Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/7 nk. 20-23
  • Bikisá bomoi ya mwana na yo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bikisá bomoi ya mwana na yo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Zalá moninga ya motema
  • Bolingo mpo na Nzambe
  • Bobangi Nzambe
  • Mbano ya esengo
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/7 nk. 20-23

Bikisá bomoi ya mwana na yo!

MICHAEL mpe Alphine bafandaka na mboka oyo ezali na lobwaku katikati na bangomba mike mpe oyo etondi na matiti mingi na etúká ya KwaZulu-Natal, na ekólo ya Afrika ya Súdi. Bazalaki na mikakatano mingi mpo na kobɔkɔla bana na bango nsambo. Na lisungi mobimba ya mwasi na ye, Michael asalaki nyonso oyo ekokaki na ye mpo na kotosa etindá ya Biblia epai na batata ete: “Bóbɔkɔla [bana na bino] na mateya mpe mpamela ya Nkolo.” (Baefese 6:4) Kasi mbala mosusu mikakatano mibimaka.

Na ndakisa, emonanaka mingi epai na bilenge babateli ya bibwele na Afrika ete basangisaka bitonga ya bibwele ya baboti na bango mpo ete bázala na ntango mingi ya kosakana elongo. Ntango mosusu bazali komikɔtisa na makambo mabe mpe bazali kolobela makambo oyo mabongi te. Ntango bana ya Michael bazalaki kokende koleisa bibwele ya libota, azalaki kopesa bango malako ya sikisiki ete basengeli te kosangana na bana mosusu. (Yakobo 4:4) Kasi, ntango mosusu, na bozongi na ye na mosala azalaki kokuta bango kosangana na bana mosusu oyo apekisaki bango. Mpo na yango, asengelaki kopesa bango etumbu.​—Masese 23:13, 14.

Obanzi ete Michael alekisaki ndelo epai ya bana na ye? Bamoko bakoki kokanisa lolenge yango, kasi Yesu Klisto alobaki ete “mayele alóngi na misala na ye.” (Matai 11:19) Michael mpe Alphine basalaki ete ndako na bango ezala esika ya bolingo, bazalaki kolekisa ntango elongo na bana na bango mpe bazalaki koteya bango masoló mpe solo ya Biblia.

Michael mpe Alphine bazali na bana basi minei​—Thembekile, Siphiwe, Tholakele, mpe Thembekani. Banso bazali basakoli ya ntango nyonso ya nsango malamu ya Bokonzi. Bana na bango mibale ya mibali bazali bakɛngɛli-bakambi na masangá ya Batatoli ya Yehova. Mwana mobali na bango ya misato azali mosaleli na misala mpe mwasi na ye azali mosakoli ya ntango nyonso, ye moko azali mosaleli ya misala.

Baboti baklisto mingi oyo bazali na bana mingi basili kozwa lipamboli ya kolónga kobɔkɔla bana na bango. Nzokande, bana mosusu oyo bazali kobɔkɔlama malamu na baboti na bango bazali kotika nzela ya solo. Na ntembe te, baboti na bango bayebi kati na makanisi na bango lisese ya Yesu na ntina na mwana na kilikili mpe bazali na elikya ete mwana na bango ya mobali to ya mwasi akobongola motema mpe nsukansuka akobika.​—Luka 15:21-24.

Nzokande, likambo ya mawa lizali ete baboti baklisto mosusu bazali kobungisa bana na bango nyonso na mokili. Likambo yango ezali mpenza ntina ya lobanzo na mikili ya Afrika epai bana bazali komonana ete bazali kosala malamu kino bakokóma na bambula ya bolenge. Na ntango yango, wana bakómi na eleko ebéngami “la fleur de l’âge,” babandi kolɛngolama na banzela mabe ya mokili ya Satana. (1 Yoane 5:19) Mpo na yango, batata mingi bazali kokokisa masɛngami te mpo na kosala lokola bankulutu na masangá. (1 Timoté 3:1, 4, 5) Ya solo, tata oyo azali moklisto asengeli kotalela ete lobiko ya libota na ye ezali likambo ya ntina mingi. Na yango, baboti bakoki kosala nini mpo na kobikisa bomoi ya bana na bango?

Zalá moninga ya motema

Yesu azalaki te bobele moto ya kokoka kasi azalaki mpe moto oyo alekaki bato nyonso na boyebi. Atako bongo, atalelaki bayekoli na ye oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka lokola baninga na ye ya motema. (Yoane 15:15) Ezali mpo na yango nde basepelaki kozala na ye elongo mpe bakólaki penepene na ye. (Yoane 1:14, 16, 39-42; 21:7, 15-17) Baboti bakoki kozwa liteya na likambo yango. Lolenge moko na milóna ya mike oyo nkasa na yango ezali kofungwama mpo na kozwa molungé ya moi, bana bazali kokóla ntango bolingo mpe boninga ezali kati na ndako.

Baboti, bana na bino bazalaka na nkaká te ya kobɛlɛma na bino mpo na komonisa mabanzo na bango? Boyokamelaka bango? Liboso ya kozwa ekateli, bolukaka liboso koyeba makanisi mpe mayoki na bango na boye ete bókanga ntina ya likambo na mobimba na yango? Bosalisaka bango na motema molai nyonso ete bázwa biyano na mituna mosusu na kosaláká na bango bolukiluki kati na mikanda mikolimbolaka Biblia?

Mama moko na Afrika ya Súdi alimboli ete: “Uta mokolo ya liboso oyo mwana na biso ya mwasi akendaki na eteyelo, tolendisaki ye ete ayebisa biso makambo akutanaki na yango na boumeli ya mokolo. Na ndakisa, nazalaki kotuna ete: ‘Na midi olyaki yo na nani? Lobelá ngai molakisi na bino ya sika. Azali ndenge nini? Makambo nini malɛngelami mpo na pɔ́sɔ?’ Mokolo moko, mwana na biso ya mwasi ayaki na ndako mpe alobaki ete molakisi ya Lingelesi akanaki komema banakelasi nyonso ete bákenda kotala filime moko oyo na nsima bakokoma makambo bakomona na filime yango. Motó na likambo ya filime yango ezalaki malamu te. Na kolukáká koyeba makambo mosusu mpo na yango, toyaki kososola ete filime yango ebongi te mpo na moklisto. Tosololaki likambo yango kati na libota. Na mokolo molandaki, mwana na biso akutanaki na molakisi mpe alimbwelaki ye ete asepelaki te kokende kotala filime yango, mpamba te mitindá ya bizaleli oyo yango ezalaki komonisa miyokani te na bindimeli ya boklisto. Molakisi atalelaki lisusu likambo yango mpe na nsima atɔ́ndaki mwana na biso, kolobáká ete asepelaki lisusu te komema banakelasi kotala filime oyo na nsima elingaki kopesa ye mawa.” Likebi ya bolingo oyo baboti yango bamonisaki ntango nyonso mpo na kobikisa mwana na bango ebotaki mbuma ya malamu. Azali sikawa moto na esengo mpe na bokatikati mpe azali sikawa kosala lokola mosangani ya libota ya Betele na filiale ya Watch Tower na Afrika ya Súdi.

Yesu apesaki ndakisa malamu mpo na ezalela oyo esengeli komonisela bana ya bato mosusu. Asepelaki kolekisa ntango elongo na bango. (Malako 10:13-16) Baboti basengeli mpenza kozala na esengo ya kosala makambo elongo na bana na bango! Na mikili mosusu ya Afrika, batata bayokaka nsɔni soki bato mosusu bakomona bango kosakana elongo na bana na bango, na ndakisa kobɛta ndembo. Kasi moboti moklisto asengeli soko moke te komiyoka ete azali na lokumu koleka na boye ete akoki te kosala makambo na bana na ye. Bilenge basepelaka na baboti oyo balekisaka ntango elongo na bango. Yango elongolaka nkaká mpo na koyebisa bango mabanzo na bango. Ntango mayoki motindo wana mapesameli likebi te, bana bakoki kokóma na nkanda to bakobenda nzoto, mingimingi soki mbala na mbala bazali kopamelama.

Wana akomelaki Bakolose na ntina na boyokani kati na libota, Paulo alobaki ete: “Bino batata, bótumolaka bana na bino te na ntina ete bálɛmba na mitema te.” (Bakolose 3:21) Yango ekoki komonisa ete mbala mosusu ezalaka na disipilini ezangi bokatikati to ya kolekisa ndelo mpe boninga ezalaka mingi te. Bana, na bilenge lokola, oyo balingami mpe bazali kopesamela lokumu mbala mingi bandimaka disipilini oyo esengeli.

Bolingo mpo na Nzambe

Libula eleki motuya oyo baboti bakoki kopesa na bana na bango ezali bongo ndakisa na bango ya komonisa bolingo. Bana bazalaka na mposa ya komona mpe koyoka baboti na bango komonisa bolingo ya solosolo mpo na Nzambe. Elenge mobali moko oyo azali sikawa kosala na Betele ya Afrika ya Súdi alimboli: “Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kosunga tata na ngai na misala ya ndako. Nazalaki kosepela kosalisa ye, bobele mpo ete Papa azalaki mpenza kosepela na mwa moke oyo nazalaki kosala. Azalaki kosalela ntango yango mpo na koyebisa ngai makambo mingi na ntina na Yehova. Na ndakisa, nazali komikundola ete mokolo moko ya pɔ́sɔ wana tozalaki kosala na molende mpo na kokata landalánda (pelouse). Molungé ezalaki makasi mpenza. Papa azalaki kotɔka, napotaki mbangu mpe natondisaki kɔpɔ mibale ya mai mpe natyaki ngalasi na kati. Papa alobaki ete: ‘Mwana, omoni bonene ya mayele ya Yehova? Ngalasi etepaka kati na mai. Soki ezindi, bikelamu nyonso oyo bizali na kati ya mai ya mabeké mpe maziba bikokufa. Nzokande, ngalasi esalaka lokola ezipeli oyo ezali kobatela ete molungé eleka te! Yango ezali kosalisa biso na koyeba Yehova malamu koleka, boye te?’a Na nsima, ntango nakɔtaki bolɔ́kɔ na ntina na kozanga komikɔtisa na makambo ya politiki, nazwaki ntango ya kokanisa. Wana natungisamaki na makanisi na butu kati na eteni ya ndako ya bolɔ́kɔ esika nazalaki, namikundolaki maloba wana ya Papa. Makómaki na ndimbola monene mpo na ngai! Nakosambela Yehova libela na libela soki likoki lipesameli ngai.”

Ɛɛ, bana bazali na mposa ya komona ete baboti bazali komonisa bolingo mpo na Nzambe na makambo nyonso oyo bazali kosala. Bolingo mpo na Nzambe mpe bolingi ya kotosa ye esengeli mingi mpenza komonana lokola nguya oyo ezali kopusa bango na kosangana na makita ya boklisto, na kosangana na mosala ya kosakola, mpe na kotánga mpe koyekola Biblia kati na libota. (1 Bakolinti 13:3) Likambo lileki ntina, bolingo mpo na Nzambe esengeli komonana kati na mabondeli mauti na motema oyo mazali kosalema kati na libota. Ntina ya kopesa libula motindo wana epai ya bana ekoki kosila kolobelama te. Ezali mpo na yango nde Bayisalaele bazwaki etindá ete: “Okolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba. Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yo.”​—Deteronome 6:5-7; kokanisá na Matai 22:37-40.

Nkaká monene tozali na yango mpo na kolinga mpe kotosa Nzambe ezali bongo ezaleli na biso ya masumu oyo tosangolaki. (Baloma 5:12) Na yango, Biblia epesi lisusu etindá ete: “Bino baoyo bokolingaka [Yehova], bóboya mabe.” (Nzembo 97:10) Mbala mingi makanisi mabe mamemaka na misala ya mabe. Mpo na kopɛngola yango, mwana asengeli kokólisa ezaleli mosusu ya ntina mingi.

Bobangi Nzambe

Bolingo oyo esangani na bobangi ya koboya kosala makambo oyo esepelisaka Yehova te ezali eloko moko ya ntina mingi. Yesu Klisto ye moko apesaki biso ndakisa ya kokoka ya moto oyo asepelaki “na bobangi Yehova.” (Yisaya 11:1-3, NW) Bobangi motindo wana ezali na ntina mingi wana mwana akómi na eleko ya bolenge ebéngami la fleur de l’âge mpe abandi koyoka mposa makasi ya kosangisa nzoto. Bobangi Nzambe ekoki kosalisa elenge na kotɛmɛla bopusi ya mokili oyo ekoki komema ye na etamboli ya mbindo. (Masese 8:13) Na bisika mosusu, baboti baboyaka koteya bana na bango lolenge ya komitambwisa liboso ya kolɛngolama na kosangisa nzoto. Ya solo, mingi bakanisaka ete elongobani te kosolola makambo yango. Kasi bopɔtu ya baboti esili kobota mbuma nini?

Minganga misato na nkombo Buga, Amoko, mpe Ncayiyana batunaki bilenge basi 1 702 mpe bilenge mibali 903 na bamboka mike ya etúká ya Transkei, na Afrika ya Súdi. Zulunalo South African Medical Journal elobaki ete “bilenge basi 76 likoló na monkámá mpe bilenge mibali 90,1 likoló na monkámá oyo batunamaki na ankɛ́tɛ yango basilaki kosangisa nzoto.” Mwayene ya mibu ya kobotama ya bilenge basi ezalaki ya mbula 15 mpe mingi kati na bango basangisaki na bango nzoto na makasi. Koleka bilenge 250 kati na bango basilaki kozwa zemi mbala moko to koleka. Litomba mabe mosusu ezalaki bongo motángo monene ya mikakatano miyeisami na maladi oyo mazali kozwama na kosangisa nzoto.

Emonani ete baboti mingi bazali komona ntina moko te ya koteya bana na bango lolenge ya koboya kosangisa nzoto liboso ya kobala. Nzokande, zulunalo oyo touti kolobela elimboli ete: “Kozala na mwana mpe kozala mama ezali likambo lizali komonana mingi epai ya bana basi na bamboka ya zamba kati na etúká ya Transkei, mpe yango ezali komonana nokinoki epai ya bilenge basi oyo bakómi sika na mbula ya bolenge.” Mokakatano yango molobelami mingi na mikanda na biteni mosusu ya mokili.

Bilenge mingi na Afrika bazali kopesa ekweli na baboti na bango ete basalisaki bango te na kokanga ntina ya mposa na bango ya nzoto. Baboti baklisto mosusu bakakatanaki mingi na kosalela búku Votre jeunesse — Comment en tirer le meilleur parti.b Na nkasa 20-23, ezali kolimbola lolenge malamu ya kosalela biboteli mpe mbongwana oyo ezali kosalema na ebandeli ya bolenge (puberté).

Baboti baklisto oyo balóngaki ntembe ya kosolola na bana na bango likanisi ya Nzambe na ntina na kosangisa nzoto babongi kopesamela longonya. Yango ebongaka kosalama mokemoke, engebene makoki ya mwana ya kokanga ntina ya makambo. Engebene makambo lokola mbula ya mwana, ekozala malamu soki baboti bakolobela na bosikisiki binama ya nzoto mpe misala na yango. Soki boye te, elenge oyo ayebi makambo te akoki mbala mosusu kokanga ntina te ya makambo oyo bazali koloba na ye.​—1 Bakolinti 14:8, 9.

Tata moko na Afrika ya Súdi oyo azali na bana basi mibale mpe mwana mobali moko alimboli ete: “Mbala na mbala, nazalaki kozwa ntango ya kosolola lisoló wana ya nkaká etali kosangisa nzoto ata na bana na ngai ya basi. Nzokande, mwasi na ngai atyaki likebi mingi epai ya bana na biso ya basi, na kosaleláká búku Votre jeunesse — Comment en tirer le meilleur parti. [Talá nkasa 26-31.] Ntango mwana na ngai ya mobali akokisaki mibu 12, nazwaki ekateli ya kotambola na ye mosika na bangomba. Na libaku yango, tosololaki na bozindo bokóli ya nzoto ya elenge mobali mpe mokano malamu oyo yango ekokokisa kati na libala. Lisusu, nasololaki na ye ntina ya kopɛngola bizaleli mabe ya kosakana na biboteli mpe ntina ya kotalela bana basi na limemya mpe na lokumu​—lolenge atalelaka mama na ye mpe bandeko na ye ya basi.”

Mbano ya esengo

Tata mpe mama oyo touti kolobela basalaki makasi mpe sikawa bazali na esengo ete bazwi mbano malamu na lolenge babɔkɔlaki bana na bango misato. Lelo oyo bango misato bazali mikóló oyo babalani na baklisto ya sembo. Mwana na bango ya mobali mpe babokilo na bango bazali kosala lokola bankulutu na lisangá ya boklisto, mpe babalani minei kati na bango basalaki mosala ya kosakola ntango nyonso na boumeli ya bambula mingi.

Ɛɛ, baboti oyo bazali kosala makasi mpo na kobikisa mabota na bango bakoki kolikya mbano ya esengo epai ya bana oyo baponi kolanda mateya wana ya Biblia, mpamba te Masese 23:24, 25 elobi ete: “Tata na moyengebene akosepela mingi. Tata na yo mpe mama na yo bakosepela.” Tótalela libota ya bana mingi oyo tolobelaki na ebandeli ya lisoló oyo. Alphine alobi ete “ntango nakanisaka bokóli ya elimo oyo bana na ngai basali, motema na ngai etondaka na nsai.” Tiká ete baboti baklisto básala mpo na kozwa mbano wana ya esengo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki mai makómi pene na kokóma ngalasi, bozito na yango ekitaka mpe matombwanaka likoló. Talá na nkasa 137-138 na búku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création?, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

b Talá lisusu búku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano bibongi, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 23]

Tata akoki kobongisa ntango mpe esika malamu mpo na kolimbola makambo ya bomoi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto