Tósalisa basusu ete báyeba masɛngami ya nzambe
“Napesami simbisi ete nasala boye. Mawa na ngai soko nakosakola Nsango Malamu te!”—1 BAKOLINTI 9:16.
1, 2. (a) Yehova azali kosɛnga na biso ete tósangana na mosala nini oyo mosangisi makambo mibale? (b) Bato ya motema sembo basengeli koyeba nini mpo na kokóma bayangelami ya Bokonzi ya Nzambe?
YEHOVA azali na nsango malamu mpo na bato. Azali na Bokonzi, mpe alingi ete bipai binso bato báyoka nsango ya Bokonzi yango! Nsima ya koyeba nsango malamu wana, Nzambe asɛngi na biso ete tóyebisa yango epai na basusu. Yango ezali mosala mosangisi makambo mibale. Ya liboso, tosengeli kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Kati na esakweli na ye na ntina na ‘nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo,’ Yesu alobaki ete: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:3, 14.
2 Likambo ya mibale na mosala yango ezali bongo koteya baoyo bazali koyanola malamu na kosakolama ya Bokonzi. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu ayebisaki etuluku monene ya bayekoli na ye ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na [elimo santu, NW], kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino. Mpe talá, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.” (Matai 28:19, 20) ‘Makambo oyo Klisto alakaki’ mautaki epai na ye te; ateyaki basusu ete bábatela malako, to masɛngami ya Nzambe. (Yoane 14:23, 24; 15:10) Na yango, kolakisa basusu ete ‘bátosa makambo oyo Klisto alakaki’ esɛngi na biso ete tósalisa bango báyeba masɛngami ya Nzambe. Bato ya motema sembo basengeli kokokisa masɛngami ya Nzambe mpo na kokóma bayangelami ya Bokonzi na ye.
3. Bokonzi ya Nzambe ezali nini, mpe makambo nini yango ekokokisa oyo mazali kosala ete nsango ya Bokonzi ezala mpenza nsango malamu?
3 Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Mpe makambo nini yango ekokokisa oyo esali ete nsango ya Bokonzi ezala nsango malamu? Bokonzi ya Nzambe ezali boyangeli ya likoló. Ezali na motuya mingi na motema ya Yehova, mpamba te ezali na mwango yango nde akosantisa nkombo na ye, kolongoláká mbindo nyonso likoló na yango. Bokonzi yango ezali esaleli oyo Yehova akosalela mpo ete mokano na ye esalema awa na mabelé lokola ezali kosalema na likoló. Ezali mpo na yango nde Yesu ateyaki biso tóbondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya mpe alendisaki biso ete tótyaka yango na esika ya liboso kati na bomoi na biso. (Matai 6:9, 10, 33) Ososoli mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi na miso ya Yehova ete tólakisa basusu makambo ya Bokonzi na ye?
Mokumba ya kosepelisa, kasi bozito te
4. Ndakisa nini ekoki kosalelama mpo na komonisa ete mokumba na biso ya kosakola nsango malamu ezali bozito te?
4 Ezali nde likambo ya bozito kosakola nsango malamu yango? Soko moke te! Tiká tópesa ndakisa moko: Tata azali na mokumba ya kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye. Kozanga kosala yango ekokani na kobwaka kondima ya boklisto. Ntoma Paulo akomaki ete: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.” (1 Timoté 5:8) Tokoki nde koloba ete mokumba wana ezali bozito mpo na mobali moklisto? Soko moke te, mpamba te soki azali na bolingo mpo na libota na ye, na ntembe te, akolinga kokokisa bamposa na bango.
5. Mpo na nini tosengeli kozala na esengo ya kosangana na mosala ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli atako yango ezali mokumba?
5 Bobele bongo, mosala ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli ezali mokumba, lisɛngami, oyo bomoi na biso mpenza etaleli yango. Paulo amonisaki yango na maloba oyo: “Napesami simbisi [“Nasɛngisami,” NW ] ete nasala boye. Mawa na ngai soko nakosakola Nsango Malamu te!” (1 Bakolinti 9:16; kokanisá na Ezekiele 33:7-9.) Nzokande, eloko oyo ezali kopusa biso na kosakola ezali nde bolingo, kasi te litindiki ya kokokisa mokumba. Ya liboso, tozali na bolingo mpo na Nzambe, kasi tozali lisusu na bolingo mpo na bazalani na biso, mpe toyebi ete esengeli na bango koyoka nsango malamu. (Matai 22:37-39) Yango ezali kopesa bango elikya mpo na mikolo mizali koya. Etikali moke, Bokonzi ya Nzambe ekosembola bokɛsɛnɛ nyonso, ekolongola minyoko nyonso, mpe ekozongisa kimya mpe bomoko—nyonso wana ezali mapamboli ya seko mpo na baoyo bazali kotosa boyangeli na ye ya boyengebene. Tozali mpenza na esengo, ɛɛ na nsai, mpo na koyebisa nsango motindo oyo epai na bato, boye te?—Nzembo 110:3.
6. Mpo na nini mosala ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli ezali komema mokakatano monene?
6 Nzokande, kosakola mpe kozalisa bayekoli ezali mpe komema mokakatano monene. Bato bakeseni. Bango nyonso bazali na bosepeli to na makoki motindo moko te. Bamoko batángá kelasi mingi, nzokande basusu batángá mingi te. Kotánga—oyo kala ezalaki lolenge lobongi mpo na kolekisa ntango malamu—ekómi lelo kotalelama lokola motungisi. Ezaleli ya kozala na makoki ya kotánga kasi ya kozanga bosepeli mpo na kosala yango, ezali mokakatano oyo mozali sé kokóla ata na mikili oyo emikumisaka ete mizali na bato mingi oyo batángá. Na yango, lolenge nini tokoki kosalisa bato motindo wana, oyo makoki na bango mpe makambo oyo basepelaka na yango ekeseni, ete báyeba oyo Nzambe azali kosɛnga?—Kokanisá na 1 Bakolinti 9:20-23.
Topesameli nyonso ekoki mpo na kosalisa basusu
7. Lolenge nini “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesi biso oyo ekoki mpo na kosalisa basusu ete báyeba masɛngami ya Nzambe?
7 Mosala ya mpasi ekómaka pɛtɛɛ soki ozali na bisaleli bibongi to mpe na nyonso oyo ekoki. Esaleli oyo ebongi na mosala moko boye lelo, ekoki kobongisama lisusu na mikolo mizali koya, to kotika esika na esaleli mosusu, mpo na mposa oyo emonani na ntina na mbongwana. Ezali mpe bongo mpo na mokumba na biso ya kosakola nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Na boumeli ya bambula oyo esili koleka, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azalaki kobimisela biso bisaleli bibongi, elingi koloba mikanda oyo misalemaki mpenzampenza mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia. (Matai 24:45) Na lolenge yango, topesameli nyonso ekoki mpo na kosalisa bato ya “mabota nyonso, . . . na minɔkɔ nyonso” ete báyeba masɛngami ya Nzambe. (Emoniseli 7:9) Mbala na mbala, bisaleli mosusu bizali kobakisama mpo na kolanda mbongwana oyo ezali komonana kati na elanga, elingi koloba mokili. Tiká tótalela mwa bandakisa ya bisaleli yango.
8. (a) Mokumba nini búku “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” ekokisaki mpo na kokólisa mosala ya koteya bato Biblia? (b) Esaleli nini ebimisamaki na 1968 mpo na boyekoli ya Biblia, mpe na mokano nini ya sikisiki esalemaki? (c) Lolenge nini búku Solo epesaki lisungi monene kati na mosala ya kozalisa bayekoli?
8 Kobanda 1946 kino 1968, búku “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” ezalaki kosalelama lokola esaleli ya nguya mpo na kopesa mateya ya Biblia, mpe baekzamplɛrɛ 19 246 710 ebimisamaki na nkótá 54. Na 1968, búku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko ebimisamaki; yango esalelamaki na boumeli ya bambula mingi mpo na koyekola Biblia elongo na baoyo bazalaki kosepela na solo. Liboso ete búku yango ebima, bato mingi bazalaki koyekola na Batatoli ya Yehova na boumeli ya bambula mingi kozanga ete bázwa batisimo. Kasi esaleli wana esalemaki na mokano ya kopusa moyekoli, kolendisáká ye ete asalela makambo oyo azalaki koyekola. Litomba na yango ezalaki nini? Búku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu elobi ete: “Na boumeli ya mibu misato ya mosala oyo mibandaki na mwa 1 Sɛtɛ́mbɛ 1968 mpe misukaki na mwa 31 Augústo 1971, motángo ya bato 434 906 bazwaki batisimo—motángo yango mozwi koleka mbala mibale motángo ya baoyo babatisamaki na boumeli ya mibu misato ya mosala oyo milekaki liboso!” Uta kobimisama na yango, búku Solo esili kobimisama na mitángo ya kokamwisa—baekzamplɛrɛ koleka 107 000 000 na nkótá 117.
9. Eloko nini ya kobenda likebi ezali kati na búku Bomoi ya seko, mpe ebimisaki mbuma nini likoló na motuya ya basakoli ya Bokonzi?
9 Na 1982, búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis ekómaki kosalelama lokola búku ya moboko mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia. Esaleli yango ezali na bililingi koleka 150, oyo mokomoko na yango ezali na maloba ya ntina mingi na nsé na yango mpo na kolimbola likambo oyo bililingi wana bizali koteya. Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1982 (na Lingelesi) elobaki ete: “Na boumeli ya mbula pene na 20 oyo búku ‘Que Dieu soit reconnu pour vrai’ ezalaki búku na biso ya moboko mpo na boyekoli (bandá 1946 kino katikati na bambula 1960), basakoli ya Bokonzi koleka 1 000 000 babakisamaki na lisangá na biso. Na nsima, basakoli ya sika koleka 1 000 000 babakisamaki ntango Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko ekómaki búku na biso ya moboko mpo na boyekoli, na bileko oyo bilandaki kobimisama na yango na 1968. Na kosaleláká búku na biso ya sika mpo na boyekoli, Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis, tokomona mpenza kobakisama ya basakoli ya Bokonzi motindo wana? Ɛɛ, soki ezali mokano ya Yehova!” Mpe yango ezalaki mpenza mokano ya Yehova, mpamba te bandá 1982 kino 1995, bato koleka 2 700 000 babakisamaki na milɔngɔ́ ya basakoli ya Bokonzi!
10. Esaleli nini ya sika ebimisamaki na 1995, mpe mpo na nini ekosalisa mpenza bayekoli ya Biblia ete bákola nokinoki na elimo?
10 Yesu alobaki ete: “Mbuma na elanga iteli mingi mpenza nde basáli bazali mingi te.” (Matai 9:37) Ya solo, mosala ya bobuki mbuma ezali monene mpenza. Makambo ya kosala ezali naino mingi. Na mikili mosusu, bato basengeli kokomisa nkombo na liste mpe kozela mpo na koyekola Biblia. Na yango, na 1995, mpo na kopalanganisa boyebi ya Nzambe na lombangu koleka, “moombo ya sembo mpe ya mayele” abimisaki esaleli moko ya sika, búku ya nkasa 192 na motó na likambo ete Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Esaleli yango ya ntina mingi ezali te kolekisa ntango na kolobeláká mateya ya lokuta. Ezali komonisa solo ya Biblia na lolenge lobongi. Tobanzi ete yango ekosalisa bayekoli ya Biblia ete bákóla nokinoki na elimo. Búku Boyebi esili kobanda kosala bopusi kati na elanga, to mokili, wana yango ebimisami na baekzamplɛrɛ 45 500 000 na nkótá 125 mpe ezali naino kobongolama na nkótá mosusu 21.
11. Esaleli nini ya nguya ebimisamaki mpo na kosalisa biso na koteya baoyo bayebi kotánga te to baoyo bayebi kotánga malamu te, mpe lolenge nini yango ekokisaki mokumba monene kati na ebongiseli na biso ya kopesa mateya?
11 Na bantango mosusu, ‘moombo ya sembo’ abimisaka bisaleli oyo bitaleli bobele etuluku moko ya sikisiki to etuluku moke ya bato. Na ndakisa, tokoloba boni mpo na bato oyo bakoki kozala na mposa moko ya sikisiki na ntina na mimeseno ya bonkɔ́kɔ na bango to ya mangomba epai bautaki? Lolenge nini tokoki kosalisa bango ete báyeba masɛngami ya Nzambe? Na 1982, tozwaki mpenza eloko tozalaki na yango mposa—mwa búku ya nkasa 32 Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Mokanda yango, oyo motondi na bililingi, mozalaki mpenza esaleli ya nguya mpo na koteya baoyo bayebi kotánga malamu te to mpe baoyo bayebi kotánga ata moke te. Yango ezali kopesa mateya ya Makomami na lolenge lozangi mindɔndɔ́ mpe ya pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina. Uta kobimisama na yango, mwa búku Sepela esili kopesa lisungi monene kati na ebongiseli na biso mobimba ya kopesa mateya. Baekzamplɛrɛ koleka 105 100 000 esili konyatama na nkótá 239, mpe mitángo wana esali ete mwa búku yango ezala mokanda oyo mobongolami na nkótá mingi koleka mikanda nyonso oyo la Société Watch Tower asili kobimisa kino sikawa!
12, 13. (a) Uta 1990, ‘moombo ya sembo’ asili kobimisa esaleli nini oyo ebongi mpo na kosakola epai na ebele ya bato mbala moko? (b) Lolenge nini tokoki kosalela bakasɛ́ti-video ya la Société kati na mosala na biso ya kosakola? (c) Esaleli nini ya sika euti kobimisama mpo na kosalisa biso na mosala ya kozalisa bayekoli?
12 Longola mikanda oyo mizali konyatama, ‘moombo ya sembo’ azali kobimisela biso, uta 1990, myango ya koteya oyo ezali kopesa nzela na kokómisa nsango epai na ebele ya bato na mbala moko—bakasɛ́ti-video. Na Ɔkɔtɔ́bɛ ya mobu wana, kasɛ́ti-video ya miniti 55, Les Témoins de Jéhovah: un nom, une organisation, ebimisamaki—yango ezali kasɛ́ti ya liboso oyo la Société Watch Tower abimisaki. Kasɛ́ti-video yango kitoko, oyo ezali kolakisa makambo ndenge na ndenge mpe ebimisami na nkótá 35, ezali komonisa lisangá ya mokili mobimba ya basaleli bamipesi na Yehova, wana bazali kokokisa etindá ya Yesu ya kosakola nsango malamu na mabelé mobimba. Kasɛ́ti-video yango ebimisami na mokano ya kosunga biso kati na mosala ya kozalisa bayekoli. Basakoli ya Bokonzi basalelaki nokinoki esaleli yango ya sika kati na mosala ya kosakola. Bamoko bazalaki komema yango na basakosi na bango ya mikanda, bazalaki pene na kolakisa yango, to bazalaki kotikela baoyo bamonisaki bosepeli ete bátala yango. Mwa moke nsima ya kobimisama na yango, mokɛngɛli-motamboli moko akomaki ete: “Video esili kokóma esaleli oyo ebimisami na ekeke ya 21 mpo na kosimba makanisi mpe mitema ya bamilió ya bato; na yango, tozali kolikya ete kasɛ́ti-video oyo ezali sé ya liboso, kasi ya nsuka te, kati na oyo la Société akosalela mpo na kolendisa lisusu mosala ya Bokonzi na mokili mobimba.” Ya solo, bakasɛ́ti-video mingi esili kobimisama, bakisá oyo ya biteni misato bilandani ete La Bible: Un livre historique et prophétique mpe Jehovah’s Witnesses Stand Firm Against Nazi Assault. Soki bakasɛ́ti-video ya la Société esilá kobimisama na lokótá na bino, osili kosalela yango kati na mosala na yo ya kosakola?a
13 Kala mingi te, esaleli moko ya sika, mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?, ebimisamaki mpo na kopesa lisungi kati na mosala na biso ya kozalisa bayekoli. Yango ebimisamaki mpo na nini? Lolenge nini okoki kosalela yango?
Kotalelama ya esaleli ya sika
14, 15. Mwa búku Nzambe azali kosɛnga ebimisami mpenza mpo na banani, mpe ezali na nini kati na yango?
14 Mokanda ya sika Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? mosalemi mpo na bato oyo bandimaka Nzambe mpe bamonisaka limemya mpo na Biblia. Bakɛngɛli-batamboli mpe bamisionere bauti na Gileadi, oyo balekisi mbula mingi na mosala kati na mikili ya bobólá, bapesaki mabɔkɔ mpo na kobɔngisama ya mwa búku yango. Ezali na makambo ndenge na ndenge ya boyekoli oyo mazali komonisa mateya ya moboko ya Biblia. Elobeli na yango ezali ya kosepelisa, ya pɛtɛɛ mpe ezangi mindɔndɔ́. Kasi makomi na yango mazali pɛtɛɛ koleka ndelo te. Yango ezali kopesa bobele “mabɛlɛ” te kasi lisusu “bilei makasi” biuti na Liloba ya Nzambe, komonisáká makambo yango na lolenge oyo ebele ya bato bakoki mpenza kososola.—Baebele 5:12-14.
15 Na bambula euti koleka, basakoli ya Bokonzi oyo bazwami na mikili ndenge na ndenge bazalaki mpenza na mposa ya mokanda motindo wana. Na ndakisa, filiale ya la Société Watch Tower na mboka Papouasie-Nouvelle-Guinée ekomaki ete: “Bato bazali na mobulungano mpo na mateya ya bongolábongola oyo mauti na mangomba. Bazali na mposa ya maloba ya sikisiki ya solo, maye masimbami na mikapo ya Biblia oyo bakoki kotánga na Biblia na bango moko. Bazali na mposa ete makambo oyo Nzambe azali kosɛnga na baklisto ya solo mámonisama na lolenge ya polele mpe ya sikisiki, mpe balingi koyeba mimeseno nini mpe mateya nini mandimami na Nzambe te.” Mwa búku Nzambe azali kosɛnga ezali mpenza eloko tosengeli na yango mpo na kosalisa bato motindo wana ete báyeba masɛngami ya Nzambe.
16. (a) Nani mpenzampenza akoki kozwa litomba na bandimbola ya pɛtɛɛ oyo ezali na mwa búku yango ya sika? (b) Lolenge nini bato oyo bazali na teritware na bino bakoki kozwa litomba na mwa búku Nzambe azali kosɛnga?
16 Lolenge nini okoki kosalela esaleli yango ya sika? Ya liboso, yango ekoki kosalelama mpo na koyekola na bato oyo bazali na mikakatano mpo na kotánga to na bato oyo bamesaná mpenza na kotánga te.b Bato motindo wana bakoki kozwa litomba na bandimbola ya pɛtɛɛ oyo ezali kati na mwa búku yango. Nsima ya kotánga mwa búku wana liboso ete ebimisama, bafiliale ya Société Watch Tower ekomaki boye: “Mwa búku oyo ekopesa lisungi monene na bisika mingi ya mboka epai kuna bato bamesana te kotánga mingi.” (Brésil) “Ezali na ebele ya bapaya oyo bakoki te kotánga monɔ́kɔ ya mboka na bango mpe oyo bazali naino na mikakatano mpo na kotánga Lifalansé. Mwa búku oyo ekoki kosalelama lokola mwango ya koyekola na bato motindo wana.” (France) Okoki koyeba bato ya teritware na yo oyo bakoki kozwa litomba na mwa búku Nzambe azali kosɛnga?
17. Na mitindo nini mwa búku yango ya sika ekoki kopesa lisungi na mikili mingi, mpe mpo na nini?
17 Ya mibale, kati na mikili mingi, mwa búku yango ekoki kosunga mingi mpo na kobanda boyekoli na bato oyo babangaka Nzambe, ezala batángá kelasi mingi to te. Ya solo, esengeli kosala milende mpo na kobanda boyekoli na búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Kasi kobanda boyekoli na mwa búku moko boye ekoki kozala likambo ya pɛtɛɛ na bantango mosusu. Na nsima, na ntango ebongi, boyekoli esengeli koleka na búku Boyebi, mokanda na biso ya moboko, oyo tolingi mingi, mpo na boyekoli. Na ntina na kosalelama ya mwa búku Nzambe azali kosɛnga, bafiliale ya Société Watch Tower ekomaki ete: “Kobanda boyekoli ya Biblia ezali likambo ya mpasi, mpe mabaku ya kobanda boyekoli ezalaka malamu mingi ntango basakoli babandi na mwa búku moko boye.” (Allemagne) “Mwa búku ya kosepelisa boye ekozala na nguya mpenza mpo na kobanda boyekoli ya sika ya Biblia, oyo ekoki kokóba kati na búku Boyebi.” (Italie) “Atako bato mingi ya Japon batángá kelasi mingi, nzokande mingi na bango bazali bobele na boyebi moke ya Biblia mpe ya mateya na yango ya moboko. Mwa búku oyo esengeli kozala lisungi libongi mpo na kokɔta na búku Boyebi.”—Japon.
18. Nini tosengeli komikundwela na ntina na kokokisa masɛngami ya Nzambe?
18 Bafiliale ya la Société kati na mokili mobimba esɛngaki ete bátindela bango mwa búku yango, mpe ndingisa epesamaki ete yango ebongolama na nkótá 221. Tiká ete mokanda yango ya sika ezala lisungi ya ntina mpenza oyo ekosalisa biso na kosunga basusu ete báyeba oyo Nzambe azali kosɛnga epai na bango. Mpo na biso moko, tiká tóyeba ete kokokisa masɛngami ya Nzambe, bakisá mpe etindá ya kosakola mpe kozalisa bayekoli, ezali kopesa biso libaku malamu ya komonisa bozindo ya bolingo na biso epai na Yehova. Ɛɛ, oyo Nzambe azali kosɛnga na biso ezali bozito te. Ezali lolenge ya kozala na bomoi oyo eleki malamu!—Nzembo 19:7-11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu elobi ete: “Bakasɛ́ti-video ezali soko moke te kozwa esika ya mikanda minyatami to esika ya litatoli oyo moto akoki kopesa ye moko. Mikanda ya la Société mitiki te kokokisa mokumba na yango ya ntina mpo na kopalanganisa nsango malamu. Mosala ya kosakola ndako na ndako, oyo Batatoli ya Yehova basalaka, ekotikala ntango nyonso eteni ya mosala na bango oyo ezwi moboko makasi likoló na Makomami. Nzokande, bakasɛ́ti-video ebakisami likoló ya mikanda wana lokola bisaleli ya ntina mingi mpo na kolóna kondima kati na bilaka kitoko ya Yehova mpe kopusa bato ete bámonisa botɔ́ndi mpo na oyo ye azali kosala awa na mabelé na mikolo na biso.”
b Mpo na koyeba lolenge ya kotambwisa boyekoli na mwa búku Nzambe azali kosɛnga, talá lisoló “Esaleli ya sika mpo na kosalisa bato ete báyeba masɛngami ya Nzambe,” na nkasa 16-17.
Okoki kolimbola?
◻ Yehova azali kosɛnga na basaleli na ye ete básangana na mosala nini oyo mosangisi makambo mibale?
◻ Mpo na nini mosala na biso ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli ezali bozito te mpo na biso?
◻ Bisaleli nini “moombo ya sembo mpe ya mayele” asili kobimisa mpo na mosala na biso ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli?
◻ Mwa búku Nzambe azali kosɛnga esalemi mpenza mpo na banani, mpe lolenge nini tokoki kosalela yango kati na mosala na biso ya kosakola?
[Elilingi na lokasa 24]
Mosala na biso ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli ezali bozito te
[Bililingi na lokasa 26]
“Que Dieu soit reconnu pour vrai!” (1946, etalelamaki lisusu na 1952): 19 250 000 na nkótá 54 (oyo elakisami ezali na Lingelesi)
“Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko” (1968): 107 000 000 na nkótá 117 (oyo elakisami ezali na Lifalansé)
“Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis” (1982): 80 900 000 na nkótá 130 (oyo elakisami ezali na Russe)
“Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko” (1995): 45 500 000 na nkótá 125 (oyo elakisami ezali na Allemand)