Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/4 lok. 19
  • “Sutani ya bulɛɛ ya Engumba Trèves”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Sutani ya bulɛɛ ya Engumba Trèves”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bakendaka kotala elamba yango?
  • ‘Simbá mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda’
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Libota ya Yehova lizali na bomoko kitoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tóbatela bomoko na mikolo oyo ya nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bomoko ya bokristo epesaka Nzambe nkembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/4 lok. 19

“Sutani ya bulɛɛ ya Engumba Trèves”

TRÈVES, oyo ekokisi mbula 2 000, ezali engumba ya kala koleka bingumba nyonso na mboka Allemagne.a Uta bikeke mingi, Trèves esalaki boyokani makasi na lingomba ya Katolike. Na 1996, na katedrale ya Trèves, babongisaki esika ya kolakisa etíká oyo ekanisami ete koumela na yango ekoki kozala pene na koumela ya engumba yango moko. Etíká yango ebéngami Sutani ya bulɛɛ ya engumba Trèves.

Sutani yango ya mabɔkɔ mikuse, ezali na bolai ya mɛtɛlɛ 1,57 mpe na bonene ya mɛtɛlɛ 1,09. Esalemi na ntɔkya (coton) mpe, engebene Hans-Joachim Kann kati na búku na ye Wallfahrtsführer Trier und Umgebung (Lisungi mpo na kosala mobembo na engumba Trèves mpe zingazinga na yango), na ntembe te ezalaki elamba ya kobakisa likoló. Bamoko bakanisi ete biteni ya libosoliboso ya elamba yango​—oyo ndambo mingi na yango ebongisamaki to mpe babakiselaki yango bilamba mosusu na boumeli ya bikeke​—eumeli banda ekeke ya mibale to mpe ekeke ya yambo T.B. Soki ezali solo, boye yango ezali motindo na bilamba ya ntango ya kala oyo bizali mingi te lelo oyo, ebongi mpenza kotyama na ndako ya bobombi biloko ya kala.

Nzokande, basusu bazali kokanisa ete elamba wana ezali te bobele eloko oyo emonanaka mingi te kasi ezali mpe bulɛɛ​—yango wana ebéngami Sutani ya bulɛɛ. Ezali mpo ete elamba yango ezali na esoneli te, ndenge moko ezalaki monkoto ya Yesu Klisto. (Yoane 19:23, 24) Bato mosusu bazali koloba ete “Sutani ya bulɛɛ” wana ezalaki mpenza elamba ya Masiya.

Lolenge oyo sutani yango ekómaki na Trèves eyebani malamu te. Búku moko elobi ete “mokonzi-mwasi Helena, mama ya Mokonzi Constantin le Grand, apesaki yango lokola likabo na engumba wana.” Mokomi Kann alobi ete lisoló ya liboso litali makambo ya kala oyo likoki kotyelama motema na ntina na kozala ya sutani wana na engumba Trèves likomamaki na 1196.

Sutani yango, oyo ebombami na katedrale, ekómaki kobimisama mbala na mbala nsima ya kolekisa motángo ya bambula ekeseni kobanda na ekeke ya 16. Na ndakisa, babimisaki yango na 1655, mwa moke nsima na Etumba ya Mbula Ntuku Misato, oyo ebebisaki mingi mpenza engumba Trèves. Koteka biloko ya suvenire epai na baoyo bakendaka kotala elamba yango ezalaki mbala na mbala kokɔtisa mosolo mingi na engumba.

Na boumeli ya ekeke oyo “Sutani ya bulɛɛ” ebimisamaki mbala misato mpo ete bato batala yango​—na 1933, 1959, mpe na 1996. Na 1933 botalisi esakolamaki bobele mokolo oyo Hitler aponamaki mokonzi (Chancelier) ya mboka Allemagne. Kann alobi ete kosalema ya makambo wana mibale na mokolo moko ezali komonisa polele makambo mabombami nsima ya bolakisi wana. Mampinga ya basodá basalaki milɔngɔ́ mpo na kobatela basali na mobembo na libandá ya katedrale. Bato milió mibale na ndambo bamonaki elamba yango na mobu wana.

Herbert, mofandi na engumba Trèves uta bambula mingi, akokanisaki mibembo ya 1959 mpe ya 1996. “Na 1959 banzela ya engumba etondaki na bato, bazalaki kotɛkisa biloko ya suvenire na matakanelo ya babalabála pene na nyonso. Na mbula oyo molulu mosalemi na kimya nyonso.” Ya solo, bato bobele 700 000 bamonaki elamba wana na 1996, bato bayaki na 1959 baleki baoyo ya mbula oyo na motángo ya milió moko.

Mpo na nini bakendaka kotala elamba yango?

Lingomba ezali kolobela mingi likambo oyo ete elamba wana esengeli te kotalelama lokola eloko ya kopesa losambo. Elamba wana ezangi esoneli ezali kotalelama lokola elembo ya bomoko ya lingomba. Zulunalo Frankfurter Allgemeine Zeitung elobi ete na ntango asakolaki botalisi elamba yango, Episkɔ́pɔ Spital alobaki ete: “Ezalela ya mokili na biso oyo emonana naino boye liboso te ezali kosɛngisa biso baklisto ete tózala na biyano oyo bisalelama naino te. Tosengeli kobundisa ezaleli oyo ezali sé kokola ya koyinana, ya botomboki, mpe ya mobulu.” Episkɔ́pɔ alimbolaki ete elamba wana esengelaki kokundola bomoko epai na moto oyo akei kotala yango.

Kasi mpo na nini moto asengeli kotala “Sutani ya bulɛɛ” mpo ete ekundwela ye bomoko ya lingomba? Ekozala boni soki elamba wana ebebisami to ekufi to mpe emonisami ete bamekolaki nde elamba ya solosolo? Boye bomoko ya lingomba ekotyama na likámá? Ezali boni mpo na baoyo bazali na likoki te ya kosala mobembo kino na Trèves? Bazali komibanzabanza te na ntina na bomoko ya lingomba?

Makomami Mosantu malobeli soko moke te ete baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na mposa ya eloko mpo na kokundwela bango ntina ya bomoko ya boklisto. Kútu, ntoma Paulo alendisaki baklisto na maloba oyo: “Tokotambolaka na kondima nde na komona te.” (2 Bakolinti 5:7) Bomoko oyo esangisi baklisto ya solosolo elobelami bongo lokola “bomoko na kondima.”​—Baefese 4:11-13.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Lamuká! ya 22 Yulí 1980, nkasa 21-23 (ebimeli ya Lifalansé).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto