Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/10 nk. 30-31
  • Suneme: Eyebanaki mpo na bolingo mpe bitumba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Suneme: Eyebanaki mpo na bolingo mpe bitumba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bitumba mibale ya makasi
  • Bolingo ya solo ekoki kozala?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Gideone alongaki bato ya Midiane
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Gideone ná bato na ye 300
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • “Zwá mwana na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/10 nk. 30-31

Suneme: Eyebanaki mpo na bolingo mpe bitumba

ENGUMBA Suneme ezalaki na súdi ya Galilai, na eteni ya nsuka ya lobwaku ya Yizelele na epai ya ɛ́sti. Kati na engumba moke yango, bitumba mibale ya minene bisalemaki kuna na ntango ya lisoló ya Biblia, kasi engumba yango eyebanaki mpe lisusu lokola mboka ya basi mibale oyo bapesaki ndakisa ya bolingo ya solosolo.

Na nsuka ya Suneme ezalaki na ngomba oyo ekanisami ete ezali Ngomba Mole, mpe soki okatisi lobwaku, na ntaká ya kilomɛtɛlɛ soko mwambe, okokuta Ngomba Giliboa. Kati na ngomba yango mibale oyo ezalaki na esobe, mongala moko ezalaki koleka wana mpe esalaki ete mabelé ebota mbuma mingi​—moko na bitúká oyo bizalaki kobota mbuma mingi kati na Yisalaele.

Mboka yango oyo ezalaki kobota mbuma zingazinga na Suneme ebongaki mpenza mpo na kobimisa moko na masoló ya lolango maleki kosepelisa​—ezali bongo Loyembo ya Salomo. Ezali loyembo mpo na mwana mwasi moko kitoko na mboka wana oyo asepelaki kobalana na moninga na ye mobateli ya bampate na esika ya kondima kobalana na Mokonzi Salomo mpe kokóma moko kati na basi na ye. Salomo asalelaki mayele na ye nyonso mpe bozwi na ye mpo na kosepelisa motema ya mwana mwasi yango. Mbala na mbala, azalaki kokumisa ye ete: “Oyo nani atali lokola ebandeli na moi na kitoko lokola sanza mpe na kongɛnga lokola moi?” Mpe alakaki ete akotondisa ye na biloko ya pauni nyonso oyo ye akolinga.​—Loyembo ya Salomo 1:11; 6:10.

Mpo na kopesa ye mwa elakiseli ya bozwi na ndako na ye, Mokonzi Salomo amemaki ye na Yelusaleme, elongo na bato 60 kati na basodá na ye ya lokumu. (Loyembo ya Salomo 3:6-​11) Apesaki ye eteni ya ndako ya kolala na ndako ya mokonzi, ndako na ye kitoko mpenza na boye ete ntango mokonzi-mwasi na Seba amonaki yango, “azalaki lisusu na mpiko te.”​—1 Mikonzi 10:4, 5.

Kasi mwana mwasi ya Suneme atikalaki sembo epai na elenge mobali mobateli ya bampate. Alobaki ete: “Lokola nzete na mbuma kitoko kati na nzete na zamba, boye ezali molingami na ngai.” (Loyembo ya Salomo 2:3) Tiká ete Salomo asepela na bilanga na ye nkóto ya miwiti. Elanga moko ya miwiti​—elongo na molingami na ye​—ekoki mpo na ye. Bolingo na ye ekoningana te.​—Loyembo ya Salomo 8:11, 12.

Mwasi mosusu ya kitoko azalaki kofanda na Suneme. Toyebi te soki azalaki kitoko na nzoto, kasi azalaki solo malamu na motema. Biblia elobi ete ‘azalaki komipimela ye moko’​—to mpe amitungisaki mingi​—mpo na koleisa mosakoli Elisa mpe kopesa ye esika ya kolala.​—2 Mikonzi 4:8-13.

Tókanisa ete mosakoli Elisa auti na mobembo mosika, mpe alɛmbi, na botɔ́ndi nyonso amati na eteni ya ndako oyo mwasi wana mpe mobali na ye basilaki kobongisa mpo na ye. Na ntembe te azalaki mbala na mbala kolekisa ntango na ndako na bango, mpamba te mosala na ye ya mosakoli eumelaki mbula 60. Mpo na nini mwasi yango ya Suneme asengisaki Elisa ete afandaka na ndako na bango mbala nyonso oyo azalaki koleka na nzela wana? Mpamba te atalelaki mosala ya Elisa na motuya. Mosakoli yango azalaki na komikitisa mpe azalaki na moimi te, azalaki kosala lokola lisosoli ya libota, kokundweláká mikonzi, banganga, mpe bato nyonso ntina ya mokumba na bango ya kosalela Yehova.

Na ntembe te mwasi ya Suneme azalaki moko kati na bato oyo Yesu akanisaki ntango alobaki ete: “Ye oyo akoyamba mosakoli mpo ete azali mosakoli akozwa libonza na mosakoli.” (Matai 10:41) Yehova apesaki libonza monene na mwasi yango oyo azalaki kobanga Nzambe. Atako azalaki ekomba na boumeli ya bambula mingi, ayaki kobota mwana mobali. Bambula mingi na nsima azwaki mpe lisungi ya Nzambe ntango mbula nsambo ya nzala ebebisaki mboka. Lisoló oyo ezali kolamwisa mayoki mpe kokundwela biso ete boboto oyo tozali komonisela basaleli ya Nzambe ezali na ntina mingi na miso ya Tata na biso ya likoló.​—2 Mikonzi 4:13-37; 8:1-6; Baebele 6:10.

