Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/2 nk. 25-29
  • Boyokani kati na “Tempelo ya Nzambe” mpe bikeko na Grèce?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyokani kati na “Tempelo ya Nzambe” mpe bikeko na Grèce?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge oyo losambo ya “Basantu” ekɔtisamaki
  • ‘Tósambela yango eyebi biso’
  • ‘Kosambela na elimo mpe na solo’
  • Basantu
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Ndenge nini basantu ya solo bakoki kosalisa yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tosengeli kobondelaka basantu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Bato bakómi kosepela mingi na “basantu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/2 nk. 25-29

Boyokani kati na “Tempelo ya Nzambe” mpe bikeko na Grèce?

MOI mozali makasi na mokolo oyo ya eleko ya molungé, mabanga mazali kongenga mpo na kobɛta ya moi. Nzokande, emonani ete molungé makasi wana ekoki te kopekisa molende mpe etingya makasi ya etuluku monene ya bandimi ya lingomba ya Ortodoksi ya Grèce bauti bisika ndenge na ndenge, bazali komata kino na ndakonzambe oyo ezwami na nsongé ya ngomba.

Ozali komona mobangé mwasi moko alɛmbi, ye asalaki mobembo uta na nsuka ya mboka, azali kosala molende ya kolanda kotambola atako makolo na ye malɛmbi. Mwa mosika, mobali moko ya molende azali kotɔka mingi wana, na mposa makasi, azali koluka nzela ya koleka katikati na bibele oyo bazali kotutanatutana. Mpe elenge mwasi moko, oyo emonani polele ete azali na mpasi mpe elongi na ye ezali komonisa ete azali lisusu na elikya te, azali konguluma na mabolongo oyo mazali kotangisa makila. Mokano na bango ezali nini? Ete bákóma na ngonga malamu, mpo na kosambela liboso ya ekeko ya “mosantu” oyo bazali kokumisa ye na eyenga wana, mpe soki likoki ezali, básimba mpe bápepwa yango.

Makambo lokola oyo mazali kosalema mbala na mbala na mokili mobimba na bisika bibo⁠ngisami mpo na losa⁠mbo ya “basantu.” Emonani ete bato oyo bazali kosala mibembo motindo wana bandimisami ete na kosaláká yango bazali kolanda lolenge oyo Nzambe alingi ete bato babɛlɛma na ye, komonisáká bongo ete bazali na ezaleli ya komipesa mpe bazali na kondima. Búku Our Orthodox Christian Faith elobi ete: “Tozali kokumisa biyenga mpo na [“basantu”], mpe tozali kopesa bango nkembo mpe lokumu mpo ete bazali bato na bulɛɛ . . . , mpe tozali kosɛnga ete basalela biso mabondeli na bango epai na Nzambe na malɔ́mbɔ mpe lisalisi na bango mpo na bamposa ndenge na ndenge ya bomoi na biso. . . . Tozali koluka lisalisi epai na Basantu oyo basalaka bikamwiseli . . . mpo na kokokisa bamposa na biso ya elimo mpe ya nzoto.” Lisusu, engebene likita monene ya bakonzi ya lingomba ya Katolike ya Loma oyo etalelaki mateya ya lingomba na bango, esengeli kobelela “basantu” mpo ete bazala balobeli na biso epai na Nzambe, mpe ezala bitika na bango to mpe bikeko ya “basantu” bisengeli kosambelama.

Lobanzo ya liboso ya moklisto ya solosolo esengeli kozala ya kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Mpo na ntina wana tiká tótalela mwa ndambo ya makambo matali lolenge oyo losambo ya “basantu” ekɔtisamaki na milulu ya losambo ya boklisto ya nkombo mpamba. Botaleli motindo wana ekongengisa moto nyonso oyo azali na mposa ya kobɛlɛma na Nzambe na lolenge oyo ezali kosepelisa Ye.

Lolenge oyo losambo ya “Basantu” ekɔtisamaki

Makomami ya Greke ya boklisto mazali kobenga “bato na bulɛɛ,” to “basantu,” baklisto nyonso ya ekeke ya liboso oyo bapɛtolamaki na makila ya Klisto mpe batyamaki pembeni mpo na mosala ya Nzambe lokola baoyo bakokóma basangoli elongo na Klisto. (Misala 9:32; 2 Bakolinti 1:1; 13:13)a Mibali mpe basi, bato minene mpe bato mike kati na lisangá, bango nyonso babéngamaki “bato na bulɛɛ” wana bazalaki naino na bomoi awa na mabelé. Emonani ete kondimama na bango lokola basantu engebene Makomami ezalaki te ete bakufa naino.

Nzokande, nsima ya ekeke ya mibale T.B., ntango boklisto ya lipɛngwi ebandaki kokóla, mokano na yango ezalaki ya kopalanganisa lingomba ya boklisto epai na bato mingi, lingomba oyo esengelaki kobenda bapakano ete basepela na yango mpe bandima yango kozanga kokakatana. Bapakano wana bazalaki kosambela banzambe ndenge na ndenge, nzokande lingomba yango ya sika lizalaki kosambela Nzambe bobele moko. Na yango boyokani ekokaki kosalema na kokɔtisáká “basantu,” oyo basengelaki kozwa esika ya banzambe ya kala, ya banzambe mikemike, mpe ya bilombe ya masapo. Kolobáká na ntina na yango, búku Ekklisiastiki Istoria (Istware ya lingomba) elobi ete: “Mpo na bapakano oyo babongwanaki baklisto, ezalaki pɛtɛɛ ete batalela bamartire lolenge moko na bilombe na bango oyo basilaki kosundola mpe kobanda kopesa bango lokumu oyo liboso bapesaki yango epai na bilombe wana. . . . Nzokande, mbala mingi kopesa lokumu motindo wana epai na basantu eyaki kokóma solo mpenza losambo ya bikeko.”

Búku mosusu elimboli lolenge oyo “basantu” bakɔtisamaki na boklisto ya nkombo mpamba: “Na kopesáká lokumu epai na basantu ya lingomba ya Ortodoksi ya Grèce, tozali kokuta bilembeteli ya polele oyo emonisi bopusi makasi oyo losambo ya bopakano ezalaki na yango. Makoki oyo balobaki ete banzambe ya Olympe bazali na yango liboso ete [bato] babongwana na losambo ya boklisto ekómaki sikawa kotángelama epai na basantu. . . . Kobanda mpenza na bambula ya liboso ya lingomba wana ya sika, tomoni ete baoyo bandimaki kokɔta na losambo yango bazalaki kokitanya nzambe-moi (Phoebus Apollo) na mosakoli Eliya, kotongáká bandakonzambe likoló, to pembeni ya bitika ya batempelo ya kala to bankunda ya nzambe yango, mingimingi na nsongé ya bangomba mike mpe bangomba minene, na esika nyonso oyo bagreke ya kala bazalaki kokumisa Phoebus Apollo, mopesi na pole. . . . Kútu bakokanisaki Ngɔndɔ-nzambe-mwasi Athena na Ngɔndɔ Malia mpenza. Na yango, liyoki ya kozanga oyo emonanaki na ntango ekeko ya Athena ebebisamaki elongolamaki kati na motema ya mosambeli bikeko oyo abongolaki motema.”​—Neoteron Enkyklopaidikon Lexikon (Nouveau dictionnaire encyclopédique), Volimi 1, nkasa 270-271.

Na ndakisa, talelá lolenge makambo mazalaki na Athènes na nsuka ya ekeke ya minei T.B. Motango moleki monene ya bafandi na engumba yango bazalaki naino bapakano. Moko kati na milulu mileki bulɛɛ ezalaki bongo milulu ya mibombamo ya Éleusinie, oyo mizalaki kosalema na biteni mibale,b mpe mizalaki kosalema mbula na mbula na sanza ya Febwáli na engumba Éleusis, oyo ezwami na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 23 na nɔ́rdi ya Athènes. Mpo na koyangana na milulu yango, bafandi na engumba Athènes, oyo bazalaki bapakano basengelaki kolanda Nzela ya Bulɛɛ (Hi·e·raʹ Ho·dosʹ). Kolukáká kosala esika mosusu mpo na losambo, bakambi ya engumba yango basalaki mwango ya mayele mpenza. Bobele na nzela yango, pene na kilomɛtɛlɛ 10 na Athènes, batongaki monastere ya Daphni mpo na kobenda bapakano mpe na lolenge yango kopekisa bango ete basangana te na milulu ya mibombamo. Ndakonzambe ya monastere yango etongamaki likoló na miboko ya tempelo ya kala oyo etongamaki mpo na Daphnaios, to Pythios Apollo, nzambe moko ya Bagreke.

Bilembeteli oyo bizali komonisa ete losambo ya banzambe ya bapakano ekɔtisamaki na losambo ya “basantu” ekoki komonana na esanga ya Cythère, na mboka Grèce. Likoló na moko na bangomba ya esanga yango, ezali na bandako mibale ya losambo ya Bagreke​—moko na yango ezali na nkombo ya “mosantu” George, mpe mosusu na nkombo ya ngɔndɔ Malia. Bokundoli biloko bikundama na nsé ya mabelé emonisi ete esika yango ezalaki ngomba epai bato bazalaki kokende mpo na losambo na eleko ebéngami Minoen, esili koleka pene na mbula 3 500. Na ekeke ya motoba to ya nsambo T.B., “baklisto” batongaki ndako ya losambo na nkombo ya “Mosantu” George bobele na ngomba epai bato bazalaki kokende losambo. Likambo yango ezalaki na ndimbola monene; esika wana ya lokumu mpo na losambo na eleko ya Minoen ezalaki kosɛnzɛla likoló na botamboli ya bamasuwa na Mai Monene ya Egée. Bandakonzambe nyonso mibale etongamaki mpo na kosimba makasi ngɔlu ya Ngɔndɔ Malia mpe “Mosantu” George, ye oyo bakumisaka eyenga na ye mokolo moko na “Mosantu” Nicolas, “mobateli ya batamboli na masuwa.” Zulunalo moko epesaki nsango ya bokundoli wana elobaki ete: “Lelo oyo sángó [ya lingomba ya Ortodoksi ya Grèce] akobutwa likoló na ngomba, bobele lokola sángó ya kala azalaki kosala yango na eleko ya Minoen,” mpo na kokokisa mosala na ye ya losambo!

Kolobeláká na mokusé kino na meko nini boklisto ya lipɛngwi ebebisamaki na lingomba ya bopakano ya Grèce, molukiluki moko ya makambo ya kala alobi ete: “Mbala mingi moboko ya bopakano kati na lingomba ya boklisto ezalaki kotikala na bindimeli ya bato, komonisáká bongo ete bonkɔ́kɔ ezali na misisa makasi.”

‘Tósambela yango eyebi biso’

Yesu alobaki na mwasi Mosamalia ete: “Biso tozali kosambela oyo eyebi biso . . . Basambeli na solo bakosambela Tata na bisambeli na [e]limo mpe na solo. Mpo ete Tata azali koluka motindo oyo mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:22, 23) Simbá likambo oyo ete kosambela na solo ezali lisɛngami ya ntina! Na yango likoki ezali te ya kosambela Nzambe na motindo oyo ye akondima soki tozangi boyebi ya sikisiki mpe tozangi bolingo mozindo mpo na solo. Lingomba ya boklisto ya solo esengeli kotongama likoló na solo, kasi te likoló na bonkɔ́kɔ mpe mimeseno oyo miuti na bopakano. Toyebi lolenge nini Yehova akanisaka ntango bato bazali komeka kosambela ye na lolenge oyo ezali mabe na miso na ye. Ntoma Paulo akomaki epai na baklisto ya Kolinti, engumba moko ya kala ya ekólo Grèce ete: “Kokokana nini ezali na Klisto mpe Beliala? . . . Esambelo na Nzambe ezali na kondimana nini na bikeko?” (2 Bakolinti 6:15, 16) Nyonso oyo esalemi mpo na koluka kokokanisa tempelo ya Nzambe na bikeko eyinami na miso na ye.

Lisusu, Makomami eboyi mpenza polelepolele likanisi ya kosambela “basantu” ete bázala balobeli na biso liboso na Nzambe. Na libondeli na ye ya ndakisa, Yesu ateyaki ete mabondeli masengeli kopesama bobele epai na Tata, mpamba te alakisaki bayekoli na ye ete: “Bino bobondela boye ete, Tata na biso oyo azali na likoló, nkombo na yo ezala mosanto.” (Matai 6:9) Yesu alobaki lisusu ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto akokóma epai na Tata te soko na nzela na ngai te. Soko bokolomba likambo nini na nkombo na ngai, ngai nakosala yango.” Mpe ntoma Paulo alobaki ete: “Mpo ete Nzambe moko azali mpe Mobongisi moko kati na Nzambe mpe bato, ye moto Klisto Yesu.”​—Yoane 14:6, 14; 1 Timoté 2:5.

Soki tolingi solo ete mabondeli na biso máyokama epai na Nzambe, ezali likambo ya ntina ete tóbɛlɛma na ye na lolenge oyo Liloba na ye ezali kolakisa. Kolobeláká makasi nzela bobele moko oyo ebongi mpo na kobɛlɛma na Yehova, Paulo akomaki lisusu ete: “Klisto Yesu oyo akufaki, mpe asekwaki na kufa, oyo azali na loboko na mobali na Nzambe, ye wana azali kobondela mpo na biso!” “Ayebi kobikisa bango bakobɛlɛma na Nzambe na nzela na ye, awa ezali ye na bomoi libela ete abondela mpo na bango.”​—Baloma 8:34; Baebele 7:25.

‘Kosambela na elimo mpe na solo’

Boklisto ya lipɛngwi ezalaki na makasi ya elimo te, mpe ata na lisungi ya elimo santu ya Nzambe te mpo na kopusa bapakano ete bátika losambo na bango ya lokuta mpe bálanda mateya ya solo ya Yesu Klisto. Yango esangisaki bindimeli mpe misala ya bapakano kati na boluki na yango ya bandimi ya sika, na boluki mpifo, mpe boluki lokumu. Na ntina yango, ebimisaki te baklisto ya solosolo, oyo bakoki kondimama na Nzambe mpe Klisto, kasi bandimi ya lokuta, “matiti mabe” oyo mabongi na Bokonzi te.​—Matai 13:24-30.

Nzokande, na ntango oyo ya nsuka, na litambwisi ya Yehova, koningana moko monene ezali kosalema mpo na kozongisama ya losambo ya solo. Libota ya Yehova na mokili mobimba, kozanga kotalela mimeseno na bango, ezalela na bango ya bomoi, mangomba na bango ya kala, bazali kosala molende ya koyokanisa bomoi na bango mpe bindimeli na bango na masɛngami ya Biblia. Soki olingi koyeba makambo mingi mpo na lolenge ya kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo,” tolɔ́mbi yo ete okutana na Batatoli ya Yehova na esika ofandi. Bakozala na esengo mingi ya kosalisa yo ete osalela Nzambe mosala na lolenge ya bulɛɛ oyo ye akondima yango, oyo etongami likoló ya nguya na yo ya kokanisa mpe boyebi ya sikisiki ya Liloba na ye. Paulo akomaki ete: “Nazali kobondela bino mpo na mawa na Nzambe ete bókaba nzoto na bino lokola mbeka na bomoi oyo na bulɛɛ mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango. Bongo bokosambela ye na ntina [“bokosalela ye na makoki na bino ya kokanisa,” NW]. Bóbilaka makambo na ntango oyo te kasi bobongwana mpo na kozwa makanisi na sika kino bokokoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.” Mpe epai na Bakolose alobaki ete: “Yango wana, longwa na mokolo moyoki biso mpo na bolingo yango, totiki kobondela mpo na bino te. Tokolombaka ete botonda na boyebi na mokano na ye, na mayele nyonso mpe na bososoli na [e]limo. Na bongo bótambola na sembo na Nkolo mpe bósepelisa ye na makambo nyonso. Bóbota mbuma na misala nyonso malamu, bokola mpe na boyebi koyeba Nzambe.”​—Baloma 12:1, 2; Bakolose 1:9, 10.

[Maloba na nse]

a Mabongoli mosusu ya Biblia mabongoli liloba ya Greke haʹgi·os ete “moto na bulɛɛ,” mosusu ete “mosantu.”

b Éleusinie monene ezalaki kosalema mbula na mbula na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ na Athènes mpe na Éleusis.

[Etanda/Elilingi na lokasa 28]

Parthénon: Esalelamaki na mangomba mingi

Amperɛrɛ “moklisto” Theodosius II, na nzela ya mibeko mitalelaki engumba ya Athènes (438 T.B.), apekisaki milulu ya bopakano mpe milulu ya mibombamo, akangaki batempelo ya bapakano. Na nsima ekokaki kosalelama lokola bandakonzambe ya boklisto. Lisɛngami bobele moko mpo na kopɛtola tempelo na lolenge lobongi ezalaki bongo kotya ekulusu kati na yango!

Moko na batempelo ya liboso oyo ebongolamaki ezali bongo Parthénon. Misala minene ya kobongisama lisusu mpo na kolɛngɛla Parthénon ete ezala esika ebongi mpo ete esalelama lokola tempelo ya “boklisto.” Bandá na 869 T.B., esalelamaki lokola katedrale ya engumba Athènes. Libosoliboso ekumisamaki lokola ndakonzambe ya “Bwanya ya bulɛɛ.” Ekoki kozala ete yango esalemaki na mokano ya kokundola likambo oyo ete “mokóló” ya libosoliboso ya tempelo yango ezalaki bongo Athena, nzambe-mwasi ya bwanya. Na nsima epesamelaki lokumu na nkombo ya “Notre Dame d’Athènes.” Nsima ya bikeke mwambe oyo lingomba ya Ortodoksi basalelaki yango, tempelo ekómaki ndakonzambe ya Katolike na nkombo ya Mosantu Malia wa Athènes. “Kobongolama” motindo wana ya Parthénon elandanaki kino na ekeke ya 15, ntango bato ya Turquie oyo babéngami Ottoman bakómisaki yango ndakonzambe ya Bamizilmá.

Lelo oyo, ebele ya baturiste bazali kokende kotala Parthénon, tempelo ya kala ya Doric ya Athena Parthenos (“ngɔndɔ”), nzambe-mwasi ya Bagreke mpo na bwanya, bobele lokola monimá monene ya mayele ya botongi ya bato na Grèce ya kala.

[Elilingi na lokasa 26]

Monastere ya Daphni​—esika mosusu ya losambo mpo bapakano ya engumba Athènes ya kala

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto