Ezalela malamu ezali komonana mpo na bokóli na Guinée Equatoriale
ZÁMBA monene ezali likambo oyo likoki kobenda likebi ya mosali-mobembo ntango mpɛpo ezali kokita na libándá monene ya mpɛpo na Guinée Équatoriale. Nzela ya kokita mpo na mpɛpo ezingami na banzeté minene, oyo ezali kokómisa bandako ya libándá ya mpɛpo moke. Zámba monene ezali komonana kobanda na mai monene kino nsɔngɛ́ ya bangomba, zámba oyo ezali kokólisama na mai ya mbula mpe molungé makasi koleka 80°F na boumeli ya mbula mobimba.
Bokóli monene ya lolenge mosusu ezali mpe kosalema na Guinée Équatoriale, “bokóli oyo Nzambe azali kopesa.” (Bakolose 2:19) Lolenge moko na mosáli ya lokumu mingi Moetiopia oyo alukaki lisungi epai na Filipo, bato mingi awa bazali na mposa ya kososola Makomami. (Misala 8:26-39) Emonanaka mingi wana moto moko abandi kosolola na Batatoli ya Yehova na balabála mpo na kosɛnga boyekoli ya Biblia. Pene na Batatoli 325 kati na Guinée Équatoriale bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia koleka nkóto moko.
Kolónama ya mombóto na mikolo ya liboso
Guinée Équatoriale, mokili ya moke koleka kati na Afrika, ezwami na súdi ya Nigeria mpe Cameroun. (Talá kálati.) Nsango malamu ekómaki liboso kuna na nzela ya Batatoli ya mboka Nigeria oyo bakendaki koluka mosala na bilanga ya kakao. Atako masangá mingi ya lokóta Lingelesi masalemaki, na nsima mapanzanaki ntango bandeko yango basengelaki kozonga na Nigeria. Nzokande, mosika te nsima ya lipandasi oyo epesamaki na mokili yango na 1968, bamisionere motoba babalani (basi misato, mibali mpe misato) ya la Société Watchtower batindamaki kuna. Bazalaki na likoki te ya kofanda ntango molai mpo na mikakatano na makambo ya politiki, kasi litatoli na bango ebimisaki matomba malamu.
Santiago, moko kati na bamisionere, akutanaki na Buenaventura, engambe mobali oyo ayebanaki lokola elombe. Azalaki moto na lingomba oyo azalaki kotosa Biblia, nzokande azalaki matáta mingi. Mwa lifinga ya moke mpamba ekokaki mpo na ye ete abɛta moto. Soki asiliki kati na bar, bato nyonso bakimi, kútu komata na maninisa mpo na kokima makɔ́fi na ye. Ya solo, ntango asololaki na Santiago, azalaki na mokano ya kobɛta ye soki akokaki te komonisa kati na Biblia bilembeteli ya makambo oyo azalaki koloba. Amilobaki ye moko ete ‘Moto moko te akosakana na elombe.’ Akamwaki mingi na oyo ayokaki, mingimingi na ntina na elikya ya bomoi ya seko kati na paladiso awa na mabelé, na bongo andimaki kosala boyekoli ya Biblia.
Wana boyekoli ezalaki kokóla, mposa ya Buenaventura ya kofanda kati na paladiso ekómaki makasi, mpe ayekolaki ete asengelaki kotambwisa bomoi na ye na boyokani na mitindá ya Nzambe mpo na kozwa lifuti motindo wana. Koyebáká ete baklisto ya solo basengeli te “kozongisa mabe mpo na mabe,” abandaki kosala milende makasi mpo na komipekisa.—Loma 12:17.
Komekama mpenza eyaki mokolo moko ntango na kozanga likebi akweisaki kɔ́pɔ ya kiliyá moko na bar. Mobali yango asilikaki mpe abɛtaki ye. Nokinoki, basusu kati na bar bakimaki, kokanisáká ete na ntembe te etumba ekobima. Kasi Buenaventura na boboto nyonso afutaki kɔ́pɔ oyo epasukaki, asombelaki mobali yango molangi mosusu ya masanga, mpe asɛngaki bolimbisi mpo na bozangi likebi na ye. Ntango baninga ya pembeni bamonaki ete boyekoli ya Biblia esalaki mbongwana motindo wana epai na ye, mingi balingaki koyekola elongo na ye. Ntango Buenaventura azwaki batisimo, azalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia mitano. Azali kosala lokola nkulutu na boumeli ya mibu mitano oyo miuti koleka, mpe atako bongo bato babéngaka ye bobele elombe, sikawa babéngaka ye bongo na lolenge ya lisɛki.
“Bazali komibanzabanza na bobóla na bango ya elimo”
Na boumeli ya bambula ya 1970 Batatoli ya mboka yango bakóbaki kosakola mpe koyangana elongo engebene makoki na bango. Na nsima, bamisionere babalani mingi ya Espagne bayaki mpo na kopesa lisungi. Andrés Botella, oyo asilaki kosala na Guinée Équatoriale na boumeli ya mibu 12, amikundweli ete ntango akómaki, akamwaki mingi na lolenge bato bazalaki mpenza “komibanzabanza mpo na bobóla na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Alobaki ete “ezalaki mpenza esengo monene ya koyekola Biblia elongo na bato ya bosepeli motindo wana.”
Mary, ndeko mwasi ya mboka Espagne, azalaki koyekola Biblia elongo na mwasi moko na nkombo María oyo alobaki ete baboti na ye, Francisco mpe Fausta bazalaki mpe komonisa bosepeli mpo na koyekola. Lokola Mary azalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia 15 mpe baboti ya María bazalaki kofanda mwa mosika, bapɔ́sɔ mingi elekaki liboso ete akenda kotala bango.
Nsukansuka ntango Mary mpe mobali na ye Serafín bakutanaki na baboti yango, bazalaki na mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradisa mpe Biblia, bazalaki mpe na mposa ya kobanda boyekoli. Na bongo, nokinoki babandaki boyekoli. Serafín amonaki ete baboti ya María bayebaki malamu makambo oyo bazalaki koyekola. Esalemaki mpe bongo na boyekoli oyo elandaki ntango basilisaki mokapo ya mibale. Serafín amikundweli ete “Ezalaki nde lokola tozalaki koyekola na Batatoli mibale oyo basilá kozwa batisimo.” Na mbala ya misato, lokola emonanaki ete bayebaki makambo yango malamu, Serafín apesaki likanisi ya koleka mbala moko na mituna mpe biyano mpo na koyeba lolenge oyo bazalaki mpenza kososola. Ayaki koyeba ete Francisco mpe Fausta basilaki koyekola búku yango mobimba bango moko!
Lolenge nini boyebi na bango ya sika ezalaki na bopusi likoló na bango? Na boyokani na oyo bayekolaki, batikaki koyangana na milulu ya bilimu mabe mpe bakataki boyokani na lingomba ya Katolike. Lisusu, Francisco atikaki komɛla likaya, mpe batikaki kolya nyama izangi kokatama nkingo. Lokola bazalaki mpenza kosalela makambo nyonso oyo bazalaki koyekola, bapesamaki elendiseli ya kobanda kosakola boyebi na bango epai na basusu. Nokinoki babandaki kosakola epai na bazalani na bango ya pembeni. Bobele na boumeli ya basanza misato, babongaki mpo na kozwa batisimo. Francisco azali sikawa mosaleli na misala, mpe na lisalisi ya ndakisa malamu mpe molende na bango na mosala ya kosakola, misato kati na bana basi na bango bazali sikawa Batatoli, bana mibali mibale bayanganaka na makita, mpe biboto na bango mosusu motoba bazali koyekola.
Mosika te nsima ya kobatisama, Francisco akutanaki na Pablo, mokatolike ya molende oyo azalaki kosala na sakristí na ndakonzambe na bango. Pablo azalaki kokamba misa ntango nyonso oyo sángó azalaki te. Soki mosangani moko ya lingomba azali kobɛla, azalaki kokenda kotala ye; soki moto moko ayei te na misa, Pablo azalaki kokenda kolendisa ye; soki moto moko akufi, azalaki kosala nyonso oyo ekoki na ye mpo na kobɔndisa libota. Ya solo, Pablo alingamaki mingi na basangani nyonso ya parwasɛ.
Lokola Pablo azalaki na limemya mozindo mpo na Biblia, na mbala moko mpenza andimaki lipesi ya Francisco ya koyekola elongo na ye. Nokinoki Pablo amonaki ete nsango ya Biblia ezalaki solo, mpe na nsima ya mwa boyekoli azwaki ekateli ya kosalela mikapo oyo ayebaki kati na “mosala na ye ya botali bampate” epai na mosangani moko ya lingomba oyo azalaki kobɛla. Mosika te, na misa moko ya mokolo ya Lomingo, Pablo alimbolaki ntina ya kosalela nkombo ya Nzambe, Yehova, mpe mpo na nini tosengeli te kosalela bikeko.
Lokola andimaki solo noki mpenza, azalaki na elikya ete basangani mosusu ya lingomba na ye bakososola lolenge moko na ye. Kasi na nsima ya kopesa mbala misato to minei mateya oyo mauti na Biblia, Pablo amonaki ete bato bazalaki kosepela te mpo na mateya oyo azalaki kopesa bango. Na bongo, azwaki ekateli ya kotika lingomba na ye mpe kosangana mbala na mbala elongo na Batatoli ya Yehova. Nsima ya mwa bansanza, abongaki mpo na kozwa batisimo, mpe sikawa azali mosakoli ya molende ya nsango malamu. Atako akoki te kozala mosakoli ya ntango nyonso, azali kotambwisa na molende nyonso boyekoli ya Bilia zomi.
Bokóli oyo emonani na koyanganáká elongo
Batatoli na Guinée Équatoriale bazali kotosa etindá ya Biblia oyo etali kotika te koyangana elongo. (Baebele 10:25) Uta 1994 ntango mosala ya kosakola epesamaki lisusu ndingisa na Leta, bandeko bazalaki na mposa makasi ya kozwa Ndako ya Bokonzi oyo ebongi. Ya solo, masangá mingi masili kotonga bandako na bango moko to balingi kotonga yango.
Na Mongomo, epai kuna motángo ya bayangani na mokolo ya Lomingo mbala mingi elekaka na mbala mibale na ndambo motángo ya basakoli ya Bokonzi, lisangá lizali kosala mosala makasi mpo na kotonga esika ya makita. Na Mongomo, na momeseno, mangomba mosusu mafutaka basáli mpo na kotonga bandakonzambe na bango, na yango mosala ya Batatoli ezalaki mpenza kobenda likebi. Mokolo moko, pastɛrɛ ya Iglesia Nueva Apostólica (Église Néo Apostolique) atɛlɛmaki na esika ya botongi mpo na kotuna nkulutu moko ntalo ya mosolo oyo azalaki kofuta basáli wana ya molende makasi. Pastɛrɛ yango alobaki ete atako afutaki bamasɔ́ oyo bazalaki basangani ya lingomba na ye moko, kasi mosala ezalaki kokende na lomɔ́ngi mpenza. Amitunaki soki akokaki kozwa basáli oyo bazalaki kotonga Ndako ya Bokonzi. Ntango bayebisaki ye ete Batatoli ya Yehova nyonso bazalaki kosala kozanga lifuti, akendaki monɔkɔ polele.
Koyangana na makita ekoki kosɛnga milende mingi mpo na baoyo bafandi mosika na Ndako ya Bokonzi. Juan, elenge mobali oyo azwaki batisimo na 1994, akutanaki na likambo yango. Ayokaki solo na Gabon, epai kuna ayekolaki katikati ya búku Bomoi ya seko. Na nsima azongaki na Guinée Équatoriale, na mboka na ye oyo ezwami na ntáka ya bakilomɛtɛlɛ 100 longwa na Mongomo. Yango ebimisaki komekama mpo na ye ete akóba boyekoli na ye. Kasi alɛmbaki te. Sanza na sanza, azalaki kosala mobembo ya ngonga mwambe na veló kino Mongomo, epai Santiago, moko ya bankulutu ya mboka yango azalaki kotambwisa boyekoli elongo na ye. Azalaki kofanda na Mongomo na boumeli ya mwa mikolo mpe koyekola mbala misato to minei na boumeli ya ntango wana. Na lolenge yango, azalaki na likoki ya kosilisa boyekoli na ye mpe kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo.
Lolenge nini Juan azalaki ntango nyonso makasi na elimo lokola azalaki kokutana mbala mingi te elongo na baklisto mosusu? Likoló na nyonso, na kozaláká mosakoli ya molende ya nsango malamu. Asakolaki epai na bato nyonso na mboka na ye, mpe na nsima, ntango azwaki batisimo, azalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia 13. Bato motoba kati na bayekoli na ye bakendaki na ye elongo na liyangani ya mokolo moko na Mongomo mpo na komona batisimo na ye. Sikawa azali kotambwisa pɔ́sɔ na pɔ́sɔ boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elongo na baoyo bamonisi bosepeli na mboka na ye, mpe na momeseno bato 20 bayanganaka.
Komwangisa mbóto na motema pɛtɛɛ
Bokóli nyonso na elimo esalemaka nokinoki te. Mbala mosusu esɛngaka mpenza motema pɛtɛɛ mpo na komona ete nsukansuka mbóto eboti mbuma. Yango esalemaki bongo mpo na Paca, oyo ayokaki nsango malamu mpo na mbala ya liboso na zándo na 1984 na nzela ya litatoli ya ndeko mwasi mobongisi-nzela, Edita. Ntango Edita akendaki kotala Paca na ndako na ye na pɔ́sɔ oyo elandaki, Paca andimaki koyekola Biblia. Atako azalaki kosala bokóli mingi te, Edita alendendelaki mpamba te asosolaki bizaleli malamu oyo Paca azalaki na yango. Edita alobi ete: “Amonanaki mpenza lokola mpate mpe nabondelaki Yehova ete afungola motema na ye.”
Paca akóbaki boyekoli na ye na kokatáká mpe kozongeláká boyekoli na boumeli ya mbula minei na ndambo kasi azalaki bobele kosala mwa bokóli moke. Na bongo, ntango basilisi búku Bomoi ya seko, Edita asololaki na ye na lolenge ya polele kozanga kobomba likambo na oyo etali ntina ya kotalela solo na lisɛki te. Kati na molende na ye ya kosimba motema ya Paca, kútu Edita atangisaki mpisoli.
Paca amikundweli ete: “Toli na ye wana esimbaki mpenza motema na ngai. Kobanda ntango wana nabandaki kosala mbongwana na bomoi na ngai. Nakomisaki nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, mpe bobele na mbula yango nakómaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Nsukansuka, mokolo oyo nazwaki batisimo ezalaki mokolo moleki esengo na bomoi na ngai!” Molende oyo Paca azali na yango sikawa ekeseni mpenza na bopɔtu na ye ya kala. Azali sikawa kotambwisa na molende nyonso boyekoli ya Biblia 13, mpe ya solo azali na motema pɛtɛɛ epai na baoyo bazali kosala bokóli ya nokinoki te.
Kosalisa bato ete bábongisa bomoi na bango
Na kotambwisáká bomoi na bango engebene mitindá ya Bilia, Batatoli ya Yehova na Guinée Équatoriale bazwi lokumu ya kozala bato ya sembo mpe ya bizaleli malamu. Moto moko, oyo akamwaki mpenza na etamboli na bango asololaki na nkulutu moko na lisangá ya Bata mpe atunaki: “Ozali na búku Comment raisonner?b Nalɛmbi kozala moto ya mokili. Nalingi kokóma Motatoli ya Yehova!”
Antonio, mosaleli na misala na lisangá ya Malabo, azali ndakisa monene ya moto ya mokili oyo akómaki Motatoli. Liboso ete ayekola Biblia, azalaki na bomoi ya mbindo. Azalaki kolekisa mosolo na ye ya mobongisi-montɛlɛ na komeláká masangá, mpe azalaki kosala misala ya mbindo. Nini esungaki ye mpo na kobongola lolenge na ye ya bomoi? Akamwaki mingi na oyo elobami makasi na 1 Bakolinti 6:9, 10: “Bómizimbisa te, moto na pite . . . mpe balangi masanga . . . bakosangola Bokonzi ya Nzambe te.” Amonaki ete mpo na kondimama na Nzambe, asengelaki kobongola lolenge ya bomoi na ye. Na mokano yango, abandaki kosɛnzɛla na ntina na lolenge ya baninga na ye. (Masese 13:20) Ntango baninga na ye ya kala bazalaki kobyanga ye mpo na kokenda komɛla masanga, azalaki koboya libyangi na bango mpe azalaki kopesa bango litatoli. Mosika te, batikaki kotungisa ye.
Milende wana nyonso mizalaki na ntina? Antonio alobi ete: “Nazali na esengo mingi mpo ete nabongoli lolenge ya bomoi na ngai. Nzoto na ngai ezali kolɔngɔ́nɔ́ atako sikawa nazali na bambula soko 60, nzokande mingi kati na baninga na ngai ya kala bakufá to basusu bazali konyokwama na kolɔngɔ́nɔ́ mabe ya nzoto. Sikawa nazali na baninga malamu na esika ete nazala na baoyo bazalaki koluka baninga bobele baoyo bakolinga kosombela bango masanga. Likambo lileki ntina, nazali na boyokani malamu elongo na Yehova. Sikawa nazali kosala lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe nazali koyekola elongo na moto moko oyo azali na mokakatano ya komɛla masanga, na yango nakoki kosalela eksperiansi na ngai mpo na kosunga ye.”
Bakómi baombo ya Nzambe
Esili koleka mbula soko 200, bato ya bokúla ya Guinée Équatoriale basangisamaki esika moko mpe bakendaki na bango na masúwa na Amerika lokola baombo. Lelo oyo, mingi bazali kokóma baombo na bolingi na bango moko—baombo ya Nzambe. Lolenge yango ya boombo ememeli bango bonsomi ya solo, kolongoláká bango na bindimeli ya Babilone mpe misala ya bilimu mabe. Boombo yango esili mpe koteya bango lolenge ya kozala na bomoi ya esengo mpe ya malamu. Basili komona oyo Yesu alakaki: “Bokoyeba solo mpe solo ekosikola bino.”—Yoane 8:32.
Elongo na bato 1 937 oyo bayanganaki na molulu ya Ekaniseli na 1995—pene na mbala motoba koleka basakoli ya mokili yango—bilikya malamu ezali mpo na bokóli na elimo lisusu. Wana Batatoli na Guinée Équatoriale bazali kokóba kolóna mpe komwangisa mbóto ya solo, bandimisami ete ‘Nzambe akokólisa.’ (1 Bakolinti 3:6) Na ntembe te, ezalela malamu ezali komonana mpo na bokóli na elimo na Guinée Équatoriale!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.