Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/10 lok. 31
  • Malia atikalaki ngɔndɔ libela kati na libala na ye?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Malia atikalaki ngɔndɔ libela kati na libala na ye?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/10 lok. 31

Malia atikalaki ngɔndɔ libela kati na libala na ye?

MPO na komeka koyokanisa liteya oyo elobi ete Malia atikalaki ngɔndɔ libela na kati na libala na ye na Yosefe, bato mingi oyo basalaka mayemi mpe oyo basalaka bikeko bamonisaki Yosefe lokola mobangé. Engebene bato yango Yosefe azalaki mpenzampenza mobateli ya Malia kasi mobali na ye te. Kasi eumeli naino mingi te, Pápa Jean Paul II abimisaki likanisi mosusu na ntina na likambo yango. Alobaki ete Yosefe “azalaki mobangé te na eleko wana.” Kasi, “nzoto na ye ya kokoka oyo eutaki na ngɔlu ya Nzambe, epusaki ye ete afanda libala na Malia kozanga ete básangisa nzoto.”

Kasi soki Malia azalaki na mposa ete atikala ngɔndɔ mpo na libela, mpo na nini abalaki? Pápa ayanoli ete: “Tokoki kokanisa ete na ntango ya kobandama na bango, Yosefe na Malia bayokanaki na ntina na mokano ya kofanda na libala lokola ngɔndɔ.”

Nzokande, Biblia ezali komonisa likambo yango na lolenge mosusu. Lisoló ya Matai elobi ete Yosefe “asangani na ye te kino esili ye kobota mwana mobali.” (Matai 1:25, biso nde totɛngisi makomi mosusu.) Nsima ya kobotama ya Yesu, Malia afandaki na Yosefe libala lokola ngɔndɔ lisusu te. Elembeteli oyo endimisi yango ezali ete mwa mosika kati na Evanzile, elobami ete Yesu azalaki na bandeko mibali mpe bandeko basi.​—Matai 13:55, 56.

Na bongo, atako Biblia ezali koloba ete Malia azalaki ngɔndɔ ntango abotaki Yesu, likambo yango ezali moboko te ya koloba ete atikalaki ngɔndɔ na boumeli ya ntango nyonso afandaki na libala ye na Yosefe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto