Bamilió ya bato bazali kokende—Yo mpe okokende na bango?
Kokende wapi? Bazali kokende na molulu ya bokundoli mbula na mbula liwa ya Yesu Klisto. Na 1996 na mokili mobimba bato 12 921 933 bayanganaki.
Mpo na nini bato bazali kokende? Mpo na oyo liwa ya Yesu elimboli mpo na bato. Elimboli libɔndisi na maladi, minyoko mpe liwa. Ata balingami na biso oyo bakufá bakosekwisama mpo na kozala na bomoi awa na mabelé oyo makobongwana Paladiso.
Ndenge nini liwa ya Yesu ekoki komema mapamboli motindo oyo? Obyangami mpo na koyeba yango. Batatoli ya Yehova bazali kobyanga yo mpo na koyangana elongo na bango na molulu yango ya ntina mingi.
Kendá koyangana na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene na esika ofandi. Mpo na mobu oyo dati na yango ezali bongo mwa 23 Mársi, nsima ya kolala ya moi. Sololá na Batatoli ya Yehova na esika ofandi mpo na koyeba ngonga ya sikisiki.