Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/10 lok. 3
  • Bomoi ezalaka nsima ya kufa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ezalaka nsima ya kufa?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Motuna ya kalakala
  • Tótalela malamumalamu makanisi ya bato mosusu na ntina na liwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Osengeli kobanga bakufi?
    Lamuká!—2009
  • Mpo na nini tobangaka liwa?
    Lamuká!—2008
  • Nini ekómelaka moto ntango akufi?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/10 lok. 3

Bomoi ezalaka nsima ya kufa?

MITUNA mibale mibulunganisi makanisi ya bato na boumeli ya bikeke mingi: Mpo na nini tosengeli kokóma mibangé mpe na nsima kokufa? Ezali na lolenge moko boye ya bomoi nsima ya kufa?

Motuna ya liboso mosili kotungisa bato mingi mpamba te ata siansi ya minganga ya mikolo na biso, elongo na bolukiluki na yango ya ndenge na ndenge, ezali na likoki te ya kopesa eyano ya nsuka to ya malonga.

Motuna ya mibale mosili kozwa ebele ya biyano ndenge na ndenge. Nzokande, na momeseno, biyano na ntina na koyeba soki bomoi ezalaka nsima ya kufa ekaboli baoyo bazali kondima ete nyonso esuki te na bomoi oyo mpe baoyo bazali kondima ete bomoi esukaka na ntango ya kufa. Mingi kati na baoyo bandimaka ete bomoi esukaka na ntango ya kufa balobaka ete ntembe ezali te kati na makanisi na bango ete bolai ya bomoi ya moto ezali bobele nyonso oyo akoki kolikya. Mbala mingi, makanisi nyonso oyo mapesami oyo makeseni mazwaka eyano ya kotyola oyo ete “Ɛ bɛh! moto moko te asila kozonga mpo na koyebisa biso, boye te?”

Lokola ezalaka na mituna misusu oyo mibimisaka ntembe, ezali na bato mingi oyo bazwi naino ekateli te​—komonisáká ete bazali ntango nyonso pene na kondima bindimiseli oyo biuti na nzela moko to mosusu. Kasi basusu bakoyanola, mbala mosusu na kozanga nkaka ete “Tosengeli kozela mpe komona wana ntango ekoya!”

Motuna ya kalakala

Motuna moko ya kala na ntina na bomoi nsima na liwa mobimisamaki esili koleka mbula soko 3 500 na mofandi moko na epai ya ebimelo ya ntango oyo ayebani mingi na nkombo Yobo, ayebani mingi mpo na motema pɛtɛɛ na ye ntango akutanaki na minyoko. Talá lolenge Yobo atunaki motuna na ye: “Moto akokufa mpe akokatama, ɛɛ moto akobimisa mpema na ye mpe azali wapi? Lokola mai ekokauka na libeke, lokola mokɛlɛ ekolimwa mpe ekokauka, boye moto akolala mpe akotɛma lisusu te . . . Soko moto akokufa, akobika nde lisusu?”​—Yobo 14:10-​14.

Kasi Yobo azalaki bobele ye moko te mpo na kotuna motuna na ntina na bomoi nsima ya kufa. Búku Encyclopædia of Religion and Ethics ezali komonisa polele makambo oyo malandi na nsé na motó na likambo “Ezalela ya bakufi”: “Eloko moko te oyo ezali na boyokani na bwanya ya moto esili kotungisa makanisi na ye lokola ezalela na ye na nsima ya kufa. Na momeseno, [bato ya mboka] kati na bitúká nyonso na mokili bazalaka na bindimeli ya polele mpe makasi na ntina na mokili ya bawá​—bomoi na yango, motindo na yango, zámba na yango​—mpe bazali komibanzabanza makasi na likambo yango. Bobángi ya bakufi oyo epalangani mingi ezali komonisa likanisi moko ya kalakala oyo ete ezalela na bango ezalaki te oyo kati na yango bomoi esukisaki. Kufa ekataka nguya; oyo ezalaki mingi mpenza; kasi ezali te na nguya mosusu oyo etikali kosala, to ezali te na nguya mosusu oyo ezali na likoki ya kosala kozanga komonana to na lolenge ya likamwisi? Ezala ete liboso bato bazalaki kondimela elimo, molimo, to elima, to bazalaki kondimela yango te, emonani ete ezali na ntina ya kondima ete bazalaki kotalela bakufi lokola ete bazalaki kokóba kozala na lolenge moko boye ya bomoi.”

Okoki kozala kati na moko ya bituluku misato oyo elobelami awa likoló: oyebi te nini ekómaka nsima ya kufa; ondimisami ete ezalaka na lolenge moko ya bomoi nsima ya kufa; to ondimisami ete bomoi nyonso ezali bobele oyo tozali na yango. Ata endimeli na yo ezali nini, tobyangi yo ete otalela na likebi mpenza lisoló oyo lilandi. Talá soki okozwa kati na yango elembeteli ya Biblia ete ezali na elikya moko kitoko ya bomoi ya esengo nsima ya kufa, lolenge nini yango ekosalema, epai wapi, mpe ntango nini.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto