Okoki kondima ete Nzambe azali moto solo?
MOTO moko oyo azali molakisi mpe omonié na iniversité na ekólo Angleterre alobaki ete: “Osɛngisami te ete ondima Nzambe mpo na kozala moklisto . . . Sikawa tozali na ntango ya mbongwana na bindimeli ya lingomba, kasi na ekeke ya 21 lingomba ekondima lisusu Nzambe te na ndenge tomeseni na yango.” Azalaki kolobela etuluku moko oyo ebéngami Sea of Faith oyo basángó pene na nkámá moko ya ekólo Angleterre bazali basangani na yango. Etuluku yango ya “baklisto oyo bandimaka Nzambe te” balobaka ete lingomba ezali eloko oyo esalemi na bato, mpe lokola mosangani moko ya etuluku yango alobaki, Nzambe azali sé “likanisi” mpamba. Likanisi oyo ete ezali na Nzambe oyo aleki moto na mayele mpe na nguya eyokani te na ndenge bango bakanisaka.
Maloba oyo ete “Nzambe akufa” mapalanganaki mingi na bambula ya 1960. Maloba yango mamonisaki makanisi ya Friedrich Nietzsche, filozofe ya ekólo Allemagne na ekeke ya 19 mpe makanisi yango mapesaki nzela na bilenge mingi na kosala makambo ndenge balingi, na kosangisa nzoto kozanga kobalana mpe kosalela bilangwiseli kozanga bipekiseli ya etamboli malamu. Kasi bonsomi lolenge wana ememelaki bilenge yango oyo babéngamaki ba hippies bomoi ya esengo mpe ya malamu koleka?
Bobele na bambula yango, John A. T. Robinson, episkɔ́pɔ ya Lingomba ya Angleterre abimisaki búku na ye oyo ebimisaki ntembe mingi, ezalaki na motó na likambo ete “Sembo epai ya Nzambe” (Honest to God). Baninga na ye mingi bakonzi ya lingomba batɔ́ngaki ye mpo abimisaki likanisi ete Nzambe azali “bobele makanisi mozindo ya moto likoló ya makambo akutana na yango.” Keith Ward, profesere ya teoloji, atunaki ete: “Kondima Nzambe ezali bobele moko na biyambayamba esilá ngala, oyo bato ya mayele bayei sikawa kolongola yango?” Koyanoláká ye moko na motuna yango, alobaki boye: “Likambo moko te lileki ntina lelo kati na lingomba koleka oyo ya kozongela boyebi ya kala na ntina na Nzambe ete azali moto solo.”
Minyoko mpe Nzambe oyo azali moto solo
Bato mingi oyo bandimaka ete Nzambe azali moto, bazalaka na mokakatano mpo na koyokanisa endimeli na bango na makámá mpe minyoko oyo bazali komona. Na ndakisa, na Mársi 1996, na engumba Dunblane, na ekólo Écosse, babomaki bilenge 16 mpe molakisi na bango na mandóki. Mwasi moko oyo abulunganisamaki mingi na likambo yango alobaki ete, “Nazali koyeba te soki mokano ya Nzambe ezali nini.” Mpasi oyo likámá yango epesaki emonisamaki na kálati moko oyo batikaki elongo na bafololo na libándá ya eteyelo ya bana yango. Kálati yango ezalaki sé na mwa maloba oyo ete: “MPO NA NINI?” Mpo na koyanola, sángó ya katedrale ya engumba Dunblane alobaki ete: “Tokoki kolimbola yango te. Tokoki kopesa eyano te mpo na nini likambo yango esalemaki.”
Na nsima, bobele na mbula yango, sángó moko elenge ya Lingomba ya Angleterre oyo ayebanaki mingi abomamaki na lolenge ya nsɔ́mɔ. Zulunalo Church Times ekomaki ete baí-lingomba oyo batungisamaki mingi na likambo yango bayokaki Diakre-mokonzi ya engumba Liverpool koloba ete “azali kobɛta makasi na ekuke ya Nzambe mpo na kotuna ete mpo na nini? mpo na nini?” Mokonzi yango ya lingomba ye mpe azangaki maloba ya kobɔndisa mauti na Nzambe oyo azali moto solo.
Na yango, tosengeli kondimela nini? Kondima ete Nzambe azali moto solo ezali likambo lilongobani. Yango ezali fungola mpo na koyanola na mituna ya ntina oyo miuti kotunama mwa liboso. Tobyangi yo ete otalela bilembeteli bipesami na lisoló oyo lilandi.
[Elilingi na lokasa 3]
Na kálati batunaki ete “Mpo na nini?”