Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/10 lok. 32
  • Kobɔkɔla bana ya bizaleli malamu—Ekoki kosalema lelo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobɔkɔla bana ya bizaleli malamu—Ekoki kosalema lelo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/10 lok. 32

Kobɔkɔla bana ya bizaleli malamu—Ekoki kosalema lelo?

ROBERT GLOSSOP, mosáli na Institut Vanier mpo na makambo matali libota na etúká ya Ottawa, na ekólo Canada alobi ete: “Tozali sikawa kobika na mokili oyo ezali na makambo ndenge na ndenge, epai mimeseno mikeseni mpe mitindá ya etamboli malamu mikeseni.” Yango ebimisi makambo nini? Lapólo moko oyo ebimisamaki na zulunalo The Toronto Star elobi ete: “Kokumba zemi epai ya bilenge, mobulu mpe komiboma ya bilenge ezali sé kobakisama.”

Mokakatano yango esuki bobele na Amerika ya Nɔ́rdi te. Bill Damon, mokambi ya Centre pour le développement humain na Iniversité ya Brown, na etúká ya Rhode Island, na États-Unis, ayekolaki mikakatano yango na Angleterre mpe na bikólo mosusu ya Mpótó, mpe lisusu na Australie, na Israël, mpe na Japon. Amonisi ete mbeba euti na mangomba, na biteyelo, mpe na bibongiseli mosusu oyo ezali lisusu kopesa litambwisi epai ya bilenge te. Alobi ete: “Mimeseno na biso eyebi te makambo oyo bana bazali na yango mposa mpo na kokólisa bomoto mpe makoki.” Kotángáká maloba ya banganga-mayele na makambo matali baboti oyo bazali koteya ete “disipilini ezali mabe mpo na bokolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe bolamu ya bana,” Damon alobi ete yango ezali “mwango ya kobɔkɔla bana ya motó makasi mpe bazangi botosi.”

Lelo oyo bilenge bazali na mposa ya nini? Bazali ntango nyonso na mposa ya kolakisama na bolingo oyo esembolaka makanisi mpe motema. Elenge na elenge azali na disipilini oyo ebongi na ye. Na ntango epusami na bolingo, disipilini ekoki mbala mingi kopesama na nzela ya kokanisa elongo na mwana. Yango wana, bayebisi biso na Masese 8:33 ete “Yoká kolakisama.” Kasi ezali na bilenge mosusu oyo “bazwaka kosembolama na maloba mpamba te.” Mpo na bango, ekosengela mbala mosusu etumbu ebongi mpo na kozanga botosi, kasi na meko oyo elongobani. (Masese 17:10; 23:13, 14; 29:19) Na kopesáká malako wana, Biblia ezali kopesa nzela te na kobɛta mwana na nkanda, yango ekoki kobuka to kozokisa mwana mpota. (Masese 16:32) Nzokande, mwana asengeli koyeba ntina oyo bazali kosembola ye mpe koyeba ete moboti azali kosala yango mpo na bolamu na ye.​—Kokanisá na Baebele 12:6, 11.

Toli malamu mpe ebongi oyo euti na Biblia emonisami mingi kati na búku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto