Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/12 nk. 24-28
  • Yehova azalaki ebombamelo na ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azalaki ebombamelo na ngai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Botali ya ntina mingi
  • Etɛlɛmɛlo na biso mpo na solo ya Biblia
  • Tokutani na botɛmɛli makasi
  • Nabundisi makɔnɔ ya mpasi
  • Mobongisi-nzela na nsé ya botɛmɛli
  • Likambo oyo epesaki litomba
  • Yehova amoniseli ngai malamu na ye
  • Kobɔkɔla bana mwambe na banzela ya Yehova ezalaki mpasi mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Etike oyo basundolaki azwi tata ya bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Tosalaki mosala na nsé ya libateli ya bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/12 nk. 24-28

Yehova azalaki ebombamelo na ngai

LISOLÓ YA PENELOPE MAKRIS

Mama na ngai asɛngaki ngai na etingyá ete: “Tiká mobali na yo; bandeko na yo ya mibali bakozwila yo mobali mosusu ya malamu mingi koleka.” Mpo na nini mama na ngai ya bolingo alingaki ete naboma libala na ngai? Eloko nini esilikisaki ye boye?

NABOTAMAKI na 1897 na mwa mboka moke ebengami Ambelos, na esanga ya Samos na mokili ya Grèce. Libota na biso mobimba tozalaki basangani ya molende na lingomba ya Ortodokse ya Grèce. Tata akufaki mwa moke nsima ya kobotama na ngai, mpe mama, bandeko na ngai ya mibali misato, mpe ngai tosengelaki kosala na molende bobele mpo na kobikela na bobólá makasi ya eleko wana.

Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba ebandaki na 1914, mpe mwa moke na nsima bayaya na ngai mibale ya mibali basengisamaki na makasi kokomisa nkombo mpo na mosala ya sodá. Kasi mpo na kokima kosala yango, bakendaki kofanda na Amerika, kotikáká ngai mpe ndeko na ngai mosusu ya mobali na ndako elongo na mama. Mwa bambula na nsima, na 1920, Tobalanaki na Dimitris, elenge molakisi moko na mboka na biso.

Botali ya ntina mingi

Mwa moke nsima ya libala na ngai, ndeko mobali ya mama na ngai autaki na Amerika mpe ayaki kotala biso. Esalamaki ete amemaki moko na bavolimi ya búku Études des Écritures, oyo ekomamaki na Charles Taze Russell. Ezalaki mokanda ya Bayekoli ya Biblia, oyo bayebani lelo na nkombo ya Batatoli ya Yehova.

Ntango Dimitris afungolaki búku yango, amonaki lisoló oyo etali motuna oyo azalaki komituna uta azalaki mwana moke, “Nini ekomelaka moto soki akufi?” Ntango azalaki na eteyelo ya kati atunaki sángó moko ya lingomba ya Ortodokse ya Grèce na ntina na likambo yango mpenza kasi azwaki eyano ya kokoka te. Ndimbola ya polele mpe ya kolongobana oyo epesamaki na mokanda yango esepelisaki Dimitris mingi na boye ete akendaki nokinoki na nganda ya kafé kati na mboka, epai kuna mibali ya mboka na Grèce bazalaka na momesano ya kokutana. Kuna ayebisaki makambo mazwami na Biblia oyo ye ayekolaki.

Etɛlɛmɛlo na biso mpo na solo ya Biblia

Na eleko wana​—na ebandeli ya mobu 1920⁠—​Grèce ezalaki kati na etumba mosusu. Dimitris akɔtisamaki na mosala ya sodá mpe atindamaki na mboka Turquie, na Asie Mineure. Azokaki mpota mpe azongisamaki na ndako. Ntango azongelaki kɔlɔngɔnɔ ya nzoto, nakendaki na ye elongo na Smyrne, na Asie Mineure (lelo oyo Izmir, na Turquie). Ntango etumba esilaki na mbalakaka na 1922, tosengelaki kokima. Kútu, tozwaki likoki ya kokima kino na Samos na bwato moko oyo ezalaki ya kobeba. Ntango tokómaki na ndako tofukamaki mpe topesaki matɔ́ndi na Nzambe​—Nzambe oyo, na ntango wana, tozalaki naino na boyebi bobele moke na ntina na ye.

Nokinoki Dimitris atindamaki ete akende kolakisa na eteyelo moko na Vathy, mboka-mokonzi ya esanga. Akobaki kotánga mikanda ya Bayekoli ya Biblia, mpe mokolo moko na butu, wana mbula ezalaki kobɛta, Bayekoli ya Biblia mibale ya esanga na nkombo Chios bayaki kotala biso. Bautaki na Amerika mpo na koya kosala lokola ba colporteurs, ndenge bazalaki kobénga basakoli ya ntango nyonso na eleko wana. Topesaki bango esika ya kolala mpo na butu wana, mpe basololaki na biso makambo mingi matali mikano ya Nzambe.

Na nsima Dimitris alobaki: “Penelope, namoni ete oyo ezali mpenza solo, mpe nasengeli kolanda yango. Yango elimboli ete nasengeli kotika koyemba na lingomba ya Ortodokse, mpe nasengeli lisusu te kokende na ndakonzambe elongo na banakelasi.” Atako boyebi na biso ya Yehova ezalaki moke, kasi mposa na biso ya kosalela ye ezalaki makasi. Nayanolaki ye ete: “Nakopekisa yo te. Landá bobele kokóla na boyebi ya Yehova.”

Alobaki lisusu na kokakatana ete: “Ɛɛ, kasi soki bato bayei koyeba mokano na biso ya koyekola solo ya Biblia, nakobungisa mosala na ngai.”

Nalobaki na ye ete: “Komitungisa te, bato nyonso babikaka nde na mosala ya molakisi? Tozali bilenge mpe na makasi, mpe na lisungi ya Nzambe tokoki kozwa mosala mosusu.”

Na ntango yango toyaki koyeba ete Moyekoli ya Biblia mosusu​—ye mpe colporteur​—asilaki koya na Samos. Ntango toyokaki ete bapolísi baboyaki kopesa ye ndingisa ya kosala lisukúlu liboso ya bato, tobandaki koluka ye. Tokutaki ye na magazini moko azali kosolola na basángó mibale ya lingomba ya Ortodokse. Basángó batikaki ye nokinoki wana bayokaki nsɔ́ni mpo ete bazalaki na makoki te ya kolóngisa bindimeli na bango na lisalisi ya Biblia. Mobali na ngai, oyo akamwaki mingi na boyebi ya colporteur wana, atunaki ye: “Ndenge nini ozali na makoki ya kosalela Biblia na pɛtɛɛ motindo boye?”

Ayanolaki ete: “Toyekolaka Biblia na mozindo mpenza.” Afungolaki sakosi na ye, mpe abimisaki búku ya boyekoli oyo ezalaki na motó na likambo ete La Harpe de Dieu mpe alakisaki biso ndenge ya kosalela búku yango mpo na boyekoli motindo wana. Tozalaki na mposa makasi ya kobanda boyekoli yango na boye ete nokinoki ngai mpe mobali na ngai, bakisá colporteur yango, mpe mibali mosusu mibale tokendeki elongo na nkolo magazini kino na ndako na ye. Colporteur yango apesaki mokomoko na biso búku La Harpe de Dieu, mpe tobandaki koyekola bobele na ntango yango. Tokóbaki boyekoli na biso kino koleka midi ya butu, mpe lokola ntɔ́ngɔ́ ebandaki kobɛlɛma, tobandaki koyekola nzembo oyo Bayekoli ya Biblia bayembaka.

Bandá ntango wana, nabandaki koyekola Biblia na boumeli ya ngonga mingi na mokolo. Bayekoli ya Biblia ya mikili misusu balandaki kotindela biso bisaleli mpo na boyekoli ya Biblia. Na Yanuáli 1926, namipesaki na Nzambe na nzela ya libondeli, komipesáká mobimba mpo na kosala mokano na ye. Na nsima na eleko ya eté na mobu wana ngai mpe mobali na ngai tomonisaki elembo ya komipesa na biso na batisimo ya mai. Tozalaki na mposa makasi ya kosolola epai na bato mosusu makambo oyo tozalaki koyekola, boye tobandaki mosala ya kosakola ndako na ndako na lisalisi ya trakte Message d’espérance.

Tokutani na botɛmɛli makasi

Mokolo moko elenge mwasi moko abyangaki ngai mpo na kosangana na misá na ndakonzambe moke ya lingomba Ortodokse ya Grèce. Nalimbwelaki ye ete: “Natiká kosambela Nzambe na motindo wana, sikawa nazali kosambela ye na elimo mpe na solo, ndenge Biblia ezali koteya.” (Yoane 4:23, 24) Akamwaki mingi mpe akendaki koyebisa bato nyonso likambo oyo ye ayokaki mpe akɔtisaki mobali na ngai na likambo yango.

Bato banso babandaki kotɛmɛla biso. Epai moko te bakokaki kotika biso kimya​—ezala na ndako na biso to mpe na makita oyo tozalaki kosala elongo na mwa ndambo ya bato oyo bamonisaki bosepeli kati na esanga. Na bopusi ya basángó ya lingomba ya Ortodokse, bibele bayanganaki libandá ya esika tozalaki kosala makita, bazalaki kobamba mabanga mpe kofinga biso.

Ntango tokabolaki trakte Le message d’espérance, bana mike bazakaki kozingela biso mpe bazalaki konganga ete ba “Millenaristes” (Bandimeli Boyangeli ya Mbula Nkóto) mpe na maloba mosusu ya kotyola. Baninga ya mosala ya mobali na ngai bango mpe babandaki kobimisela ye mitungisi. Na nsima na 1926 afundamaki na esambiselo, mpe bakatelaki ye etumbu ete abongi lisusu te kozala molakisi na eteyelo ya Letá, mpe lisusu bakatelaki ye etumbu ya bolɔ́kɔ ya mikolo 15.

Ntango Mama ayokaki yango, apesaki ngai toli ete nátika mobali na ngai. Nayanolaki ete: “Yoká, mama molingami na ngai, oyebi lolenge nini nalingaka mpe namemyaka yo. Kasi, nakoki te kotika yo kokanga biso nzela ete tótika kosambela Nzambe ya solo, Yehova.” Azongaki na mboka na ye wana alɛmbi nzoto.

Na 1927 liyangani ya Bayekoli ya Biblia esalamaki na Athènes, mpe Yehova apesaki biso libaku ya koyangana na yango. Tosepelaki mingi mpe tolendisamaki na elimo na koyanganáká elongo na bibele ya baninga na biso bandimi. Ezongaki biso na Samos, tokabolaki batrakte 5 000 000 oyo ezali na motó na likambo ete Un témoignage aux conducteurs des peuples na bingumba mpe bamboka ya esanga na biso.

Na eleko yango bapekisaki Dimitris ete asala lisusu mosala ya molakisi te, mpe lokola bato bazalaki kokanisa mabe mpo na biso, ezalaki likambo ya mpasi mpo na kozwa mosala. Kasi lokola nayebaki kosɔna mpe Dimitris azalaki mopakoli-lángi-moyemi ya makoki mpenza, tozalaki na makoki ya kozwa mosolo oyo esengelaki mpo na kokokisa bamposa na biso. Na 1928 mobali na ngai, mpe bandeko baklisto mosusu minei na Samos, bakatelaki bango etumbu ya sanza minei ya bolɔ́kɔ mpo ete basakolaki nsango malamu. Lokola nazalaki ngai moko Moyekoli ya Biblia oyo azalaki na bonsomi, nazalaki na makoki ya komemela bango bilei na bolɔ́kɔ.

Nabundisi makɔnɔ ya mpasi

Ekómaki na eleko moko, nayokaki mpasi ya bokɔnɔ bobéngami spondylite, oyo na ntango wana ezalaki bokɔnɔ moko eyebanaki malamu te mpe esilaka te. Nabungisaki mposa ya kolya mpe nazalaki ntango nyonso na fɛ́fɛlɛ makasi. Mwango ya kosalisa yango esangisi mpe kotya simá kobanda na nkingo kino na bibɛlo na ngai. Mpo na kozwa mosolo, mobali na ngai atekaki ndambo ya mabelé mpo ete nákoba kozwa nkisi. Kati na mpasi, nabondelaki Nzambe mikolo nyonso mpo na kosɛnga ye nguya.

Ntango bazalaki koya kotala ngai, bandeko ya libota bazalaki ntango nyonso kobimisa botɛmɛli. Mama alobaki ete soko mikakatano wana miyelaki biso ezali mpo ete tokotaki na lingomba mosusu. Lokola nazangaki makoki nyonso ya kolongwa wana, natondisaki kusé na ngai na mpisoli wana ezalaki ngai kobondela Tata na biso na likoló ete apesa ngai motema pɛtɛɛ mpe mpiko ya kolendendela.

Likoló na mesa moke pene na mbeto na ngai, natyaki Biblia na ngai, mwa babúku ndenge na ndenge mpe batrakte mpo na bato oyo bazalaki koya kotala ngai. Ezalaki lipamboli ete makita ya mwa lisangá na biso moke ezalaki kosalama na ndako na biso; nakokaki ntango nyonso kozwa elendiseli ya elimo. Tosengelaki kotɛka lisusu eteni ya mabelé mpo na kofuta monganga oyo asengelaki kosalisa ngai na Athènes.

Mwa moke nsima, mokɛngɛli-motamboli ayaki kotala biso. Ayokaki mpenza mawa na komona ezalela oyo ngai nazalaki kati na yango mpe ete Dimitris azalaki na mosala te. Na boboto nyonso asalisaki biso na kokamata bibongiseli mpo ete tókenda kofanda na engumba ya Mytilene, na esanga Lesbos. Tokendaki kuna na 1934, mpe Dimitris akokaki kozwa mosala. Kuna tokutaki lisusu bandeko baklisto mibali mpe basi ya malamu mpenza oyo basungaki ngai na bokɔnɔ na ngai. Mokemoke, nsima ya mbula mitano ya lisalisi na bankisi, nazongelaki mpenza kɔlɔngɔ́nɔ́ malamu ya nzoto.

Nzokande, na 1946, mwa moke nsima na etumba ya mibale ya mokili mobimba, nayokaki lisusu mpasi ya bokɔnɔ makasi, ya mbala oyo ezalaki tubercular peritonitis. Nakangamaki na mbeto na boumeli ya sanza mitano na fɛ́fɛlɛ makasi mpe mpasi makasi. Kasi, lokola mpo na mbala ya liboso, natikaki te kosolola na ntina na Yehova epai na bato bazalaki koya kotala ngai. Nsima ya ntango nazongelaki kɔlɔngɔ́nɔ́ malamu ya nzoto.

Mobongisi-nzela na nsé ya botɛmɛli

Na bambula oyo elandaki nsima ya etumba Batatoli ya Yehova bazwaki botɛmɛli ntango nyonso na mokili ya Grèce. Tokangamaki mbala mingi mpenza wana ezalaki biso kokokisa mosala ya kosakola ndako na ndako. Mikolo nyonso oyo mobali na ngai alekisaki na bolɔ́kɔ ezali bongo na mobimba pene na mbula moko. Ntango tozalaki kobima na mosala ya kosakola, mbala mingi tozalaki komizela ete tokolekisa butu na biso lokola bakangami na biro ya bapolísi. Nzokande Yehova asundolaki biso soko moke te. Apesaki biso ntango nyonso mpiko mpe nguya oyo esengeli mpo na kolónga.

Na mobu 1940, natangaki kati na Informateur (lelo oyo Mosala na biso ya Bokonzi) ebongiseli ya kosala mosala ya mobongisi-nzela na eleko ya bopemi. Nazwaki likatami ya komeka kosangana na lolenge wana ya mosala oyo esɛngaki kolekisa ngonga 75 na sanza kati na mosala ya kosakola. Lokola mbano, mitángo na ngai ya bozongeli ya sika mpe ya boyekoli ya Biblia emataki​—na eleko moko nazalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia 17 pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Lisusu nakómaki na bato mingi oyo nazalaki kotikela bango bazulunalo na kartyé ya mombongo ya Mytilene, epai nazalaki kokabola mbala na mbala pene na nimero 300 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká na bamagazini, na babiro, mpe na babánki.

Ntango mokɛngɛli-motamboli moko ayaki kotala lisangá na biso na 1964, alobaki: “Ndeko mwasi Penelope, namonaki kati na kálati na yo ya lapólo ya mosala ya kosakola mbuma kitoko oyo ozali kobuka na mosala ya kosakola. Mpo na nini te kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza?” Botɔ́ndi na ngai ekosila te mpo na elendiseli wana; nazwaki esengo na mosala ya ntango nyonso na boumeli ya mbula koleka ntuku misato.

Likambo oyo epesaki litomba

Na Mytilene ezali na kartyé moko efandami na bato mingi ebéngamaka Langada, epai bato ya Grèce bakimá mboka bafandaka. Tozalaki koboya kosakola ndako na ndako kuna na ntina na botɛmɛli makasi oyo tokutanaki na yango. Nzokande, ntango mobali na ngai azalaki na bolɔ́kɔ, nasengelaki kokatisa na kartyé wana mpo na kokende kotala ye. Mokolo mosusu wana mbula ezalaki kobɛta mwasi moko abyangaki ngai na ndako na ye mpo na kotuna ngai ntina oyo mobali na ngai akangamaki na bolɔ́kɔ. Nalimbolaki ye ete ezalaki mpo ete asakolaki Bokonzi ya Nzambe mpe ete azalaki konyokwama lokola Klisto anyokwamaki.

Na nsima, mwasi mosusu, asalaki na boye ete naingela na ndako na ye. Ntango nakomaki, nakutaki ete abyangaki basi mosusu 12. Nakanisaki ete botɛmɛli ekozanga te, boye nabondelaki Nzambe ete apesa ngai bwanya mpe mpiko ya kolónga liboso na nyonso oyo ekosalema. Basi yango batunaki mituna mingi, mpe basusu babɛtaki ntembe, kasi nakokaki kopesa bango biyano na Makomami. Ntango natɛlɛmaki mpo na kokende, mama ya ndako asɛngaki ngai ete nazonga lisusu na mokolo molandaki. Na esengo nyonso, nandimaki libyangi yango. Ntango moninga moko mpe ngai tokómaki na mokolo molandi, tokutaki basi yango bazali kozela.

Na nsima masoló na biso ya Makomami makómaki kosalema mbala na mbala, mpe boyekoli mingi ya Biblia ebandamaki. Mwa ndambo ya basi yango bakólaki na boyebi ya solo, mpe mabota na bango lokola. Na nsima etuluku wana ezalaki ebandeli ya lisangá ya sika kati na Mytilene.

Yehova amoniseli ngai malamu na ye

Na boumeli ya bambula Yehova apesaki mbano na milende ya mobali na ngai mpe ya ngai moko mpo na kosalela Ye. Mwa etuluku ya Batatoli ya Yehova ya Samos na 1920 esili kokóla kino masangá mibale mpe etuluku etangwi moko na basakoli nyonso ya Bokonzi bazali pene na 130. Mpe na esanga ya Lesbos, ezali na masangá minei mpe bituluku mitano oyo esangisi basakoli soko 430. Mobali na ngai alandaki kosakola Bokonzi ya Nzambe kino liwa na ye na 1977. Oyo nde libaku malamu na komona baoyo tosalisaki bango kotikala ntango nyonso na molende kati na mosala ya kosakola! Boye, elongo na bana na bango, na bana ya bana na bango, mpe bana ya bana ya bana na bango, basali ebele monene oyo bazali kosambela Yehova na bomoko!

Bomoi na ngai na mosala ya Boklisto, oyo ekokisi mpenza bambula koleka 70 sikawa, ezalaki ya pɛtɛɛ te. Kasi Yehova azalaki ndako molai ya kobombama oyo ekokani na mosusu te. Na ntina na mbula ya kobotama oyo epusani mpenza mpe na ntina na kɔlɔngɔ́nɔ́ ya nzoto oyo ezali sé kobeba, nasengeli ntango nyonso kotikala na mbeto mpe nazali lisusu na makoki ya kosakola mingi te. Kasi nakoki koloba epai na Yehova, lokola mokomi na Nzembo ete: “Yo ozali ebomb[am]elo na ngai mpe ndako na ngai makasi, Nzambe na ngai oyo ekondima ngai.”​—Nzembo 91:2.

[Elilingi na lokasa 26]

Elongo na mobali na ye na 1955

[Elilingi na lokasa 26]

Mbɛlɛ Ndeko mwasi Makris akokisi mbula ya kobotama 100 na Yanuáli 1997

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto