Mpo na nini makambo ya ntango oyo mazali mabe mingi boye?
NTANGO ofandi mpo na kotánga zulunalo moko to kolanda bansango na televizyó to mpe koyoka yango na radio, omizelaka na koyoka bansango mosusu ya mabe, boye te? Mbala mosusu, okokamwa te na koyoka ete etumba moko oyo ezali kobundama ezali sé kongala, ete kosala bato mabe ezali sé koyikana, to mpe nzala makasi ezali kolɛmbisa nguya ya mokili moko ya bobólá.
Soki ofandaka mosika na epai oyo makambo wana mazali kosalema, mbala mosusu okotungisama ntango nyonso te na ntina na bansango yango. Kútu, nani akokoka kolela mpo na bibele nyonso wana ya bato oyo bazali konyokwama? Atako bongo, ezali mpasi na kokanga motema ntango yo moko omoni mpenza lolenge bato bazali konyokwama. Na maloba mosusu, kotánga bansango ya etumba mpe kokanisa likoló na mitángo ya baoyo babomami kati na yango ekoki kopesa mwa mawa, kasi okoyoka mawa mingi koleka na kotánga lisoló ya Adnan, elenge mobali ya mbula libwa, mobotami na mboka Bosnie, oyo mama na ye abomamaki ntango bɔmbi moko epanzaki ndako na bango. Nsima ya mwa basanza, wana bazalaki kotambola elongo na balabála, tata ya Adnan azwaki lisasi ya mbalakaka oyo ebɛtamaki na monguna moko uta esika ya nkuku. Mwa bapɔ́sɔ na nsima, ndeko na ye ya mwasi akufaki na miso na ye mpo ete azalaki kobima makila mingi nsima ya kozokisama na bɔmbi oyo ekweaki na lopango ya eteyelo na bango. Minganga oyo basalisaki Adnan mpo na mpasi ya mayoki bamonaki ete abungisaki mayoki nyonso ya bomoto—ata mposa ya koluka koyeba makambo oyo mazali koleka. Nsɔ́mɔ mpe bililingi ya makambo oyo amonaki ezalaki kobangisa ye soki alamuki; bandɔtɔ ya mabe ezalaki kokata ye mpɔngi. Adnan azali moto azangi mayoki te. Azali nde mwana oyo azali konyokwama; tokoki kosala eloko moko te mpo na ye kasi, topusami mpenza na koyokela ye mawa.
Ezali mpe bongo mpo na makɔnɔ mosusu oyo mokili ezali kobɛla. Kotánga nsango ya nzala na mikanda ezali kosala mpasi; kasi komona elilingi ya mwana mwasi moke ya mbula mitano, oyo libumu evimbi mpe makolo na mabɔkɔ ekɔndi lokola nzeté ya nkɔ́mbɔ, oyo akómi pene na kokufa mpo na nzala, ezali likambo ya mpasi koleka. Esalaka mpasi kotánga motángo ya baoyo bazali kosala bango mabe; kasi koyoka ete mwasi moko mobangé mpe mokufeli-mobali abɛtamaki na lolenge ya nsɔ́mɔ, babɔtɔlaki ye biloko, mpe basangisaki na ye nzoto na makasi, esalaka mpasi mingi koleka. Kotánga nsango ya kobeba ya mabota epesaka mawa; kasi koyoka ete mama moko azali koboma mwana na ye nzala na nkó mpe azali kobimisela ye maloba ya kozokisa na yauli, epesaka mawa mingi koleka.
Esalaka mpasi kotánga makambo motindo wana. Nzokande, kanisá naino lolenge mpasi yango ekoki kozala soki moko na malózi wana ya mokili mobimba ekweli nde biso mpenza! Soki yo mpenza ozali konyokwama, okoki komona ete makambo oyo mayebisami na bansango ya mokili eleki mpenza ndelo. Ezali kobangisa na komona ete bampasi oyo euti na kosala bato mabe, na bitumba, na nzala, mpe na maladi ezali koyikana na motindo oyo emonaná naino te kati na lisoló mobimba ya bato. Mayoki ya mpasi oyo mauti na bomoni makambo oyo mazali koleka na ekeke oyo ya 20 makoki solo kozala minene—mobulungano, kobanga, mpe konyokwama na makanisi epalangani bipai binso.
Bato mingi ya mangomba bazali koluka biyano na mituna ya kobulunganisa lokola oyo: Mpo na nini makambo mazali mabe mingi boye? Tokosuka wapi?
Likambo ya mawa mpenza, lelo oyo mangomba mazali kopesa mpenza biyano ya solosolo te na mituna wana. Ntango omonaki mpo na mbala ya liboso motuna oyo mozali na ezipeli ya zulunalo oyo, ekoki kozala ete omonisaki mayoki ya ntembe—mpe ozali na elónga ya kozala na mayoki motindo wana. Mbala mingi, mangomba oyo matingamaka na bindimeli na yango ya kala malukaka kopesa na Biblia makambo oyo yango ezali te koyebisa—mokolo mpe ngonga ya sikisiki mpo na nsuka ya mokili oyo. (Talá Matai 24:36.) Babimisi ya zulunalo oyo batikaka ete Biblia elimbola makambo yango moko. Mbala mosusu okokamwa na koyoka ete lisoló ya Biblia na ntina na mikolo ya nsuka ezali na bilembeteli ya solosolo mpe oyo okoki kososola kozanga mpasi. Mpe Biblia esuki te bobele na kolimbola ntina oyo makambo mazali mabe mingi boye. Yango ezali mpe kopesa elikya mpo na mikolo mizali koya, mpe elikya yango ezali mpenza kolendisa bato. Tobyangi yo ete otánga masoló oyo malandi mpo na komona ete ezali mpenza bongo.