Bitumba mibale ya makasi

Atako tozali komikundola ete Suneme ezalaki mboka ya basi mibale ya bosembo, kasi bitumba mibale oyo bisalemaki kuna ebongolaki lisoló ya Yisalaele. Pene wana ezalaki na esika oyo ebongaki mpenza mpo na bitumba​—esobe kati na Ngomba Mole mpe Ngomba Giliboa. Na ntango ya lisoló ya Biblia, bakonzi ya basodá bazalaki ntango nyonso kosala molako kuna epai wapi maziba ya mai ezalaki mingi, mboka na likoló ya ngomba ebatelamaki malamu, mpe soki likoki ezali, bakokaki kotɛlɛma likoló na ngomba mpo na komona lobwaku lokauki oyo ezalaki na etando monene mpo na kotambwisa mampinga, bampunda, mpe makalo. Engumba Suneme mpe Ngomba Giliboa ezalaki bisika bibongi mpenza na yango.

Na eleko ya basambisi, limpinga ya Bamidyani 135 000, Baamaleki, mpe bamosusu batyaki molako na esobe liboso na Ngomba Mole. Bakamela na bango ikokaki “kotángama te, na motuya lokola zɛlɔ na libongo ya mai monene.” (Basambisi 7:12) Kotalanáká na bango na ngámbo mosusu ya esobe, na libulu ya mai ya Alodo na nsé ya Ngomba Giliboa, limpinga ya Bayisalaele na litambwisi ya Mosambisi Gideona, ezalaki bobele na basodá 32 000.

Na boumeli ya mikolo liboso ya etumba, limpinga mokomoko ezalaki komeka kotumola limpinga mosusu. Mampinga yango ya batyoli, na bakamela ya etumba, makalo, mpe bampunda ebangisaki basodá ya Yisalaele oyo bazalaki kotambola na makolo. Na ntembe te, Bamidyani​—oyo basilaki komibongisa mpo na etumba, wana Bayisalaele bazalaki naino komibongisa​—babangisaki mpenza Bayisalaele. Ntango Gideona atunaki ete, “Nani azali kobanga mpe kolɛnga?” ndambo mibale likoló na misato ya basodá bandimaki mpe bazongaki na mboka.​—Basambisi 7:1-3, NW.

Bobele basodá 10 000 ya Yisalaele nde batalaki na bokɛngi mpo na etumba epai na basodá banguna 135 000 oyo bazalaki na ngámbo ya esobe, mpe nokinoki Yehova akitisaki motuya ya basodá ya Yisalaele na motángo moke ya 300. Lokola yango ezalaki momeseno ya Bayisalaele, etuluku moke oyo ekabolamaki na bibolo misato. Lokola bamonaki ete molili ekɔti bapalanganaki mpe bazwaki bitɛlɛmɛlo na bango na ngámbo misato ya molako ya banguna. Na nsima ya etindá ya Gideona, bankámá misato babukaki mbeki oyo ebombaki miinda na bango, batombolaki miinda yango, mpe bangangaki ete, “Mopanga ya Yehova mpe ya Gideona!” Bayulaki maseke na bango mpe bakóbaki koyula. Na molili wana, bibele ya basodá oyo basangani bakómaki kolɛnga, bakanisaki lokola nde limpinga ya bato 300 bazalaki kobundisa bango. Yehova asalaki ete moko na moko abunda na moninga na ye, mpe “basodá nyonso ya molako bakimaki mpe bazalaki konganga wana bazalaki kokima.”​—Basambisi 7:15-22, NW; Bas. 8:10.

Etumba ya mibale esalemaki penepene ya Suneme na mikolo ya Mokonzi Saulo. Biblia elobi ete, “Bafilisitia bayanganaki, bayaki mpe batyaki molako na bango na Suneme. Saulo ayanganisaki Yisalaele mobimba mpe batyaki molako na bango na Giliboa,” bobele lokola limpinga ya Gideona esalaki yango bambula mingi liboso. Kasi Saulo, na kokesena na Gideona, atyaki mpenza motema epai na Yehova te, amonaki malamu kokende kotuna mosololi na bilimo mabe na Ene-dolo. Ntango amonaki molako ya Bafilisitia, “alɛngaki, motema na ye elɛngaki mingi mpenza.” Na etumba oyo ebimisamaki, Bayisalaele bakimaki mpe Bafilisitia balóngaki bango na etumba. Saulo na Yonatana bakufaki.​—1 Samwele 28:4-7; 31:1-6.

Ezalaki na lolenge wana nde lisoló ya Suneme eyebanaki mpo na bolingo na yango mpe lisusu mpo na bitumba na yango, na elikya epai na Yehova mpe na komipesa na badémo. Na lobwaku oyo ya esobe, basi mibale bamonisaki ntango nyonso bolingo mpe ezalela ya koyamba bapaya, mpe bakonzi mibale ya Yisalaele babundaki bitumba ya makasi. Bandakisa nyonso minei emonisi ntina ya kotalela Yehova, oyo azangaka te kopesa libonza epai na baoyo bazali kosalela ye.

[Elilingi na lokasa 31]

Mboka Sulam ya lelo na esika mboka Suneme ya kala ezalaki, mpe Ngomba Mole na nsima

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto