzela ete baguvernemá ya bato eyangela kino ntango Bokonzi ya likoló oyo etambwisami na Klisto ekozwa bokonzi nyonso ya mokili oyo. Lolenge oyo Nzambe atiki nzela na makonzi ya politiki elobelami na Profesere Oscar Cullmann kati na búku na ye The State in the New Testament. Akomi boye: “Likanisi oyo ete Letá ‘ezali mpo na mwa ntango’ ezali ntina oyo ezalela ya baklisto ya liboso epai ya Letá ezali semba te, kasi emonani lokola ete ezali bongolabongola. Nabɛti nsɛtɛ́ ete, emonani lokola ete ezali bongo. Tókoki bobele kotánga Baloma 13:1, ‘Tiká ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi. . .’ esika moko na Emoniseli 13: Letá lokola nyama ebimi na libulu mozindo.”
“Nyama” mpe “Kaisala”
12. Likanisi nini ya bokatikati Batatoli ya Yehova bazali na yango mpo na baguvernemá ya bato?
12 Ezali solo te na kosukisa ete bato nyonso oyo bazali kati na boyangeli ya guvernemá bazali basaleli ya Satana. Mingi bamimonisaki ete bazali bato oyo bazali kotosa mitindá, lokola mokóló na esanga Selegi Paulo oyo alobelami na Biblia lokola “mobali na mayele.” (Misala 13:7) Bayangeli mosusu bakɔtelaki na mpiko nyonso ntómo ya bituluku mike, kotambwisamáká na lisosoli oyo Nzambe asilá kotya kati na bango, atako bayebaki Yehova mpe mikano na ye te. (Baloma 2:14, 15) Tómikundola ete Biblia ezali kosalela liloba “mokili” na ndenge mibale ekeseni: mokili, oyo Nzambe alingaka mpe oyo biso tosengeli kolinga, mpe mokili—bato oyo bazali mosika na Yehova, oyo Satana azali nzambe na yango mpe oyo tosengeli kosangana na yango te. (Yoane 1:9, 10; 17:14; 2 Bakolinti 4:4; Yakobo 4:4) Na yango, basaleli ya Yehova bazali na bokatikati liboso na boyangeli ya bato. Tozali komikɔtisa na makambo ya politiki te mpamba te tozali kosala lokola bantoma to batindami ya Bokonzi ya Nzambe mpe topesi bomoi na biso epai ya Nzambe. (2 Bakolinti 5:20) Epai mosusu, tozali kotosa bakonzi mpo na kobatela lisosoli malamu.
13. (a) Lolenge nini Yehova atalelaka baguvernemá ya bato? (b) Botosi ya baklisto epai ya baguvernemá ya bato esengeli kosuka wapi?
13 Lolenge wana ya bokatikati mpo na kotalela makambo ezali komonisa likanisi ya Nzambe. Ntango biyangeli ya mokili, to ata bikólo mikemike, ezali kosalela bokonzi na yango na ndenge ya mabe, ezali kokonza banamboka na yango, to konyokola baoyo bazali kosambela Nzambe, na ntembe te, elobeli ya esakweli oyo ezali komonisa bango lokola banyama na yauli ekobonga kosalelama mpo na bango. (Danyele 7:19-21; Emoniseli 11:7) Nzokande, ntango baguvernemá ya bikólo ezali kosalela mokano ya Nzambe na kotosisáká mibeko mpe kotya molɔngɔ́ na bosembo, Nzambe akotalela yango lokola “basáli” na ye. (Baloma 13:6) Yehova azali komizela ete basaleli na ye bámemya biyangeli ya bato mpe bátosa yango, kasi botosi na bango ezali na ndelo. Ntango bato bazali kosɛnga na basaleli ya Nzambe makambo oyo mapekisami na Mibeko ya Nzambe to ntango bazali kopekisa makambo oyo Nzambe azali kosɛnga na basaleli na ye, basaleli ya Nzambe bakolanda etɛlɛmɛlo oyo bantoma bazwaki, elingi koloba: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato.”—Misala 5:29.
14. Lolenge nini Yesu mpe na nsima Paulo balimbolaki botosi oyo baklisto basengeli kozala na yango epai na biyangeli ya bato?
14 Yesu amonisaki ete bayekoli na ye bakozala na masɛngami ya kokokisa liboso ya biyangeli mpe liboso ya Nzambe ntango alobaki ete: “Pesá epai na Kaisala yango ezali na Kaisala mpe na Nzambe yango ezali na Nzambe.” (Matai 22:21) Ntoma Paulo akomaki na kopemama ete: “Tiká ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi . . . Nde soko okosala mabe, obanga. Zambi akomemaka mopanga mpamba te. Azali mosáli na Nzambe mpo na kokómisa nkanda na ye epai na moto oyo akosalaka mabe. Boye ekoki kotosa bobele mpo na kobanga etumbu te kasi mpo na lisosoli lokola. Yango wana, bokofuta mpako.” (Baloma 13:1, 4-6) Kobanda ekeke ya liboso T.B. kino lelo, baklisto batyaka likebi na makambo oyo Letá azali kosɛnga. Bazalaka na mposa ya kososola soki kotosa masɛngami wana ekomema bango na kobebisa losambo na bango to soki masɛngami motindo yango malongobani mpe masengeli kotosama na lisosoli malamu.
Banamboka oyo bazali na lisosoli malamu
15. Lolenge nini Batatoli ya Yehova bapesaka oyo ya Kaisala na Kaisala na lisosoli malamu?
15 Bakonzi “bazali liboso” elingi koloba bayangeli ya politiki bazali “basáli” ya Nzambe na ntango bazali kokokisa mokumba na bango oyo endimami na Nzambe, oyo esangisi bokonzi mpo “na kopesaka bitumbu epai na bato na misala mabe mpe mpo na kosanzola bato na misala mibongi.” (1 Petelo 2:13, 14) Basaleli ya Yehova bafutaka na lisosoli malamu epai ya Kaisala oyo azali kosɛnga lokola ntáko, mpe bazali kosala nyonso na meko oyo lisosoli na bango liteyami na Biblia ezali kopesa nzela na kozaláká ‘na botosi [na biyangeli mpe bakonzi lokola bayangeli] mpe koselingwa mpo na misala nyonso malamu.’ (Tito 3:1) “Misala malamu” esangisi kosalisa bato mosusu, na ndakisa na ntango ya makámá. Mingi basili kopesa litatoli na boboto oyo Batatoli ya Yehova bamoniselaki bazalani na bango na ntango ya makambo wana.—Bagalatia 6:10.
16. Misala malamu nini Batatoli ya Yehova basalaka na lisosoli malamu mpo na biyangeli mpe bazalani na bango?
16 Batatoli ya Yehova balingaka bazalani na bango mpe bamonaka ete likambo lileki malamu oyo bakoki kosalela bango ezali bongo kosalisa bango ete bázwa boyebi ya sikisiki ya mokano ya Nzambe ya kotya “makoló ya sika mpe mabelé ya sika.” (2 Petelo 3:13, NW) Na koteyáká mpe kosaleláká mitindá mitombwani ya Biblia, bazali na ntina na bisika bafandi, bazali kobikisa bato mingi ete bámikɔtisa na bomoi ya mobulu te. Basaleli ya Yehova batosaka mibeko mpe bamemyaka baministre mpe basáli ya Letá, bazúzi, mpe bakonzi ya engumba, kopesáká lokumu epai “na baoyo bakoki kozwa lokumu.” (Baloma 13:7) Batatoli oyo bazali na bana bazalaka na esengo ya kosalana elongo na balakisi ya bana na bango mpe basalisaka bana na bango ete bátánga malamu, mpo ete na nsima bákoka kozala bato oyo bayebi komizwela bango moko na esika ya kozala bozito mpo na mboka. (1 Batesaloniki 4:11, 12) Kati na masangá na bango, Batatoli bakaniselaka basusu mabe te na ntina na bokeseni ya mposo, bakabwanaka na bituluku te, mpe bapesaka motuya monene na kolendisama ya libota. (Misala 10:34, 35; Bakolose 3:18-21) Na yango, na misala na bango, bazali komonisa ete bifundeli oyo bizali kobimisama ete bazali babomi na mabota mpe ete basalaka eloko te na esika oyo bafandi ezali lokuta. Na ndenge yango, maloba oyo ya ntoma Petelo mazali kokokisama: “Mpo ete mokano na Nzambe ezali boye ete, awa ekosala bino misala mibongi, bózalisa bato na bilobaloba na bilema nyɛɛ.”—1 Petelo 2:15.
17. Lolenge nini baklisto ‘bazalaka ntango nyonso na bizaleli na mayele liboso na bato na libándá’?
17 Na yango atako bayekoli ya solosolo ya Klisto bazali “bato na mokili te,” bazali kati na mokili mpe basengeli “kozala” ntango nyonso “na bizaleli na mayele liboso na bato na libándá.” (Yoane 17:16; Bakolose 4:5) Ntango nyonso oyo Yehova akotika nzela na bakonzi bazali liboso ete básala lokola basáli na ye, tokomonisela bango limemya libongi. (Baloma 13:1-4) Atako tozali komikɔtisa na makambo ya politiki te, tozali kobondela mpo na “mikonzi nyonso baoyo bazali liboso,” mingimingi na ntango bazali kozwa bikateli oyo bizali na bopusi na bonsomi ya losambo. Tokolanda kosala yango “ete tótambola na bizaleli na kimya mpe na kozanga mobulu kati na losambo na Nzambe mpe na sembo na bozito,” mpo ete ‘bato [ya mitindo, NW] nyonso bákoka kobika.’—1 Timoté 2:1-4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá búku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, mokapo 35, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Mituna ya bozongeli
◻ Baklisto bazali na “mokili” oyo wapi, kasi “mokili” oyo wapi bazali basangani na yango te?
◻ “Elembo” ya “nyama” na lobɔkɔ mpe na elongi ya moto emonisi nini, mpe basaleli ya sembo ya Nzambe bazali na elembo nini?
◻ Likanisi nini ya bokatikati baklisto bazali na yango na ntina na biyangeli ya bato?
◻ Wapi bamoko ya myango oyo Batatoli ya Yehova bazali kopesa lisungi mpo na bolamu ya bato na esika bafandi?
[Bililingi na lokasa 16]
Biblia ezali komonisa boyangeli ya bato lokola mosáleli ya Nzambe mpe lokola nyama na yauli
[Elilingi na lokasa 17]
Mpo ete bazali komibanzabanza na bolingo nyonso mpo na basusu, Batatoli ya Yehova bazali na ntina na bisika bafandi