Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/11 nk. 8-9
  • Danyele asalelaki Nzambe mikolo nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Danyele asalelaki Nzambe mikolo nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mwango mabe
  • Danyele atɛlɛmi ngwi
  • Liteya mpo na biso
  • Danyele abiki na minɔkɔ ya nkosi!
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Danyele na libulu ya bankɔsi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Danyele na libulu ya nkɔsi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Yehova alaki danyele mbano monene
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/11 nk. 8-9

Basalaki Mokano ya Yehova

Danyele asalelaki Nzambe mikolo nyonso

KATI na lisoló ya bato, esalemaka mpenza mingi te ete makambo mábongwana na mbala moko. Nzokande, yango esalemaki na mobu 539 L.T.B., wana boyangeli ya Babilone ekweaki na mabɔkɔ ya Bamede mpe Baperse bobele na bangonga moke. Na mobu yango, Danyele mosakoli ya Yehova azalaki kofanda lokola moombo Moyuda na Babilone uta mibu pene na 80. Ekoki mpenza kozala ete na ntango yango asilaki kokóma na mibu 90 ya kobotama, Danyele azalaki pene ya kokutana na komekama eleki monene na ntina na bosembo na ye epai na Nzambe.

Na nsima ya kokwea ya Babilone, emonanaki lokola ete makambo mazalaki kotambola malamu mpo na Danyele. Mokonzi ya sika ezalaki bongo Dalio moto na Mede, azalaki na mibu 62 mpe asepelaki na Danyele mingi mpenza. Moko na makambo ya liboso oyo Dalio asalaki na ntango abandaki mosala na ye lokola mokonzi ezalaki oyo ete, aponaki bayangeli-bitúká 120 mpe atyaki mibali misato na etɛlɛmɛlo ya mikóló na bokonzi.a Danyele azalaki moko na bato yango misato oyo bazwaki libaku malamu wana. Lokola Dalio ayebaki ete Danyele azalaki na makoki mingi mpenza, alukaki kútu kopesa ye etɛlɛmɛlo ya ministre-mokonzi! Nzokande, bobele na ntango yango, likambo moko libimaki pwasa oyo libongolaki mikano ya mokonzi.

Mwango mabe

Mikóló na bokonzi oyo bazalaki na etɛlɛmɛlo motindo moko na Danyele, elongo na etuluku monene ya bayangeli-bitúká, bakendaki epai na mokonzi mpo na kopesa ye likanisi moko ya mabe. Babondelaki Dalio abimisa mobeko oyo ete: “Mpo na mikolo ntuku misato, soko nani akobondela nzambe to moto, kozanga bobele yo, abwakama na kati na libulu na nkosi.” (Danyele 6:7) Dalio akokaki mbala mosusu kokanisa ete bato wana bazalaki komonisa bosembo na bango epai na ye. Akokaki mpe kokanisa ete mobeko wana mosengelaki kosunga ye, oyo azalaki mopaya, ete apika makasi etɛlɛmɛlo na ye lokola mokonzi ya mboka wana.

Nzokande, bakonzi minene mpe bayangeli-bitúká bapesaki likanisi na ntina na mobeko wana mpo na bolamu ya mokonzi te. “Balukelaki Danyele likambo na ntina na bokonzi, nde bakokaki kozwa ekweli to libungá te mpo ete azalaki sembo, mpe libungá to ekweli ezwamaki na ye te.” Na yango, bato wana ya yauli bamilobaki ete: “Tokozwa likambo na ntina na Danyele te, bobele soko tozwi yango na ntina na mobeko ya Nzambe na ye.” (Danyele 6:4, 5) Lokola bayebaki ete Danyele azalaki kosambela Yehova mokolo na mokolo, balukaki kosala ete momeseno yango etalelama lokola mbeba oyo ekoki komema na etumbu ya liwa.

Ekoki kozala ete mikóló na bokonzi mpe bayangeli-bitúká bazalaki koyina Danyele mpo ete “azwaki lokumu na koleka [bango], mpo ete mayele na koleka ezalaki na ye; mpe mokonzi akanisaki kotya ye na likoló na bokonzi mobimba.” (Danyele 6:3) Mbala mosusu bosembo ya Danyele epekisaki kanyaka mpe kobuba. Ata soki ezalaki mpenza nini, mibali wana bapusaki mokonzi ete atya sinyatili na ye likoló na mobeko wana, ete ekɔtisama kati na ‘mobeko ya Bamede mpe Bapelese mokoki kobongwana te.’​—Danyele 6:8, 9.

Danyele atɛlɛmi ngwi

Nsima wana Danyele ayebaki ete mobeko ya sika mobimi, atikaki nde kobondela Yehova? Soko moke te! Kofukamáká na eteni ya likoló ya ndako na ye, abondelaki Nzambe mbala misato na mokolo, “lokola esalaki ye liboso.” (Danyele 6:10) Wana ezalaki ye kobondela, banguna na ye “bakómaki na mbangu, mpe bazwaki Danyele kobondela mpe kolɔmba liboso na Nzambe na ye.” (Danyele 6:11) Wana bayebisaki likambo yango epai na mokonzi, Dalio ayokaki mawa ete Danyele akwei na mobeko oyo likoló na yango atyaki sinyatili na ye. Lisoló liyebisi biso ete: “Asalaki kino kolimwa na moi mpo na kobikisa ye.” Kasi ata mokonzi ye moko akokaki te kolongola mobeko oyo abimisaki. Na bongo, bamemaki Danyele na libulu ya nkosi, na ntembe te, ezalaki kati na lidusu to esika moko na nsé ya mabelé. Mokonzi alendisaki Danyele ete: “Nzambe na yo, oyo okosalelaka ye mikolo nyonso, abikisa yo!”​—Danyele 6:12-16.

Nsima wana azangaki mpɔngi na butu mpe akilaki bilei, Dalio akendaki noki na libulu ya nkosi. Danyele azalaki na bomoi mpe azwaki likámá te! Mokonzi akangaki mabɔkɔ te. Nokinoki, atindaki ete bábwaka banguna ya Danyele mpe mabota na bango kati na libulu na nkosi lokola etumbu. Dalio ayebisaki yango kati na mboka ete “na bokonzi na ngai mobimba bato bálɛnga mpe bábanga liboso na Nzambe na Danyele.”​—Danyele 6:17-27.

Liteya mpo na biso

Danyele azalaki ndakisa malamu mpo na oyo etali bosembo. Ata mpe mokonzi, ye oyo azalaki kosambela Yehova te, amonaki ete Danyele asalelaki Ye “mikolo nyonso.” (Danyele 6:16, 20) Liloba ya lokótá ya Aramɛyɛ oyo ebongolami ete “mikolo nyonso” elimboli mpenza “kobaluka kati na zolongano.” Ezali kopesa likanisi ya kokóba ntango nyonso, kokende sé liboso. Yango emonisi mpenza polele bosembo makasi ya Danyele epai na Yehova!

Danyele akólisaki ezaleli ya kosalela Nzambe mikolo nyonso uta mibu mingi liboso ete abwakama na libulu ya nkosi. Wana azalaki elenge mokangami kati na Babilone, aboyaki kolya bilei to komela masanga oyo epekisamaki na Mibeko ya Mose to oyo ebebisami na milulu ya bapakano. (Danyele 1:8) Na nsima, asakolaki nsango ya Nzambe na mpiko nyonso epai na Nebukadanesala mokonzi ya Babilone. (Danyele 4:19-25) Mwa ntango moke liboso ya kokwea ya Babilone, na kozanga kobanga, Danyele asakolaki ekateli ya Nzambe epai na Mokonzi Belesasala. (Danyele 5:22-28) Na bongo, na ntango Danyele abwakamaki na libulu na nkosi, atikaki te ezalela na ye ya bosembo oyo azalaki na yango uta kala.

Yo mpe okoki kosalela Yehova mikolo nyonso. Ozali elenge? Na bongo, salá makasi uta sikawa ete okólisa ezaleli ya kosalela Nzambe mikolo nyonso na kobwakáká boninga mabe elongo na mokili oyo mpe etamboli na yango ya mabe. Soki ozali kosalela Nzambe uta mwa ntango, batelá ezaleli ya bosembo mpe ya koyika mpiko. Kolɛmba te, mpamba te momekano nyonso oyo tozali kokutana na yango ezali kopesa biso libaku ya komonisa epai na Yehova ete tozali na ekateli makasi ya kosalela ye mikolo nyonso.​—Bafilipi 4:11-13.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba “moyangeli-etúká” (elimboli mpenza “mobateli Bokonzi”) esalelami mpo na kobénga moyangeli oyo aponami na mokonzi ya Perse mpo na kosala lokola motambwisi ya etúká moko. Lokola momonisi atindami na mokonzi, azalaki na mokumba ya kokɔngɔla mpako mpe kotinda mosolo epai na mokonzi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto