Evanzile engebene banganga-mayele
BATO bazali koloba ete ngai nani?” (Luka 9:18) Yesu atunaki motuna wana na bayekoli na ye eleki sikawa pene na bambula nkoto mibale. Na ntango wana motuna yango mozalaki kobimisa ntembe mingi. Emonani ete lelo oyo motuna yango mozali kobimisa ntembe mingi lisusu koleka, mingimingi na eleko ya eyenga ya Mbotama, oyo bato bandimaka ete na boumeli na yango likebi lisengeli kotyamaka mingi likoló na Yesu. Mingi bakanisaka ete Yesu atindamaki uta na likoló mpo na koya kosikola libota ya bato. Ezali yango nde likanisi na yo?
Banganga-mayele mosusu bazali kolendisa lolenge mosusu ya kotalela likambo wana. Marcus J. Borg, molakisi ya makambo matali mangomba mpe mimesano ya bato alobi ete: “Likanisi oyo ete Yesu azalaki mpenza moto oyo ateyaki ete ye nde mwana na Nzambe oyo asengelaki kokufa mpo na masumu ya bato ezali mpenza solo te engebene lisoló ya makambo ya kala.”
Banganga-mayele mosusu balobi ete Yesu ya solosolo akesanaki na oyo Biblia ezali kolobela. Bamoko bandimaka ete Baevanzile nyonso ekomamaki mbula ntuku minei to mpe koleka nsima na liwa ya Yesu mpe na bongo, bomoto ya solosolo ya Yesu ekembisamaki na makambo mosusu oyo ebakisamaki. Banganga mayele balobi ete mokakatano mozalaki te mpo na likoki ya bakomi ya Baevanzile ya komikundola makambo, kasi ezalaki nde mpo na lolenge na bango ya kolimbola makambo yango. Nsima ya liwa ya Yesu, bayekoli na ye bakómaki kotalela ye na lolenge mosusu—lokola Mwana ya Nzambe, Mobikisi, mpe Masiya. Basusu bazali koloba na molende nyonso ete Yesu azalaki bobele moto ya mayele oyo azalaki koyengayenga, moto oyo alingaki kobongola lolenge ya bomoi ya bato. Engebene banganga-mayele, ezali wana nde bosolo ya evanzile.
Lolenge oyo “banganga-mayele” bazali kotalela Yesu
Emonani ete, mpo na kolóngisa lolenge na bango ya “banganga-mayele” batalelaka Yesu, babɛti ntembe bazali koboya na makasi mpenza makambo nyonso oyo emonani ete eleki mayele ya bomoto. Na ndakisa, bamoko bazali koloba ete kobotama ya Yesu epai na ngɔndɔ mwasi ezali mpo na kobomba ete azalaki mwana ya makango. Basusu bazali koboya kondima bisakweli ya Yesu na ntina na kobomama ya Yelusaleme, kolobáká ete ebakisamaki kati na Baevanzile nsima ya “kokokisama” na yango. Basusu kútu balobi ete bikamwiseli ya kobikisa maladi oyo Yesu asalaki ezalaki bongo oyo ebéngami ete psychosomatique. Okanisi ete ezali wana makanisi ya solo to ezali nde oyo ezangi ntina?
Kútu banganga-mayele mosusu bazali koloba ete bayekoli ya Yesu babimisaki liteya ya lisekwa mpo na kosala ete lingomba na bango elimwa te. Bato yango bazali kokanisa ete bayekoli ya Yesu bazalaki na nguya te kozanga Molakisi na bango, yango wana bakomaki lisoló ya lokuta mpo na kozongisa ye na esika ya liboso. Banganga-mayele bazali mpenza koloba ete ezali bongo lingomba ya boklisto nde esekwaki, kasi Klisto te. Soko likanisi wana ezali kobimisa ntembe kati na banganga-mayele bango moko, ezali boni mpo na likanisi ya teolojiɛ́ Barbara Thiering oyo elobi ete Yesu abomamaki te? Ye andimaka ete Yesu akufaki te nsima ya kokakisama na nzeté mpe na nsima akendaki kobala mbala mibale mpe abotaki bana misato.
Makanisi nyonso wana makitisi Yesu kino na etɛlɛmɛlo oyo banganga-mayele mingi bakoki kondima ye: ete azalaki moto ya mayele, moyuda oyo akeseni na basusu, moto oyo alingaki kobongola lolenge ya bomoi ya bato—makambo nyonso wana longola bobele ete azalaki Mwana ya Nzambe, oyo ayaki mpo na “kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.”—Matai 20:28.
Ekoki kozala ete na eleko oyo ya mbula, osilaki kotanga biteni ya Baevanzile, lokola oyo elobeli kobotama ya Yesu na elielo ya bibwɛlɛ. To mpe osilaki koyoka masoló wana na ndakonzambe. Otalelaka masoló ya baevanzile lokola masoló ya solo mpe oyo ekoki kondimama? Na bongo, talá likambo oyo ya kobulunganisa. Na likita moko ebéngami Seminɛrɛ mpo na Yesu, etuluku ya banganga-mayele bazalaki kokutana mbala mibale na mbula bandá mobu 1985 mpo na kokata likambo litali bosolo ya maloba ya Yesu. Ezali mpenza solo ete Yesu alobaki makambo oyo Biblia emonisi na ntina na ye? Basangani na seminɛrɛ yango basalaki liponi na ntina na liloba mokomoko na kosaleláká bambuma ya mayaka ya lángi ekeseni. Liyaka ya lángi ya motane elimbolaki ete ezali solo Yesu nde alobaki yango; oyo ya lángi ya roze elimbolaki ete ekoki mpenza kozala ete Yesu alobaki yango; oyo ya mpɛmbɛ-mwindo elimbolaki ete mwa kokakatana ezali; mpe oyo ya mwindo ezalaki komonisa ete ezali ya kobakisa.
Okoki kobulungana na koyoka ete Seminɛrɛ wana mpo na Yesu elobaki ete 82 % ya oyo etángami ete ezali maloba ya Yesu ekoki kozala ete malobamaki mpenza na ye te. Bobele liloba moko kati na evanzile mobimba ya Malako etángamaki ete ekoki kotyelama motema. Elobamaki ete evanzile ya Luka etondi na makumisi mpamba oyo “bosolo na yango ekoki komonisama te.” Evanzile mobimba ya Yoane ezwaki liyaka ya mwindo longola bobele milɔngɔ́ misato, komonisáká ete ezalaki na makambo mingi oyo ebakisamaki, mpe mwa milɔngɔ́ yango oyo etikalaki epesamelaki liyaka ya mpɛmbɛ-mwindo oyo elimboli ete mwa kokakatana ezali.
Ezali te kotyana ntembe mpamba ya banganga-mayele
Ozali kondima makanisi ya banganga-mayele? Bazali nde komonisa biso Yesu na lolenge ya solo koleka oyo tozali kokuta na Biblia? Mituna oyo mizali te bobele makambo mataleli kotyana ntembe kati na banganga-mayele. Na eleko oyo kati na mobu, okoki kokundwelama ete, engebene Biblia, Nzambe atindaki Yesu mpo ete “moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.”—Yoane 3:16.
Soko Yesu azalaki bobele moto ya mayele oyo azalaki koyengeyenga oyo tokoki koyeba bobele makambo moke na ntina na ye, ekozala mpenza na ntina te ‘komonisa kondima’ epai na ye. Nzokande, soko lisoló ya Biblia na ntina na Yesu lizali solo, lobiko na biso ya seko etalelami wana. Na yango, tosengeli koyeba—Biblia ezali mpenza koyebisa makambo ya solo na ntina na Yesu?