Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/8 nk. 23-25
  • Bilei mpo na bato oyo bakokani na bampate na mokili ya Navaho

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilei mpo na bato oyo bakokani na bampate na mokili ya Navaho
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Nsango malamu na mokili ya Navaho
  • Botongi “káa ya bampate”
  • Bandimi nsango ya Bokonzi na lolenge ya kokamwa
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/8 nk. 23-25

Bilei mpo na bato oyo bakokani na bampate na mokili ya Navaho

HÓZHÓNÍ, na lokótá ya baɛndyɛ́ Navaho, elimboli “ya bonzenga,” mpe ezali lolenge yango nde bato ya Navaho balobelaka mokili na bango. Uta mobu 1868, guvernemá ya États-Unis epesaki eteni ya mabelé oyo mazali na bonene ya kilomɛtɛlɛ-karé 62 000 lokola esika ya kofanda mpo na ba Navaho na nɔ́rdi-ɛ́sti ya etúká Arizona, penepene na esika oyo ebéngami ete “four corners,” epai bitúká minei: Arizona, Colorado, New Mexico, mpe Utah ekutáná. Esika ebéngami “Monument Valley,” oyo eyebani mingi na bafilime ya ba Cowboys, ebatelami lelo oyo lokola parke ya etúlúká ya ba Navaho mpe baturiste mingi bautaka na mikili ndenge na ndenge mpo na kotala yango. Kati na lobwaku yango ezali na mabanga mingi ya motane mpe na bolai ya mɛtɛlɛ 300, oyo matɛlɛmá lokola makonzí na bisobe ya likoló kati na mokili mokauki. Na lolenge lobongi mpenza, nkombo ya lobwaku yango na lokótá ya Navaho elimboli “esika ezali katikati na mabanga.”

Lokola etuluku, ba Navaho bayebani ete bazalaka bato ya komikitisa, bayambaka bapaya na esengo, mpe bakangami makasi na bondeko ata ya mosika kati na libota. Bato 170 000 oyo bafandaka na esika yango bazalaka mingimingi na mwa bamboka mikemike oyo etangwi moko na mosusu, kolandáká mimeseno ya bonkɔkɔ. Bamoko bazali naino babateli ya bampate mpe balalaka na ba hogans, oyo ezali bandako esalemi na banzeté mpe mabelé. Bato mingi basepelaka na misala ya boyemi bililingi mpe misala ya mabɔkɔ ya ba Navaho. Mingi mpenza bato balingaka ba tapis mpe babolangiti na bango oyo ezali na lángi ndenge na ndenge mpe mayemi ya bonkɔkɔ na bango, oyo etongami na mikunge ya mpate. Bato balingaka mpe mayaka na bango ya bibende oyo esangana na mabanga ya tilikwaze mpe biloko mosusu mingi.

Nsango malamu na mokili ya Navaho

Ekoki sikawa mbula koleka 30, Batatoli ya Yehova bakendaki na mokili ya Navaho bobele mpo na kotala biloko kitoko na yango te kasi lisusu mpo na komema nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato na esika yango etangwi. (Matai 24:14) Babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela monene babandisaki mosala ya kosakola na etúká yango. Mingi kati na bango bandimaki mabyangi ya bakɛngɛli-batamboli mpe ya Batatoli ya bamboka yango ete bákenda kosunga epai mposa ezalaki mingi. Bamoko bautaki na masangá ya penepene, nzokande basusu, bakisá mpe basangani ya bitúlúká mosusu ya Baɛndyɛ́ ya Amerika, bautaki na bisika ndenge na ndenge ya États-Unis.

Mibali mpe basi wana oyo bazali na elimo ya komipesa batalelaki mosala na bango kuna lokola mosala ya misionere. Mpo na nini? Ya liboso, ezali mpasi mingi koyekola nkótá ya mboka mpo na lolenge ya lolaka na yango, ya bafraze mpe ya koloba. Ya mibale, bato ya mboka yango bakangámá mingi na mimeseno na bango ya bonkɔkɔ na makambo ya losambo, ya ebongiseli ya libota, mpe babikelaka sé na mosala ya mabelé. Ya misato, kozwa ndako mpe mosala ezali mpasi mpo na baoyo bazali Baɛndyɛ́ te, yango esalaki ete baoyo bakendaki kuna bázala na mokakatano mpo na koumela na esika yango. Na nsuka, tozali kokanga ntina ete lisoló molai ya monyoko oyo bato yango bazwaki epai ya mindɛlɛ ekólisá epai na bango mwa makanisi ya kozanga kotyela bapaya motema.a

Na ebandeli, na ntango Batatoli ya Yehova bazalaki kosakola ndako na ndako, wana balati bakazaka na bakravati, bato bazalaki kokanisa ete bazali basangani ya Lingomba ya Mormon, mpe mingi bazalaki koboya kofungwela bango ndako. Na ntango babongolaki molato na bango, bakómaki koyamba bango, mbala mingi bakokaki kosolola na boumeli ya ngonga moko to koleka. Sikawa bato bayebi Batatoli ya Yehova, atako bazongela kolata bakazaka na bakravati na bango na mosala ya kosakola.

Kokóma na bisika ya bato na mokili ya Navaho ezali mokakatano monene. Mbala mingi esengeli kotambola na motuka na boumeli ya ngonga mingi na banzela ya nkaká oyo ezali mabangamabanga, zɛlo mingi, mpe pɔtɔpɔtɔ. Ya solo, yango elɛmbisaka mituka mpe baoyo bazali kotambola na yango. Lisusu mituka mikoki kokangama na pɔtɔpɔtɔ, kasi mbala mingi baleki-nzela bazalaka pene na kopesa mabɔkɔ mpo na kobimisa yango. Kokende kotala baoyo bazali komonisa bosepeli, kokende kotambwisa boyekoli ya Biblia, to kokende kokamata moto mpo na makita ya boklisto mbala mingi esɛngaka mobembo ya kokende-kozonga na boumeli ya bangonga mingi. Kasi Batatoli bamipesaka na esengo, na ndenge yango bamonisaka bolingo na bango mpo na banamboka.​—Kokanisá na 1 Batesaloniki 2:8.

Ba Navaho basepelaka mingi na masoló ya Biblia. Mbala mingi okomona ete basangani libota mobimba​—bana, baboti, mpe bankɔkɔ​—mpo na koyoka elikya ya paladiso na mikolo mizali koya mpo na bato. Na ntango batunaki ye ete Paladiso ekozala lolenge nini, mobali moko Navaho ayanolaki ete, “Na matiti ya lángi ya mai ya pondu, mpe na ebele na bampate,” komonisáká bongo bolingo mpo na mokili na bango mpe bibwele na bango. Lisusu basepelaka na mikanda oyo mikolimbolaka Biblia, mpe bamonisaka yango mbala mosusu na kopesáká mangaliti, sabuni, manzanza ya miliki mpe biloko mosusu ya ndenge yango mpo na kosunga mosala ya Bokonzi. Mobongisi-nzela monene moko asalisaki abonemá na bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! epai ya bato 200 na mbula moko, mibale kati na yango ezalaki epai na mobali moko oyo azalaki kotambola na mpunda.

Botongi “káa ya bampate”

Eleko ya molungé ezalaka ntango mpo na ba Navaho oyo bazali babɔkɔli na bampate ya komema bitonga na bango na káa ya koleisa bampate. Bisika yango ya kobatela bampate na eleko ya molungé, oyo bakopona yango pene na bitando ya matiti ya mobesu mpe liziba ya mai malamu, esalisaka bitonga na kokóla. Na elobeli ya elilingi, Ndako ya Bokonzi ekoki kokokisama na káa yango​—esika ya bilei ya elimo mpe liziba ya mai ya solo. Baoyo bakendaka kuna bazali kozwa bilei ya elimo oyo epesaka bango kolɔngɔ́nɔ́ mpe makasi na elimo.

Na eleko moko, makita mazalaki kosalema na ndako ya kelasi na engumba Kayenta, na etúká Arizona. Na nsima, na Augústo 1992, na lisalisi ya bankámá ya Batatoli ya Yehova ya bolingo malamu oyo bautaki na bitúká mingi, Ndako moko ya Bokonzi etongamaki na engumba Kayenta. Ndako yango ya Bokonzi mpe mosusu mingi na etúká yango ezali kopesa elembeteli epai ya bato ya mboka yango ete mosala ya kosakola ekozala kuna mpo na libela. Bandako mosusu ya Bokonzi oyo ezali kosalelama na etúká yango monene ezali na Tuba City mpe Chinle, bingumba oyo nyonso mibale bizwami na mokili ya Navaho, mosusu ezali na engumba Keams Canyon na teritware ya etúlúká ya Baɛndyɛ́ Hopi kati na mokili ya Navaho, mpe mosusu mingi ezali na bingumba oyo bizali zingazinga ya mokili ya Navaho. Litomba nini limonani?

Bandimi nsango ya Bokonzi na lolenge ya kokamwa

Na engumba Kayenta koleka bato zomi na mibale basilaki kozwa batisimo uta kotongama ya Ndako ya Bokonzi, yango ezali komonisa lipamboli ya Yehova na esika yango ya losambo ya solo. Ndako yango ezali kopesa elembeteli ete Batatoli ya Yehova bakendaki kuna mpo na koumela mpe likambo yango lizali kotonga kotya motema na nsango malamu ya Bokonzi oyo bazali kosakola. Kala te lisukúlu ya liboso ya Biblia na lokótá Navaho eutaki kosalama kuna. Basangani 40 ya lisangá bazalaki na esengo ya koyamba bato 245 oyo bayaki koyoka lisukúlu oyo elobelaki mikumba ya baboti. Na botɔ́ndi mingi na motema, libota moko ya basangani mwambe basalaki mobembo ya ngonga misato na kokende mpe ngonga misato na kozonga mpo na koyoka lisukúlu yango​—ezalaki mbala ya liboso oyo bakendaki na Ndako ya Bokonzi.

Esaleli mosusu ya ntina oyo Yehova asili kopesa ezali bongo mwa búku Sepela na bomoi ya seko na Mabele! na lokótá Navaho. Kobongola yango na Navaho, oyo ezali lokótá ya mpasi mingi, ezalaki mpenza mokakatano monene. Babongoli balekisaki bango nyonso ngonga koleka 1 000 mpo na komindimisa ete mwa búku yango ebongolaki nsango ya Bokonzi na lolenge lobongi. Uta kobimisama na yango na nsuka ya 1995, Batatoli ya mokili yango basili kokabola bankóto mingi ya mwa babúku yango mpe epesi nzela na kotambwisa boyekoli mingi ya Biblia epai ya bato oyo bazali na mposa ya solo.

Lokótá Navaho ekómi kosalelama mingi na mosala ya kosakola mpamba te basakoli bazali koyekola yango. Masangá na etúká yango masilaki kobanda kosalela lokótá Navaho na Eteyelo mpo na mosala ya Teokrasi, mpe bakelasi ya lokótá Navaho ezali kosalema mpo na kolakisa basakoli. Lisusu, na mayangani na bisika yango, manáka mazali mpe kobongolama na lokótá Navaho. Na ntembe te milende nyonso wana mikosala ete bato mingi lisusu bándima nsango ya Bokonzi na mokili yango.

Tobosani mpe te ete kati na mbuma ya Bokonzi oyo eboti na mokili wana ya Baɛndyɛ́ ezali bongo bizaleli malamu ya elimo oyo bandeko na biso baklisto ba Navaho bazali komonisa. Na boumeli ya mbula nsambo, Jimmy mpe Sandra bazalaki komema bana na bango mitano na esika ezwami na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 120 na kokende mpe na kozonga mpo na kosangana na makita ya boklisto pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Libota yango bazalaka ntango nyonso na esengo ya kokanisa lolenge bazalaki koyemba banzembo ya Bokonzi mpe koyekola Biblia elongo kati na mibembo milai oyo bazalaki kosala. Bolingo mpe molende ya baboti mpo na solo epusaki bana na kolanda ndakisa na bango mpe kokóma basanzoli ya Yehova oyo bamipesi. Minei kati na bango bazali sikawa kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe Jimmy azali nkulutu na lisangá. Likambo mosusu ya esengo mpo na libota yango ezali ete Elsie, ndeko mwasi ya Jimmy kala te auti kokóma moto ya liboso oyo azwi batisimo kati na baoyo balobaka bobele lokótá Navaho.

Babateli ya bampate mpe bitonga na bango bazali kobakisa liyoki ya kimya ya mosala ya bobɔkɔli bampate na bamonimá ya mabanga oyo ezali kopesa bonzenga na mokili ya Navaho. Mosakoli Yisaya asakoláká kalakala na ntina na Yehova ete: “Akoleisa etonga na ye lokola mobateli, akoyanganisa bana na mpate na mabɔkɔ na ye; akokumba bango na ntolo na ye, akokamba malɛmbɛmalɛmbɛ baoyo bazali konungisa.” (Yisaya 40:11) Na nzela ya Yesu Klisto, Mobateli Malamu na bampate, Yehova azali koyanganisa kati na bitando ya bitwele na ye ya elimo baoyo nyonso bazali na mposa ya koyoka nsango ya Bokonzi kati na mokili ya Navaho mpe kozala na libaku ya kozwa mapamboli ya seko oyo akopesa.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Lamuká! ya 8 Máí 1948; ya 22 Febwáli 1952; ya 22 Yúni 1954 (bibimeli ya Lingelesi); mpe ya 8 Sɛtɛ́mbɛ 1996 (ebimeli ya Lifalansé).

[Elilingi na lokasa 24]

Babateli na mpate ba Navaho bazali koyoka nsango malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto